Leviticus 24 (BOLCB2)
1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bamemela yo mafuta ya olive ya peto mpo na minda, mpo ete minda ekoka kopela tango nyonso. 3 Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron akobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo na bino nyonso. 4 Minda ekozala likolo ya etelemiselo ya minda, esalema na wolo ya peto, liboso ya Yawe ; bakobongisa yango tango nyonso. 5 Okozwa farine mpe okolamba bagato zomi na mibale, okosalela biteni mibale kati na biteni zomi ya efa mpo na gato moko na moko. 6 Okotanda yango na milongo mibale, gato motoba na molongo moko, likolo ya mesa oyo esalema na wolo ya peto, liboso ya Yawe. 7 Na molongo moko na moko, okosopa ansa ya peto oyo ekotumbama na esika ya gato lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, mpe ekozala ekaniseli. 8 Mikolo nyonso ya Saba, bokobonza lipa yango liboso ya Yawe na kombo ya bana ya Isalaele lokola boyokani ya libela. 9 Gato yango ekozala mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali ; bana na ye ya mibali bakolia yango na Esika ya bule, pamba te ezali eteni ya bule koleka kati na biteni na bango oyo bazwaka na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Ezali mobeko mpo na libela. » 10 Ezalaki na mwana mobali moko oyo mama na ye azalaki moto ya Isalaele mpe tata na ye, moto ya Ejipito ; apusanaki kati na bana ya Isalaele mpe abundisaki moto ya Isalaele kati na molako. 11 Mwana mobali ya mwana mwasi ya Isalaele atiolaki Kombo ya Yawe mpe alakelaki yango mabe, boye bamemaki ye epai ya Moyize. Kombo ya mama na ye ezalaki « Shelomiti. » Shelomiti azalaki mwana mwasi ya Dibiri, kati na libota ya Dani. 12 Batiaki ye na boloko kino kozela ete Yawe alakisa bango mokano na Ye. 13 Yawe alobaki na Moyize : 14 « Mema na libanda ya molako moto oyo atioli Nzambe. Bato nyonso oyo bayokaki ye, bakotia maboko na bango na moto na ye, mpe bato nyonso ya lingomba bakobamba ye mabanga. 15 Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto alakeli Nzambe na ye mabe, amemi ngambo ; 16 soki moto atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye : bato nyonso ya lingomba basengeli kobamba ye mabanga. Azala mopaya to mwana mboka, soki atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye. 17 Soki moto abomi moto, basengeli koboma ye. 18 Soki moto abomi nyama ya moto mosusu, asengeli kozongisa nyama ya bomoi na esika ya nyama oyo ekufi : kolanda mobeko ya bomoi mpo na bomoi. 19 Soki moto azokisi moninga na ye, bakosala ye ndenge asalaki moninga : 20 soki abuki eteni ya nzoto, ye mpe bakobuka ye eteni ya nzoto ; soki atoboli liso, ye mpe bakotobola ye liso ; soki abuki linu, ye mpe bakobuka ye linu ; ndenge azokisi moto mosusu, ndenge wana mpe bakozokisa ye. 21 Moto nyonso oyo abomi nyama ya moninga na ye, akozongisa nyama mosusu ; kasi oyo abomi moto, basengeli koboma ye. 22 Ezala mopaya to mwana mboka, bino nyonso bozali na mobeko moko ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. › » 23 Bongo Moyize alobaki na bana ya Isalaele ; mpe babimisaki na libanda ya molako moto oyo alakelaki Nzambe mabe mpe babambaki ye mabanga. Bana ya Isalaele basalaki kolanda ndenge Yawe atindaki Moyize.
In Other Versions
Leviticus 24 in the ANGEFD
Leviticus 24 in the ANTPNG2D
Leviticus 24 in the AS21
Leviticus 24 in the BAGH
Leviticus 24 in the BBPNG
Leviticus 24 in the BBT1E
Leviticus 24 in the BDS
Leviticus 24 in the BEV
Leviticus 24 in the BHAD
Leviticus 24 in the BIB
Leviticus 24 in the BLPT
Leviticus 24 in the BNT
Leviticus 24 in the BNTABOOT
Leviticus 24 in the BNTLV
Leviticus 24 in the BOATCB
Leviticus 24 in the BOATCB2
Leviticus 24 in the BOBCV
Leviticus 24 in the BOCNT
Leviticus 24 in the BOECS
Leviticus 24 in the BOGWICC
Leviticus 24 in the BOHCB
Leviticus 24 in the BOHCV
Leviticus 24 in the BOHLNT
Leviticus 24 in the BOHNTLTAL
Leviticus 24 in the BOICB
Leviticus 24 in the BOILNTAP
Leviticus 24 in the BOITCV
Leviticus 24 in the BOKCV
Leviticus 24 in the BOKCV2
Leviticus 24 in the BOKHWOG
Leviticus 24 in the BOKSSV
Leviticus 24 in the BOLCB
Leviticus 24 in the BOMCV
Leviticus 24 in the BONAV
Leviticus 24 in the BONCB
Leviticus 24 in the BONLT
Leviticus 24 in the BONUT2
Leviticus 24 in the BOPLNT
Leviticus 24 in the BOSCB
Leviticus 24 in the BOSNC
Leviticus 24 in the BOTLNT
Leviticus 24 in the BOVCB
Leviticus 24 in the BOYCB
Leviticus 24 in the BPBB
Leviticus 24 in the BPH
Leviticus 24 in the BSB
Leviticus 24 in the CCB
Leviticus 24 in the CUV
Leviticus 24 in the CUVS
Leviticus 24 in the DBT
Leviticus 24 in the DGDNT
Leviticus 24 in the DHNT
Leviticus 24 in the DNT
Leviticus 24 in the ELBE
Leviticus 24 in the EMTV
Leviticus 24 in the ESV
Leviticus 24 in the FBV
Leviticus 24 in the FEB
Leviticus 24 in the GGMNT
Leviticus 24 in the GNT
Leviticus 24 in the HARY
Leviticus 24 in the HNT
Leviticus 24 in the IRVA
Leviticus 24 in the IRVB
Leviticus 24 in the IRVG
Leviticus 24 in the IRVH
Leviticus 24 in the IRVK
Leviticus 24 in the IRVM
Leviticus 24 in the IRVM2
Leviticus 24 in the IRVO
Leviticus 24 in the IRVP
Leviticus 24 in the IRVT
Leviticus 24 in the IRVT2
Leviticus 24 in the IRVU
Leviticus 24 in the ISVN
Leviticus 24 in the JSNT
Leviticus 24 in the KAPI
Leviticus 24 in the KBT1ETNIK
Leviticus 24 in the KBV
Leviticus 24 in the KJV
Leviticus 24 in the KNFD
Leviticus 24 in the LBA
Leviticus 24 in the LBLA
Leviticus 24 in the LNT
Leviticus 24 in the LSV
Leviticus 24 in the MAAL
Leviticus 24 in the MBV
Leviticus 24 in the MBV2
Leviticus 24 in the MHNT
Leviticus 24 in the MKNFD
Leviticus 24 in the MNG
Leviticus 24 in the MNT
Leviticus 24 in the MNT2
Leviticus 24 in the MRS1T
Leviticus 24 in the NAA
Leviticus 24 in the NASB
Leviticus 24 in the NBLA
Leviticus 24 in the NBS
Leviticus 24 in the NBVTP
Leviticus 24 in the NET2
Leviticus 24 in the NIV11
Leviticus 24 in the NNT
Leviticus 24 in the NNT2
Leviticus 24 in the NNT3
Leviticus 24 in the PDDPT
Leviticus 24 in the PFNT
Leviticus 24 in the RMNT
Leviticus 24 in the SBIAS
Leviticus 24 in the SBIBS
Leviticus 24 in the SBIBS2
Leviticus 24 in the SBICS
Leviticus 24 in the SBIDS
Leviticus 24 in the SBIGS
Leviticus 24 in the SBIHS
Leviticus 24 in the SBIIS
Leviticus 24 in the SBIIS2
Leviticus 24 in the SBIIS3
Leviticus 24 in the SBIKS
Leviticus 24 in the SBIKS2
Leviticus 24 in the SBIMS
Leviticus 24 in the SBIOS
Leviticus 24 in the SBIPS
Leviticus 24 in the SBISS
Leviticus 24 in the SBITS
Leviticus 24 in the SBITS2
Leviticus 24 in the SBITS3
Leviticus 24 in the SBITS4
Leviticus 24 in the SBIUS
Leviticus 24 in the SBIVS
Leviticus 24 in the SBT
Leviticus 24 in the SBT1E
Leviticus 24 in the SCHL
Leviticus 24 in the SNT
Leviticus 24 in the SUSU
Leviticus 24 in the SUSU2
Leviticus 24 in the SYNO
Leviticus 24 in the TBIAOTANT
Leviticus 24 in the TBT1E
Leviticus 24 in the TBT1E2
Leviticus 24 in the TFTIP
Leviticus 24 in the TFTU
Leviticus 24 in the TGNTATF3T
Leviticus 24 in the THAI
Leviticus 24 in the TNFD
Leviticus 24 in the TNT
Leviticus 24 in the TNTIK
Leviticus 24 in the TNTIL
Leviticus 24 in the TNTIN
Leviticus 24 in the TNTIP
Leviticus 24 in the TNTIZ
Leviticus 24 in the TOMA
Leviticus 24 in the TTENT
Leviticus 24 in the UBG
Leviticus 24 in the UGV
Leviticus 24 in the UGV2
Leviticus 24 in the UGV3
Leviticus 24 in the VBL
Leviticus 24 in the VDCC
Leviticus 24 in the YALU
Leviticus 24 in the YAPE
Leviticus 24 in the YBVTP
Leviticus 24 in the ZBP