Leviticus 7 (BOLCB2)

1 « ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na kozongisa boyokani ; ezali eloko ya bule penza : 2 ‘ Bakokata kingo ya mbeka mpo na kozongisa boyokani, na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba. Bongo bakobwaka makila na yango pembeni-pembeni ya etumbelo. 3 Bakobonza biteni na yango ya mafuta : mokila, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati, 4 bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe mafuta oyo ezipaka yango, oyo ezali kati na mipanzi mpe loketo. Bakolongola bafwa mpe bambuma mibale wana. 5 Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani. 6 Mibali nyonso kati na Banganga-Nzambe bakoki kolia yango. Basengeli kolia yango na Esika ya bule : ezali eloko ya bule penza. 7 Mobeko yango ezali kaka moko, ezala mpo na mbeka mpo na kozongisa boyokani to mpo na mbeka ya masumu. Nyama ezali ya Nganga-Nzambe oyo asali mosala ya bolimbisi masumu. 8 Nganga-Nzambe oyo akobonza mbeka ya kotumba mpo na moto, akozwa poso ya nyama oyo abonzi mpe ekozala ya ye. 9 Likabo nyonso ya gato oyo batumbi na fulu ya moto to bakalingi na kikalungu to mpe batumbi na likolo ya manzanza ezali ya Nganga-Nzambe oyo abonzi yango. 10 Likabo nyonso ya gato oyo basangisi na mafuta to oyo ezali ya kokawuka ekozala ya bana mibali nyonso ya Aron ; bakozwa yango ndenge moko. ’ › 11 ‹ Tala mibeko mpo na mbeka ya boyokani oyo moto akoki kobonza epai na Yawe : 12 ‘ Soki moto abonzi yango mpo na kozongisa matondi, asengeli kobonza, elongo na mbeka ya kozongisa matondi, likabo ya bagato ezanga levire kasi basangisa na mafuta, bagalete ezanga levire kasi bapakola yango mafuta mpe bagato basala na farine oyo basangisa malamu na mafuta. 13 Na likolo ya mbeka na ye ya boyokani oyo abonzi mpo na kozongisa matondi, akobakisa likabo ya bagato oyo esalemi na farine batia levire. 14 Akomema eteni ya likabo moko na moko mpe akobonza yango epai na Yawe : ekozala ya Nganga-Nzambe oyo asopaki makila ya mbeka yango ya boyokani pembeni-pembeni ya etumbelo. 15 Mosuni ya mbeka ya boyokani oyo abonzi mpo na kozongisa matondi esengeli koliama kaka na mokolo oyo abonzi yango, eloko moko te ekoki kotikala kino na tongo. 16 Soki abonzi mbeka na ye ya boyokani mpo ete apesaki elaka, na kolapa ndayi to wuta na mokano ya motema na ye moko, mbeka esengeli koliama kaka na mokolo oyo abonzi yango. Kasi soki ndambo etikali, ekoliama na mokolo oyo ekolanda. 17 Mosuni oyo ekotikala na mbeka, na mokolo oyo ekolanda, esengeli kotumba yango. 18 Soki mosuni ya mbeka ya boyokani eliami na mokolo ya misato, mbeka yango ekondimama te. Ekotangama te likolo ya moto oyo abonzi yango, pamba te ezali likabo ya mbindo ; mpe moto oyo akomeka kolia yango akomema masumu. 19 Bongo soki mosuni yango etutani na eloko ya mbindo, esengeli batumba mosuni yango na moto.Kasi mpo na oyo etali mosuni ya mbeka ya boyokani, kaka moto oyo azali peto nde akoki kolia yango. 20 Nzokande, soki moto ya mbindo alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. 21 Soki moto moko asimbi eloko ya mbindo, ezala moto ya mbindo to nyama ya mbindo to eloko mosusu ya mabe mpe ya mbindo, mpe alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. ’ › » 22 Yawe alobaki na Moyize : 23 « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Bokolia te mafuta ya ngombe, ya meme to ya ntaba. 24 Nzokande bokoki na bino kosalela mafuta ya nyama oyo ekufa to ya nyama oyo babomi na nyama ya zamba misala nyonso, kasi bokoki te kolia yango. 25 Moto nyonso oyo akolia mafuta ya nyama oyo babonzi epai na Yawe lokola likabo bazikisa na moto, bakolongola ye kati na bato na ye. 26 Na esika nyonso oyo bokovanda, bokoki te kolia makila, ezala makila ya ndeke to ya nyama. 27 Moto nyonso oyo akolia makila, bakolongola ye kati na bato na ye. › » 28 Yawe alobaki na Moyize : 29 « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Moto nyonso oyo akobonza epai na Yawe mbeka ya boyokani akomema eteni ya mbeka na ye lokola mbeka na ye epai na Yawe. 30 Akomema yango ye moko, na maboko na ye, mpo ete etumbama lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Akomema mafuta mpe tolo ya mbeka mpe akotombola liboso ya Yawe tolo yango lokola likabo ya kotombola. 31 Nganga-Nzambe akotumba mafuta na etumbelo, kasi tolo ekozala mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali. 32 Bokopesa epai ya Nganga-Nzambe lokola likabo mopende ya ngambo ya loboko ya mobali ya bambeka ya boyokani. 33 Mwana mobali ya Aron oyo akobonza makila mpe mafuta ya mbeka ya boyokani akozwa mopende ya ngambo ya loboko ya mobali. 34 Pamba te, nakobanda kozwa kati na bambeka ya boyokani ya bana ya Isalaele tolo oyo batomboli mpe mopende oyo babonzi lokola likabo ya kotombola. Napesi yango epai ya Nganga-Nzambe Aron mpe bana na ye ya mibali lokola eteni na bango oyo bakobanda kozwa tango nyonso epai ya bana ya Isalaele. 35 Yango nde eteni ya makabo bazikisa na moto, oyo bana ya Isalaele basengeli kopesa epai ya Aron mpe bana na ye ya mibali wuta mokolo oyo akobulisa bango mpo na kosalela Yawe lokola Banganga-Nzambe. › » 36 Yango nde mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bana ya Isalaele mpo ete, wuta mokolo oyo apakolaki bango mafuta, babanda kopesa bango yango lokola eteni na bango. Ezali mibeko ya seko mpo na milongo nyonso ya bana na bango. 37 Yango nde mibeko mpo na mbeka ya kotumba, likabo ya gato, mbeka mpo na masumu, mbeka mpo na kozongisa boyokani, mbeka mpo na kobulisa mpe mpo na mbeka ya boyokani 38 oyo Yawe apesaki epai ya Moyize, na ngomba Sinai kati na esobe ya Sinai na mokolo oyo apesaki mitindo epai ya bana ya Isalaele ete babonzela Ye bambeka mpe makabo na bango.

In Other Versions

Leviticus 7 in the ANGEFD

Leviticus 7 in the ANTPNG2D

Leviticus 7 in the AS21

Leviticus 7 in the BAGH

Leviticus 7 in the BBPNG

Leviticus 7 in the BBT1E

Leviticus 7 in the BDS

Leviticus 7 in the BEV

Leviticus 7 in the BHAD

Leviticus 7 in the BIB

Leviticus 7 in the BLPT

Leviticus 7 in the BNT

Leviticus 7 in the BNTABOOT

Leviticus 7 in the BNTLV

Leviticus 7 in the BOATCB

Leviticus 7 in the BOATCB2

Leviticus 7 in the BOBCV

Leviticus 7 in the BOCNT

Leviticus 7 in the BOECS

Leviticus 7 in the BOGWICC

Leviticus 7 in the BOHCB

Leviticus 7 in the BOHCV

Leviticus 7 in the BOHLNT

Leviticus 7 in the BOHNTLTAL

Leviticus 7 in the BOICB

Leviticus 7 in the BOILNTAP

Leviticus 7 in the BOITCV

Leviticus 7 in the BOKCV

Leviticus 7 in the BOKCV2

Leviticus 7 in the BOKHWOG

Leviticus 7 in the BOKSSV

Leviticus 7 in the BOLCB

Leviticus 7 in the BOMCV

Leviticus 7 in the BONAV

Leviticus 7 in the BONCB

Leviticus 7 in the BONLT

Leviticus 7 in the BONUT2

Leviticus 7 in the BOPLNT

Leviticus 7 in the BOSCB

Leviticus 7 in the BOSNC

Leviticus 7 in the BOTLNT

Leviticus 7 in the BOVCB

Leviticus 7 in the BOYCB

Leviticus 7 in the BPBB

Leviticus 7 in the BPH

Leviticus 7 in the BSB

Leviticus 7 in the CCB

Leviticus 7 in the CUV

Leviticus 7 in the CUVS

Leviticus 7 in the DBT

Leviticus 7 in the DGDNT

Leviticus 7 in the DHNT

Leviticus 7 in the DNT

Leviticus 7 in the ELBE

Leviticus 7 in the EMTV

Leviticus 7 in the ESV

Leviticus 7 in the FBV

Leviticus 7 in the FEB

Leviticus 7 in the GGMNT

Leviticus 7 in the GNT

Leviticus 7 in the HARY

Leviticus 7 in the HNT

Leviticus 7 in the IRVA

Leviticus 7 in the IRVB

Leviticus 7 in the IRVG

Leviticus 7 in the IRVH

Leviticus 7 in the IRVK

Leviticus 7 in the IRVM

Leviticus 7 in the IRVM2

Leviticus 7 in the IRVO

Leviticus 7 in the IRVP

Leviticus 7 in the IRVT

Leviticus 7 in the IRVT2

Leviticus 7 in the IRVU

Leviticus 7 in the ISVN

Leviticus 7 in the JSNT

Leviticus 7 in the KAPI

Leviticus 7 in the KBT1ETNIK

Leviticus 7 in the KBV

Leviticus 7 in the KJV

Leviticus 7 in the KNFD

Leviticus 7 in the LBA

Leviticus 7 in the LBLA

Leviticus 7 in the LNT

Leviticus 7 in the LSV

Leviticus 7 in the MAAL

Leviticus 7 in the MBV

Leviticus 7 in the MBV2

Leviticus 7 in the MHNT

Leviticus 7 in the MKNFD

Leviticus 7 in the MNG

Leviticus 7 in the MNT

Leviticus 7 in the MNT2

Leviticus 7 in the MRS1T

Leviticus 7 in the NAA

Leviticus 7 in the NASB

Leviticus 7 in the NBLA

Leviticus 7 in the NBS

Leviticus 7 in the NBVTP

Leviticus 7 in the NET2

Leviticus 7 in the NIV11

Leviticus 7 in the NNT

Leviticus 7 in the NNT2

Leviticus 7 in the NNT3

Leviticus 7 in the PDDPT

Leviticus 7 in the PFNT

Leviticus 7 in the RMNT

Leviticus 7 in the SBIAS

Leviticus 7 in the SBIBS

Leviticus 7 in the SBIBS2

Leviticus 7 in the SBICS

Leviticus 7 in the SBIDS

Leviticus 7 in the SBIGS

Leviticus 7 in the SBIHS

Leviticus 7 in the SBIIS

Leviticus 7 in the SBIIS2

Leviticus 7 in the SBIIS3

Leviticus 7 in the SBIKS

Leviticus 7 in the SBIKS2

Leviticus 7 in the SBIMS

Leviticus 7 in the SBIOS

Leviticus 7 in the SBIPS

Leviticus 7 in the SBISS

Leviticus 7 in the SBITS

Leviticus 7 in the SBITS2

Leviticus 7 in the SBITS3

Leviticus 7 in the SBITS4

Leviticus 7 in the SBIUS

Leviticus 7 in the SBIVS

Leviticus 7 in the SBT

Leviticus 7 in the SBT1E

Leviticus 7 in the SCHL

Leviticus 7 in the SNT

Leviticus 7 in the SUSU

Leviticus 7 in the SUSU2

Leviticus 7 in the SYNO

Leviticus 7 in the TBIAOTANT

Leviticus 7 in the TBT1E

Leviticus 7 in the TBT1E2

Leviticus 7 in the TFTIP

Leviticus 7 in the TFTU

Leviticus 7 in the TGNTATF3T

Leviticus 7 in the THAI

Leviticus 7 in the TNFD

Leviticus 7 in the TNT

Leviticus 7 in the TNTIK

Leviticus 7 in the TNTIL

Leviticus 7 in the TNTIN

Leviticus 7 in the TNTIP

Leviticus 7 in the TNTIZ

Leviticus 7 in the TOMA

Leviticus 7 in the TTENT

Leviticus 7 in the UBG

Leviticus 7 in the UGV

Leviticus 7 in the UGV2

Leviticus 7 in the UGV3

Leviticus 7 in the VBL

Leviticus 7 in the VDCC

Leviticus 7 in the YALU

Leviticus 7 in the YAPE

Leviticus 7 in the YBVTP

Leviticus 7 in the ZBP