Numbers 31 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Zongisa mabe na mabe oyo bato ya Madiani basalaki bana ya Isalaele, mpe na sima, okokende kosangana na bakoko na yo na mokili ya bakufi. » 3 Boye Moyize alobaki na bato : « Tika ete mibali kati na bino balata bibundeli mpo na kokende kobundisa mokili ya Madiani mpe kozongisela bango mabe na mabe, na Kombo na Yawe. 4 Libota moko na moko ya Isalaele ekotinda basoda nkoto moko na etumba. » 5 Boye, baponaki bato nkoto moko mpo na libota moko na moko kati na mabota ya Isalaele. Bongo, bato nkoto zomi na mibale balataki bibundeli mpo na kokende na etumba. 6 Moyize atindaki bango na etumba bato nkoto moko ya libota moko na moko elongo na Nganga-Nzambe Pineasi, mwana mobali ya Eleazari oyo amemaki bisalelo ya Esika ya bule mpe bakelelo mpo na kopesa mbela. 7 Babundisaki Madiani ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize mpe babomaki mibali nyonso. 8 Kati na molongo ya bato oyo babomaki, ezalaki na bakonzi ya Madiani oyo : Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba. Babomaki mpe lisusu Balami, mwana mobali ya Beori na mopanga. 9 Bana ya Isalaele bakangaki basi mpe bana ya Madiani elongo na banyama, bibwele mpe bozwi na bango nyonso lokola bomengo ya bitumba. 10 Batumbaki bingumba nyonso epai wapi bato ya Madiani bazalaki kovanda, na milako na bango nyonso. 11 Bamemaki bomengo nyonso ya bitumba mpe biloko nyonso oyo babotolaki elongo na bato, banyama ; 12 mpe bamemaki bakangami, biloko babotolaki mpe bomengo ya bitumba epai ya Moyize, Nganga-Nzambe Eleazari, mpe lisanga ya Isalaele na molako na bango oyo ezalaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene ya Jeriko. 13 Moyize, Nganga-Nzambe Eleazari mpe bakambi nyonso ya lisanga ya Isalaele bayaki koyamba bango na libanda ya molako. 14 Moyize atombokelaki bakonzi oyo baponamaki mpo na kotambolisa mampinga, bakonzi ya nkoto ya basoda mpe ya nkama ya basoda, oyo bawutaki na bitumba. 15 Moyize atunaki bango : « Boni, botiki basi nyonso na bomoi ? 16 Ezalaki nde bango bato balandaki toli ya Balami mpe batindikaki bana ya Isalaele na kopesa Yawe mokongo, kati na makambo oyo esalemaki na Peori ; mpe yango nde esalaki ete etumbu ekweya likolo ya bato na Yawe. 17 Sik’oyo, boboma mibali nyonso mpe basi nyonso oyo bayebi nzoto ya mibali ; 18 kasi bobatela na bomoi mpo na bino, basi nyonso oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. 19 Moto nyonso kati na bino oyo abomaki moto to asimbaki ebembe, asengeli kozala libanda ya molako mikolo sambo. Boye, na mokolo ya misato mpe ya sambo, bosengeli komipetola, bino mpe bakangami na bino. 20 Bokopetola mpe lisusu bilamba nyonso mpe biloko nyonso oyo basala na baposo ya banyama, na suki ya bantaba to mpe na banzete. » 21 Nganga-Nzambe Eleazari alobaki na basoda oyo bakendeki na bitumba : « Botala bikateli ya mobeko oyo Yawe apesaki epai ya Moyize : 22 ‹ Ezali kaka wolo, palata, bronze, motako, ete, mbodi 23 mpe biloko nyonso oyo ezikaka na moto te nde bokolekisa na moto mpo na kopetola yango ; bokopetola yango lisusu na mayi ya bopetolami. Kasi bokopetola na mayi biloko nyonso oyo ezikaka na moto. 24 Na mokolo ya sambo, bokopetola bilamba na bino mpe bokokoma peto mpe na sima nde bokoki kozonga na molako. › » 25 Yawe alobaki na Moyize : 26 « Yo, Moyize, mpe Nganga-Nzambe Eleazari, elongo na bakambi ya mabota ya lisanga ya Isalaele, botanga motango ya bato, ya banyama nyonso oyo bakangaki. 27 Kabola bomengo ya bitumba yango kati na basoda oyo bakendeki na bitumba mpe bato ya lisanga ya Isalaele oyo batikalaki. 28 Na ndambo eteni oyo okopesa na basoda oyo bakendeki na bitumba, tia pembeni lokola mpako mpo na Yawe, moto moko kati na bato nkama mitano, ebwele moko kati na bibwele nkama mitano, ezala ya ngombe, ya ane, ya meme to ya bantaba. 29 Kamata mpako yango kati na ndambo ya eteni na bango mpe pesa yango epai ya Nganga-Nzambe Eleazari lokola eteni ya Yawe. 30 Kamata kati na ndambo ya eteni ya bana ya Isalaele, moko kati na tuku mitano, ezala ya bato, ya ngombe, ya ane, ya meme, ya bantaba to ya bibwele mosusu mpe pesa yango epai ya Balevi oyo bazali na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. » 31 Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari basalaki ndenge Yawe atindaki Moyize. 32 Bomengo ya bitumba oyo etikalaki na oyo basoda oyo bakendeki na bitumba babotolaki ezalaki : meme na bantaba nkoto nkama motoba na tuku sambo na mitano ; 33 ngombe nkoto tuku sambo na mibale ; 34 ane nkoto tuku motoba na moko 35 mpe basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te nkoto tuku misato na mibale. 36 Ndambo ya eteni ya bomengo ya bitumba oyo bato oyo bakendeki na bitumba bazwaki ezalaki : bameme mpe bantaba nkoto nkama misato na tuku misato na sambo na nkama mitano~; 37 mpe mpako mpo na Yawe ezalaki : bameme mpe bantaba nkama motoba na tuku sambo na mitano ; 38 bangombe nkoto tuku misato na motoba, mpe mpako mpo na Yawe ezalaki : bangombe tuku sambo na mibale ; 39 ba-ane nkoto tuku misato na nkama mitano, mpe mpako mpo na Yawe ezalaki : ba-ane tuku motoba na moko ; 40 bato nkoto zomi na motoba, mpe mpako mpo na Yawe ezalaki : bato tuku misato na mibale. 41 Moyize apesaki mpako mpo na Yawe epai ya Nganga-Nzambe Eleazari ndenge Yawe atindaki ye. 42 Boye, ndambo oyo epesamelaki bana ya Isalaele, oyo Moyize alongolaki na bomengo ya bato oyo bakendeki na bitumba, 43 ndambo oyo epesamelaki lisanga ezalaki : meme elongo na bantaba nkoto nkama misato na tuku misato na sambo na nkama mitano ; 44 ngombe nkoto tuku misato na motoba ; 45 ba-ane nkoto tuku misato na nkama mitano, 46 mpe bato nkoto zomi na motoba. 47 Na ndambo oyo epesamelaki bana ya Isalaele, Moyize alongolaki moto moko kati na bato tuku mitano mpe nyama moko kati na banyama tuku mitano, ndenge Yawe atindaki ye mpe apesaki yango epai ya Balevi oyo bazalaki na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. 48 Bongo, bakonzi ya mampinga, bakonzi ya bankoto ya basoda mpe ya bankama bayaki epai ya Moyize. 49 Balobaki na Moyize : « Basali na yo batangi motango ya basoda oyo bazali na se ya bokonzi na biso mpe ata moko te azangi. 50 Boye, tomemi epai na Yawe lokola makabo, biloko ya wolo oyo : biloko oyo balataka na maboko, bapete, bamedayi, biloko ya matoyi, basheneti oyo moko na moko na biso azwaki mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu liboso ya Yawe. » 51 Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki na maboko na bango, biloko nyonso oyo basala na wolo. 52 Wolo nyonso oyo Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki lokola makabo mpo na Yawe, na maboko ya bakonzi ya bankoto mpe ya bankama, ezalaki bakilo nkama moko na tuku mwambe na minei. 53 Soda na soda akamataki na makasi mpo na ye moko bomengo na ye ya bitumba. 54 Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki wolo na maboko ya bakonzi ya nkoto ya basoda mpe ya nkama ya basoda mpe bamemaki yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani lokola ekaniseli mpo na bana ya Isalaele liboso ya Yawe.

In Other Versions

Numbers 31 in the ANGEFD

Numbers 31 in the ANTPNG2D

Numbers 31 in the AS21

Numbers 31 in the BAGH

Numbers 31 in the BBPNG

Numbers 31 in the BBT1E

Numbers 31 in the BDS

Numbers 31 in the BEV

Numbers 31 in the BHAD

Numbers 31 in the BIB

Numbers 31 in the BLPT

Numbers 31 in the BNT

Numbers 31 in the BNTABOOT

Numbers 31 in the BNTLV

Numbers 31 in the BOATCB

Numbers 31 in the BOATCB2

Numbers 31 in the BOBCV

Numbers 31 in the BOCNT

Numbers 31 in the BOECS

Numbers 31 in the BOGWICC

Numbers 31 in the BOHCB

Numbers 31 in the BOHCV

Numbers 31 in the BOHLNT

Numbers 31 in the BOHNTLTAL

Numbers 31 in the BOICB

Numbers 31 in the BOILNTAP

Numbers 31 in the BOITCV

Numbers 31 in the BOKCV

Numbers 31 in the BOKCV2

Numbers 31 in the BOKHWOG

Numbers 31 in the BOKSSV

Numbers 31 in the BOLCB

Numbers 31 in the BOMCV

Numbers 31 in the BONAV

Numbers 31 in the BONCB

Numbers 31 in the BONLT

Numbers 31 in the BONUT2

Numbers 31 in the BOPLNT

Numbers 31 in the BOSCB

Numbers 31 in the BOSNC

Numbers 31 in the BOTLNT

Numbers 31 in the BOVCB

Numbers 31 in the BOYCB

Numbers 31 in the BPBB

Numbers 31 in the BPH

Numbers 31 in the BSB

Numbers 31 in the CCB

Numbers 31 in the CUV

Numbers 31 in the CUVS

Numbers 31 in the DBT

Numbers 31 in the DGDNT

Numbers 31 in the DHNT

Numbers 31 in the DNT

Numbers 31 in the ELBE

Numbers 31 in the EMTV

Numbers 31 in the ESV

Numbers 31 in the FBV

Numbers 31 in the FEB

Numbers 31 in the GGMNT

Numbers 31 in the GNT

Numbers 31 in the HARY

Numbers 31 in the HNT

Numbers 31 in the IRVA

Numbers 31 in the IRVB

Numbers 31 in the IRVG

Numbers 31 in the IRVH

Numbers 31 in the IRVK

Numbers 31 in the IRVM

Numbers 31 in the IRVM2

Numbers 31 in the IRVO

Numbers 31 in the IRVP

Numbers 31 in the IRVT

Numbers 31 in the IRVT2

Numbers 31 in the IRVU

Numbers 31 in the ISVN

Numbers 31 in the JSNT

Numbers 31 in the KAPI

Numbers 31 in the KBT1ETNIK

Numbers 31 in the KBV

Numbers 31 in the KJV

Numbers 31 in the KNFD

Numbers 31 in the LBA

Numbers 31 in the LBLA

Numbers 31 in the LNT

Numbers 31 in the LSV

Numbers 31 in the MAAL

Numbers 31 in the MBV

Numbers 31 in the MBV2

Numbers 31 in the MHNT

Numbers 31 in the MKNFD

Numbers 31 in the MNG

Numbers 31 in the MNT

Numbers 31 in the MNT2

Numbers 31 in the MRS1T

Numbers 31 in the NAA

Numbers 31 in the NASB

Numbers 31 in the NBLA

Numbers 31 in the NBS

Numbers 31 in the NBVTP

Numbers 31 in the NET2

Numbers 31 in the NIV11

Numbers 31 in the NNT

Numbers 31 in the NNT2

Numbers 31 in the NNT3

Numbers 31 in the PDDPT

Numbers 31 in the PFNT

Numbers 31 in the RMNT

Numbers 31 in the SBIAS

Numbers 31 in the SBIBS

Numbers 31 in the SBIBS2

Numbers 31 in the SBICS

Numbers 31 in the SBIDS

Numbers 31 in the SBIGS

Numbers 31 in the SBIHS

Numbers 31 in the SBIIS

Numbers 31 in the SBIIS2

Numbers 31 in the SBIIS3

Numbers 31 in the SBIKS

Numbers 31 in the SBIKS2

Numbers 31 in the SBIMS

Numbers 31 in the SBIOS

Numbers 31 in the SBIPS

Numbers 31 in the SBISS

Numbers 31 in the SBITS

Numbers 31 in the SBITS2

Numbers 31 in the SBITS3

Numbers 31 in the SBITS4

Numbers 31 in the SBIUS

Numbers 31 in the SBIVS

Numbers 31 in the SBT

Numbers 31 in the SBT1E

Numbers 31 in the SCHL

Numbers 31 in the SNT

Numbers 31 in the SUSU

Numbers 31 in the SUSU2

Numbers 31 in the SYNO

Numbers 31 in the TBIAOTANT

Numbers 31 in the TBT1E

Numbers 31 in the TBT1E2

Numbers 31 in the TFTIP

Numbers 31 in the TFTU

Numbers 31 in the TGNTATF3T

Numbers 31 in the THAI

Numbers 31 in the TNFD

Numbers 31 in the TNT

Numbers 31 in the TNTIK

Numbers 31 in the TNTIL

Numbers 31 in the TNTIN

Numbers 31 in the TNTIP

Numbers 31 in the TNTIZ

Numbers 31 in the TOMA

Numbers 31 in the TTENT

Numbers 31 in the UBG

Numbers 31 in the UGV

Numbers 31 in the UGV2

Numbers 31 in the UGV3

Numbers 31 in the VBL

Numbers 31 in the VDCC

Numbers 31 in the YALU

Numbers 31 in the YAPE

Numbers 31 in the YBVTP

Numbers 31 in the ZBP