2 Chronicles 24 (BOLCB2)

1 Joasi azalaki na mibu sambo ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku minei na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Tsibia. » Tsibia azalaki moto ya Beri-Sheba. 2 Joasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe na mikolo nyonso ya bomoi ya Nganga-Nzambe Yeoyada. 3 Yeoyada aponaki mpo na Joasi basi mibale oyo babotelaki ye bana mibali mpe bana basi. 4 Sima na yango, Joasi azwaki mokano ya kobongisa Tempelo ya Yawe. 5 Abengisaki Banganga-Nzambe mpe Balevi, alobaki na bango :— Botambola kati na bingumba ya Yuda, bokongola mbongo, mobu na mobu, kati na Isalaele mobimba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe, Nzambe na bino. Bosala yango sik’oyo.Kasi Balevi basalaki yango na lombangu te. 6 Mokonzi abengisaki Yeoyada, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe alobaki na ye : « Mpo na nini olobaki te na Balevi ete bakongola, wuta na Yuda mpe na Yelusalemi, mpako oyo Moyize, mosali na Yawe, akatelaki lisanga ya Isalaele mpo na Ndako ya kapo ya Litatoli ? » 7 Nzokande, bana mibali ya Atali, mwasi mabe, batobolaki madusu mpo na kokota kati na Tempelo ya Yawe mpe basalelaki ata bisalelo na yango nyonso ya bule mpo na losambo ya banzambe Bala. 8 Mokonzi apesaki mitindo ete basala sanduku, batia yango na libanda ya ekuke ya Tempelo ya Yawe 9 mpe batatola kati na Yuda mpe kati na Yelusalemi ete basengeli komemela Yawe mpako oyo Moyize, mosali na Nzambe, akatelaki Isalaele kati na esobe. 10 Bakalaka nyonso mpe bato nyonso basepelaki na yango : bamemaki mbongo na bango mpe batiaki yango kati na sanduku kino etondaki. 11 Tango nyonso Balevi bazalaki komema sanduku epai ya bakalaka ya mokonzi mpe bazalaki komona ete ezalaki na mbongo ebele, mokomi mikanda ya mokonzi mpe mobombi biloko ya mokonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki koya kolongola mbongo oyo ezalaki kati na sanduku mpe kozongisa sanduku na esika na yango. Bazalaki kosala bongo mikolo nyonso mpe bazalaki kokongola mbongo ebele. 12 Mokonzi mpe Yeoyada bazalaki kopesa yango na bato oyo bazalaki kosala misala ya kobongisa Tempelo ya Yawe. Bafutaki babuki mabanga, basharipantie mpe bato oyo basalaka misala ya bibende mpe ya bronze na moto, mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe. 13 Bato oyo bazalaki kosala misala basalaki yango noki, mpe misala ezalaki kotambola malamu na bokambami na bango. Babongisaki Tempelo ya Nzambe ndenge ezalaka. 14 Tango basilisaki, bazongisaki epai ya mokonzi mpe Yeoyada mbongo oyo etikalaki. Na mbongo yango, basalaki bisalelo mpo na Tempelo ya Yawe, mpo na losambo, mpo na bambeka ya kotumba, bakopo, mpe bisalelo mosusu ya wolo mpe ya palata. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Nganga-Nzambe Yeoyada, bazalaki kobonza bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe. 15 Yeoyada akomaki mobange makasi, atondaki mikolo mpe akufaki tango akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. 16 Bakundaki ye kati na engumba ya Davidi esika moko na bakonzi mpo na bolamu oyo asalaki kati na Isalaele, mpo na Nzambe mpe mpo na Tempelo ya Yawe. 17 Sima na kufa ya Yeoyada, bakambi ya Yuda bayaki kopesa mokonzi lokumu, mpe mokonzi ayokaki bango. 18 Basundolaki Tempelo ya Yawe, Nzambe ya batata na bango, mpe bakomaki kogumbamela makonzi ya Ashera mpe banzambe ya bikeko. Mpo na etamboli mabe na bango, kanda ya Yawe ekweyelaki Yuda mpe Yelusalemi. 19 Atako Yawe atindaki basakoli kati na bango mpo na kozongisa bango epai na Ye, mpe atako basakoli bapamelaki bango, kasi batikalaki kaka koyoka te. 20 Molimo ya Nzambe akitelaki Zakari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Yeoyada, mpe Zakari atelemaki liboso ya bato mpe alobaki : « Tala makambo oyo Nzambe alobi : ‹ Mpo na nini bozali kotosa mitindo ya Yawe te ? Bokokende liboso te ! Lokola bosundoli Yawe, Ye mpe asundoli bino. › » 21 Kasi bato basalelaki ye likita ; mpe na etinda ya mokonzi, babomaki ye na mabanga kati na lopango ya Tempelo ya Yawe. 22 Mokonzi Joasi abosanaki bolamu nyonso oyo Yeoyada, tata ya Zakari, asalelaki ye, mpe abomaki Zakari, mwana mobali ya Yeoyada. Tango azalaki kokufa, Zakari alobaki : « Tika ete Yawe amona mpe akata likambo oyo ! » 23 Na suka ya mobu, basoda ya Siri babundisaki Joasi, bakotaki na makasi kati na Yuda mpe Yelusalemi, babomaki bakambi nyonso ya bato mpe batindaki bomengo nyonso ya bitumba epai ya mokonzi na bango, na Damasi. 24 Atako ndambo ya basoda ya Siri kaka nde bayaki, kasi Yawe akabaki na maboko na bango mampinga ya bato ya Yuda, oyo elekaki monene, pamba te basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango. Boye, basoda ya Siri bakokisaki etumbu oyo ekweyelaki Joasi. 25 Tango bato ya Siri bazongaki, batikaki Joasi na bapota minene. Bakalaka na ye basalelaki ye likita na ndenge abomaki mwana mobali ya Nganga-Nzambe Yeoyada mpe babomaki ye na mbeto na ye. Boye, akufaki mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, kasi kati na bakunda ya bakonzi te. 26 Tala bato oyo basalelaki ye likita : Zabadi, mwana mobali ya Shimeati, mwasi ya mboka Amoni ; mpe Yozabadi, mwana mobali ya Shimiriti, mwasi ya Moabi. 27 Bakombo ya bana na ye ya mibali, maloba nyonso oyo basakolaki mpo na ye mpe mikano oyo babongisaki mpo na Tempelo ya Nzambe ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi. Amatsia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

In Other Versions

2 Chronicles 24 in the ANGEFD

2 Chronicles 24 in the ANTPNG2D

2 Chronicles 24 in the AS21

2 Chronicles 24 in the BAGH

2 Chronicles 24 in the BBPNG

2 Chronicles 24 in the BBT1E

2 Chronicles 24 in the BDS

2 Chronicles 24 in the BEV

2 Chronicles 24 in the BHAD

2 Chronicles 24 in the BIB

2 Chronicles 24 in the BLPT

2 Chronicles 24 in the BNT

2 Chronicles 24 in the BNTABOOT

2 Chronicles 24 in the BNTLV

2 Chronicles 24 in the BOATCB

2 Chronicles 24 in the BOATCB2

2 Chronicles 24 in the BOBCV

2 Chronicles 24 in the BOCNT

2 Chronicles 24 in the BOECS

2 Chronicles 24 in the BOGWICC

2 Chronicles 24 in the BOHCB

2 Chronicles 24 in the BOHCV

2 Chronicles 24 in the BOHLNT

2 Chronicles 24 in the BOHNTLTAL

2 Chronicles 24 in the BOICB

2 Chronicles 24 in the BOILNTAP

2 Chronicles 24 in the BOITCV

2 Chronicles 24 in the BOKCV

2 Chronicles 24 in the BOKCV2

2 Chronicles 24 in the BOKHWOG

2 Chronicles 24 in the BOKSSV

2 Chronicles 24 in the BOLCB

2 Chronicles 24 in the BOMCV

2 Chronicles 24 in the BONAV

2 Chronicles 24 in the BONCB

2 Chronicles 24 in the BONLT

2 Chronicles 24 in the BONUT2

2 Chronicles 24 in the BOPLNT

2 Chronicles 24 in the BOSCB

2 Chronicles 24 in the BOSNC

2 Chronicles 24 in the BOTLNT

2 Chronicles 24 in the BOVCB

2 Chronicles 24 in the BOYCB

2 Chronicles 24 in the BPBB

2 Chronicles 24 in the BPH

2 Chronicles 24 in the BSB

2 Chronicles 24 in the CCB

2 Chronicles 24 in the CUV

2 Chronicles 24 in the CUVS

2 Chronicles 24 in the DBT

2 Chronicles 24 in the DGDNT

2 Chronicles 24 in the DHNT

2 Chronicles 24 in the DNT

2 Chronicles 24 in the ELBE

2 Chronicles 24 in the EMTV

2 Chronicles 24 in the ESV

2 Chronicles 24 in the FBV

2 Chronicles 24 in the FEB

2 Chronicles 24 in the GGMNT

2 Chronicles 24 in the GNT

2 Chronicles 24 in the HARY

2 Chronicles 24 in the HNT

2 Chronicles 24 in the IRVA

2 Chronicles 24 in the IRVB

2 Chronicles 24 in the IRVG

2 Chronicles 24 in the IRVH

2 Chronicles 24 in the IRVK

2 Chronicles 24 in the IRVM

2 Chronicles 24 in the IRVM2

2 Chronicles 24 in the IRVO

2 Chronicles 24 in the IRVP

2 Chronicles 24 in the IRVT

2 Chronicles 24 in the IRVT2

2 Chronicles 24 in the IRVU

2 Chronicles 24 in the ISVN

2 Chronicles 24 in the JSNT

2 Chronicles 24 in the KAPI

2 Chronicles 24 in the KBT1ETNIK

2 Chronicles 24 in the KBV

2 Chronicles 24 in the KJV

2 Chronicles 24 in the KNFD

2 Chronicles 24 in the LBA

2 Chronicles 24 in the LBLA

2 Chronicles 24 in the LNT

2 Chronicles 24 in the LSV

2 Chronicles 24 in the MAAL

2 Chronicles 24 in the MBV

2 Chronicles 24 in the MBV2

2 Chronicles 24 in the MHNT

2 Chronicles 24 in the MKNFD

2 Chronicles 24 in the MNG

2 Chronicles 24 in the MNT

2 Chronicles 24 in the MNT2

2 Chronicles 24 in the MRS1T

2 Chronicles 24 in the NAA

2 Chronicles 24 in the NASB

2 Chronicles 24 in the NBLA

2 Chronicles 24 in the NBS

2 Chronicles 24 in the NBVTP

2 Chronicles 24 in the NET2

2 Chronicles 24 in the NIV11

2 Chronicles 24 in the NNT

2 Chronicles 24 in the NNT2

2 Chronicles 24 in the NNT3

2 Chronicles 24 in the PDDPT

2 Chronicles 24 in the PFNT

2 Chronicles 24 in the RMNT

2 Chronicles 24 in the SBIAS

2 Chronicles 24 in the SBIBS

2 Chronicles 24 in the SBIBS2

2 Chronicles 24 in the SBICS

2 Chronicles 24 in the SBIDS

2 Chronicles 24 in the SBIGS

2 Chronicles 24 in the SBIHS

2 Chronicles 24 in the SBIIS

2 Chronicles 24 in the SBIIS2

2 Chronicles 24 in the SBIIS3

2 Chronicles 24 in the SBIKS

2 Chronicles 24 in the SBIKS2

2 Chronicles 24 in the SBIMS

2 Chronicles 24 in the SBIOS

2 Chronicles 24 in the SBIPS

2 Chronicles 24 in the SBISS

2 Chronicles 24 in the SBITS

2 Chronicles 24 in the SBITS2

2 Chronicles 24 in the SBITS3

2 Chronicles 24 in the SBITS4

2 Chronicles 24 in the SBIUS

2 Chronicles 24 in the SBIVS

2 Chronicles 24 in the SBT

2 Chronicles 24 in the SBT1E

2 Chronicles 24 in the SCHL

2 Chronicles 24 in the SNT

2 Chronicles 24 in the SUSU

2 Chronicles 24 in the SUSU2

2 Chronicles 24 in the SYNO

2 Chronicles 24 in the TBIAOTANT

2 Chronicles 24 in the TBT1E

2 Chronicles 24 in the TBT1E2

2 Chronicles 24 in the TFTIP

2 Chronicles 24 in the TFTU

2 Chronicles 24 in the TGNTATF3T

2 Chronicles 24 in the THAI

2 Chronicles 24 in the TNFD

2 Chronicles 24 in the TNT

2 Chronicles 24 in the TNTIK

2 Chronicles 24 in the TNTIL

2 Chronicles 24 in the TNTIN

2 Chronicles 24 in the TNTIP

2 Chronicles 24 in the TNTIZ

2 Chronicles 24 in the TOMA

2 Chronicles 24 in the TTENT

2 Chronicles 24 in the UBG

2 Chronicles 24 in the UGV

2 Chronicles 24 in the UGV2

2 Chronicles 24 in the UGV3

2 Chronicles 24 in the VBL

2 Chronicles 24 in the VDCC

2 Chronicles 24 in the YALU

2 Chronicles 24 in the YAPE

2 Chronicles 24 in the YBVTP

2 Chronicles 24 in the ZBP