1 Chronicles 26 (BOLCB2)

1 Tala masanga ya bakengeli bikuke : Mpo na bato ya Kore~:Meshelemia, mwana mobali ya Kore, moko kati na bana mibali ya Azafi. 2 Meshelemia azalaki na bana mibali oyo :mwana ya liboso, Zakari~;mwana ya mibale, Yediayeli~;mwana ya misato, Zebadia~;mwana ya minei, Yatinieli~; 3 mwana ya mitano, Elami ;mwana ya motoba, Yoanani~;mpe mwana ya sambo, Eliowenayi. 4 Obedi-Edomi mpe azalaki na bana mibali oyo :mwana ya liboso, Shemaya~;mwana ya mibale, Yozabadi~;mwana ya misato, Yoa~;mwana ya minei, Sakari~;mwana ya mitano, Netaneeli~; 5 mwana ya motoba, Amieli ;mwana ya sambo, Isakari~;mwana ya mwambe, Pewulitayi~;pamba te Nzambe apambolaki Obedi-Edomi. 6 Mwana na ye ya mobali Shemaya azalaki mpe na bana mibali oyo bazalaki bakambi ya libota ya tata na bango, pamba te bazalaki bilombe mibali. 7 Bana mibali ya Shemaya :Otini, Refaeli, Obedi, Elizabadi~;mpe bandeko na ye ya mibali oyo bazalaki bilombe, Eliwu mpe Samakia. 8 Bango nyonso bazalaki bakitani ya Obedi-Edomi. Bango, bana na bango mpe bandeko na bango ya mibali bazalaki bilombe mpe bato ya mpiko mpo na mosala. Bakitani nyonso ya Obedi-Edomi bazalaki tuku motoba na mibale. 9 Meshelemia azalaki na bana mibali mpe bandeko mibali oyo bazalaki bilombe : bango nyonso bazalaki zomi na mwambe. 10 Osa, moko kati na bana mibali ya Merari, azalaki na bana mibali oyo :Shimiri oyo tata na ye atiaki ye mokonzi atako azalaki mwana ya liboso te~; 11 Ilikia, mwana ya mibale ;Tebalia, mwana ya misato~;mpe Zakari, mwana ya minei.Bana mibali mpe bandeko mibali ya Osa bazalaki bango nyonso zomi na misato. 12 Masanga ya bakengeli bikuke ezalaki na mokumba ya kokengela bikuke ya Tempelo ya Yawe, na bokambami ya bakonzi na bango ndenge bandeko na bango bazalaki mpe kosala. 13 Boye kobanda na leki kino na kulutu, bazalaki kobeta zeke mpo na ekuke moko na moko, kolanda mabota na bango. 14 Mpo na ekuke ya ngambo ya este, zeke ekweyaki epai ya libota ya Shelemia.Bongo babetaki zeke mpo na mwana na ye ya mobali Zakari oyo azalaki mopesi toli ya bwanya, mpe zeke mpo na ekuke ya ngambo ya Nor ekweyaki likolo na ye. 15 Mpo na ekuke ya ngambo ya sude, zeke ekweyaki epai ya Obedi-Edomi ; mpe mpo na ndako oyo babombelaka biloko, zeke ekweyaki epai ya bana na ye ya mibali. 16 Mpo na ekuke ya ngambo ya weste mpe ekuke ya Shaleketi, na nzela oyo emata na likolo, zeke ekweyaki epai ya Shupimi mpe Osa. Tala ndenge bakabolaki masanga ya bakengeli bikuke~: 17 mokolo na mokolo, ezalaki na Balevi motoba na ngambo ya este,Balevi minei na ngambo ya nor,mpe Balevi minei na ngambo ya sude~;mpe masanga mibale oyo moko na moko ezalaki na bato mibale, na ndako oyo babombelaka biloko. 18 Mpo na lopango ya weste, ezalaki na bakengeli minei na nzela ; mpe mibale kati na lopango. 19 Oyo nde ezalaki masanga ya bakengeli bikuke oyo baponamaki kati na libota ya Kore mpe ya Merari. 20 Balevi mosusu lokola Ayiya, bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo mpe biloko ya bule. 21 Tala bakitani ya Laedani, oyo bazalaki bato ya etuka ya Gerishoni mpe bakambi, moto na moto ya libota na ye : bato ya Yeyeli ; 22 mpe bana mibali ya Yeyeli : Zetami mpe ndeko na ye ya mobali Joeli. Bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo ya Yawe. 23 Mpo na bakitani ya Amirami, ya Yitseari, ya Ebron mpe ya Uzieli : 24 Shebueli, mokitani ya Gerishomi, mwana mobali ya Moyize, azalaki mokonzi ya babateli bozwi ya Tempelo. 25 Tala bandeko na ye ya mibali oyo babotamaki na nzela ya Eliezeri : Reabia, Ezayi, Yorami, Zikiri mpe Shelomiti. 26 Shelomiti elongo na bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo mokonzi Davidi abulisaki mpo na Yawe ; bakambi ya mabota, bakambi ya bankoto, bakambi ya bankama mpe bakonzi mosusu ya mampinga. 27 Babulisaki biloko mosusu oyo bazwaki na bitumba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe. 28 Shelomiti mpe bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo Samuele, momoni makambo ; Saulo, mwana mobali ya Kishi ; Abineri, mwana mobali ya Neri ; Joabi oyo kombo ya mama na ye ezalaki « Tseruya, » babulisaki mpo na Yawe. 29 Mpo na bakitani ya Yitseari :Kenania mpe bana na ye ya mibali oyo bazalaki bakomi mikanda mpe basambisi. Bazalaki na mokumba ya kotala makambo ya boyokani ya Isalaele na bikolo mosusu. 30 Mpo na bakitani ya Ebron :Ashabia mpe bandeko na ye ya mibali, bilombe mibali nkoto moko na nkama sambo. Bazalaki kokamba Isalaele na ngambo ya weste ya Yordani~; mpe bazalaki na mokumba ya misala nyonso ya Yawe mpe ya mokonzi. 31 Mpo na bakitani ya Ebron : Yeriya azalaki mokonzi na bango, kolanda milongo ya mabota na bango.Na mobu ya tuku minei ya bokonzi ya Davidi, batalaki malamu na buku ya mabota mpe bamonaki kati na engumba Yaezeri ya Galadi, bilombe mibali kati na bakitani ya Ebron. 32 Yeriya azalaki na bandeko mibali nkoto mibale na nkama sambo : bazalaki bilombe mibali mpe bakambi ya mabota. Mokonzi Davidi apesaki bango mokumba ya misala nyonso ya Nzambe mpe ya mokonzi kati na libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.

In Other Versions

1 Chronicles 26 in the ANGEFD

1 Chronicles 26 in the ANTPNG2D

1 Chronicles 26 in the AS21

1 Chronicles 26 in the BAGH

1 Chronicles 26 in the BBPNG

1 Chronicles 26 in the BBT1E

1 Chronicles 26 in the BDS

1 Chronicles 26 in the BEV

1 Chronicles 26 in the BHAD

1 Chronicles 26 in the BIB

1 Chronicles 26 in the BLPT

1 Chronicles 26 in the BNT

1 Chronicles 26 in the BNTABOOT

1 Chronicles 26 in the BNTLV

1 Chronicles 26 in the BOATCB

1 Chronicles 26 in the BOATCB2

1 Chronicles 26 in the BOBCV

1 Chronicles 26 in the BOCNT

1 Chronicles 26 in the BOECS

1 Chronicles 26 in the BOGWICC

1 Chronicles 26 in the BOHCB

1 Chronicles 26 in the BOHCV

1 Chronicles 26 in the BOHLNT

1 Chronicles 26 in the BOHNTLTAL

1 Chronicles 26 in the BOICB

1 Chronicles 26 in the BOILNTAP

1 Chronicles 26 in the BOITCV

1 Chronicles 26 in the BOKCV

1 Chronicles 26 in the BOKCV2

1 Chronicles 26 in the BOKHWOG

1 Chronicles 26 in the BOKSSV

1 Chronicles 26 in the BOLCB

1 Chronicles 26 in the BOMCV

1 Chronicles 26 in the BONAV

1 Chronicles 26 in the BONCB

1 Chronicles 26 in the BONLT

1 Chronicles 26 in the BONUT2

1 Chronicles 26 in the BOPLNT

1 Chronicles 26 in the BOSCB

1 Chronicles 26 in the BOSNC

1 Chronicles 26 in the BOTLNT

1 Chronicles 26 in the BOVCB

1 Chronicles 26 in the BOYCB

1 Chronicles 26 in the BPBB

1 Chronicles 26 in the BPH

1 Chronicles 26 in the BSB

1 Chronicles 26 in the CCB

1 Chronicles 26 in the CUV

1 Chronicles 26 in the CUVS

1 Chronicles 26 in the DBT

1 Chronicles 26 in the DGDNT

1 Chronicles 26 in the DHNT

1 Chronicles 26 in the DNT

1 Chronicles 26 in the ELBE

1 Chronicles 26 in the EMTV

1 Chronicles 26 in the ESV

1 Chronicles 26 in the FBV

1 Chronicles 26 in the FEB

1 Chronicles 26 in the GGMNT

1 Chronicles 26 in the GNT

1 Chronicles 26 in the HARY

1 Chronicles 26 in the HNT

1 Chronicles 26 in the IRVA

1 Chronicles 26 in the IRVB

1 Chronicles 26 in the IRVG

1 Chronicles 26 in the IRVH

1 Chronicles 26 in the IRVK

1 Chronicles 26 in the IRVM

1 Chronicles 26 in the IRVM2

1 Chronicles 26 in the IRVO

1 Chronicles 26 in the IRVP

1 Chronicles 26 in the IRVT

1 Chronicles 26 in the IRVT2

1 Chronicles 26 in the IRVU

1 Chronicles 26 in the ISVN

1 Chronicles 26 in the JSNT

1 Chronicles 26 in the KAPI

1 Chronicles 26 in the KBT1ETNIK

1 Chronicles 26 in the KBV

1 Chronicles 26 in the KJV

1 Chronicles 26 in the KNFD

1 Chronicles 26 in the LBA

1 Chronicles 26 in the LBLA

1 Chronicles 26 in the LNT

1 Chronicles 26 in the LSV

1 Chronicles 26 in the MAAL

1 Chronicles 26 in the MBV

1 Chronicles 26 in the MBV2

1 Chronicles 26 in the MHNT

1 Chronicles 26 in the MKNFD

1 Chronicles 26 in the MNG

1 Chronicles 26 in the MNT

1 Chronicles 26 in the MNT2

1 Chronicles 26 in the MRS1T

1 Chronicles 26 in the NAA

1 Chronicles 26 in the NASB

1 Chronicles 26 in the NBLA

1 Chronicles 26 in the NBS

1 Chronicles 26 in the NBVTP

1 Chronicles 26 in the NET2

1 Chronicles 26 in the NIV11

1 Chronicles 26 in the NNT

1 Chronicles 26 in the NNT2

1 Chronicles 26 in the NNT3

1 Chronicles 26 in the PDDPT

1 Chronicles 26 in the PFNT

1 Chronicles 26 in the RMNT

1 Chronicles 26 in the SBIAS

1 Chronicles 26 in the SBIBS

1 Chronicles 26 in the SBIBS2

1 Chronicles 26 in the SBICS

1 Chronicles 26 in the SBIDS

1 Chronicles 26 in the SBIGS

1 Chronicles 26 in the SBIHS

1 Chronicles 26 in the SBIIS

1 Chronicles 26 in the SBIIS2

1 Chronicles 26 in the SBIIS3

1 Chronicles 26 in the SBIKS

1 Chronicles 26 in the SBIKS2

1 Chronicles 26 in the SBIMS

1 Chronicles 26 in the SBIOS

1 Chronicles 26 in the SBIPS

1 Chronicles 26 in the SBISS

1 Chronicles 26 in the SBITS

1 Chronicles 26 in the SBITS2

1 Chronicles 26 in the SBITS3

1 Chronicles 26 in the SBITS4

1 Chronicles 26 in the SBIUS

1 Chronicles 26 in the SBIVS

1 Chronicles 26 in the SBT

1 Chronicles 26 in the SBT1E

1 Chronicles 26 in the SCHL

1 Chronicles 26 in the SNT

1 Chronicles 26 in the SUSU

1 Chronicles 26 in the SUSU2

1 Chronicles 26 in the SYNO

1 Chronicles 26 in the TBIAOTANT

1 Chronicles 26 in the TBT1E

1 Chronicles 26 in the TBT1E2

1 Chronicles 26 in the TFTIP

1 Chronicles 26 in the TFTU

1 Chronicles 26 in the TGNTATF3T

1 Chronicles 26 in the THAI

1 Chronicles 26 in the TNFD

1 Chronicles 26 in the TNT

1 Chronicles 26 in the TNTIK

1 Chronicles 26 in the TNTIL

1 Chronicles 26 in the TNTIN

1 Chronicles 26 in the TNTIP

1 Chronicles 26 in the TNTIZ

1 Chronicles 26 in the TOMA

1 Chronicles 26 in the TTENT

1 Chronicles 26 in the UBG

1 Chronicles 26 in the UGV

1 Chronicles 26 in the UGV2

1 Chronicles 26 in the UGV3

1 Chronicles 26 in the VBL

1 Chronicles 26 in the VDCC

1 Chronicles 26 in the YALU

1 Chronicles 26 in the YAPE

1 Chronicles 26 in the YBVTP

1 Chronicles 26 in the ZBP