2 Chronicles 10 (BOLCB2)
1 Roboami akendeki na Sishemi epai wapi lisanga mobimba ya Isalaele esanganaki mpo na kokomisa ye mokonzi. 2 Kasi sima na Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, koyoka sango yango wuta na Ejipito epai wapi akendeki kobombama mpo na kokima mokonzi Salomo, azongaki wuta na Ejipito. 3 Boye, batindaki bato kobenga Jeroboami ; bongo ye Jeroboami elongo na lisanga mobimba ya Isalaele bakendeki epai ya Roboami mpe balobaki na ye : 4 — Tata na yo anyokolaki biso makasi. Kasi sik’oyo, yo, lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso ; bongo biso, tokosalela yo. 5 Roboami azongisaki :— Bopesa ngai mikolo misato mpo na koyekola likambo yango, bongo bozongela ngai.Mpe bato bakendeki. 6 Mokonzi Roboami atunaki toli epai ya bampaka oyo basalaki elongo na Salomo, tata na ye, tango azalaki nanu na bomoi. Alobaki na bango :— Toli nini bozali kopesa ngai lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo ? 7 Bazongiselaki ye :— Soki omitalisi lokola moto malamu epai ya bato oyo, soki olobeli bango na boboto mpe opesi bango eyano ya malamu, bakozala tango nyonso basali na yo. 8 Kasi Roboami aboyaki toli oyo bampaka bapesaki ye ; asengaki toli epai ya bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye mpe bazalaki kosalela ye. 9 Atunaki bango :— Toli nini bozali kopesa lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo balobi na ngai : « Lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso ? » 10 Bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye bazongisaki :— Tala makambo oyo okoyebisa bato oyo balobi na yo : « Tata na yo anyokolaki biso na misala makasi ; kasi yo, lembisela biso yango ! » Yebisa bango : « Mosapi na ngai ya moke eleki loketo ya tata na ngai na monene. 11 Kobanda lelo, soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. » 12 Sima na mikolo misato, Jeroboami elongo na bato nyonso bazongaki epai ya Roboami, ndenge mokonzi ayebisaki bango : « Bozongela ngai sima na mikolo misato. » 13 Mokonzi Roboami aboyaki kosalela toli oyo bampaka bapesaki ye, ayanolaki bato na maloba mabe makasi ; 14 alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango :— Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. 15 Mokonzi aboyaki koyoka bato, pamba te ezalaki Nzambe nde asalaki bongo mpo na kokokisa Liloba oyo Yawe ayebisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, na nzela ya mosakoli Ayiya, moto ya Silo. 16 Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye :— Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi ? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi ! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo ! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo !Wana bana nyonso ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo, 17 Roboami akobaki kokonza bana ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na bingumba ya Yuda. 18 Mokonzi Roboami atindaki Adorami oyo azalaki motambolisi ya misala makasi, kasi bana ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki. Nzokande, mokonzi Roboami alongaki komata na shar na ye mpo na kokima na Yelusalemi. 19 Ezali boye nde bana ya Isalaele batombokelaki ndako ya Davidi kino na mokolo ya lelo.
In Other Versions
2 Chronicles 10 in the ANGEFD
2 Chronicles 10 in the ANTPNG2D
2 Chronicles 10 in the AS21
2 Chronicles 10 in the BAGH
2 Chronicles 10 in the BBPNG
2 Chronicles 10 in the BBT1E
2 Chronicles 10 in the BDS
2 Chronicles 10 in the BEV
2 Chronicles 10 in the BHAD
2 Chronicles 10 in the BIB
2 Chronicles 10 in the BLPT
2 Chronicles 10 in the BNT
2 Chronicles 10 in the BNTABOOT
2 Chronicles 10 in the BNTLV
2 Chronicles 10 in the BOATCB
2 Chronicles 10 in the BOATCB2
2 Chronicles 10 in the BOBCV
2 Chronicles 10 in the BOCNT
2 Chronicles 10 in the BOECS
2 Chronicles 10 in the BOGWICC
2 Chronicles 10 in the BOHCB
2 Chronicles 10 in the BOHCV
2 Chronicles 10 in the BOHLNT
2 Chronicles 10 in the BOHNTLTAL
2 Chronicles 10 in the BOICB
2 Chronicles 10 in the BOILNTAP
2 Chronicles 10 in the BOITCV
2 Chronicles 10 in the BOKCV
2 Chronicles 10 in the BOKCV2
2 Chronicles 10 in the BOKHWOG
2 Chronicles 10 in the BOKSSV
2 Chronicles 10 in the BOLCB
2 Chronicles 10 in the BOMCV
2 Chronicles 10 in the BONAV
2 Chronicles 10 in the BONCB
2 Chronicles 10 in the BONLT
2 Chronicles 10 in the BONUT2
2 Chronicles 10 in the BOPLNT
2 Chronicles 10 in the BOSCB
2 Chronicles 10 in the BOSNC
2 Chronicles 10 in the BOTLNT
2 Chronicles 10 in the BOVCB
2 Chronicles 10 in the BOYCB
2 Chronicles 10 in the BPBB
2 Chronicles 10 in the BPH
2 Chronicles 10 in the BSB
2 Chronicles 10 in the CCB
2 Chronicles 10 in the CUV
2 Chronicles 10 in the CUVS
2 Chronicles 10 in the DBT
2 Chronicles 10 in the DGDNT
2 Chronicles 10 in the DHNT
2 Chronicles 10 in the DNT
2 Chronicles 10 in the ELBE
2 Chronicles 10 in the EMTV
2 Chronicles 10 in the ESV
2 Chronicles 10 in the FBV
2 Chronicles 10 in the FEB
2 Chronicles 10 in the GGMNT
2 Chronicles 10 in the GNT
2 Chronicles 10 in the HARY
2 Chronicles 10 in the HNT
2 Chronicles 10 in the IRVA
2 Chronicles 10 in the IRVB
2 Chronicles 10 in the IRVG
2 Chronicles 10 in the IRVH
2 Chronicles 10 in the IRVK
2 Chronicles 10 in the IRVM
2 Chronicles 10 in the IRVM2
2 Chronicles 10 in the IRVO
2 Chronicles 10 in the IRVP
2 Chronicles 10 in the IRVT
2 Chronicles 10 in the IRVT2
2 Chronicles 10 in the IRVU
2 Chronicles 10 in the ISVN
2 Chronicles 10 in the JSNT
2 Chronicles 10 in the KAPI
2 Chronicles 10 in the KBT1ETNIK
2 Chronicles 10 in the KBV
2 Chronicles 10 in the KJV
2 Chronicles 10 in the KNFD
2 Chronicles 10 in the LBA
2 Chronicles 10 in the LBLA
2 Chronicles 10 in the LNT
2 Chronicles 10 in the LSV
2 Chronicles 10 in the MAAL
2 Chronicles 10 in the MBV
2 Chronicles 10 in the MBV2
2 Chronicles 10 in the MHNT
2 Chronicles 10 in the MKNFD
2 Chronicles 10 in the MNG
2 Chronicles 10 in the MNT
2 Chronicles 10 in the MNT2
2 Chronicles 10 in the MRS1T
2 Chronicles 10 in the NAA
2 Chronicles 10 in the NASB
2 Chronicles 10 in the NBLA
2 Chronicles 10 in the NBS
2 Chronicles 10 in the NBVTP
2 Chronicles 10 in the NET2
2 Chronicles 10 in the NIV11
2 Chronicles 10 in the NNT
2 Chronicles 10 in the NNT2
2 Chronicles 10 in the NNT3
2 Chronicles 10 in the PDDPT
2 Chronicles 10 in the PFNT
2 Chronicles 10 in the RMNT
2 Chronicles 10 in the SBIAS
2 Chronicles 10 in the SBIBS
2 Chronicles 10 in the SBIBS2
2 Chronicles 10 in the SBICS
2 Chronicles 10 in the SBIDS
2 Chronicles 10 in the SBIGS
2 Chronicles 10 in the SBIHS
2 Chronicles 10 in the SBIIS
2 Chronicles 10 in the SBIIS2
2 Chronicles 10 in the SBIIS3
2 Chronicles 10 in the SBIKS
2 Chronicles 10 in the SBIKS2
2 Chronicles 10 in the SBIMS
2 Chronicles 10 in the SBIOS
2 Chronicles 10 in the SBIPS
2 Chronicles 10 in the SBISS
2 Chronicles 10 in the SBITS
2 Chronicles 10 in the SBITS2
2 Chronicles 10 in the SBITS3
2 Chronicles 10 in the SBITS4
2 Chronicles 10 in the SBIUS
2 Chronicles 10 in the SBIVS
2 Chronicles 10 in the SBT
2 Chronicles 10 in the SBT1E
2 Chronicles 10 in the SCHL
2 Chronicles 10 in the SNT
2 Chronicles 10 in the SUSU
2 Chronicles 10 in the SUSU2
2 Chronicles 10 in the SYNO
2 Chronicles 10 in the TBIAOTANT
2 Chronicles 10 in the TBT1E
2 Chronicles 10 in the TBT1E2
2 Chronicles 10 in the TFTIP
2 Chronicles 10 in the TFTU
2 Chronicles 10 in the TGNTATF3T
2 Chronicles 10 in the THAI
2 Chronicles 10 in the TNFD
2 Chronicles 10 in the TNT
2 Chronicles 10 in the TNTIK
2 Chronicles 10 in the TNTIL
2 Chronicles 10 in the TNTIN
2 Chronicles 10 in the TNTIP
2 Chronicles 10 in the TNTIZ
2 Chronicles 10 in the TOMA
2 Chronicles 10 in the TTENT
2 Chronicles 10 in the UBG
2 Chronicles 10 in the UGV
2 Chronicles 10 in the UGV2
2 Chronicles 10 in the UGV3
2 Chronicles 10 in the VBL
2 Chronicles 10 in the VDCC
2 Chronicles 10 in the YALU
2 Chronicles 10 in the YAPE
2 Chronicles 10 in the YBVTP
2 Chronicles 10 in the ZBP