Numbers 26 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize mpe na Nganga-Nzambe Eleazari, mwana mobali ya Aron : 2 « Botanga motango ya bato ya lisanga mobimba ya Isalaele, bato nyonso oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazali na makoki ya kosala mosala ya kisoda kati na Isalaele. » 3 Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari basololaki na bango na etando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene na Jeriko, mpe balobaki : 4 « Tokotanga motango ya bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, ndenge Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize. » Tala bana ya Isalaele oyo babimaki na Ejipito~: 5 Bakitani ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele :na nzela ya Enoki, bakitani ya libota ya Enoki~;na nzela ya Palu, bakitani ya libota ya Palu~; 6 na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi ;na nzela ya Karimi, bakitani ya libota ya Karimi. 7 Yango nde ezalaki mabota ya Ribeni mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na misato na nkama sambo na tuku misato. 8 Eliabi azalaki mwana mobali ya Palu, 9 mpe bana mibali ya Eliabi bazalaki Nemueli, Datani mpe Abirami. Datani mpe Abirami bazalaki bakalaka ya lisanga ya Isalaele oyo batombokelaki Moyize mpe Aron mpe bazalaki na molongo ya bato oyo bazalaki kolanda Kore oyo atombokelaki Yawe. 10 Mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na Kore, oyo bato oyo bazalaki kolanda ye bakufaki tango moto ebomaki bato nkama mibale na mitano. Bakomaki lokola bandakisa. 11 Kasi bakitani ya Kore bakufaki te. 12 Bakitani ya Simeoni, kolanda mabota na bango, bazalaki :na nzela ya Nemueli, bakitani ya libota ya Nemueli~;na nzela ya Yamini, bakitani ya libota ya Yamini~;na nzela ya Yakini, bakitani ya libota ya Yakini~; 13 na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zerayi ;na nzela ya Saulo, bakitani ya libota ya Saulo. 14 Yango nde ezalaki mabota ya Simeoni mpe bazalaki bato nkoto tuku mibale na mibale na nkama mibale. 15 Bakitani ya Gadi kolanda mabota na bango, bazalaki :na nzela ya Tsefoni, bakitani ya libota ya Tsefoni~;na nzela ya Agi, bakitani ya libota ya Agi~;na nzela ya Shuni, bakitani ya libota ya Shuni~; 16 na nzela ya Ozini, bakitani ya libota ya Ozini ;na nzela ya Eri, bakitani ya libota ya Eri~; 17 na nzela ya Arodi, bakitani ya libota ya Eroki ;na nzela ya Areeli, bakitani ya libota ya Areeli. 18 Yango nde ezalaki mabota ya Gadi mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na nkama mitano. 19 Eri mpe Onani bazalaki bana mibali ya Yuda, kasi bakufaki na mokili ya Kanana. 20 Bakitani mosusu ya Yuda, kolanda mabota na bango, bazalaki :na nzela ya Shela, bakitani ya libota ya Shela~;na nzela ya Peretsi, bakitani ya libota ya Peretsi~;na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zera. 21 Bakitani ya Peretsi kolanda mabota na bango bazalaki :na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi~;na nzela ya Amuli, bakitani ya libota ya Amuli. 22 Yango nde ezalaki mabota ya Yuda ; bazalaki bato nkoto tuku sambo na motoba na nkama mitano. 23 Bakitani ya Isakari kolanda mabota na bango bazalaki :na nzela ya Tola, bakitani ya libota ya Tola~;na nzela ya Puwa, bakitani ya libota ya Puwa~; 24 na nzela ya Yashubi, bakitani ya libota ya Yashubi ;na nzela ya Shimironi, bakitani ya libota ya Shimironi. 25 Yango nde ezalaki mabota ya Isakari ; bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama misato. 26 Bakitani ya Zabuloni, kolanda mabota na bango, bazalaki :na nzela ya Seredi, bakitani ya libota ya Seredi~;na nzela ya Eloni, bakitani ya libota ya Eloni~;na nzela ya Yaleyeli, bakitani ya libota ya Yaleyeli. 27 Yango nde ezalaki mabota ya Zabuloni mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na nkama mitano. 28 Bakitani ya Jozefi kolanda mabota na bango na nzela ya Manase mpe Efrayimi bazalaki : 29 Bakitani ya Manase :na nzela ya Makiri, bakitani ya libota ya Makiri (Makiri azalaki tata na Galadi)~;na nzela ya Galadi, bakitani ya libota ya Galadi. 30 Tala bakitani ya Galadi :na nzela ya Yezeri, bakitani ya libota ya Yezeri~;na nzela ya Eleki, bakitani ya libota ya Eleki~; 31 na nzela ya Asirieli, bakitani ya libota ya Asirieli ;na nzela ya Sishemi, bakitani ya libota ya Sishemi~; 32 na nzela ya Shemida, bakitani ya libota ya Shemida ;na nzela ya Eferi, bakitani ya libota ya Eferi. 33 Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, azalaki na bana mibali te, kasi azalaki kaka na bana basi ; bongo, tala bakombo na bango : Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa. 34 Yango nde ezalaki mabota ya Manase, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na mibale na nkama sambo. 35 Bakitani ya Efrayimi kolanda mabota na bango bazalaki :na nzela ya Shutela, bakitani ya libota ya Shutela~;na nzela ya Bekeri, bakitani ya libota ya Bekeri~;na nzela ya Tayani, bakitani ya libota ya Tayani. 36 Tala bakitani ya Shutela :na nzela ya Erani, bakitani ya etuka ya Erani. 37 Yango ezalaki mabota ya Efrayimi mpe bazalaki bato nkoto tuku misato na mibale na nkama mitano.Bango nde bazalaki bakitani ya Jozefi kolanda bituka na bango. 38 Bakitani ya Benjame kolanda mabota na bango bazalaki :na nzela ya Bela, bakitani ya libota ya Bela~;na nzela ya Ashibeli, bakitani ya libota ya Ashibeli~;na nzela ya Ayirami, bakitani ya libota ya Ayirami~; 39 na nzela ya Shufami, bakitani ya libota ya Shufami ;na nzela ya Ufami, bakitani ya libota ya Ufami. 40 Bakitani ya Bela na nzela ya Aridi mpe Namani bazalaki :na nzela ya Aridi, bakitani ya libota ya Aridi~;na nzela ya Namani, bakitani ya libota ya Namani. 41 Yango nde ezalaki mabota ya Benjame mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama mitano. 42 Bakitani ya Dani kolanda mabota na bango, bazalaki :na nzela ya Shuami, bakitani ya libota ya Shuami.Bango nde bazalaki bakitani ya Dani~: 43 bango nyonso bazalaki bakitani ya libota ya Shuami mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama minei. 44 Bakitani ya Aseri, kolanda mabota na bango, bazalaki :na nzela ya Yimina, bakitani ya libota ya Yimina~;na nzela ya Yishivi, bakitani ya libota ya Yishivi~;na nzela ya Beria, bakitani ya libota ya Beria~; 45 na nzela ya bakitani ya Beria :na nzela ya Eberi, bakitani ya libota ya Eberi~;na nzela ya Malikieli, bakitani ya libota ya Malikieli. 46 Aseri azalaki mpe na mwana moko ya mwasi na kombo Sera. 47 Yango nde ezalaki mabota ya Aseri, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na misato na nkama minei. 48 Bakitani ya Nefitali, kolanda mabota na bango, bazalaki :na nzela ya Yatseyeli, bakitani ya libota ya Yatseyeli~;na nzela ya Guni, bakitani ya libota ya Guni~; 49 na nzela ya Yetseri, bakitani ya libota ya Yetseri ;na nzela ya Shilemi, bakitani ya libota ya Shilemi. 50 Yango nde ezalaki mabota ya Nefitali, mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama minei. 51 Motango nyonso ya bana ya Isalaele oyo batangaki ezalaki bato nkoto nkama motoba na moko na nkama sambo na tuku misato. 52 Yawe alobaki na Moyize : 53 « Esengeli kokabolela bango mokili lokola libula, kolanda motango ya bato wana. 54 Bokopesa eteni ya mabele ya monene epai ya libota oyo ezali mpe monene, eteni ya mabele ya moke epai ya libota oyo ezali mpe moke. Libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda motango ya bato oyo batangaki. 55 Bakokabola mokili na kobeta zeke mpe libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda bakombo ya bakoko ya bikolo na bango. 56 Esengeli kokabola libula na libula na zeke kati na libota oyo ezali monene mpe libota oyo ezali moke. » 57 Tala bakitani ya Levi oyo batangamaki kolanda mabota na bango :na nzela ya Gerishoni, bakitani ya libota ya Gerishoni~;na nzela ya Keati, bakitani ya Keati~;na nzela ya Merari, bakitani ya Merari. 58 Tala mabota mosusu ya bakitani ya Levi :bakitani ya libota ya Libini,bakitani ya libota ya Ebron,bakitani ya libota ya Maali,bakitani ya libota ya Mushi,bakitani ya libota ya Kore.Keati azalaki tata ya Amirami~; 59 bongo, kombo ya mwasi ya Amirami ezalaki « Yokebedi. » Yokebedi azalaki mokitani ya Levi, oyo abotamaki na Ejipito. Abotaki na Amirami Aron, Moyize mpe ndeko na bango ya mwasi Miriami. 60 Aron azalaki tata ya Nadabi na Abiyu, Eleazari na Itamari. 61 Kasi Nadabi na Abiyu bakufaki tango babonzelaki Yawe makabo na moto ya mopaya. 62 Bakitani nyonso ya mibali ya Levi oyo batangamaki, kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, bazalaki nkoto tuku misato. Batangaki bango te elongo na bato mosusu ya Isalaele mpo ete bazwaki libula te kati na bango. 63 Yango nde motango ya bana ya Isalaele oyo Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari batangaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani pene ya Jeriko. 64 Kati na bango, moko te atikalaki na bomoi, kati na ba-oyo Moyize mpe Nganga-Nzambe Aron batangaki, tango batangaki bana ya Isalaele kati na esobe ya Sinai. 65 Pamba te Yawe alobaki na bana ya Isalaele wana ete bakokufa solo na esobe, mpe moko te kati na bango longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.

In Other Versions

Numbers 26 in the ANGEFD

Numbers 26 in the ANTPNG2D

Numbers 26 in the AS21

Numbers 26 in the BAGH

Numbers 26 in the BBPNG

Numbers 26 in the BBT1E

Numbers 26 in the BDS

Numbers 26 in the BEV

Numbers 26 in the BHAD

Numbers 26 in the BIB

Numbers 26 in the BLPT

Numbers 26 in the BNT

Numbers 26 in the BNTABOOT

Numbers 26 in the BNTLV

Numbers 26 in the BOATCB

Numbers 26 in the BOATCB2

Numbers 26 in the BOBCV

Numbers 26 in the BOCNT

Numbers 26 in the BOECS

Numbers 26 in the BOGWICC

Numbers 26 in the BOHCB

Numbers 26 in the BOHCV

Numbers 26 in the BOHLNT

Numbers 26 in the BOHNTLTAL

Numbers 26 in the BOICB

Numbers 26 in the BOILNTAP

Numbers 26 in the BOITCV

Numbers 26 in the BOKCV

Numbers 26 in the BOKCV2

Numbers 26 in the BOKHWOG

Numbers 26 in the BOKSSV

Numbers 26 in the BOLCB

Numbers 26 in the BOMCV

Numbers 26 in the BONAV

Numbers 26 in the BONCB

Numbers 26 in the BONLT

Numbers 26 in the BONUT2

Numbers 26 in the BOPLNT

Numbers 26 in the BOSCB

Numbers 26 in the BOSNC

Numbers 26 in the BOTLNT

Numbers 26 in the BOVCB

Numbers 26 in the BOYCB

Numbers 26 in the BPBB

Numbers 26 in the BPH

Numbers 26 in the BSB

Numbers 26 in the CCB

Numbers 26 in the CUV

Numbers 26 in the CUVS

Numbers 26 in the DBT

Numbers 26 in the DGDNT

Numbers 26 in the DHNT

Numbers 26 in the DNT

Numbers 26 in the ELBE

Numbers 26 in the EMTV

Numbers 26 in the ESV

Numbers 26 in the FBV

Numbers 26 in the FEB

Numbers 26 in the GGMNT

Numbers 26 in the GNT

Numbers 26 in the HARY

Numbers 26 in the HNT

Numbers 26 in the IRVA

Numbers 26 in the IRVB

Numbers 26 in the IRVG

Numbers 26 in the IRVH

Numbers 26 in the IRVK

Numbers 26 in the IRVM

Numbers 26 in the IRVM2

Numbers 26 in the IRVO

Numbers 26 in the IRVP

Numbers 26 in the IRVT

Numbers 26 in the IRVT2

Numbers 26 in the IRVU

Numbers 26 in the ISVN

Numbers 26 in the JSNT

Numbers 26 in the KAPI

Numbers 26 in the KBT1ETNIK

Numbers 26 in the KBV

Numbers 26 in the KJV

Numbers 26 in the KNFD

Numbers 26 in the LBA

Numbers 26 in the LBLA

Numbers 26 in the LNT

Numbers 26 in the LSV

Numbers 26 in the MAAL

Numbers 26 in the MBV

Numbers 26 in the MBV2

Numbers 26 in the MHNT

Numbers 26 in the MKNFD

Numbers 26 in the MNG

Numbers 26 in the MNT

Numbers 26 in the MNT2

Numbers 26 in the MRS1T

Numbers 26 in the NAA

Numbers 26 in the NASB

Numbers 26 in the NBLA

Numbers 26 in the NBS

Numbers 26 in the NBVTP

Numbers 26 in the NET2

Numbers 26 in the NIV11

Numbers 26 in the NNT

Numbers 26 in the NNT2

Numbers 26 in the NNT3

Numbers 26 in the PDDPT

Numbers 26 in the PFNT

Numbers 26 in the RMNT

Numbers 26 in the SBIAS

Numbers 26 in the SBIBS

Numbers 26 in the SBIBS2

Numbers 26 in the SBICS

Numbers 26 in the SBIDS

Numbers 26 in the SBIGS

Numbers 26 in the SBIHS

Numbers 26 in the SBIIS

Numbers 26 in the SBIIS2

Numbers 26 in the SBIIS3

Numbers 26 in the SBIKS

Numbers 26 in the SBIKS2

Numbers 26 in the SBIMS

Numbers 26 in the SBIOS

Numbers 26 in the SBIPS

Numbers 26 in the SBISS

Numbers 26 in the SBITS

Numbers 26 in the SBITS2

Numbers 26 in the SBITS3

Numbers 26 in the SBITS4

Numbers 26 in the SBIUS

Numbers 26 in the SBIVS

Numbers 26 in the SBT

Numbers 26 in the SBT1E

Numbers 26 in the SCHL

Numbers 26 in the SNT

Numbers 26 in the SUSU

Numbers 26 in the SUSU2

Numbers 26 in the SYNO

Numbers 26 in the TBIAOTANT

Numbers 26 in the TBT1E

Numbers 26 in the TBT1E2

Numbers 26 in the TFTIP

Numbers 26 in the TFTU

Numbers 26 in the TGNTATF3T

Numbers 26 in the THAI

Numbers 26 in the TNFD

Numbers 26 in the TNT

Numbers 26 in the TNTIK

Numbers 26 in the TNTIL

Numbers 26 in the TNTIN

Numbers 26 in the TNTIP

Numbers 26 in the TNTIZ

Numbers 26 in the TOMA

Numbers 26 in the TTENT

Numbers 26 in the UBG

Numbers 26 in the UGV

Numbers 26 in the UGV2

Numbers 26 in the UGV3

Numbers 26 in the VBL

Numbers 26 in the VDCC

Numbers 26 in the YALU

Numbers 26 in the YAPE

Numbers 26 in the YBVTP

Numbers 26 in the ZBP