Leviticus 17 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Yebisa Aron, bana na ye ya mibali mpe bana nyonso ya Isalaele, mpe loba na bango : ‹ Tala maloba oyo Yawe alobi : 3 ‘ Moto nyonso kati na bana ya Isalaele, oyo akokata kingo ya ngombe, ya meme to ya ntaba, ezala kati na molako to na libanda ya molako ; 4 mpe amemi yango te na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kobonza yango lokola likabo epai na Yawe liboso ya Mongombo ya Yawe, makila na yango ekotangama na moto ya moto yango. Lokola asopi makila, bakolongola ye kati na bato na ye. 5 Boye, na esika ete bana ya Isalaele bamemaka bambeka na bango na bilanga, bakomema yango mpo na Yawe epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani lokola mbeka ya boyokani epai na Yawe. 6 Nganga-Nzambe akobwaka makila na etumbelo ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe akotumba mafuta na yango lokola mbeka oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. 7 Bana ya Isalaele bakobonza lisusu te bambeka na bango epai banzambe ya bikeko ya bantaba ya mibali, oyo basambelaka. Oyo ekozala malako ya libela mpo na bango mpe mpo na milongo oyo ekoya. ’ › 8 Loba na bango : ‹ Moto nyonso ya Isalaele to mopaya nyonso oyo azali kati na bango, oyo akobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu, 9 na kozanga komema yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kobonza yango epai ya Yawe, bakolongola ye kati na bato ya Isalaele. 10 Nakobalukela mpe nakolongola kati na bato na ye, moto nyonso oyo akolia makila, azala moto ya Isalaele to mopaya nyonso oyo avandi kati na bango ; 11 pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila. Napesi bino yango mpo ete bosala na yango mosala ya bolimbisi masumu mpo na bomoi na bino, na etumbelo. Lokola bomoi ya moto ezali kati na makila, yango wana makila esalaka mosala ya bolimbisi masumu. 12 Boye, nalobaki na bana ya Isalaele : ‘ Moto moko te mpe mopaya moko te kati na bino akoki kolia makila. ’ 13 Moto nyonso kati na bana ya Isalaele to mopaya oyo avandi kati na bango, oyo akokende bokila mpe akokanga nyama ya zamba to ndeke oyo baliaka, asengeli kosopa makila na yango mpe kozipa yango na mabele, pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila na yango. 14 Yango wana, nalobaki na bana ya Isalaele : ‘ Bokoki kolia makila ya ekelamu ata moko te, pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila na yango. Moto oyo akolia yango, bakolongola ye kati na bato. ’ 15 Moto nyonso, azala mwana mboka to mopaya, oyo akolia mosuni ya nyama oyo ekufi yango moko to oyo babomi na nyama ya zamba, akosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi. Akozala mbindo kino na pokwa, sima na yango akokoma peto. 16 Kasi soki asukoli bilamba mpe nzoto na ye te, akomema ngambo. › »

In Other Versions

Leviticus 17 in the ANGEFD

Leviticus 17 in the ANTPNG2D

Leviticus 17 in the AS21

Leviticus 17 in the BAGH

Leviticus 17 in the BBPNG

Leviticus 17 in the BBT1E

Leviticus 17 in the BDS

Leviticus 17 in the BEV

Leviticus 17 in the BHAD

Leviticus 17 in the BIB

Leviticus 17 in the BLPT

Leviticus 17 in the BNT

Leviticus 17 in the BNTABOOT

Leviticus 17 in the BNTLV

Leviticus 17 in the BOATCB

Leviticus 17 in the BOATCB2

Leviticus 17 in the BOBCV

Leviticus 17 in the BOCNT

Leviticus 17 in the BOECS

Leviticus 17 in the BOGWICC

Leviticus 17 in the BOHCB

Leviticus 17 in the BOHCV

Leviticus 17 in the BOHLNT

Leviticus 17 in the BOHNTLTAL

Leviticus 17 in the BOICB

Leviticus 17 in the BOILNTAP

Leviticus 17 in the BOITCV

Leviticus 17 in the BOKCV

Leviticus 17 in the BOKCV2

Leviticus 17 in the BOKHWOG

Leviticus 17 in the BOKSSV

Leviticus 17 in the BOLCB

Leviticus 17 in the BOMCV

Leviticus 17 in the BONAV

Leviticus 17 in the BONCB

Leviticus 17 in the BONLT

Leviticus 17 in the BONUT2

Leviticus 17 in the BOPLNT

Leviticus 17 in the BOSCB

Leviticus 17 in the BOSNC

Leviticus 17 in the BOTLNT

Leviticus 17 in the BOVCB

Leviticus 17 in the BOYCB

Leviticus 17 in the BPBB

Leviticus 17 in the BPH

Leviticus 17 in the BSB

Leviticus 17 in the CCB

Leviticus 17 in the CUV

Leviticus 17 in the CUVS

Leviticus 17 in the DBT

Leviticus 17 in the DGDNT

Leviticus 17 in the DHNT

Leviticus 17 in the DNT

Leviticus 17 in the ELBE

Leviticus 17 in the EMTV

Leviticus 17 in the ESV

Leviticus 17 in the FBV

Leviticus 17 in the FEB

Leviticus 17 in the GGMNT

Leviticus 17 in the GNT

Leviticus 17 in the HARY

Leviticus 17 in the HNT

Leviticus 17 in the IRVA

Leviticus 17 in the IRVB

Leviticus 17 in the IRVG

Leviticus 17 in the IRVH

Leviticus 17 in the IRVK

Leviticus 17 in the IRVM

Leviticus 17 in the IRVM2

Leviticus 17 in the IRVO

Leviticus 17 in the IRVP

Leviticus 17 in the IRVT

Leviticus 17 in the IRVT2

Leviticus 17 in the IRVU

Leviticus 17 in the ISVN

Leviticus 17 in the JSNT

Leviticus 17 in the KAPI

Leviticus 17 in the KBT1ETNIK

Leviticus 17 in the KBV

Leviticus 17 in the KJV

Leviticus 17 in the KNFD

Leviticus 17 in the LBA

Leviticus 17 in the LBLA

Leviticus 17 in the LNT

Leviticus 17 in the LSV

Leviticus 17 in the MAAL

Leviticus 17 in the MBV

Leviticus 17 in the MBV2

Leviticus 17 in the MHNT

Leviticus 17 in the MKNFD

Leviticus 17 in the MNG

Leviticus 17 in the MNT

Leviticus 17 in the MNT2

Leviticus 17 in the MRS1T

Leviticus 17 in the NAA

Leviticus 17 in the NASB

Leviticus 17 in the NBLA

Leviticus 17 in the NBS

Leviticus 17 in the NBVTP

Leviticus 17 in the NET2

Leviticus 17 in the NIV11

Leviticus 17 in the NNT

Leviticus 17 in the NNT2

Leviticus 17 in the NNT3

Leviticus 17 in the PDDPT

Leviticus 17 in the PFNT

Leviticus 17 in the RMNT

Leviticus 17 in the SBIAS

Leviticus 17 in the SBIBS

Leviticus 17 in the SBIBS2

Leviticus 17 in the SBICS

Leviticus 17 in the SBIDS

Leviticus 17 in the SBIGS

Leviticus 17 in the SBIHS

Leviticus 17 in the SBIIS

Leviticus 17 in the SBIIS2

Leviticus 17 in the SBIIS3

Leviticus 17 in the SBIKS

Leviticus 17 in the SBIKS2

Leviticus 17 in the SBIMS

Leviticus 17 in the SBIOS

Leviticus 17 in the SBIPS

Leviticus 17 in the SBISS

Leviticus 17 in the SBITS

Leviticus 17 in the SBITS2

Leviticus 17 in the SBITS3

Leviticus 17 in the SBITS4

Leviticus 17 in the SBIUS

Leviticus 17 in the SBIVS

Leviticus 17 in the SBT

Leviticus 17 in the SBT1E

Leviticus 17 in the SCHL

Leviticus 17 in the SNT

Leviticus 17 in the SUSU

Leviticus 17 in the SUSU2

Leviticus 17 in the SYNO

Leviticus 17 in the TBIAOTANT

Leviticus 17 in the TBT1E

Leviticus 17 in the TBT1E2

Leviticus 17 in the TFTIP

Leviticus 17 in the TFTU

Leviticus 17 in the TGNTATF3T

Leviticus 17 in the THAI

Leviticus 17 in the TNFD

Leviticus 17 in the TNT

Leviticus 17 in the TNTIK

Leviticus 17 in the TNTIL

Leviticus 17 in the TNTIN

Leviticus 17 in the TNTIP

Leviticus 17 in the TNTIZ

Leviticus 17 in the TOMA

Leviticus 17 in the TTENT

Leviticus 17 in the UBG

Leviticus 17 in the UGV

Leviticus 17 in the UGV2

Leviticus 17 in the UGV3

Leviticus 17 in the VBL

Leviticus 17 in the VDCC

Leviticus 17 in the YALU

Leviticus 17 in the YAPE

Leviticus 17 in the YBVTP

Leviticus 17 in the ZBP