Jeremiah 29 (BOLCB2)

1 Tala makomi ya mokanda oyo mosakoli Jeremi atindaki, wuta na Yelusalemi, epai ya bakambi oyo batikalaki kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya basakoli mpe epai ya bato nyonso oyo Nabukodonozori amemaki na bowumbu, na Babiloni wuta na Yelusalemi. 2 Mokanda yango etindamaki sima na bato oyo kokende na bawumbu longwa na Yelusalemi : mokonzi Yekonia, mama ya mokonzi, bakalaka na ye ya lokumu, bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bato oyo balambaka bibende na moto mpe bato ya misala ya maboko. 3 Apesaki mokanda yango na maboko ya Eleasa, mwana mobali ya Shafani ; mpe na maboko ya Gemaria, mwana mobali ya Ilikia. Ezali bango nde Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, atindaki na Babiloni epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni. Mokanda yango elobaki boye : 4 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi epai ya bato nyonso oyo namemaki na bowumbu, na Babiloni wuta na Yelusalemi : 5 « Botonga bandako mpe bovanda kuna ; bolona banzete mpe bolia mbuma na yango ; 6 bobalana, bobota bana mibali mpe bana basi, bolukela bana na bino ya mibali basi mpe bobalisa bana na bino ya basi, mpo ete bango mpe babota bana mibali mpe bana basi. Bobotana kuna mpe bokoma ebele, mpe botika te ete motango na bino ekita. 7 Boluka kimia mpe bolamu ya engumba epai wapi namemaki bino na bowumbu ; bobondela Yawe mpo na yango, pamba te soki yango ebongi, bino mpe bokozala malamu. » 8 Solo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Bomitika te ete basakoli mpe bato ya soloka oyo bazali kati na bino bakosa bino : bondimela te bato oyo bazali kolimbolela bino bandoto. 9 Pamba te bazali nde kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai ; natindi bango te, » elobi Yawe. 10 Kasi tala liloba oyo Yawe alobi : « Tango mibu tuku sambo ekokoka mpo na Babiloni, nakoya epai na bino mpe nakokokisa elaka na Ngai ya ngolu mpo na kozongisa bino na esika oyo. 11 Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu. 12 Boye bokobelela Ngai, bokoya epai na Ngai mpe bokobondela Ngai ; mpe Ngai nakoyoka bino. 13 Bokoluka Ngai mpe bokomona Ngai, soki boluki Ngai na motema na bino mobimba. 14 Nakomimonisa epai na bino, » elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino, » elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu. » 15 Solo, bokoki koloba : « Yawe abimisi basakoli kati na biso awa na Babiloni ! » 16 Kasi tala liloba oyo Yawe alobi na tina na mokonzi oyo avandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, na tina na bavandi nyonso ya engumba oyo, mpe na tina na bandeko na bino oyo bakendeki te na bowumbu elongo na bino ; 17 tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakotindela bango mopanga, nzala makasi mpe bokono oyo ebomaka, mpe nakokomisa bango lokola mbuma ya figi oyo epola, oyo moto ata moko te akokoka kolia. 18 Nakolanda bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ; mpe na miso ya bikolo nyonso ya mabele, nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya lisuma, eloko ya kobanga mpe ya kotiola kati na bikolo nyonso epai wapi nakobengana bango. 19 Pamba te bayokaki maloba na Ngai te, » elobi Yawe, « maloba oyo nazalaki kotindela bango tango na tango na nzela ya basali na Ngai, basakoli. Mpe bino bato oyo bokendeki na bowumbu, bino mpe boyokaki te, » elobi Yawe. 20 Yango wana, boyoka Liloba na Yawe, bino bawumbu nyonso oyo natindaki na Babiloni longwa na Yelusalemi. 21 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na Akabi, mwana mobali ya Kolaya, mpe na tina na Sedesiasi, mwana mobali ya Maaseya, oyo bazali kosakola makambo ya lokuta epai na bino, na Kombo na Ngai : « Nakokaba bango na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe akoboma bango na miso na bino. 22 Likolo na bango, bawumbu nyonso oyo bawutaki na Yuda, bongo bazali na Babiloni, bakosalela elakeli mabe oyo : ‹ Tika ete Yawe asala bino ndenge asalaki Sedesiasi mpe Akabi, oyo mokonzi ya Babiloni atumbaki na moto ! › 23 Pamba te basalaki kati na Isalaele ekobo elongo na basi ya baninga na bango, bapaya, mpe balobaki lokuta na Kombo na Ngai, nzokande Ngai natindaki bango te kosala bongo. Nayebi yango malamu, mpe Ngai moko nazali Motatoli na yango, » elobi Yawe. 24 Yebisa Shemaya, moto ya Nekelami, maloba oyo : 25 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Otindaki mikanda na kombo na yo moko epai ya bato nyonso ya Yelusalemi, epai ya Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, mpe epai ya Banganga-Nzambe. Olobaki na Sofoni : 26 ‹ Yawe aponaki yo Nganga-Nzambe na esika ya Yeoyada mpo ete obatela Tempelo ya Yawe. Osengelaki kobwaka na boloko mpe kokanga bibende na makolo, bato pamba oyo bazali komimona lokola basakoli. 27 Boye, mpo na nini opamelaki te mosakoli Jeremi, moto ya Anatoti, oyo azali komimona lokola mosakoli kati na bino ? 28 Atindelaki biso sango oyo kati na Babiloni : Bowumbu na bino ekowumela tango molayi. Yango wana, botonga bandako mpe bovanda kuna, bolona bilanga mpe bolia mbuma na yango. › » 29 Nzokande, Nganga-Nzambe Sofoni atangisaki mosakoli Jeremi mokanda yango. 30 Boye, Yawe alobaki na Jeremi : 31 « Tinda sango oyo epai ya bawumbu nyonso : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Shemaya, moto ya Nekelami : Lokola Shemaya asakolaki makambo ya lokuta epai na bino, nzokande natindaki ye te, mpe amemi bino na kotia motema na lokuta, 32 tala liloba oyo Yawe alobi : Solo, nakopesa Shemaya, moto ya Nekelami, etumbu elongo na bakitani na ye. Kati na bato na ye, moko te akotikala, mpe akotikala komona te bolamu oyo nakosala epai ya bato na Ngai, elobi Yawe, pamba te atindiki bato na Ngai kotombokela Ngai. › »

In Other Versions

Jeremiah 29 in the ANGEFD

Jeremiah 29 in the ANTPNG2D

Jeremiah 29 in the AS21

Jeremiah 29 in the BAGH

Jeremiah 29 in the BBPNG

Jeremiah 29 in the BBT1E

Jeremiah 29 in the BDS

Jeremiah 29 in the BEV

Jeremiah 29 in the BHAD

Jeremiah 29 in the BIB

Jeremiah 29 in the BLPT

Jeremiah 29 in the BNT

Jeremiah 29 in the BNTABOOT

Jeremiah 29 in the BNTLV

Jeremiah 29 in the BOATCB

Jeremiah 29 in the BOATCB2

Jeremiah 29 in the BOBCV

Jeremiah 29 in the BOCNT

Jeremiah 29 in the BOECS

Jeremiah 29 in the BOGWICC

Jeremiah 29 in the BOHCB

Jeremiah 29 in the BOHCV

Jeremiah 29 in the BOHLNT

Jeremiah 29 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 29 in the BOICB

Jeremiah 29 in the BOILNTAP

Jeremiah 29 in the BOITCV

Jeremiah 29 in the BOKCV

Jeremiah 29 in the BOKCV2

Jeremiah 29 in the BOKHWOG

Jeremiah 29 in the BOKSSV

Jeremiah 29 in the BOLCB

Jeremiah 29 in the BOMCV

Jeremiah 29 in the BONAV

Jeremiah 29 in the BONCB

Jeremiah 29 in the BONLT

Jeremiah 29 in the BONUT2

Jeremiah 29 in the BOPLNT

Jeremiah 29 in the BOSCB

Jeremiah 29 in the BOSNC

Jeremiah 29 in the BOTLNT

Jeremiah 29 in the BOVCB

Jeremiah 29 in the BOYCB

Jeremiah 29 in the BPBB

Jeremiah 29 in the BPH

Jeremiah 29 in the BSB

Jeremiah 29 in the CCB

Jeremiah 29 in the CUV

Jeremiah 29 in the CUVS

Jeremiah 29 in the DBT

Jeremiah 29 in the DGDNT

Jeremiah 29 in the DHNT

Jeremiah 29 in the DNT

Jeremiah 29 in the ELBE

Jeremiah 29 in the EMTV

Jeremiah 29 in the ESV

Jeremiah 29 in the FBV

Jeremiah 29 in the FEB

Jeremiah 29 in the GGMNT

Jeremiah 29 in the GNT

Jeremiah 29 in the HARY

Jeremiah 29 in the HNT

Jeremiah 29 in the IRVA

Jeremiah 29 in the IRVB

Jeremiah 29 in the IRVG

Jeremiah 29 in the IRVH

Jeremiah 29 in the IRVK

Jeremiah 29 in the IRVM

Jeremiah 29 in the IRVM2

Jeremiah 29 in the IRVO

Jeremiah 29 in the IRVP

Jeremiah 29 in the IRVT

Jeremiah 29 in the IRVT2

Jeremiah 29 in the IRVU

Jeremiah 29 in the ISVN

Jeremiah 29 in the JSNT

Jeremiah 29 in the KAPI

Jeremiah 29 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 29 in the KBV

Jeremiah 29 in the KJV

Jeremiah 29 in the KNFD

Jeremiah 29 in the LBA

Jeremiah 29 in the LBLA

Jeremiah 29 in the LNT

Jeremiah 29 in the LSV

Jeremiah 29 in the MAAL

Jeremiah 29 in the MBV

Jeremiah 29 in the MBV2

Jeremiah 29 in the MHNT

Jeremiah 29 in the MKNFD

Jeremiah 29 in the MNG

Jeremiah 29 in the MNT

Jeremiah 29 in the MNT2

Jeremiah 29 in the MRS1T

Jeremiah 29 in the NAA

Jeremiah 29 in the NASB

Jeremiah 29 in the NBLA

Jeremiah 29 in the NBS

Jeremiah 29 in the NBVTP

Jeremiah 29 in the NET2

Jeremiah 29 in the NIV11

Jeremiah 29 in the NNT

Jeremiah 29 in the NNT2

Jeremiah 29 in the NNT3

Jeremiah 29 in the PDDPT

Jeremiah 29 in the PFNT

Jeremiah 29 in the RMNT

Jeremiah 29 in the SBIAS

Jeremiah 29 in the SBIBS

Jeremiah 29 in the SBIBS2

Jeremiah 29 in the SBICS

Jeremiah 29 in the SBIDS

Jeremiah 29 in the SBIGS

Jeremiah 29 in the SBIHS

Jeremiah 29 in the SBIIS

Jeremiah 29 in the SBIIS2

Jeremiah 29 in the SBIIS3

Jeremiah 29 in the SBIKS

Jeremiah 29 in the SBIKS2

Jeremiah 29 in the SBIMS

Jeremiah 29 in the SBIOS

Jeremiah 29 in the SBIPS

Jeremiah 29 in the SBISS

Jeremiah 29 in the SBITS

Jeremiah 29 in the SBITS2

Jeremiah 29 in the SBITS3

Jeremiah 29 in the SBITS4

Jeremiah 29 in the SBIUS

Jeremiah 29 in the SBIVS

Jeremiah 29 in the SBT

Jeremiah 29 in the SBT1E

Jeremiah 29 in the SCHL

Jeremiah 29 in the SNT

Jeremiah 29 in the SUSU

Jeremiah 29 in the SUSU2

Jeremiah 29 in the SYNO

Jeremiah 29 in the TBIAOTANT

Jeremiah 29 in the TBT1E

Jeremiah 29 in the TBT1E2

Jeremiah 29 in the TFTIP

Jeremiah 29 in the TFTU

Jeremiah 29 in the TGNTATF3T

Jeremiah 29 in the THAI

Jeremiah 29 in the TNFD

Jeremiah 29 in the TNT

Jeremiah 29 in the TNTIK

Jeremiah 29 in the TNTIL

Jeremiah 29 in the TNTIN

Jeremiah 29 in the TNTIP

Jeremiah 29 in the TNTIZ

Jeremiah 29 in the TOMA

Jeremiah 29 in the TTENT

Jeremiah 29 in the UBG

Jeremiah 29 in the UGV

Jeremiah 29 in the UGV2

Jeremiah 29 in the UGV3

Jeremiah 29 in the VBL

Jeremiah 29 in the VDCC

Jeremiah 29 in the YALU

Jeremiah 29 in the YAPE

Jeremiah 29 in the YBVTP

Jeremiah 29 in the ZBP