Numbers 16 (BOLCB2)

1 Molevi Kore, mwana mobali ya Yitseari, ya libota ya bato ya Keati, elongo na bato misato ya libota ya bato ya Ribeni basalelaki Moyize likita ; ezalaki : Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, elongo na Oni, mwana mobali ya Peleti. 2 Batombokelaki Moyize. Elongo na bango, ezalaki na bana ya Isalaele nkama mibale na tuku mitano oyo bayebanaki malamu lokola bakambi ya lisanga mpe bazalaki kosangana kati na mayangani ya bakambi ya lisanga. 3 Bayaki lisanga mpo na kotelemela Moyize mpe Aron. Balobaki na bango :— Bino mpe bolekisi ! Lingomba mobimba ezali bule mpe moto nyonso kati na yango azali bule, mpe Yawe azali elongo na bango. Boye, mpo na nini bozali komitia likolo ya lisanga ya Yawe ? 4 Tango Moyize ayokaki bongo, akweyaki elongi kino na mabele. 5 Alobaki na Kore mpe na bato na ye nyonso oyo balandaki ye :— Lobi na tongo, Yawe akolakisa nani azali moto na Ye mpe nani oyo azali bule, mpe akotika ye kopusana pene na Ye ; akotika solo moponami na Ye kopusana pene na Ye. 6 Yo, Kore, elongo na bato nyonso oyo bazali kolanda yo, bokosala likambo oyo : Bokamata bambabola oyo batumbelaka malasi 7 mpe, lobi, botia moto mpe malasi ya ansa kati na yango liboso ya Yawe. Moto oyo Yawe akopona, ye nde azali bule. Bino Balevi, bino mpe bolekisi ! 8 Moyize alobaki lisusu na Kore :— Bino Balevi, boyoka sik’oyo ! 9 Ekoki na bino te ete Nzambe ya Isalaele atia bino pembeni kati na lisanga ya Isalaele mpe abenda bino pembeni na Ye mpo na kosala mosala na Mongombo ya Yawe mpe kotelema liboso ya lisanga mpo na kosalela bango ? 10 Abendaki bino pembeni na Ye elongo na Balevi nyonso oyo bazali kolanda bino ; kasi sik’oyo, bazali lisusu koluka kozwa bonganga-Nzambe ! 11 Ezali Yawe nde bosalelaki likita, yo elongo na bato oyo bazali kolanda yo. Aron nde nani mpo ete bokoka koyimayima na tina na ye ? 12 Mpe na sima, Moyize abengisaki Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi. Kasi bazongisaki :— Tokoya te ! 13 Ekoki kaka te mpo na yo kobimisa biso na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mpo na koya kobomisa biso kati na esobe ? Sik’oyo olingi lisusu kokoma mokonzi na biso ? 14 Te, okotisi biso kutu te na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi to opesi biso ata libula moko te ya bilanga to ya bilanga ya vino. Boni, okanisi ete bato oyo bakufa miso ? Te, tokoya te ! 15 Moyize asilikaki makasi mpe alobaki na Yawe :— Kondima makabo na bango te. Nazwaki ata eloko moko te epai na bango, ezala ane ; mpe nasalaki ata moto moko te mabe kati na bango. 16 Moyize alobaki na Kore :— Lobi, yo mpe bato nyonso oyo bazali kolanda yo, bokotelema elongo na Aron liboso ya Yawe. 17 Moko na moko akokamata mbabola na ye, oyo batumbelaka malasi, bongo akotia malasi ya ansa kati na yango mpe akomema yango liboso ya Yawe. Bambabola nyonso ekozala nkama mibale na tuku mitano ; yo mpe elongo na Aron bokomema bambabola na bino. 18 Moto na moto akamataki mbabola na ye, atiaki moto mpe malasi ya ansa kati na yango ; bongo atelemaki esika moko na Moyize mpe Aron, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 19 Tango Kore asangisaki bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye mpo na kotelemela Moyize mpe Aron, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, nkembo ya Yawe ebimelaki lisanga mobimba, 20 mpe Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : 21 — Bokabwana na lisanga ya bato oyo mpo ete nalingi kosilisa bango kaka na mbala moko. 22 Kasi Moyize mpe Aron bakweyaki bilongi kino na mabele mpe bagangaki :— Eh Nzambe ya milimo nyonso ya bato ! Okosilikela lisanga mobimba likolo ya lisumu ya moto moko kaka ? 23 Bongo, Yawe alobaki na Moyize : 24 — Loba na lisanga ete bakende mosika ya bandako ya kapo ya Kore, ya Datani mpe ya Abirami. 25 Moyize atelemaki mpe akendeki epai ya Datani mpe Abirami ; mpe bakambi nyonso ya Isalaele balandaki ye. 26 Akebisaki lisanga mobimba : « Bozala mosika ya bandako ya kapo ya bato oyo ya mabe. Bosimba ata eloko moko te ya bango, noki te bokokufa likolo ya masumu na bango ! » 27 Boye bakendeki mosika ya bandako ya kapo ya Kore, ya Datani mpe ya Abirami. Datani mpe Abirami elongo na basi, bana mpe bakoko na bango babimaki libanda mpe bakendeki kotelema liboso ya bikotelo ya bandako na bango ya kapo. 28 Bongo Moyize alobaki : « Tala ndenge nini bokoyeba solo ete Yawe atindaki ngai kosala makambo oyo nyonso, kasi ezali makanisi ya motema na ngai moko te : 29 Soki bato oyo bakufi kufa ya bato nyonso mpe bamoni makambo oyo bato nyonso bamonaka, wana nde Yawe atindaki ngai te ! 30 Kasi soki Yawe asali penza likambo moko ya sika, bongo mabele efungoli monoko na yango mpe emeli bango elongo na biloko na bango nyonso, mpe bakiti ya bomoi kati na mokili ya bakufi, wana nde bokoyeba solo ete bato oyo batiolaki Yawe. » 31 Tango kaka asilisaki koloba makambo oyo nyonso, mabele efungwamaki na se ya matambe ya Datani mpe Abirami ; 32 efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na mabota na bango, bato ya Kore nyonso elongo na bozwi na bango nyonso. 33 Bakitaki ya bomoi kati na mokili ya bakufi elongo na biloko na bango nyonso, mabele ezipaki bango mpe bakufaki ndenge wana. Mpe balimwaki kati na lisanga. 34 Bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki pembeni na bango bakimaki tango bayokaki bango koganga. Bazalaki komilobela : « Mabele ekomela biso mpe lokola ! » 35 Moto ewutaki epai na Yawe mpe etumbaki bato nkama mibale na tuku mitano oyo bazalaki kobonza malasi ya ansa.

In Other Versions

Numbers 16 in the ANGEFD

Numbers 16 in the ANTPNG2D

Numbers 16 in the AS21

Numbers 16 in the BAGH

Numbers 16 in the BBPNG

Numbers 16 in the BBT1E

Numbers 16 in the BDS

Numbers 16 in the BEV

Numbers 16 in the BHAD

Numbers 16 in the BIB

Numbers 16 in the BLPT

Numbers 16 in the BNT

Numbers 16 in the BNTABOOT

Numbers 16 in the BNTLV

Numbers 16 in the BOATCB

Numbers 16 in the BOATCB2

Numbers 16 in the BOBCV

Numbers 16 in the BOCNT

Numbers 16 in the BOECS

Numbers 16 in the BOGWICC

Numbers 16 in the BOHCB

Numbers 16 in the BOHCV

Numbers 16 in the BOHLNT

Numbers 16 in the BOHNTLTAL

Numbers 16 in the BOICB

Numbers 16 in the BOILNTAP

Numbers 16 in the BOITCV

Numbers 16 in the BOKCV

Numbers 16 in the BOKCV2

Numbers 16 in the BOKHWOG

Numbers 16 in the BOKSSV

Numbers 16 in the BOLCB

Numbers 16 in the BOMCV

Numbers 16 in the BONAV

Numbers 16 in the BONCB

Numbers 16 in the BONLT

Numbers 16 in the BONUT2

Numbers 16 in the BOPLNT

Numbers 16 in the BOSCB

Numbers 16 in the BOSNC

Numbers 16 in the BOTLNT

Numbers 16 in the BOVCB

Numbers 16 in the BOYCB

Numbers 16 in the BPBB

Numbers 16 in the BPH

Numbers 16 in the BSB

Numbers 16 in the CCB

Numbers 16 in the CUV

Numbers 16 in the CUVS

Numbers 16 in the DBT

Numbers 16 in the DGDNT

Numbers 16 in the DHNT

Numbers 16 in the DNT

Numbers 16 in the ELBE

Numbers 16 in the EMTV

Numbers 16 in the ESV

Numbers 16 in the FBV

Numbers 16 in the FEB

Numbers 16 in the GGMNT

Numbers 16 in the GNT

Numbers 16 in the HARY

Numbers 16 in the HNT

Numbers 16 in the IRVA

Numbers 16 in the IRVB

Numbers 16 in the IRVG

Numbers 16 in the IRVH

Numbers 16 in the IRVK

Numbers 16 in the IRVM

Numbers 16 in the IRVM2

Numbers 16 in the IRVO

Numbers 16 in the IRVP

Numbers 16 in the IRVT

Numbers 16 in the IRVT2

Numbers 16 in the IRVU

Numbers 16 in the ISVN

Numbers 16 in the JSNT

Numbers 16 in the KAPI

Numbers 16 in the KBT1ETNIK

Numbers 16 in the KBV

Numbers 16 in the KJV

Numbers 16 in the KNFD

Numbers 16 in the LBA

Numbers 16 in the LBLA

Numbers 16 in the LNT

Numbers 16 in the LSV

Numbers 16 in the MAAL

Numbers 16 in the MBV

Numbers 16 in the MBV2

Numbers 16 in the MHNT

Numbers 16 in the MKNFD

Numbers 16 in the MNG

Numbers 16 in the MNT

Numbers 16 in the MNT2

Numbers 16 in the MRS1T

Numbers 16 in the NAA

Numbers 16 in the NASB

Numbers 16 in the NBLA

Numbers 16 in the NBS

Numbers 16 in the NBVTP

Numbers 16 in the NET2

Numbers 16 in the NIV11

Numbers 16 in the NNT

Numbers 16 in the NNT2

Numbers 16 in the NNT3

Numbers 16 in the PDDPT

Numbers 16 in the PFNT

Numbers 16 in the RMNT

Numbers 16 in the SBIAS

Numbers 16 in the SBIBS

Numbers 16 in the SBIBS2

Numbers 16 in the SBICS

Numbers 16 in the SBIDS

Numbers 16 in the SBIGS

Numbers 16 in the SBIHS

Numbers 16 in the SBIIS

Numbers 16 in the SBIIS2

Numbers 16 in the SBIIS3

Numbers 16 in the SBIKS

Numbers 16 in the SBIKS2

Numbers 16 in the SBIMS

Numbers 16 in the SBIOS

Numbers 16 in the SBIPS

Numbers 16 in the SBISS

Numbers 16 in the SBITS

Numbers 16 in the SBITS2

Numbers 16 in the SBITS3

Numbers 16 in the SBITS4

Numbers 16 in the SBIUS

Numbers 16 in the SBIVS

Numbers 16 in the SBT

Numbers 16 in the SBT1E

Numbers 16 in the SCHL

Numbers 16 in the SNT

Numbers 16 in the SUSU

Numbers 16 in the SUSU2

Numbers 16 in the SYNO

Numbers 16 in the TBIAOTANT

Numbers 16 in the TBT1E

Numbers 16 in the TBT1E2

Numbers 16 in the TFTIP

Numbers 16 in the TFTU

Numbers 16 in the TGNTATF3T

Numbers 16 in the THAI

Numbers 16 in the TNFD

Numbers 16 in the TNT

Numbers 16 in the TNTIK

Numbers 16 in the TNTIL

Numbers 16 in the TNTIN

Numbers 16 in the TNTIP

Numbers 16 in the TNTIZ

Numbers 16 in the TOMA

Numbers 16 in the TTENT

Numbers 16 in the UBG

Numbers 16 in the UGV

Numbers 16 in the UGV2

Numbers 16 in the UGV3

Numbers 16 in the VBL

Numbers 16 in the VDCC

Numbers 16 in the YALU

Numbers 16 in the YAPE

Numbers 16 in the YBVTP

Numbers 16 in the ZBP