1 Kings 11 (BOLCB2)

1 Mokonzi Salomo abalaki mwana mwasi ya Faraon ; kasi pembeni na ye, abalaki basi mosusu ebele ya bikolo ya bapaya : basi ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi, ya Sidoni mpe ya Iti. 2 Basi yango bawutaki na bikolo oyo, na tina na bango, Yawe alobaki na bana ya Isalaele : « Bosengeli te kobalana na bango, noki te bakopengwisa bino mpe bakotindika mitema na bino na kosambela banzambe na bango. » Nzokande, Salomo akangamaki na basi ya bikolo ya bapaya na bolingo makasi. 3 Azalaki na basi nkama sambo oyo bazalaki bana ya bakonzi, mpe bamakangu nkama misato. Boye, basi na ye nyonso bapengwisaki ye. 4 Tango Salomo akomaki mobange, basi na ye batindikaki motema na ye na kogumbamela banzambe mosusu ; mpe atikaki kolinga Yawe, Nzambe na ye, na motema na ye mobimba ndenge ezalaki motema ya Davidi, tata na ye. 5 Salomo akomaki kosambela ekeko ya Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni ; Moloki, nzambe ya mbindo ya bato ya Amoni. 6 Boye, Salomo asalaki penza makambo mabe na miso ya Yawe mpe atambolaki na boyengebene te liboso ya Yawe ndenge Davidi, tata na ye, atambolaki. 7 Na ngomba oyo etalani na Yelusalemi, Salomo atongaki esambelo ya likolo ya ngomba mpo na Kemoshi, nzambe ya mbindo ya Moabi ; mpe mpo na Moloki, nzambe ya mbindo ya bato ya Amoni. 8 Asalaki mpe bongo mpo na banzambe ya basi na ye nyonso ya bikolo ya bapaya mpo ete batumbelaka yango malasi mpe babonzelaka yango mbeka. 9 Yawe atombokelaki Salomo mpo ete motema na ye epengwaki mosika na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo amimonisaki epai na ye mbala mibale. 10 Nzokande, Yawe apekisaki Salomo kosambela banzambe mosusu ; kasi Salomo atosaki te mitindo ya Yawe. 11 Boye, Yawe alobaki na Salomo : « Lokola oponi kotambola bongo mpe obateli te boyokani na Ngai mpe mitindo oyo napesaki yo, nakobotola yo bokonzi mpe nakopesa yango na moko kati na basali na yo. 12 Nzokande, mpo na Davidi, tata na yo, nakosala yango te na tango oyo ozali nanu na bomoi ; nakobotola yango nde na maboko ya mwana na yo ya mobali. 13 Kasi nakobotola ye bokonzi nyonso te ; nakotikela ye etuka moko mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, mpe mpo na Yelusalemi, engumba oyo napona. » 14 Yawe abimisaki monguna moko mpo na kobundisa Salomo : Adadi, moto ya Edomi, mwana kati na libota ya bokonzi ya Edomi. 15 Na kala, na tango oyo Davidi abundisaki mokili ya Edomi, Joabi mokonzi ya mampinga, oyo akendeki mpo na kokunda bibembe, abomaki mibali nyonso ya Edomi. 16 Joabi mpe bato nyonso ya Isalaele batikalaki kuna basanza motoba kino tango basilisaki koboma mibali nyonso ya Edomi. 17 Kasi Adadi oyo azalaki nanu elenge na tango wana akimaki na Ejipito elongo na ndambo ya bato ya Edomi oyo bazalaki basali ya tata na ye. 18 Balongwaki na Madiani mpe bakendeki na Parani. Wuta na Parani, bazwaki bato mpe bakendeki elongo na bango na Ejipito epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Faraon apesaki Adadi ndako, eteni ya mabele mpe bilei. 19 Lokola Faraon asepelaki na Adadi mingi, abalisaki ye semeki na ye ya mwasi, ndeko mwasi ya Takipenesi, mwasi ya mokonzi. 20 Ndeko mwasi ya Takipenesi abotelaki Adadi mwana moko ya mobali mpe apesaki ye kombo « Genubati. » Takipenesi abokolaki ye kati na ndako ya Faraon. Genubati avandaki kuna elongo na bana ya Faraon. 21 Wana Adadi azalaki na Ejipito, ayokaki ete Davidi mpe Joabi, mokonzi ya mampinga, bakufi. Boye, Adadi alobaki na Faraon :— Pesa ngai nzela ete nazonga na mokili na ngai. 22 Faraon atunaki ye :— Ozangi eloko nini awa mpo ete oluka kozonga na mokili na yo ?Adadi azongisaki :— Eloko moko te. Kasi tika ngai ete nakende kaka. 23 Nzambe abimisaki monguna mosusu mpo na kobundisa Salomo ; kombo na ye : Rezoni. Rezoni Azalaki mwana mobali ya Eliyada, oyo akimaki nkolo na ye, Adadezeri, mokonzi ya Tsoba. 24 Rezoni asangisaki mibali pene na ye mpe akomaki mokambi ya lisanga ya batomboki tango Davidi abomaki mampinga ya Tsoba. Bongo batomboki bakendeki na Damasi epai wapi bavandaki mpe bakomaki kokonza. 25 Rezoni azalaki monguna ya Isalaele na tango nyonso oyo Salomo azalaki na bokonzi. Wana Adadi azalaki kotia Isalaele mobulu, Rezoni akomaki mokonzi ya Siri mpe akomaki kokanela Isalaele. 26 Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, moto ya Efrayimi ya Tsereda, moko kati na basali ya Salomo, atombokelaki mokonzi. Mama na ye azalaki mwasi akufisa mobali, mpe kombo na ye : Tseruya. 27 Tala ndenge atombokelaki mokonzi : na tango oyo Salomo azalaki kotonga Milo mpe kokanga madusu ya mir ya engumba ya Davidi, tata na ye, 28 Jeroboami azalaki elenge mobali ya makasi mpe ya mpiko ; lokola Salomo amonaki ndenge elenge mobali oyo azalaki kosala mosala na ye malamu, atiaki ye motambolisi misala nyonso ya makasi mpo na libota ya Jozefi. 29 Mokolo moko, wana Jeroboami azalaki kobima na Yelusalemi, Ayiya, mosakoli ya Silo, akutanaki na ye na nzela mpe alataki kazaka ya sika. Bazalaki kaka bango mibale na libanda ya mboka, kati na esobe. 30 Ayiya azwaki kazaka na ye ya sika oyo alataki, akataki yango na biteni zomi na mibale 31 mpe alobaki na Jeroboami : « Kamata biteni zomi mpo na yo, pamba te tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakobotola bokonzi na maboko ya Salomo mpe nakopesa yo bikolo zomi. 32 Kasi mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, mpe mpo na engumba Yelusalemi oyo napona kati na mabota nyonso ya Isalaele, Salomo akozwa kaka libota moko. 33 Nakosala bongo, pamba te basundolaki Ngai mpe bagumbamelaki Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni ; Kemoshi, nzambe ya bato ya Moabi ; mpe Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, batambolaki te na banzela na Ngai mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai, kobatela malako mpe mibeko na Ngai, ndenge Davidi, tata ya Salomo, asalaki. 34 Kasi nakobotola te bokonzi nyonso na maboko ya Salomo, nakotika ye nanu kokonza na mikolo nyonso oyo akozala na bomoi, mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, oyo naponaki mpe abatelaki mitindo mpe malako na Ngai. 35 Kasi nakobotola bokonzi na maboko ya mwana na ye ya mobali mpe nakopesa yo mabota zomi. 36 Nakopesa libota moko epai ya mwana na ye ya mobali mpo ete Davidi, mowumbu na Ngai, azala tango nyonso na mokitani liboso na Ngai kati na Yelusalemi, engumba oyo napona mpo na kotia Kombo na Ngai kati na yango. 37 Kasi mpo na yo, Jeroboami, nakozwa yo, mpe okokonza nyonso oyo motema na yo ekolinga mpe okozala mokonzi ya Isalaele. 38 Soki osali nyonso oyo Ngai nazali kotinda yo, soki otamboli na banzela na Ngai mpe osali makambo ya sembo na miso na Ngai, na kobatelaka mibeko mpe malako na Ngai ndenge Davidi, mowumbu na Ngai, asalaki, wana nakozala na yo elongo, nakosala ete bokonzi kati na libota na yo elendisama ndenge nasalaki epai ya Davidi, mpe nakopesa yo Isalaele. 39 Na bongo, nakoyokisa ndako ya Davidi soni, kasi mpo na libela te. › » 40 Salomo alukaki koboma Jeroboami, kasi Jeroboami akimaki na Ejipito epai ya Shishaki, mokonzi ya Ejipito, avandaki kuna kino na kufa ya Salomo. 41 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Salomo, misala na ye nyonso mpe bwanya na ye, ekomama kati na buku ya misala ya Salomo. 42 Salomo akonzaki Isalaele mobimba mibu tuku minei, na Yelusalemi. 43 Sima na yango, Salomo akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Mwana na ye, Roboami, akitanaki na ye na bokonzi.

In Other Versions

1 Kings 11 in the ANGEFD

1 Kings 11 in the ANTPNG2D

1 Kings 11 in the AS21

1 Kings 11 in the BAGH

1 Kings 11 in the BBPNG

1 Kings 11 in the BBT1E

1 Kings 11 in the BDS

1 Kings 11 in the BEV

1 Kings 11 in the BHAD

1 Kings 11 in the BIB

1 Kings 11 in the BLPT

1 Kings 11 in the BNT

1 Kings 11 in the BNTABOOT

1 Kings 11 in the BNTLV

1 Kings 11 in the BOATCB

1 Kings 11 in the BOATCB2

1 Kings 11 in the BOBCV

1 Kings 11 in the BOCNT

1 Kings 11 in the BOECS

1 Kings 11 in the BOGWICC

1 Kings 11 in the BOHCB

1 Kings 11 in the BOHCV

1 Kings 11 in the BOHLNT

1 Kings 11 in the BOHNTLTAL

1 Kings 11 in the BOICB

1 Kings 11 in the BOILNTAP

1 Kings 11 in the BOITCV

1 Kings 11 in the BOKCV

1 Kings 11 in the BOKCV2

1 Kings 11 in the BOKHWOG

1 Kings 11 in the BOKSSV

1 Kings 11 in the BOLCB

1 Kings 11 in the BOMCV

1 Kings 11 in the BONAV

1 Kings 11 in the BONCB

1 Kings 11 in the BONLT

1 Kings 11 in the BONUT2

1 Kings 11 in the BOPLNT

1 Kings 11 in the BOSCB

1 Kings 11 in the BOSNC

1 Kings 11 in the BOTLNT

1 Kings 11 in the BOVCB

1 Kings 11 in the BOYCB

1 Kings 11 in the BPBB

1 Kings 11 in the BPH

1 Kings 11 in the BSB

1 Kings 11 in the CCB

1 Kings 11 in the CUV

1 Kings 11 in the CUVS

1 Kings 11 in the DBT

1 Kings 11 in the DGDNT

1 Kings 11 in the DHNT

1 Kings 11 in the DNT

1 Kings 11 in the ELBE

1 Kings 11 in the EMTV

1 Kings 11 in the ESV

1 Kings 11 in the FBV

1 Kings 11 in the FEB

1 Kings 11 in the GGMNT

1 Kings 11 in the GNT

1 Kings 11 in the HARY

1 Kings 11 in the HNT

1 Kings 11 in the IRVA

1 Kings 11 in the IRVB

1 Kings 11 in the IRVG

1 Kings 11 in the IRVH

1 Kings 11 in the IRVK

1 Kings 11 in the IRVM

1 Kings 11 in the IRVM2

1 Kings 11 in the IRVO

1 Kings 11 in the IRVP

1 Kings 11 in the IRVT

1 Kings 11 in the IRVT2

1 Kings 11 in the IRVU

1 Kings 11 in the ISVN

1 Kings 11 in the JSNT

1 Kings 11 in the KAPI

1 Kings 11 in the KBT1ETNIK

1 Kings 11 in the KBV

1 Kings 11 in the KJV

1 Kings 11 in the KNFD

1 Kings 11 in the LBA

1 Kings 11 in the LBLA

1 Kings 11 in the LNT

1 Kings 11 in the LSV

1 Kings 11 in the MAAL

1 Kings 11 in the MBV

1 Kings 11 in the MBV2

1 Kings 11 in the MHNT

1 Kings 11 in the MKNFD

1 Kings 11 in the MNG

1 Kings 11 in the MNT

1 Kings 11 in the MNT2

1 Kings 11 in the MRS1T

1 Kings 11 in the NAA

1 Kings 11 in the NASB

1 Kings 11 in the NBLA

1 Kings 11 in the NBS

1 Kings 11 in the NBVTP

1 Kings 11 in the NET2

1 Kings 11 in the NIV11

1 Kings 11 in the NNT

1 Kings 11 in the NNT2

1 Kings 11 in the NNT3

1 Kings 11 in the PDDPT

1 Kings 11 in the PFNT

1 Kings 11 in the RMNT

1 Kings 11 in the SBIAS

1 Kings 11 in the SBIBS

1 Kings 11 in the SBIBS2

1 Kings 11 in the SBICS

1 Kings 11 in the SBIDS

1 Kings 11 in the SBIGS

1 Kings 11 in the SBIHS

1 Kings 11 in the SBIIS

1 Kings 11 in the SBIIS2

1 Kings 11 in the SBIIS3

1 Kings 11 in the SBIKS

1 Kings 11 in the SBIKS2

1 Kings 11 in the SBIMS

1 Kings 11 in the SBIOS

1 Kings 11 in the SBIPS

1 Kings 11 in the SBISS

1 Kings 11 in the SBITS

1 Kings 11 in the SBITS2

1 Kings 11 in the SBITS3

1 Kings 11 in the SBITS4

1 Kings 11 in the SBIUS

1 Kings 11 in the SBIVS

1 Kings 11 in the SBT

1 Kings 11 in the SBT1E

1 Kings 11 in the SCHL

1 Kings 11 in the SNT

1 Kings 11 in the SUSU

1 Kings 11 in the SUSU2

1 Kings 11 in the SYNO

1 Kings 11 in the TBIAOTANT

1 Kings 11 in the TBT1E

1 Kings 11 in the TBT1E2

1 Kings 11 in the TFTIP

1 Kings 11 in the TFTU

1 Kings 11 in the TGNTATF3T

1 Kings 11 in the THAI

1 Kings 11 in the TNFD

1 Kings 11 in the TNT

1 Kings 11 in the TNTIK

1 Kings 11 in the TNTIL

1 Kings 11 in the TNTIN

1 Kings 11 in the TNTIP

1 Kings 11 in the TNTIZ

1 Kings 11 in the TOMA

1 Kings 11 in the TTENT

1 Kings 11 in the UBG

1 Kings 11 in the UGV

1 Kings 11 in the UGV2

1 Kings 11 in the UGV3

1 Kings 11 in the VBL

1 Kings 11 in the VDCC

1 Kings 11 in the YALU

1 Kings 11 in the YAPE

1 Kings 11 in the YBVTP

1 Kings 11 in the ZBP