Leviticus 25 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize na ngomba Sinai : 2 « Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino ; ezala mabele esengeli kopema, yango ekozala Saba mpo na Yawe. 3 Mibu motoba, bokolona bilanga na bino mpe mibu motoba, bokobongisa bilanga na bino ya vino mpe bokobuka bambuma na yango. 4 Kasi na mobu ya sambo, mabele esengeli kozala na bopemi, ekozala mobu ya Saba mpo na Yawe. Bokolona bilanga na bino te mpe bokobongisa bilanga na bino ya vino te, mabele esengeli kozala na Saba mpo na Yawe. 5 Bokoki kobuka te bambuma oyo ebotaki yango moko na mbala eleki to kobuka bambuma ya vino na elanga oyo babongisa te ; ekozala mobu ya bopemi mpo na mabele. 6 Nzokande, biloko oyo mabele ekobota na mobu ya Saba, ekozala bilei na bino : yo, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, mwana mosala na yo mpe mopaya oyo azali kovanda kati na yo 7 elongo na banyama ya mboka mpe ya zamba oyo bazali kati na mokili na bino. Bosengeli kolia biloko nyonso oyo mabele ekobota. 8 Bokotanga mibu sambo ya Saba, mbala sambo, na mibu sambo ; mpe mibu sambo ya Saba ekosala mibu tuku minei na libwa. 9 Bongo na sima, na mokolo ya zomi, na sanza ya sambo, na mokolo ya bolimbisi masumu, bokobeta kelelo na bisika nyonso kati na mokili na bino mobimba. 10 Bokobulisa mobu ya tuku mitano mpe bokosakola, kati na mokili mobimba, kokangolama ya bavandi na yango nyonso. Ekozala mpo na bino mobu ya kosepela kokangolama na bino ; moto moko na moko kati na bino akozonga na mabele na ye, na libota na ye. 11 Mobu ya tuku mitano ekozala mobu ya kosepela kokangolama na bino : bokolona te, bokobuka te biloko oyo bilanga ekobota yango moko, mpe bokobuka te bambuma ya vino ya elanga oyo babongisa te. 12 Pamba te ezali mobu ya kosepela kokangolama na bino, mpe esengeli kozala bule mpo na bino. Bokolia kaka bambuma ya bilanga. 13 Na mobu yango ya kosepela kokangolama na bino, moto nyonso kati na bino akozonga na mabele na ye. 14 Soki bozali koteka mabele epai ya ndeko na bino to soki bozali kosomba eloko songolo epai na ye, wana bozali bana mboka moko, tika ete moko te kati na bino akosa ndeko na ye. 15 Okosomba epai ya ndeko na yo ya mboka, na motuya ya mbongo oyo bakokata kolanda motango ya mibu oyo eleki wuta mobu ya suka oyo bosepelaki kokangolama na bino ; mpe akotekela yo na motuya ya mbongo oyo ekokatama kolanda motango ya mibu oyo ekotikala, mibu ya kobuka bambuma, kino bokoma na mobu oyo ekolanda, mobu ya kosepela kokangolama na bino. 16 Soki mibu etikali ebele, bosengeli komatisa motuya ; mpe soki mibu ezali moke, bosengeli kokitisa motuya, pamba te ezali motango ya mibu ya kobuka bambuma nde etekamaka : yango nde bakotekela yo. 17 Tika ete moko te akosa moninga, kasi banga Nzambe na yo ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. 18 Bosalela bikateli na Ngai mpe botosa mibeko na Ngai, bongo bokowumela na kimia kati na mokili ; 19 mpe mabele ekobota mbuma na yango, bokolia mpe bokotonda mpe bokovanda na kimia. 20 Bokoki kotuna : ‘ Tokolia nini na mobu ya sambo soki toloni te mpe tobuki te bambuma na biso ? ’ 21 Nakotindela bino mapamboli mingi na mobu ya motoba mpo ete mabele ekoka kobota bambuma mingi oyo bokoki kolia mibu misato. 22 Wana bokolona na mobu ya mwambe, bokolia nanu bambuma ya kala mpe bokokoba kolia yango kino bokobuka bambuma ya mobu ya libwa. 23 Bokoki te koteka mabele mpo na libela, pamba te mabele ezali ya Ngai, mpe bino bozali bapaya mpe baleki nzela. 24 Kati na mokili oyo bokozwa lokola libula, bosengeli kondima ete moto asikola mabele na ye. 25 Soki mwana mboka moko kati na bino akomi mobola mpe ateki mabele na ye, moto moko ya libota na ye ya pembeni akoki koya kosikola oyo mwana mboka wana atekaki. 26 Soki moto wana azali na ndeko te oyo akoki kosikola yango mpo na ye ; mpe ye moko akomi na bozwi bongo azwi makoki ya kosikola yango ; 27 asengeli kotanga motango ya mibu wuta atekaki mabele na ye mpe akozongisa motuya ya mibu oyo etikali epai ya moto oyo asombaki yango. Boye, akoki kozongela mabele na ye. 28 Soki azwaki te makoki ya kosikola yango, mabele oyo atekaki ekotikala na maboko ya moto oyo asombaki yango kino na mobu ya kosepela kokangolama na ye. Ekozala na mobu yango nde mabele na ye ekozongela ye mpe akokoma lisusu nkolo na yango. 29 Soki moto ateki ndako kati na engumba oyo bazingela na bamir, azali na makoki ya kosikola yango kaka mpo na mobu moko wuta mokolo oyo atekaki yango. Ezali kaka na tango wana nde akoki kosikola yango. 30 Soki asikoli yango te liboso ete mobu mobimba eleka, ndako oyo ezali kati na engumba oyo bazingela na bamir ekotikala libela mpo na moto oyo asombaki yango mpe mpo na bakitani na ye ; bakoki te kozongisa yango na mobu ya kosepela kokangolama. 31 Kasi bandako oyo ezali kati na bamboka oyo bazingela te na bamir pembeni-pembeni, ekozala lokola bilanga ya mboka. Bakoki kosikola yango, mpe ekozonga epai na nkolo na yango na mobu ya kosepela kokangolama. 32 Balevi bazali tango nyonso na makoki ya kosikola bandako na bango, oyo ezali kati na bingumba ya Balevi. 33 Soki Molevi ateki ndako na ye kati na bingumba ya Balevi, moto oyo asombi yango akozongisela ye yango na mobu ya kosepela kokangolama ; pamba te bandako oyo ezali kati na bingumba ya Balevi ezali libula na bango ya libela kati na bana ya Isalaele. 34 Kasi bilanga oyo ezali zingazinga ya bingumba ya Balevi, bakoki koteka yango te : ezali libula na bango mpo na libela. 35 Soki moto oyo azali pembeni na yo akomi mobola mpe azali lisusu te na makoki ya komisunga ; okosunga ye, azala mopaya to moleki nzela ; mpo ete azala malamu pembeni na yo. 36 Okoki te kozwa mileki na maboko na ye ; kasi banga Nzambe na yo, mpo ete mwana mboka na yo akoka kozala malamu pembeni na yo. 37 Soki odefisi ye mbongo, okosenga mileki te na oyo odefisi ye ; mpe soki odefisi ye bilei, okosenga te koleka oyo opesi. 38 Ngai nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito ; mpo na kopesa yo mokili ya Kanana, mpe na kozala Nzambe na yo. 39 Soki ndeko na yo, mwana mboka, akomi mobola mpe amiteki epai na yo, kopesa ye te misala na makasi lokola mowumbu. 40 Okozwa ye lokola moto na yo ya mosala to lokola moleki nzela oyo azali kati na bino ; akosalela yo kino na mobu ya kosepela kokangolama ; 41 mpe na sima, akozwa bonsomi elongo na bana na ye, akozonga na etuka na ye mpe akozongela mabele ya batata na ye. 42 Pamba te, bana ya Isalaele bazali bawumbu na Ngai, oyo nabimisaki na Ejipito ; bakoki te koteka bango lokola bawumbu. 43 Kokonza bango te na makasi, kasi banga Nzambe na yo. 44 Okozwa bawumbu na yo ya mibali mpe basi bawumbu na yo kati na bikolo oyo ezingeli yo ; okosomba bango kaka na bikolo yango. 45 Okoki mpe kosomba bapaya oyo bazali kovanda kati na mokili na yo, mpe bato ya bituka na bango, oyo babotami kati na mokili na yo ; boye bakokoma bawumbu na yo. 46 Okoki kotika bango epai ya bana na yo lokola libula mpo ete sima na yo bakoma bawumbu na bango mpo na libela ; kasi kokonza te na makasi bandeko na yo, bana ya Isalaele. 47 Soki mopaya to moleki nzela moko kati na mokili na yo akomi na bozwi mpe moko kati na bandeko na yo, mwana mboka, akomi mobola ; bongo amiteki epai ya mopaya to moleki nzela yango to epai ya moto moko ya libota na ye ; 48 ndeko na yo, mwana mboka, akoki kosikolama sima na ye komiteka : moto moko kati na bandeko na ye akoki kosikola ye. 49 Soki ndeko azali te mpo na kosikola ye, tata kulutu to tata leki na ye to bana mibali ya tata kulutu to ya tata leki na ye to ndeko na ye mosusu ya libota ya botata akoki kosikola ye. Nzokande soki akomi na makoki, akoki mpe komisikola ye moko. 50 Boye, ye elongo na moto oyo asombaki ye, bakotanga mibu oyo eleki wuta na mobu oyo amitekaki kino na mobu ya kosepela kokangolama ; bakokata motuya ya lisiko na ye kolanda motango ya mibu ndenge ezali lifuti ya moto ya mosala. 51 Soki etikali mibu ebele, asengeli kofuta mpo na kosikolama na ye, mbongo kolanda talo oyo basombaki ye. 52 Soki etikalaki mibu moke kino na mobu ya kosepela kokangolama, akotanga mibu yango mpe akofuta mpo na lisiko na ye kolanda motango ya mibu oyo etikali. 53 Na mibu nyonso oyo akosala epai ya mosombi na ye, bakozwa ye lokola moto ya mosala ; okotika te ete mosombi na ye akonza ye na makasi. 54 Ata soki asikolami te na moko kati na banzela oyo, ye elongo na bana na ye basengeli kozwa bonsomi na mobu ya kosepela kokangolama. 55 Pamba te, bana ya Isalaele bazali bawumbu na Ngai, oyo nabimisaki na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino.

In Other Versions

Leviticus 25 in the ANGEFD

Leviticus 25 in the ANTPNG2D

Leviticus 25 in the AS21

Leviticus 25 in the BAGH

Leviticus 25 in the BBPNG

Leviticus 25 in the BBT1E

Leviticus 25 in the BDS

Leviticus 25 in the BEV

Leviticus 25 in the BHAD

Leviticus 25 in the BIB

Leviticus 25 in the BLPT

Leviticus 25 in the BNT

Leviticus 25 in the BNTABOOT

Leviticus 25 in the BNTLV

Leviticus 25 in the BOATCB

Leviticus 25 in the BOATCB2

Leviticus 25 in the BOBCV

Leviticus 25 in the BOCNT

Leviticus 25 in the BOECS

Leviticus 25 in the BOGWICC

Leviticus 25 in the BOHCB

Leviticus 25 in the BOHCV

Leviticus 25 in the BOHLNT

Leviticus 25 in the BOHNTLTAL

Leviticus 25 in the BOICB

Leviticus 25 in the BOILNTAP

Leviticus 25 in the BOITCV

Leviticus 25 in the BOKCV

Leviticus 25 in the BOKCV2

Leviticus 25 in the BOKHWOG

Leviticus 25 in the BOKSSV

Leviticus 25 in the BOLCB

Leviticus 25 in the BOMCV

Leviticus 25 in the BONAV

Leviticus 25 in the BONCB

Leviticus 25 in the BONLT

Leviticus 25 in the BONUT2

Leviticus 25 in the BOPLNT

Leviticus 25 in the BOSCB

Leviticus 25 in the BOSNC

Leviticus 25 in the BOTLNT

Leviticus 25 in the BOVCB

Leviticus 25 in the BOYCB

Leviticus 25 in the BPBB

Leviticus 25 in the BPH

Leviticus 25 in the BSB

Leviticus 25 in the CCB

Leviticus 25 in the CUV

Leviticus 25 in the CUVS

Leviticus 25 in the DBT

Leviticus 25 in the DGDNT

Leviticus 25 in the DHNT

Leviticus 25 in the DNT

Leviticus 25 in the ELBE

Leviticus 25 in the EMTV

Leviticus 25 in the ESV

Leviticus 25 in the FBV

Leviticus 25 in the FEB

Leviticus 25 in the GGMNT

Leviticus 25 in the GNT

Leviticus 25 in the HARY

Leviticus 25 in the HNT

Leviticus 25 in the IRVA

Leviticus 25 in the IRVB

Leviticus 25 in the IRVG

Leviticus 25 in the IRVH

Leviticus 25 in the IRVK

Leviticus 25 in the IRVM

Leviticus 25 in the IRVM2

Leviticus 25 in the IRVO

Leviticus 25 in the IRVP

Leviticus 25 in the IRVT

Leviticus 25 in the IRVT2

Leviticus 25 in the IRVU

Leviticus 25 in the ISVN

Leviticus 25 in the JSNT

Leviticus 25 in the KAPI

Leviticus 25 in the KBT1ETNIK

Leviticus 25 in the KBV

Leviticus 25 in the KJV

Leviticus 25 in the KNFD

Leviticus 25 in the LBA

Leviticus 25 in the LBLA

Leviticus 25 in the LNT

Leviticus 25 in the LSV

Leviticus 25 in the MAAL

Leviticus 25 in the MBV

Leviticus 25 in the MBV2

Leviticus 25 in the MHNT

Leviticus 25 in the MKNFD

Leviticus 25 in the MNG

Leviticus 25 in the MNT

Leviticus 25 in the MNT2

Leviticus 25 in the MRS1T

Leviticus 25 in the NAA

Leviticus 25 in the NASB

Leviticus 25 in the NBLA

Leviticus 25 in the NBS

Leviticus 25 in the NBVTP

Leviticus 25 in the NET2

Leviticus 25 in the NIV11

Leviticus 25 in the NNT

Leviticus 25 in the NNT2

Leviticus 25 in the NNT3

Leviticus 25 in the PDDPT

Leviticus 25 in the PFNT

Leviticus 25 in the RMNT

Leviticus 25 in the SBIAS

Leviticus 25 in the SBIBS

Leviticus 25 in the SBIBS2

Leviticus 25 in the SBICS

Leviticus 25 in the SBIDS

Leviticus 25 in the SBIGS

Leviticus 25 in the SBIHS

Leviticus 25 in the SBIIS

Leviticus 25 in the SBIIS2

Leviticus 25 in the SBIIS3

Leviticus 25 in the SBIKS

Leviticus 25 in the SBIKS2

Leviticus 25 in the SBIMS

Leviticus 25 in the SBIOS

Leviticus 25 in the SBIPS

Leviticus 25 in the SBISS

Leviticus 25 in the SBITS

Leviticus 25 in the SBITS2

Leviticus 25 in the SBITS3

Leviticus 25 in the SBITS4

Leviticus 25 in the SBIUS

Leviticus 25 in the SBIVS

Leviticus 25 in the SBT

Leviticus 25 in the SBT1E

Leviticus 25 in the SCHL

Leviticus 25 in the SNT

Leviticus 25 in the SUSU

Leviticus 25 in the SUSU2

Leviticus 25 in the SYNO

Leviticus 25 in the TBIAOTANT

Leviticus 25 in the TBT1E

Leviticus 25 in the TBT1E2

Leviticus 25 in the TFTIP

Leviticus 25 in the TFTU

Leviticus 25 in the TGNTATF3T

Leviticus 25 in the THAI

Leviticus 25 in the TNFD

Leviticus 25 in the TNT

Leviticus 25 in the TNTIK

Leviticus 25 in the TNTIL

Leviticus 25 in the TNTIN

Leviticus 25 in the TNTIP

Leviticus 25 in the TNTIZ

Leviticus 25 in the TOMA

Leviticus 25 in the TTENT

Leviticus 25 in the UBG

Leviticus 25 in the UGV

Leviticus 25 in the UGV2

Leviticus 25 in the UGV3

Leviticus 25 in the VBL

Leviticus 25 in the VDCC

Leviticus 25 in the YALU

Leviticus 25 in the YAPE

Leviticus 25 in the YBVTP

Leviticus 25 in the ZBP