Ruth 2 (BOLCB2)

1 Naomi azalaki na ndeko moko kati na libota ya mobali na ye ; ndeko yango azalaki ya etuka ya Elimeleki, azalaki penza na bozwi mingi ; kombo na ye ezalaki « Boazi. » 2 Rite, moto ya Moabi, alobaki na Naomi :— Okoki kopesa ngai nzela ya kokende na bilanga mpo na kolokota mito ya ble, oyo bato oyo bakataka ble batiki. Nakozala na sima ya moto oyo akosalela ngai ngolu.Naomi alobaki na ye :— Mwana na ngai, kende. 3 Rite akendeki mpe abandaki kolokota ble na bilanga, na sima ya bato oyo bakataka ble. Akutanaki na libaku ya malamu, pamba te ayaki kososola ete azali kosala kati na elanga ya Boazi, moto ya etuka ya Elimeleki. 4 Sima na mwa tango, Boazi awutaki na Beteleemi ; ayaki ye moko, apesaki mbote na bato oyo bakataka ble na koloba :— Tika ete Yawe azala elongo na bino !Bazongiselaki ye :— Tika ete Yawe apambola yo ! 5 Boazi atunaki mokambi ya bato oyo bakataka ble :— Elenge mwasi wana azali ya nani ? 6 Mokambi ya bato oyo bakataka ble azongisaki :— Azali elenge mwasi ya Moabi ; ayaki elongo na Naomi wuta na mboka Moabi. 7 Asengaki biso nzela ya kolokota mito ya ble, oyo etikalaka tango bakangaka maboke, na sima ya bato oyo bakataka ble. Na tongo ya lelo, akotaki na bilanga mpe azali kosala na molende nyonso ; kino sik’oyo, apemi kaka tango moke. 8 Boazi alobaki na Rite :— Yoka ngai malamu, mwana na ngai ya mwasi : « Kokende kolokota ble na bilanga mosusu te mpe kokende mosika ya elanga oyo te, kasi vanda awa elongo na basali na ngai ya basi. 9 Tala malamu bilanga oyo epai wapi bato bazali kokata ble mpe zala na sima ya bana basi oyo bazali kolokota ble. Nalobi na mibali ete basimba yo te. Tango nyonso ozali na posa ya mayi, kende mpe mela na bambeki oyo mibali batondisi. » 10 Tango Rite ayokaki bongo, agumbamaki, elongi kino na mabele. Alobaki :— Mpo na nini nazwi ngolu ya boye na miso na yo ? Mpo na nini ozali kopesa ngai lokumu ya boye, ngai oyo nazali mopaya ? 11 Boazi azongisaki :— Bayebisaki ngai makambo nyonso oyo osalaki mpo na mama-bokilo na yo wuta tango mobali na ye akufaki, ndenge otikaki tata mpe mama na yo, mboka epai wapi obotama, mpe oyaki kovanda elongo na bato oyo oyebaki liboso te. 12 Tika ete Yawe afuta yo mpo na makambo oyo osalaki. Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, afuta yo koleka, lokola oyaki kobombama na se ya mapapu na Ye ! 13 Rite alobaki :— Tika ete nakoba kozwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai. Obondisi motema na ngai, osololi na mwasi mosali na yo na boboto nyonso. Nzokande, nakokani te ata na moko ya basali na yo ya basi. 14 Na tango ya kolia, Boazi alobaki na ye : « Pusana awa mpe kamata eteni ya lipa, zindisa yango na vino. »Tango avandaki elongo na bato oyo bakataka ble, Boazi apesaki ye ndambo ya bambuma bakalinga. Aliaki ndenge alingaki mpe atikaki mosusu. 15 Tango atelemaki mpo na kolokota lisusu ble, Boazi apesaki mitindo epai ya basali na ye : « Botika ye kolokota ata oyo ezali na kati-kati ya maboke, botungisa ye te. 16 Bokoki mpe kokweyisa bambuma mpo na ye, mpo ete alokota na ye, mpe bozomela ye te. » 17 Boye Rite alokotaki ble na elanga kino na pokwa, aningisaki oyo alokotaki mpe azwaki bakilo pene tuku minei ya bambuma ya orje. 18 Amemaki yango na engumba, mpe mama-bokilo na ye amonaki bambuma oyo alokotaki. Rite abimisaki lisusu biloko oyo atikaki tango atondaki mpe apesaki yango epai ya mama-bokilo na ye. 19 Naomi atunaki Rite :— Lelo, olokotaki ble na esika nini ? Osalaki na esika nini ? Tika ete moto oyo apesi yo lokumu ya boye apambolama !Bongo Rite ayebisaki mama-bokilo na ye makambo oyo etali nkolo ya esika epai wapi asalaki. Alobaki : « Kombo ya moto yango ezali Boazi. » 20 Naomi alobaki na bokilo na ye ya mwasi : « Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo atiki te kotalisa bolamu na Ye epai na biso bato ya bomoi mpe epai na bakufi. Mobali wana azali ndeko na biso ya pembeni, azali kati na molongo ya bato oyo bakoki kosikola biso. » 21 Rite, moto ya Moabi, alobaki :— Alobaki na ngai kutu : « Vanda elongo na basali na ngai kino bakosilisa kobuka bambuma na ngai nyonso. » 22 Naomi azongiselaki Rite, bokilo na ye ya mwasi :— Ekozala malamu mpo na yo kotambolaka elongo na basali na ye ya basi ; pamba te soki okeyi na elanga ya moto mosusu, okoki komona pasi. 23 Boye Rite avandaki pembeni ya basali ya Boazi mpo na kolokota mito ya ble, kino tango ya kobuka bambuma ya orje mpe ya ble, esilaki. Awumelaki kovanda elongo na mama-bokilo na ye.

In Other Versions

Ruth 2 in the ANGEFD

Ruth 2 in the ANTPNG2D

Ruth 2 in the AS21

Ruth 2 in the BAGH

Ruth 2 in the BBPNG

Ruth 2 in the BBT1E

Ruth 2 in the BDS

Ruth 2 in the BEV

Ruth 2 in the BHAD

Ruth 2 in the BIB

Ruth 2 in the BLPT

Ruth 2 in the BNT

Ruth 2 in the BNTABOOT

Ruth 2 in the BNTLV

Ruth 2 in the BOATCB

Ruth 2 in the BOATCB2

Ruth 2 in the BOBCV

Ruth 2 in the BOCNT

Ruth 2 in the BOECS

Ruth 2 in the BOGWICC

Ruth 2 in the BOHCB

Ruth 2 in the BOHCV

Ruth 2 in the BOHLNT

Ruth 2 in the BOHNTLTAL

Ruth 2 in the BOICB

Ruth 2 in the BOILNTAP

Ruth 2 in the BOITCV

Ruth 2 in the BOKCV

Ruth 2 in the BOKCV2

Ruth 2 in the BOKHWOG

Ruth 2 in the BOKSSV

Ruth 2 in the BOLCB

Ruth 2 in the BOMCV

Ruth 2 in the BONAV

Ruth 2 in the BONCB

Ruth 2 in the BONLT

Ruth 2 in the BONUT2

Ruth 2 in the BOPLNT

Ruth 2 in the BOSCB

Ruth 2 in the BOSNC

Ruth 2 in the BOTLNT

Ruth 2 in the BOVCB

Ruth 2 in the BOYCB

Ruth 2 in the BPBB

Ruth 2 in the BPH

Ruth 2 in the BSB

Ruth 2 in the CCB

Ruth 2 in the CUV

Ruth 2 in the CUVS

Ruth 2 in the DBT

Ruth 2 in the DGDNT

Ruth 2 in the DHNT

Ruth 2 in the DNT

Ruth 2 in the ELBE

Ruth 2 in the EMTV

Ruth 2 in the ESV

Ruth 2 in the FBV

Ruth 2 in the FEB

Ruth 2 in the GGMNT

Ruth 2 in the GNT

Ruth 2 in the HARY

Ruth 2 in the HNT

Ruth 2 in the IRVA

Ruth 2 in the IRVB

Ruth 2 in the IRVG

Ruth 2 in the IRVH

Ruth 2 in the IRVK

Ruth 2 in the IRVM

Ruth 2 in the IRVM2

Ruth 2 in the IRVO

Ruth 2 in the IRVP

Ruth 2 in the IRVT

Ruth 2 in the IRVT2

Ruth 2 in the IRVU

Ruth 2 in the ISVN

Ruth 2 in the JSNT

Ruth 2 in the KAPI

Ruth 2 in the KBT1ETNIK

Ruth 2 in the KBV

Ruth 2 in the KJV

Ruth 2 in the KNFD

Ruth 2 in the LBA

Ruth 2 in the LBLA

Ruth 2 in the LNT

Ruth 2 in the LSV

Ruth 2 in the MAAL

Ruth 2 in the MBV

Ruth 2 in the MBV2

Ruth 2 in the MHNT

Ruth 2 in the MKNFD

Ruth 2 in the MNG

Ruth 2 in the MNT

Ruth 2 in the MNT2

Ruth 2 in the MRS1T

Ruth 2 in the NAA

Ruth 2 in the NASB

Ruth 2 in the NBLA

Ruth 2 in the NBS

Ruth 2 in the NBVTP

Ruth 2 in the NET2

Ruth 2 in the NIV11

Ruth 2 in the NNT

Ruth 2 in the NNT2

Ruth 2 in the NNT3

Ruth 2 in the PDDPT

Ruth 2 in the PFNT

Ruth 2 in the RMNT

Ruth 2 in the SBIAS

Ruth 2 in the SBIBS

Ruth 2 in the SBIBS2

Ruth 2 in the SBICS

Ruth 2 in the SBIDS

Ruth 2 in the SBIGS

Ruth 2 in the SBIHS

Ruth 2 in the SBIIS

Ruth 2 in the SBIIS2

Ruth 2 in the SBIIS3

Ruth 2 in the SBIKS

Ruth 2 in the SBIKS2

Ruth 2 in the SBIMS

Ruth 2 in the SBIOS

Ruth 2 in the SBIPS

Ruth 2 in the SBISS

Ruth 2 in the SBITS

Ruth 2 in the SBITS2

Ruth 2 in the SBITS3

Ruth 2 in the SBITS4

Ruth 2 in the SBIUS

Ruth 2 in the SBIVS

Ruth 2 in the SBT

Ruth 2 in the SBT1E

Ruth 2 in the SCHL

Ruth 2 in the SNT

Ruth 2 in the SUSU

Ruth 2 in the SUSU2

Ruth 2 in the SYNO

Ruth 2 in the TBIAOTANT

Ruth 2 in the TBT1E

Ruth 2 in the TBT1E2

Ruth 2 in the TFTIP

Ruth 2 in the TFTU

Ruth 2 in the TGNTATF3T

Ruth 2 in the THAI

Ruth 2 in the TNFD

Ruth 2 in the TNT

Ruth 2 in the TNTIK

Ruth 2 in the TNTIL

Ruth 2 in the TNTIN

Ruth 2 in the TNTIP

Ruth 2 in the TNTIZ

Ruth 2 in the TOMA

Ruth 2 in the TTENT

Ruth 2 in the UBG

Ruth 2 in the UGV

Ruth 2 in the UGV2

Ruth 2 in the UGV3

Ruth 2 in the VBL

Ruth 2 in the VDCC

Ruth 2 in the YALU

Ruth 2 in the YAPE

Ruth 2 in the YBVTP

Ruth 2 in the ZBP