2 Chronicles 11 (BOLCB2)

1 Tango Roboami azongaki na Yelusalemi, asangisaki mabota ya Yuda mpe ya Benjame, aponaki bilombe ya bitumba nkoto nkama moko na tuku mwambe mpo na kobundisa Isalaele mpe kozongisa bokonzi na maboko ya Roboami. 2 Kasi Yawe alobaki na Shemaya, moto na Nzambe : 3 — Yebisa Roboami, mwana mobali ya Salomo, mokonzi ya Yuda, mpe bana nyonso ya Isalaele oyo bazali kati na Yuda mpe Benjame : 4 « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bokende te kobundisa bandeko na bino ! Tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye, pamba te ngai moko nde nasali makambo nyonso oyo eleki. › »Batosaki Liloba na Yawe, bazongaki na bandako na bango mpe batikaki mabongisi ya kobundisa Jeroboami. 5 Wana Roboami avandaki na Yelusalemi, atongaki bamir zingazinga ya bingumba ebele ya Yuda mpo na kolendisa yango. 6 Alendisaki Beteleemi, Etami, Tekoa, 7 Beti-Tsuri, Soko, Adulami, 8 Gati, Maresha, Zifi, 9 Adorayimi, Lakishi, Azeka, 10 Tsorea, Ayaloni mpe Ebron. Oyo nde ezalaki bingumba batonga makasi kati na Yuda mpe Benjame. 11 Atongaki zingazinga na yango bamir, atiaki kuna bayangeli mpe bibombelo ya biloko ya kolia, ya mafuta mpe ya vino. 12 Kati na bingumba yango nyonso, atiaki banguba minene mpe makonga mpo na kokomisa yango makasi koleka. Boye Yuda mpe Benjame ekomaki ya Roboami. 13 Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bazalaki kati na Isalaele mobimba bayaki kosangana na Roboami wuta na bituka na bango nyonso. 14 Balevi batikaki bandako mpe mabele na bango, bakendeki na Yuda mpe na Yelusalemi, pamba te Jeroboami mpe bana na ye ya mibali bapekisaki bango kosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe ya Yawe. 15 Boye, ye moko Jeroboami aponaki banganga-nzambe mpo na bisambelo ya likolo ya bangomba mpe mpo na banzambe ya bikeko oyo asalaki na lolenge ya bantaba ya mibali mpe ya bana ngombe. 16 Bato ya mabota nyonso ya Isalaele, oyo balukaka Yawe, Nzambe ya Isalaele, na mitema na bango mobimba balandaki Balevi, na Yelusalemi, mpo na kobonzela Yawe, Nzambe ya batata na bango, mbeka. 17 Mibu misato, balendisaki bokonzi ya Yuda mpe nguya ya Roboami, mwana mobali ya Salomo ; pamba te mibu misato yango, balandaki ndakisa ya Davidi mpe ya Salomo. 18 Roboami abalaki Maalati, mwana mwasi ya Yerimoti, mwana mobali ya Davidi mpe ya Abiyaili, mwana mwasi ya Eliabi, mwana mobali ya Izayi. 19 Maalati abotelaki Roboami bana mibali oyo : Yewushi, Shemaria mpe Zaami. 20 Sima, Roboami abalaki Maaka, mwana mwasi ya Abisalomi, oyo abotelaki ye : Abiya, Atayi, Ziza mpe Shelomiti. 21 Roboami alingaki mingi Maaka, mwana mwasi ya Abisalomi, koleka basi mpe bamakangu na ye nyonso. Azalaki na basi zomi na mwambe mpe bamakangu tuku motoba ; mpe abotaki bana mibali tuku mibale na mwambe mpe bana basi tuku motoba. 22 Roboami aponaki Abiya, mwana mobali ya Maaka, mpo ete azala mokambi ya liboso ya bandeko na ye ya mibali, pamba te azalaki na makanisi ya kokomisa ye mokonzi. 23 Boye, asalelaki mayele ya kopanza bana na ye nyonso ya mibali kati na bituka nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, kati na bingumba nyonso batonga makasi ; apesaki bango bilei mpe basi ebele.

In Other Versions

2 Chronicles 11 in the ANGEFD

2 Chronicles 11 in the ANTPNG2D

2 Chronicles 11 in the AS21

2 Chronicles 11 in the BAGH

2 Chronicles 11 in the BBPNG

2 Chronicles 11 in the BBT1E

2 Chronicles 11 in the BDS

2 Chronicles 11 in the BEV

2 Chronicles 11 in the BHAD

2 Chronicles 11 in the BIB

2 Chronicles 11 in the BLPT

2 Chronicles 11 in the BNT

2 Chronicles 11 in the BNTABOOT

2 Chronicles 11 in the BNTLV

2 Chronicles 11 in the BOATCB

2 Chronicles 11 in the BOATCB2

2 Chronicles 11 in the BOBCV

2 Chronicles 11 in the BOCNT

2 Chronicles 11 in the BOECS

2 Chronicles 11 in the BOGWICC

2 Chronicles 11 in the BOHCB

2 Chronicles 11 in the BOHCV

2 Chronicles 11 in the BOHLNT

2 Chronicles 11 in the BOHNTLTAL

2 Chronicles 11 in the BOICB

2 Chronicles 11 in the BOILNTAP

2 Chronicles 11 in the BOITCV

2 Chronicles 11 in the BOKCV

2 Chronicles 11 in the BOKCV2

2 Chronicles 11 in the BOKHWOG

2 Chronicles 11 in the BOKSSV

2 Chronicles 11 in the BOLCB

2 Chronicles 11 in the BOMCV

2 Chronicles 11 in the BONAV

2 Chronicles 11 in the BONCB

2 Chronicles 11 in the BONLT

2 Chronicles 11 in the BONUT2

2 Chronicles 11 in the BOPLNT

2 Chronicles 11 in the BOSCB

2 Chronicles 11 in the BOSNC

2 Chronicles 11 in the BOTLNT

2 Chronicles 11 in the BOVCB

2 Chronicles 11 in the BOYCB

2 Chronicles 11 in the BPBB

2 Chronicles 11 in the BPH

2 Chronicles 11 in the BSB

2 Chronicles 11 in the CCB

2 Chronicles 11 in the CUV

2 Chronicles 11 in the CUVS

2 Chronicles 11 in the DBT

2 Chronicles 11 in the DGDNT

2 Chronicles 11 in the DHNT

2 Chronicles 11 in the DNT

2 Chronicles 11 in the ELBE

2 Chronicles 11 in the EMTV

2 Chronicles 11 in the ESV

2 Chronicles 11 in the FBV

2 Chronicles 11 in the FEB

2 Chronicles 11 in the GGMNT

2 Chronicles 11 in the GNT

2 Chronicles 11 in the HARY

2 Chronicles 11 in the HNT

2 Chronicles 11 in the IRVA

2 Chronicles 11 in the IRVB

2 Chronicles 11 in the IRVG

2 Chronicles 11 in the IRVH

2 Chronicles 11 in the IRVK

2 Chronicles 11 in the IRVM

2 Chronicles 11 in the IRVM2

2 Chronicles 11 in the IRVO

2 Chronicles 11 in the IRVP

2 Chronicles 11 in the IRVT

2 Chronicles 11 in the IRVT2

2 Chronicles 11 in the IRVU

2 Chronicles 11 in the ISVN

2 Chronicles 11 in the JSNT

2 Chronicles 11 in the KAPI

2 Chronicles 11 in the KBT1ETNIK

2 Chronicles 11 in the KBV

2 Chronicles 11 in the KJV

2 Chronicles 11 in the KNFD

2 Chronicles 11 in the LBA

2 Chronicles 11 in the LBLA

2 Chronicles 11 in the LNT

2 Chronicles 11 in the LSV

2 Chronicles 11 in the MAAL

2 Chronicles 11 in the MBV

2 Chronicles 11 in the MBV2

2 Chronicles 11 in the MHNT

2 Chronicles 11 in the MKNFD

2 Chronicles 11 in the MNG

2 Chronicles 11 in the MNT

2 Chronicles 11 in the MNT2

2 Chronicles 11 in the MRS1T

2 Chronicles 11 in the NAA

2 Chronicles 11 in the NASB

2 Chronicles 11 in the NBLA

2 Chronicles 11 in the NBS

2 Chronicles 11 in the NBVTP

2 Chronicles 11 in the NET2

2 Chronicles 11 in the NIV11

2 Chronicles 11 in the NNT

2 Chronicles 11 in the NNT2

2 Chronicles 11 in the NNT3

2 Chronicles 11 in the PDDPT

2 Chronicles 11 in the PFNT

2 Chronicles 11 in the RMNT

2 Chronicles 11 in the SBIAS

2 Chronicles 11 in the SBIBS

2 Chronicles 11 in the SBIBS2

2 Chronicles 11 in the SBICS

2 Chronicles 11 in the SBIDS

2 Chronicles 11 in the SBIGS

2 Chronicles 11 in the SBIHS

2 Chronicles 11 in the SBIIS

2 Chronicles 11 in the SBIIS2

2 Chronicles 11 in the SBIIS3

2 Chronicles 11 in the SBIKS

2 Chronicles 11 in the SBIKS2

2 Chronicles 11 in the SBIMS

2 Chronicles 11 in the SBIOS

2 Chronicles 11 in the SBIPS

2 Chronicles 11 in the SBISS

2 Chronicles 11 in the SBITS

2 Chronicles 11 in the SBITS2

2 Chronicles 11 in the SBITS3

2 Chronicles 11 in the SBITS4

2 Chronicles 11 in the SBIUS

2 Chronicles 11 in the SBIVS

2 Chronicles 11 in the SBT

2 Chronicles 11 in the SBT1E

2 Chronicles 11 in the SCHL

2 Chronicles 11 in the SNT

2 Chronicles 11 in the SUSU

2 Chronicles 11 in the SUSU2

2 Chronicles 11 in the SYNO

2 Chronicles 11 in the TBIAOTANT

2 Chronicles 11 in the TBT1E

2 Chronicles 11 in the TBT1E2

2 Chronicles 11 in the TFTIP

2 Chronicles 11 in the TFTU

2 Chronicles 11 in the TGNTATF3T

2 Chronicles 11 in the THAI

2 Chronicles 11 in the TNFD

2 Chronicles 11 in the TNT

2 Chronicles 11 in the TNTIK

2 Chronicles 11 in the TNTIL

2 Chronicles 11 in the TNTIN

2 Chronicles 11 in the TNTIP

2 Chronicles 11 in the TNTIZ

2 Chronicles 11 in the TOMA

2 Chronicles 11 in the TTENT

2 Chronicles 11 in the UBG

2 Chronicles 11 in the UGV

2 Chronicles 11 in the UGV2

2 Chronicles 11 in the UGV3

2 Chronicles 11 in the VBL

2 Chronicles 11 in the VDCC

2 Chronicles 11 in the YALU

2 Chronicles 11 in the YAPE

2 Chronicles 11 in the YBVTP

2 Chronicles 11 in the ZBP