2 Chronicles 2 (BOLCB2)
1 Salomo asangisaki bato nkoto tuku sambo mpo na komema biloko ya kotongela, bato nkoto tuku mwambe mpo na kobuka mabanga na bangomba, mpe bato nkoto misato na nkama motoba mpo na kokengela bango. 2 Salomo atindaki maloba oyo epai ya Irami, mokonzi ya Tiri :— Sala na ngai ndenge osalaki mpo na Davidi, tata na ngai, tango otindelaki ye mabaya ya nzete ya sedele mpo na kotonga ndako na ye ya kovanda. 3 Nzokande, ngai nalingi sik’oyo kotonga Tempelo mpo na Kombo na Yawe, Nzambe na ngai, mpo na kobulisa yango mpo na lokumu na Ye, mpo na kobonzela Ye malasi ya solo kitoko lokola mbeka, mpo na kobongisaka kuna mapa tango nyonso, mpo na kobonzaka kuna bambeka ya kotumba, tongo mpe pokwa, mpe mpo na kosepelaka kuna mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, ya Yawe, Nzambe na biso, ndenge ezali malako ya tango nyonso mpo na Isalaele. 4 Tempelo oyo nakotonga ekozala monene, pamba te Nzambe na biso azali monene koleka banzambe nyonso. 5 Kasi nani akoki kotongela Ye Tempelo, pamba te Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Ye te ? Mpe ngai nde nani mpo ete natongela Ye Tempelo, soki kaka etumbelo te mpo na kotumba mbeka ya malasi liboso na Ye ? 6 Boye, tindela ngai moto oyo ayebi kosalela wolo, palata, bronze, ebende, langi ya motane ya pete, langi ya motane ya makasi mpe langi ya ble, mpe ayebi kotobola bililingi, mpo ete asala mosala, kati na Yuda mpe Yelusalemi, elongo na basali na ngai, oyo bayebi penza mosala, ba-oyo Davidi, tata na ngai, abongisaki. 7 Tindela ngai mpe, wuta na Libani, mabaya ya nzete ya sedele, ya sipele mpe ya santale, pamba te nayebi ete bato na yo bayebi malamu kokata banzete ya Libani. Bato na ngai bakosala elongo na basali na yo, 8 bakobongisela ngai mabaya ebele, pamba te Tempelo oyo nazali kotonga esengeli kozala monene mpe kitoko. 9 Nakopesa na basali na yo, oyo bakokata banzete batone nkoto motoba ya ble, batone nkoto minei ya orje, balitele ya vino nkoto nkama libwa, balitele ya mafuta nkoto nkama libwa. 10 Irami, mokonzi ya Tiri, azongiselaki Salomo na mokanda :— Ezali mpo ete Yawe alingi bato na Ye nde akomisi yo mokonzi na bango. 11 Irami alobaki na ye lisusu :— Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, Mokeli ya likolo mpe se, apambolama, mpo ete apesi na mokonzi Davidi mwana mobali ya mayele mpe ya bososoli, oyo akotonga Tempelo mpo na Yawe mpe ndako ya mokonzi mpo na ye moko. 12 Nazali kotindela yo sik’oyo Urami-Abi ; azali penza moto moko ya mayele oyo ayebi mosala malamu. 13 Mama na ye azalaki moto ya libota ya Dani, mpe tata na ye, moto ya Tiri. Abongisama mpo na misala ya wolo, ya palata, ya bronze, ya ebende, ya mabanga, ya mabaya, ya kotia langi ya motane makasi, ya ble, ya motane ya pete mpe ya kobongisa lino ya pete. Ayebi malamu mosala ya kotobola bililingi, mpe akoki kosala mosala nyonso oyo bakosenga ye. Akosala elongo na basali na yo mpe na basali ya nkolo na ngai, Davidi, tata na yo. 14 Sik’oyo, tika ete nkolo na ngai atinda epai ya basali na ye ble, orje, mafuta mpe masanga ya vino oyo alakaki. 15 Biso, tokokata banzete nyonso ya Libani, oyo ozali na yango posa ; tokokangisa mpe tokotinda yango na nzela ya mayi ya ebale monene kino na Jafa. Wuta kuna, yo okokomisa yango na Yelusalemi. 16 Salomo atangaki motango ya bapaya nyonso oyo bazalaki kati na Isalaele kolanda ndenge Davidi, tata na ye, atangaki motango ya bato. Bazalaki bato nkoto nkama moko na tuku mitano na misato na nkama motoba. 17 Aponaki bato nkoto tuku sambo mpo na komema biloko, bato nkoto tuku mwambe mpo na kobuka mabanga na bangomba, mpe bakengeli nkoto misato na nkama motoba mpo na kosalisa bato misala.
In Other Versions
2 Chronicles 2 in the ANGEFD
2 Chronicles 2 in the ANTPNG2D
2 Chronicles 2 in the AS21
2 Chronicles 2 in the BAGH
2 Chronicles 2 in the BBPNG
2 Chronicles 2 in the BBT1E
2 Chronicles 2 in the BDS
2 Chronicles 2 in the BEV
2 Chronicles 2 in the BHAD
2 Chronicles 2 in the BIB
2 Chronicles 2 in the BLPT
2 Chronicles 2 in the BNT
2 Chronicles 2 in the BNTABOOT
2 Chronicles 2 in the BNTLV
2 Chronicles 2 in the BOATCB
2 Chronicles 2 in the BOATCB2
2 Chronicles 2 in the BOBCV
2 Chronicles 2 in the BOCNT
2 Chronicles 2 in the BOECS
2 Chronicles 2 in the BOGWICC
2 Chronicles 2 in the BOHCB
2 Chronicles 2 in the BOHCV
2 Chronicles 2 in the BOHLNT
2 Chronicles 2 in the BOHNTLTAL
2 Chronicles 2 in the BOICB
2 Chronicles 2 in the BOILNTAP
2 Chronicles 2 in the BOITCV
2 Chronicles 2 in the BOKCV
2 Chronicles 2 in the BOKCV2
2 Chronicles 2 in the BOKHWOG
2 Chronicles 2 in the BOKSSV
2 Chronicles 2 in the BOLCB
2 Chronicles 2 in the BOMCV
2 Chronicles 2 in the BONAV
2 Chronicles 2 in the BONCB
2 Chronicles 2 in the BONLT
2 Chronicles 2 in the BONUT2
2 Chronicles 2 in the BOPLNT
2 Chronicles 2 in the BOSCB
2 Chronicles 2 in the BOSNC
2 Chronicles 2 in the BOTLNT
2 Chronicles 2 in the BOVCB
2 Chronicles 2 in the BOYCB
2 Chronicles 2 in the BPBB
2 Chronicles 2 in the BPH
2 Chronicles 2 in the BSB
2 Chronicles 2 in the CCB
2 Chronicles 2 in the CUV
2 Chronicles 2 in the CUVS
2 Chronicles 2 in the DBT
2 Chronicles 2 in the DGDNT
2 Chronicles 2 in the DHNT
2 Chronicles 2 in the DNT
2 Chronicles 2 in the ELBE
2 Chronicles 2 in the EMTV
2 Chronicles 2 in the ESV
2 Chronicles 2 in the FBV
2 Chronicles 2 in the FEB
2 Chronicles 2 in the GGMNT
2 Chronicles 2 in the GNT
2 Chronicles 2 in the HARY
2 Chronicles 2 in the HNT
2 Chronicles 2 in the IRVA
2 Chronicles 2 in the IRVB
2 Chronicles 2 in the IRVG
2 Chronicles 2 in the IRVH
2 Chronicles 2 in the IRVK
2 Chronicles 2 in the IRVM
2 Chronicles 2 in the IRVM2
2 Chronicles 2 in the IRVO
2 Chronicles 2 in the IRVP
2 Chronicles 2 in the IRVT
2 Chronicles 2 in the IRVT2
2 Chronicles 2 in the IRVU
2 Chronicles 2 in the ISVN
2 Chronicles 2 in the JSNT
2 Chronicles 2 in the KAPI
2 Chronicles 2 in the KBT1ETNIK
2 Chronicles 2 in the KBV
2 Chronicles 2 in the KJV
2 Chronicles 2 in the KNFD
2 Chronicles 2 in the LBA
2 Chronicles 2 in the LBLA
2 Chronicles 2 in the LNT
2 Chronicles 2 in the LSV
2 Chronicles 2 in the MAAL
2 Chronicles 2 in the MBV
2 Chronicles 2 in the MBV2
2 Chronicles 2 in the MHNT
2 Chronicles 2 in the MKNFD
2 Chronicles 2 in the MNG
2 Chronicles 2 in the MNT
2 Chronicles 2 in the MNT2
2 Chronicles 2 in the MRS1T
2 Chronicles 2 in the NAA
2 Chronicles 2 in the NASB
2 Chronicles 2 in the NBLA
2 Chronicles 2 in the NBS
2 Chronicles 2 in the NBVTP
2 Chronicles 2 in the NET2
2 Chronicles 2 in the NIV11
2 Chronicles 2 in the NNT
2 Chronicles 2 in the NNT2
2 Chronicles 2 in the NNT3
2 Chronicles 2 in the PDDPT
2 Chronicles 2 in the PFNT
2 Chronicles 2 in the RMNT
2 Chronicles 2 in the SBIAS
2 Chronicles 2 in the SBIBS
2 Chronicles 2 in the SBIBS2
2 Chronicles 2 in the SBICS
2 Chronicles 2 in the SBIDS
2 Chronicles 2 in the SBIGS
2 Chronicles 2 in the SBIHS
2 Chronicles 2 in the SBIIS
2 Chronicles 2 in the SBIIS2
2 Chronicles 2 in the SBIIS3
2 Chronicles 2 in the SBIKS
2 Chronicles 2 in the SBIKS2
2 Chronicles 2 in the SBIMS
2 Chronicles 2 in the SBIOS
2 Chronicles 2 in the SBIPS
2 Chronicles 2 in the SBISS
2 Chronicles 2 in the SBITS
2 Chronicles 2 in the SBITS2
2 Chronicles 2 in the SBITS3
2 Chronicles 2 in the SBITS4
2 Chronicles 2 in the SBIUS
2 Chronicles 2 in the SBIVS
2 Chronicles 2 in the SBT
2 Chronicles 2 in the SBT1E
2 Chronicles 2 in the SCHL
2 Chronicles 2 in the SNT
2 Chronicles 2 in the SUSU
2 Chronicles 2 in the SUSU2
2 Chronicles 2 in the SYNO
2 Chronicles 2 in the TBIAOTANT
2 Chronicles 2 in the TBT1E
2 Chronicles 2 in the TBT1E2
2 Chronicles 2 in the TFTIP
2 Chronicles 2 in the TFTU
2 Chronicles 2 in the TGNTATF3T
2 Chronicles 2 in the THAI
2 Chronicles 2 in the TNFD
2 Chronicles 2 in the TNT
2 Chronicles 2 in the TNTIK
2 Chronicles 2 in the TNTIL
2 Chronicles 2 in the TNTIN
2 Chronicles 2 in the TNTIP
2 Chronicles 2 in the TNTIZ
2 Chronicles 2 in the TOMA
2 Chronicles 2 in the TTENT
2 Chronicles 2 in the UBG
2 Chronicles 2 in the UGV
2 Chronicles 2 in the UGV2
2 Chronicles 2 in the UGV3
2 Chronicles 2 in the VBL
2 Chronicles 2 in the VDCC
2 Chronicles 2 in the YALU
2 Chronicles 2 in the YAPE
2 Chronicles 2 in the YBVTP
2 Chronicles 2 in the ZBP