Joshua 7 (BOLCB2)

1 Bato ya Isalaele babebisaki ekila ya Yawe. Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, akamataki biloko oyo Yawe apekisaki. Bongo, kanda ya Yawe epelaki likolo ya bana ya Isalaele. 2 Wuta na Jeriko, Jozue atindaki bato kokende na engumba Ayi oyo ezalaki pene ya Beti-Aveni, na ngambo ya este ya Beteli. Alobaki na bango : « Bokende kononga mokili wana. »Bato yango bakendeki mpe banongaki Ayi. 3 Tango bazongaki epai ya Jozue, balobaki na ye : « Ezali penza na tina te ete bato nyonso bakende kobundisa Ayi. Tinda kaka bato nkoto mibale to nkoto misato mpo na kobotola yango. Komonisa bato nyonso pasi te, pamba te engumba yango ezali kaka na bato moke. » 4 Boye, bato pene nkoto misato bakendeki, kasi bakimaki liboso ya bato ya Ayi. 5 Bato ya Ayi babomaki bato pene tuku misato na motoba na molongo ya Isalaele. Balandaki bango kino koleka ekuke ya engumba Shebarimi mpe babomaki bango na kokita ya ngomba. Mpo na yango, mitema ya bana ya Isalaele elembaki mpe bakomaki lokola mayi oyo ezali kotiola. 6 Jozue apasolaki bilamba na ye mpe amibwakaki elongi kino na mabele liboso ya Sanduku ya Yawe kino na pokwa. Bakambi ya Isalaele mpe basalaki kaka ndenge moko, bamisopelaki putulu na mito na bango. 7 Jozue alobaki :— Ah Nkolo Yawe, mpo na nini otikaki ete bato oyo bakatisa Yordani ? Boni, ezalaki mpo ete okaba biso na maboko ya bato ya Amori ete baboma biso ? Elekaki malamu ete totikala na biso na ngambo mosusu ya ebale ! 8 Oh Nkolo, sik’oyo naloba nini, awa Isalaele akimi liboso ya banguna na ye ? 9 Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo ? 10 Yawe alobaki na Jozue :— Telema ! Mpo na nini omibwaki elongi kino na mabele ? 11 Isalaele asali lisumu. Babebisi boyokani na Ngai oyo natindaki bango ete babatela. Bakamati ndambo ya biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, bayibi yango mpe babombi yango kati na biloko na bango. 12 Yango wana, bana ya Isalaele bakolonga kotelema te liboso ya banguna na bango, bakozonga sima mpe bakokima liboso ya banguna na bango, pamba te babebisi ekila. Nakozala elongo na bino te soki bolongoli te mabe oyo ezali kati na bino. 13 Telema, bulisa bato. Loba na bango : « Bomibulisa mpo na lobi, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi boye : ‹ Mabe ezali kati na yo Isalaele, okolonga kobundisa banguna na yo te kino tango okolongola yango. › 14 Lobi na tongo, bokopusana pene na Ngai, libota na libota. Libota oyo Yawe akopona ekopusana, etuka na etuka ; etuka oyo Yawe akopona ekopusana, ndako na ndako ; mpe ndako oyo Yawe akopona ekopusana, moto na moto. 15 Moto nyonso oyo mabe ekomonana kati na ye asengeli kokufa na moto, ye elongo na nyonso ya ye, pamba te abebisi boyokani ya Yawe mpe asali likambo ya soni kati na Isalaele. » 16 Mokolo oyo elandaki, Jozue alamukaki na tongo-tongo penza, mpe abengisaki Isalaele, libota na libota. Mpe ezali libota ya Yuda nde eponamaki. 17 Tango abengisaki etuka na etuka ya libota ya Yuda, etuka ya Zera nde eponamaki. Tango abengisaki ndako na ndako kati na etuka ya Zera, ndako ya Zabidi nde eponamaki. 18 Sima, tango abengisaki moto na moto kati na ndako ya Zabidi, Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, nde aponamaki. 19 Jozue alobaki na Akana :— Mwana na ngai, pesa nkembo epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpe pesa Ye penza lokumu. Yebisa ngai likambo oyo osalaki, kobombela ngai eloko moko te. 20 Akana azongiselaki Jozue :— Solo, nasali lisumu liboso ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. Tala likambo oyo nasalaki : 21 Namonaki, kati na bomengo ya bitumba, kazaka moko ya kitoko ya mboka Mezopotami, mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale mpe ndambo ya kilo ya wolo ; nalulaki yango mpe nazwaki yango. Nakundaki yango na kati-kati ya ndako na ngai ya kapo, mpe palata ezali na se na yango. 22 Jozue atindaki bato, mpe bakendeki mbangu kati na ndako ya kapo ya Akana mpe bakutaki penza kazaka bakunda na se ya ndako ya kapo, elongo na palata, na se na yango. 23 Babimisaki biloko yango wuta na ndako na ye ya kapo, bamemaki yango liboso ya Jozue mpe ya bana nyonso ya Isalaele ; mpe sima, basopaki yango liboso ya Yawe. 24 Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele bakamataki Akana, mwana mobali ya Zera, elongo na palata, kazaka, liboke ya wolo, bana na ye ya mibali mpe ya basi, bangombe na ye, ba-ane na ye, bameme mpe bantaba na ye, ndako na ye ya kapo mpe biloko na ye nyonso ; bamemaki bango na Lubwaku ya Akori. 25 Jozue alobaki : « Mpo na nini omemeli biso pasi ? Tika ete Yawe amonisa yo pasi lelo ! »Bongo bato nyonso ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki ; babambaki lisusu mabanga na bato oyo batikalaki mpe bato yango bakufaki ; mpe batumbaki bibembe na bango na moto. 26 Babwakaki na likolo ya Akana liboke ya mabanga ebele oyo ezali kino na mokolo ya lelo, mpe kanda ya Yawe esilaki. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Lubwaku ya Akori.

In Other Versions

Joshua 7 in the ANGEFD

Joshua 7 in the ANTPNG2D

Joshua 7 in the AS21

Joshua 7 in the BAGH

Joshua 7 in the BBPNG

Joshua 7 in the BBT1E

Joshua 7 in the BDS

Joshua 7 in the BEV

Joshua 7 in the BHAD

Joshua 7 in the BIB

Joshua 7 in the BLPT

Joshua 7 in the BNT

Joshua 7 in the BNTABOOT

Joshua 7 in the BNTLV

Joshua 7 in the BOATCB

Joshua 7 in the BOATCB2

Joshua 7 in the BOBCV

Joshua 7 in the BOCNT

Joshua 7 in the BOECS

Joshua 7 in the BOGWICC

Joshua 7 in the BOHCB

Joshua 7 in the BOHCV

Joshua 7 in the BOHLNT

Joshua 7 in the BOHNTLTAL

Joshua 7 in the BOICB

Joshua 7 in the BOILNTAP

Joshua 7 in the BOITCV

Joshua 7 in the BOKCV

Joshua 7 in the BOKCV2

Joshua 7 in the BOKHWOG

Joshua 7 in the BOKSSV

Joshua 7 in the BOLCB

Joshua 7 in the BOMCV

Joshua 7 in the BONAV

Joshua 7 in the BONCB

Joshua 7 in the BONLT

Joshua 7 in the BONUT2

Joshua 7 in the BOPLNT

Joshua 7 in the BOSCB

Joshua 7 in the BOSNC

Joshua 7 in the BOTLNT

Joshua 7 in the BOVCB

Joshua 7 in the BOYCB

Joshua 7 in the BPBB

Joshua 7 in the BPH

Joshua 7 in the BSB

Joshua 7 in the CCB

Joshua 7 in the CUV

Joshua 7 in the CUVS

Joshua 7 in the DBT

Joshua 7 in the DGDNT

Joshua 7 in the DHNT

Joshua 7 in the DNT

Joshua 7 in the ELBE

Joshua 7 in the EMTV

Joshua 7 in the ESV

Joshua 7 in the FBV

Joshua 7 in the FEB

Joshua 7 in the GGMNT

Joshua 7 in the GNT

Joshua 7 in the HARY

Joshua 7 in the HNT

Joshua 7 in the IRVA

Joshua 7 in the IRVB

Joshua 7 in the IRVG

Joshua 7 in the IRVH

Joshua 7 in the IRVK

Joshua 7 in the IRVM

Joshua 7 in the IRVM2

Joshua 7 in the IRVO

Joshua 7 in the IRVP

Joshua 7 in the IRVT

Joshua 7 in the IRVT2

Joshua 7 in the IRVU

Joshua 7 in the ISVN

Joshua 7 in the JSNT

Joshua 7 in the KAPI

Joshua 7 in the KBT1ETNIK

Joshua 7 in the KBV

Joshua 7 in the KJV

Joshua 7 in the KNFD

Joshua 7 in the LBA

Joshua 7 in the LBLA

Joshua 7 in the LNT

Joshua 7 in the LSV

Joshua 7 in the MAAL

Joshua 7 in the MBV

Joshua 7 in the MBV2

Joshua 7 in the MHNT

Joshua 7 in the MKNFD

Joshua 7 in the MNG

Joshua 7 in the MNT

Joshua 7 in the MNT2

Joshua 7 in the MRS1T

Joshua 7 in the NAA

Joshua 7 in the NASB

Joshua 7 in the NBLA

Joshua 7 in the NBS

Joshua 7 in the NBVTP

Joshua 7 in the NET2

Joshua 7 in the NIV11

Joshua 7 in the NNT

Joshua 7 in the NNT2

Joshua 7 in the NNT3

Joshua 7 in the PDDPT

Joshua 7 in the PFNT

Joshua 7 in the RMNT

Joshua 7 in the SBIAS

Joshua 7 in the SBIBS

Joshua 7 in the SBIBS2

Joshua 7 in the SBICS

Joshua 7 in the SBIDS

Joshua 7 in the SBIGS

Joshua 7 in the SBIHS

Joshua 7 in the SBIIS

Joshua 7 in the SBIIS2

Joshua 7 in the SBIIS3

Joshua 7 in the SBIKS

Joshua 7 in the SBIKS2

Joshua 7 in the SBIMS

Joshua 7 in the SBIOS

Joshua 7 in the SBIPS

Joshua 7 in the SBISS

Joshua 7 in the SBITS

Joshua 7 in the SBITS2

Joshua 7 in the SBITS3

Joshua 7 in the SBITS4

Joshua 7 in the SBIUS

Joshua 7 in the SBIVS

Joshua 7 in the SBT

Joshua 7 in the SBT1E

Joshua 7 in the SCHL

Joshua 7 in the SNT

Joshua 7 in the SUSU

Joshua 7 in the SUSU2

Joshua 7 in the SYNO

Joshua 7 in the TBIAOTANT

Joshua 7 in the TBT1E

Joshua 7 in the TBT1E2

Joshua 7 in the TFTIP

Joshua 7 in the TFTU

Joshua 7 in the TGNTATF3T

Joshua 7 in the THAI

Joshua 7 in the TNFD

Joshua 7 in the TNT

Joshua 7 in the TNTIK

Joshua 7 in the TNTIL

Joshua 7 in the TNTIN

Joshua 7 in the TNTIP

Joshua 7 in the TNTIZ

Joshua 7 in the TOMA

Joshua 7 in the TTENT

Joshua 7 in the UBG

Joshua 7 in the UGV

Joshua 7 in the UGV2

Joshua 7 in the UGV3

Joshua 7 in the VBL

Joshua 7 in the VDCC

Joshua 7 in the YALU

Joshua 7 in the YAPE

Joshua 7 in the YBVTP

Joshua 7 in the ZBP