Judges 8 (BOLCB2)

1 Mibali ya Efrayimi batunaki Jedeon :— Bizaleli ya boye elakisi nini epai na biso ? Mpo na nini obengaki biso te tango okendeki kobundisa bato ya Madiani ?Mpe basilikelaki ye makasi. 2 Kasi Jedeon azongiselaki bango :— Nasali nini oyo ekokani na oyo bino bosala ? Boni, ndambo ya bambuma ya vino oyo etikalaki na sima mpo ete Efrayimi abuka yango ezali kitoko te koleka bambuma ya vino ya liboso ya Abiezeri ? 3 Nzambe akabaki bakonzi ya bato ya Madiani, Orebi mpe Zeebi, na maboko na bino. Eloko nini ya lokumu ngai nasali oyo ekokani na oyo bino bosala ?Liloba oyo ekitisaki kanda na bango. 4 Jedeon elongo na basoda na ye nkama misato bakomaki na Yordani mpe bakatisaki yango. Atako balembaki, bakobaki kaka kolanda bato ya Madiani. 5 Tango bakomaki na mboka Sukoti, Jedeon asengaki na bato ya mboka :— Bopesa basoda na ngai mapa, pamba te basili kolemba na nzala. Nazali kolanda Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi ya Madiani. 6 Kasi bakonzi ya mboka Sukoti bazongiselaki ye :— Boni, osili kozwa Zeba mpe Tsalimuna na se ya bokonzi na yo mpo ete biso topesa basoda na yo mapa ? 7 Jedeon alobaki :— Lokola bolobi boye, tango Yawe akokaba, na maboko na ngai, Zeba mpe Tsalimuna, nakopasola-pasola misuni na bino na basende ya esobe mpe na singa ya nzube. 8 Wuta kuna, Jedeon amataki na mboka Penueli mpe asengaki epai ya bavandi na yango, ndenge kaka asengaki epai ya bato ya Sukoti. Kasi bato ya Penueli bazongiselaki ye ndenge kaka bato ya Sukoti basalaki. 9 Jedeon alobaki na bato ya Penueli : « Soki nakozonga na kimia mpe na bomoi, nakobuka ndako molayi na bino. » 10 Nzokande, Zeba mpe Tsalimuna bazalaki na Karikori elongo na basoda na bango, nkoto zomi na mitano. Oyo ezali nde motango nyonso ya basoda ya bato ya este oyo batikalaki. Pamba te basoda nkoto nkama moko na tuku mibale oyo bayebi kobunda na mopanga bakufaki. 11 Bongo, Jedeon akendeki na nzela ya bavandi ya bandako ya kapo, na ngambo ya este ya Noba mpe ya Yogibeka ; abetaki mampinga ya banguna na mopanga mpe alongaki bango tango bazalaki kokanisa ete bazali na kimia. 12 Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi mibale ya Madiani, bakimaki ; kasi Jedeon alandaki mpe akangaki bango. Mpe apanzaki mampinga na bango nyonso. 13 Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azongaki wuta na bitumba na nzela ya ngomba Eresi. 14 Akangaki elenge mobali moko kati na mibali ya mboka Sukoti, mpe atunaki ye mituna. Boye, elenge mobali yango akomelaki ye bakombo ya bakambi mpe ya bampaka tuku sambo na sambo ya engumba. 15 Jedeon akendeki epai ya bato ya mboka Sukoti mpe alobaki na bango : « Tala Zeba mpe Tsalimuna oyo bofingelaki ngai na koloba : ‹ Osili kotia na se ya bokonzi na yo Zeba mpe Tsalumuna mpo ete biso topesa lipa na basoda na yo, oyo basili kolemba ? › » 16 Azwaki bampaka ya engumba Sukoti mpe abetisaki bango fimbu, na basende ya esobe mpe singa ya nzube. 17 Abukaki ndako molayi ya Penueli mpe abomaki mibali ya engumba. 18 Jedeon atunaki Zeba mpe Tsalimuna :— Mibali oyo bobomaki na Tabori, bazalaki ndenge nini ?Bazongisaki :— Bakokanaki na yo mpe bazalaki lokola bana ya bakonzi. 19 Jedeon alobaki na bango lisusu :— Bato wana bazalaki bandeko na ngai ya mibali, bana ya mama na ngai penza. Na Kombo na Yawe, soki bobikisaki bango, ngai mpe nalingaki koboma bino te. 20 Mpe apesaki mitindo na Yeteri, mwana na ye ya liboso ya mobali : « Telema mpe boma bango ! » Kasi elenge mobali abimisaki mopanga na ye te, pamba te azalaki nanu elenge mpe azalaki na somo. 21 Zeba mpe Tsalimuna balobaki : « Telema mpe boma biso yo moko, pamba te likambo oyo ekoki na bato ya mitema makasi. » Boye, Jedeon atelemaki mpe abomaki bango. Akamataki bamedayi ya wolo oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango. 22 Bana ya Isalaele balobaki na Jedeon :— Zala mokonzi na biso, yo moko, mwana na yo ya mobali mpe koko na yo ya mobali, pamba te obikisi biso na loboko ya bato ya Madiani. 23 Kasi Jedeon alobaki na bango :— Nakozala mokonzi na bino te, ezala ata mwana na ngai ya mobali. Yawe nde akozala mokonzi na bino. 24 Jedeon abakisaki :— Nalingi kosenga bino eloko moko : Kati na biloko oyo bino bosili kozwa na bitumba, tika ete moko na moko kati na bino apesa ngai eloko ya litoyi. Pamba te banguna na biso bazalaki kolata biloko ya matoyi mpo ete bazali bana ya Isimaeli. 25 Bana ya Isalaele bazongisaki :— Tokopesa yango.Batandaki elamba na mabele, moko na moko abwakaki eloko na ye ya litoyi, oyo ewutaki na bomengo ya bitumba. 26 Biloko ya matoyi ya wolo, oyo Jedeon asengaki ezalaki ya bakilo pene tuku mibale, longola bamedayi ya wolo oyo ezalaki lokola sanza ya ndambo, biloko ya matoyi oyo ediembelaka, bilamba ya talo ya motane makasi oyo bakonzi ya Madiani balataki mpe mayaka oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango. 27 Jedeon asalelaki yango ekeko oyo atiaki na Ofira, engumba na ye. Bana ya Isalaele bakomaki kokende kofukama liboso ya ekeko yango, mpe ekomaki motambo monene mpo na Jedeon mpe libota na ye. 28 Boye, bato ya Madiani bakitisamaki liboso ya bana ya Isalaele mpe batombolaki lisusu mito na bango te. Na tango nyonso oyo Jedeon azalaki na bomoi, mokili etikalaki na kimia mibu tuku minei. 29 Yerubali, mwana mobali ya Joasi, azongaki na ndako na ye mpe avandaki kuna. 30 Jedeon azalaki na bana tuku sambo oyo bawutaki na mokongo na ye, pamba te azalaki na basi ebele. 31 Makangu na ye, oyo azalaki kovanda na Sishemi, abotelaki ye mpe mwana mobali oyo bapesaki kombo « Abimeleki. » 32 Jedeon, mwana mobali ya Joasi, akufaki na kimobange ya esengo, mpe bakundaki ye kati na kunda ya Joasi, na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri. 33 Sima na kufa ya Jedeon, bana ya Isalaele bazongelaki kosambela banzambe Bala. Bakomisaki Bala-Beriti nzambe na bango. 34 Bana ya Isalaele babosanaki Yawe, Nzambe na bango, oyo akangolaki bango na maboko ya banguna na bango. 35 Bazongisaki ata bolamu moko te na libota ya Yerubali oyo elakisi Jedeon, mpo na bolamu nyonso oyo asalelaki Isalaele.

In Other Versions

Judges 8 in the ANGEFD

Judges 8 in the ANTPNG2D

Judges 8 in the AS21

Judges 8 in the BAGH

Judges 8 in the BBPNG

Judges 8 in the BBT1E

Judges 8 in the BDS

Judges 8 in the BEV

Judges 8 in the BHAD

Judges 8 in the BIB

Judges 8 in the BLPT

Judges 8 in the BNT

Judges 8 in the BNTABOOT

Judges 8 in the BNTLV

Judges 8 in the BOATCB

Judges 8 in the BOATCB2

Judges 8 in the BOBCV

Judges 8 in the BOCNT

Judges 8 in the BOECS

Judges 8 in the BOGWICC

Judges 8 in the BOHCB

Judges 8 in the BOHCV

Judges 8 in the BOHLNT

Judges 8 in the BOHNTLTAL

Judges 8 in the BOICB

Judges 8 in the BOILNTAP

Judges 8 in the BOITCV

Judges 8 in the BOKCV

Judges 8 in the BOKCV2

Judges 8 in the BOKHWOG

Judges 8 in the BOKSSV

Judges 8 in the BOLCB

Judges 8 in the BOMCV

Judges 8 in the BONAV

Judges 8 in the BONCB

Judges 8 in the BONLT

Judges 8 in the BONUT2

Judges 8 in the BOPLNT

Judges 8 in the BOSCB

Judges 8 in the BOSNC

Judges 8 in the BOTLNT

Judges 8 in the BOVCB

Judges 8 in the BOYCB

Judges 8 in the BPBB

Judges 8 in the BPH

Judges 8 in the BSB

Judges 8 in the CCB

Judges 8 in the CUV

Judges 8 in the CUVS

Judges 8 in the DBT

Judges 8 in the DGDNT

Judges 8 in the DHNT

Judges 8 in the DNT

Judges 8 in the ELBE

Judges 8 in the EMTV

Judges 8 in the ESV

Judges 8 in the FBV

Judges 8 in the FEB

Judges 8 in the GGMNT

Judges 8 in the GNT

Judges 8 in the HARY

Judges 8 in the HNT

Judges 8 in the IRVA

Judges 8 in the IRVB

Judges 8 in the IRVG

Judges 8 in the IRVH

Judges 8 in the IRVK

Judges 8 in the IRVM

Judges 8 in the IRVM2

Judges 8 in the IRVO

Judges 8 in the IRVP

Judges 8 in the IRVT

Judges 8 in the IRVT2

Judges 8 in the IRVU

Judges 8 in the ISVN

Judges 8 in the JSNT

Judges 8 in the KAPI

Judges 8 in the KBT1ETNIK

Judges 8 in the KBV

Judges 8 in the KJV

Judges 8 in the KNFD

Judges 8 in the LBA

Judges 8 in the LBLA

Judges 8 in the LNT

Judges 8 in the LSV

Judges 8 in the MAAL

Judges 8 in the MBV

Judges 8 in the MBV2

Judges 8 in the MHNT

Judges 8 in the MKNFD

Judges 8 in the MNG

Judges 8 in the MNT

Judges 8 in the MNT2

Judges 8 in the MRS1T

Judges 8 in the NAA

Judges 8 in the NASB

Judges 8 in the NBLA

Judges 8 in the NBS

Judges 8 in the NBVTP

Judges 8 in the NET2

Judges 8 in the NIV11

Judges 8 in the NNT

Judges 8 in the NNT2

Judges 8 in the NNT3

Judges 8 in the PDDPT

Judges 8 in the PFNT

Judges 8 in the RMNT

Judges 8 in the SBIAS

Judges 8 in the SBIBS

Judges 8 in the SBIBS2

Judges 8 in the SBICS

Judges 8 in the SBIDS

Judges 8 in the SBIGS

Judges 8 in the SBIHS

Judges 8 in the SBIIS

Judges 8 in the SBIIS2

Judges 8 in the SBIIS3

Judges 8 in the SBIKS

Judges 8 in the SBIKS2

Judges 8 in the SBIMS

Judges 8 in the SBIOS

Judges 8 in the SBIPS

Judges 8 in the SBISS

Judges 8 in the SBITS

Judges 8 in the SBITS2

Judges 8 in the SBITS3

Judges 8 in the SBITS4

Judges 8 in the SBIUS

Judges 8 in the SBIVS

Judges 8 in the SBT

Judges 8 in the SBT1E

Judges 8 in the SCHL

Judges 8 in the SNT

Judges 8 in the SUSU

Judges 8 in the SUSU2

Judges 8 in the SYNO

Judges 8 in the TBIAOTANT

Judges 8 in the TBT1E

Judges 8 in the TBT1E2

Judges 8 in the TFTIP

Judges 8 in the TFTU

Judges 8 in the TGNTATF3T

Judges 8 in the THAI

Judges 8 in the TNFD

Judges 8 in the TNT

Judges 8 in the TNTIK

Judges 8 in the TNTIL

Judges 8 in the TNTIN

Judges 8 in the TNTIP

Judges 8 in the TNTIZ

Judges 8 in the TOMA

Judges 8 in the TTENT

Judges 8 in the UBG

Judges 8 in the UGV

Judges 8 in the UGV2

Judges 8 in the UGV3

Judges 8 in the VBL

Judges 8 in the VDCC

Judges 8 in the YALU

Judges 8 in the YAPE

Judges 8 in the YBVTP

Judges 8 in the ZBP