1 Kings 15 (BOLCB2)

1 Tango Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Abiyami akomaki mokonzi ya Yuda. 2 Awumelaki mibu misato na bokonzi, na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Maaka. » Maaka azalaki mwana ya Abisalomi. 3 Asalaki masumu nyonso oyo tata na ye asalaki liboso ete Abiyami akoma mokonzi. Apesaki te motema na ye mobimba epai na Yawe, Nzambe na ye, ndenge ezalaki motema ya Davidi, koko na ye. 4 Nzokande, mpo na Davidi, Yawe Nzambe na ye, apesaki Abiyami mwinda kati na Yelusalemi, wana atiaki mwana na ye ya mobali mpo na kokitana na ye na bokonzi mpe kokomisa Yelusalemi makasi. 5 Pamba te Davidi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe mpe abatelaki mibeko ya Yawe mikolo nyonso ya bomoi na ye, longola kaka likambo moko : likambo ya Iri, moto ya Iti. 6 Mikolo nyonso ya bomoi ya Abiyami, ndako ya Roboami ezalaki kaka na bitumba na ndako ya Jeroboami. 7 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Abiyami mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. Bitumba ezalaki kati na Jeroboami mpe Abiyami. 8 Abiyami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Asa, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. 9 Tango Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, asalaki mibu tuku mibale na bokonzi, Asa akomaki mokonzi ya Yuda. 10 Asalaki mibu tuku minei na moko na bokonzi, na Yelusalemi. Kombo ya koko na ye ya mwasi ezalaki « Maaka. » Maaka azalaki mwana mwasi ya Abisalomi. 11 Asa asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe, ndenge Davidi, koko na ye, asalaki. 12 Abenganaki wuta na mokili, bato oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, mpe alongolaki banzambe nyonso ya bikeko oyo tata na ye asalaki. 13 Alongolaki ezala Maaka, koko na ye ya mwasi, na lokumu ya mama ya mokonzi ; pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki mpe atumbaki ekeko yango ya soni kati na lubwaku ya Sedron. 14 Nzokande, atako abebisaki te bisambelo ya likolo ya bangomba, Asa abatelaki motema na ye sembo na miso ya Yawe, na mikolo nyonso ya bomoi na ye. 15 Azongisaki kati na Tempelo ya Yawe biloko oyo tata na ye mpe ye moko babulisaki : palata, wolo mpe biloko mosusu. 16 Na mikolo nyonso oyo Asa mpe Baesha, mokonzi ya Isalaele, bazalaki na bokonzi, bazalaki kaka na bitumba. 17 Baesha, mokonzi ya Isalaele, abundisaki Yuda mpe alendisaki bamir ya engumba Rama mpo na kopekisa bato kokota to kobima na mokili ya Asa, mokonzi ya Yuda. 18 Asa azwaki palata mpe wolo nyonso oyo etikalaki kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi ; apesaki yango na maboko ya basali na ye mpe atindaki bango epai ya Beni-Adadi, mwana mobali ya Tabirimoni, mwana mobali ya Ezioni, mokonzi ya Siri, oyo azalaki kovanda na Damasi. Atindelaki ye mpe maloba oyo : 19 « Tika ete tosala boyokani kati na ngai mpe yo ndenge ezalaki kati na tata na ngai mpe tata na yo. Tala, natindeli yo kado ya palata mpe ya wolo. Kende kokata boyokani na yo elongo na Baesha, mokonzi ya Isalaele, mpo ete abundisa ngai lisusu te. » 20 Beni-Adadi andimaki maloba ya mokonzi Asa mpe atindaki bakonzi ya basoda na ye kobundisa bingumba ya Isalaele. Abotolaki Iyoni, Dani, Abele-Beti-Maaka, etuka mobimba ya Kinereti mpe mokili nyonso ya Nefitali. 21 Tango kaka Baesha ayokaki bongo, atikaki kolendisa engumba Rama mpe akendeki kovanda na Tiritsa. 22 Bongo mokonzi Asa abengisaki bato nyonso ya Yuda, kolongola ata moto moko te ; mpe bamemaki longwa na Rama mabanga mpe mabaya oyo Baesha azalaki kosalela kuna. Mokonzi Asa asalelaki yango mpo na kolendisa engumba Geba kati na etuka ya Benjame, mpe engumba Mitsipa. 23 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Asa, molende na ye, misala na ye nyonso mpe bingumba na ye nyonso oyo atongaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. Tango akomaki mobange, akomaki kobela makolo. 24 Asa akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Jozafati, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. 25 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi ; Nadabi, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki Isalaele mibu mibale. 26 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, atambolaki na banzela mabe ya tata na ye, oyo atindikaki mpe bato ya Isalaele na kosala masumu. 27 Baesha, mwana mobali ya Ayiya, moto ya libota ya Isakari, asalelaki ye likita mpe abomaki ye na Gibetoni, moko kati na bingumba ya bato ya Filisitia, na tango oyo Nadabi elongo na Isalaele mobimba bazingelaki Gibetoni. 28 Baesha abomaki Nababi tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu misato na bokonzi, mpe akitanaki na Nadabi na bokonzi. 29 Tango azwaki bokonzi, abomaki libota nyonso ya Jeroboami mpe atikaki ata moto moko te na bomoi kati na libota ya Jeroboami : abomaki bato nyonso kolanda etinda na Yawe na nzela ya mowumbu na ye, Ayiya, moto ya Silo, 30 mpo na masumu oyo Jeroboami asalaki mpe atindikaki bato ya Isalaele na kosala. Na bongo, apelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. 31 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Nadabi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 32 Na mikolo nyonso oyo Asa mpe Baesha, mokonzi ya Isalaele, bazalaki na bokonzi, bazalaki kaka na bitumba. 33 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu misato na bokonzi, Baesha, mwana mobali ya Ayiya, akomaki mokonzi ya Isalaele mobimba, na Tiritsa. Asalaki mibu tuku mibale na minei na bokonzi. 34 Baesha asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, na komekola banzela ya Jeroboami oyo atindikaki bato ya Isalaele na kosala masumu na ye.

In Other Versions

1 Kings 15 in the ANGEFD

1 Kings 15 in the ANTPNG2D

1 Kings 15 in the AS21

1 Kings 15 in the BAGH

1 Kings 15 in the BBPNG

1 Kings 15 in the BBT1E

1 Kings 15 in the BDS

1 Kings 15 in the BEV

1 Kings 15 in the BHAD

1 Kings 15 in the BIB

1 Kings 15 in the BLPT

1 Kings 15 in the BNT

1 Kings 15 in the BNTABOOT

1 Kings 15 in the BNTLV

1 Kings 15 in the BOATCB

1 Kings 15 in the BOATCB2

1 Kings 15 in the BOBCV

1 Kings 15 in the BOCNT

1 Kings 15 in the BOECS

1 Kings 15 in the BOGWICC

1 Kings 15 in the BOHCB

1 Kings 15 in the BOHCV

1 Kings 15 in the BOHLNT

1 Kings 15 in the BOHNTLTAL

1 Kings 15 in the BOICB

1 Kings 15 in the BOILNTAP

1 Kings 15 in the BOITCV

1 Kings 15 in the BOKCV

1 Kings 15 in the BOKCV2

1 Kings 15 in the BOKHWOG

1 Kings 15 in the BOKSSV

1 Kings 15 in the BOLCB

1 Kings 15 in the BOMCV

1 Kings 15 in the BONAV

1 Kings 15 in the BONCB

1 Kings 15 in the BONLT

1 Kings 15 in the BONUT2

1 Kings 15 in the BOPLNT

1 Kings 15 in the BOSCB

1 Kings 15 in the BOSNC

1 Kings 15 in the BOTLNT

1 Kings 15 in the BOVCB

1 Kings 15 in the BOYCB

1 Kings 15 in the BPBB

1 Kings 15 in the BPH

1 Kings 15 in the BSB

1 Kings 15 in the CCB

1 Kings 15 in the CUV

1 Kings 15 in the CUVS

1 Kings 15 in the DBT

1 Kings 15 in the DGDNT

1 Kings 15 in the DHNT

1 Kings 15 in the DNT

1 Kings 15 in the ELBE

1 Kings 15 in the EMTV

1 Kings 15 in the ESV

1 Kings 15 in the FBV

1 Kings 15 in the FEB

1 Kings 15 in the GGMNT

1 Kings 15 in the GNT

1 Kings 15 in the HARY

1 Kings 15 in the HNT

1 Kings 15 in the IRVA

1 Kings 15 in the IRVB

1 Kings 15 in the IRVG

1 Kings 15 in the IRVH

1 Kings 15 in the IRVK

1 Kings 15 in the IRVM

1 Kings 15 in the IRVM2

1 Kings 15 in the IRVO

1 Kings 15 in the IRVP

1 Kings 15 in the IRVT

1 Kings 15 in the IRVT2

1 Kings 15 in the IRVU

1 Kings 15 in the ISVN

1 Kings 15 in the JSNT

1 Kings 15 in the KAPI

1 Kings 15 in the KBT1ETNIK

1 Kings 15 in the KBV

1 Kings 15 in the KJV

1 Kings 15 in the KNFD

1 Kings 15 in the LBA

1 Kings 15 in the LBLA

1 Kings 15 in the LNT

1 Kings 15 in the LSV

1 Kings 15 in the MAAL

1 Kings 15 in the MBV

1 Kings 15 in the MBV2

1 Kings 15 in the MHNT

1 Kings 15 in the MKNFD

1 Kings 15 in the MNG

1 Kings 15 in the MNT

1 Kings 15 in the MNT2

1 Kings 15 in the MRS1T

1 Kings 15 in the NAA

1 Kings 15 in the NASB

1 Kings 15 in the NBLA

1 Kings 15 in the NBS

1 Kings 15 in the NBVTP

1 Kings 15 in the NET2

1 Kings 15 in the NIV11

1 Kings 15 in the NNT

1 Kings 15 in the NNT2

1 Kings 15 in the NNT3

1 Kings 15 in the PDDPT

1 Kings 15 in the PFNT

1 Kings 15 in the RMNT

1 Kings 15 in the SBIAS

1 Kings 15 in the SBIBS

1 Kings 15 in the SBIBS2

1 Kings 15 in the SBICS

1 Kings 15 in the SBIDS

1 Kings 15 in the SBIGS

1 Kings 15 in the SBIHS

1 Kings 15 in the SBIIS

1 Kings 15 in the SBIIS2

1 Kings 15 in the SBIIS3

1 Kings 15 in the SBIKS

1 Kings 15 in the SBIKS2

1 Kings 15 in the SBIMS

1 Kings 15 in the SBIOS

1 Kings 15 in the SBIPS

1 Kings 15 in the SBISS

1 Kings 15 in the SBITS

1 Kings 15 in the SBITS2

1 Kings 15 in the SBITS3

1 Kings 15 in the SBITS4

1 Kings 15 in the SBIUS

1 Kings 15 in the SBIVS

1 Kings 15 in the SBT

1 Kings 15 in the SBT1E

1 Kings 15 in the SCHL

1 Kings 15 in the SNT

1 Kings 15 in the SUSU

1 Kings 15 in the SUSU2

1 Kings 15 in the SYNO

1 Kings 15 in the TBIAOTANT

1 Kings 15 in the TBT1E

1 Kings 15 in the TBT1E2

1 Kings 15 in the TFTIP

1 Kings 15 in the TFTU

1 Kings 15 in the TGNTATF3T

1 Kings 15 in the THAI

1 Kings 15 in the TNFD

1 Kings 15 in the TNT

1 Kings 15 in the TNTIK

1 Kings 15 in the TNTIL

1 Kings 15 in the TNTIN

1 Kings 15 in the TNTIP

1 Kings 15 in the TNTIZ

1 Kings 15 in the TOMA

1 Kings 15 in the TTENT

1 Kings 15 in the UBG

1 Kings 15 in the UGV

1 Kings 15 in the UGV2

1 Kings 15 in the UGV3

1 Kings 15 in the VBL

1 Kings 15 in the VDCC

1 Kings 15 in the YALU

1 Kings 15 in the YAPE

1 Kings 15 in the YBVTP

1 Kings 15 in the ZBP