2 Chronicles 30 (BOLCB2)

1 Ezekiasi atindaki bamemi sango kati na Isalaele mobimba mpe Yuda, mpe akomelaki Efrayimi mpe Manase mikanda mpo na kosenga na bango ete baya na Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi, mpo na kosepela feti ya Pasika ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. 2 Mokonzi elongo na bakalaka na ye mpe lisanga mobimba ya Yelusalemi bazwaki mokano ya kosepela feti ya Pasika na sanza ya mibale. 3 Balongaki te kosepela feti ya Pasika na mokolo oyo ekatama, pamba te Banganga-Nzambe oyo bamibulisaki bazalaki mingi te, mpe bato basanganaki te na Yelusalemi. 4 Mokonzi mpe lisanga mobimba bandimaki mabongisi yango, 5 bazwaki mokano ya kopesa mayebisi kati na Isalaele mobimba, longwa na Beri-Sheba kino na Dani, mpo na kosenga na bato nyonso ete baya kosepela feti ya Pasika, na Yelusalemi mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. Pamba te bato moke kaka basepelaki yango kolanda ndenge ekomama kati na makomi. 6 Na etinda ya mokonzi, bamemi sango bakendeki kati na Isalaele mobimba mpe Yuda, na mikanda oyo ewutaki epai ya mokonzi mpe bakalaka na ye. Tala makambo oyo ezalaki kati na mikanda yango :« Bana ya Isalaele, bozongela Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele, mpo ete Ye mpe azongela bino oyo bobiki na maboko ya bakonzi ya mboka Asiri ! 7 Bozala te lokola batata mpe bandeko na bino oyo bazangaki boyengebene liboso ya Yawe, Nzambe ya batata na bango. Yango wana asalaki ete babebisama ndenge bozali komona. 8 Bozala moto makasi te lokola batata na bino ; bomipesa epai na Yawe, boya na Esika ya bule oyo Ye moko abulisi mpo na libela mpe bosalela Yawe, Nzambe na bino, mpo ete kanda makasi na Ye ezala mosika na bino ! 9 Soki solo bozongeli Yawe, bandeko mpe bana na bino oyo bakendeki na bowumbu bakozwa ngolu liboso ya bato oyo bakangaki bango, mpe bakozonga na mokili oyo ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, atonda na ngolu mpe na mawa. Solo, soki bozongeli Ye, akobalola te elongi na Ye mosika na bino. » 10 Bamemi sango batambolaki kati na bingumba nyonso ya Efrayimi mpe ya Manase kino na Zabuloni. Kasi bato bazalaki koseka mpe kotiola bango. 11 Nzokande, ndambo ya bato ya Aseri, ya Manase mpe ya Zabuloni bamikitisaki mpe bakendeki na Yelusalemi. 12 Kati na mokili ya Yuda, loboko ya Nzambe ezalaki kosala na nguya makasi epai ya bato, mpo na kopesa bango bomoko na molimo mpo na kotosa mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, kolandisama na Liloba na Yawe. 13 Bato ebele basanganaki na Yelusalemi mpo na kosepela feti ya Mapa ezanga levire, na sanza ya mibale : bazalaki penza ebele ya bato. 14 Babukaki bitumbelo kati na Yelusalemi mpe balimwisaki bambabola nyonso ya malasi na kobwaka yango na lubwaku ya Sedron. 15 Bakataki kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya mibale. Banganga-Nzambe elongo na Balevi bayokaki soni, bamibulisaki mpe babonzaki bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe. 16 Bazongelaki misala na bango ndenge ekomama na mibeko ya Moyize, moto na Nzambe. Balevi bazalaki kopesa makila ya bambeka epai ya Banganga-Nzambe ; mpe bango, Banganga-Nzambe, bazalaki kosopa yango na etumbelo. 17 Lokola bato mingi kati na lisanga bamibulisaki te, Balevi bazwaki mokumba ya kokata bakingo ya bampate ya Pasika mpo na bato wana nyonso oyo bazalaki peto te ; mpe na bongo, bakokaki te kobulisa bampate na bango epai na Yawe. 18 Atako bato ebele oyo bawutaki na Manase, na Efrayimi, na Isakari mpe na Zabuloni bamipetolaki te, kasi baliaki Pasika na kozanga kolanda oyo ekomama. Yango wana Ezekiasi abondelaki boye mpo na bango :« Yawe, Yo oyo ozali malamu, tika ete olimbisa 19 moto nyonso oyo amipesi na koluka Nzambe, Yawe, Nzambe ya bakoko na ye, na motema na ye mobimba atako amipetolaki te kolanda mibeko ya Esika ya bule ! » 20 Yawe ayokaki libondeli ya Ezekiasi mpe abetaki bato te. 21 Boye bato ya Isalaele oyo bazalaki na Yelusalemi basepelaki mikolo sambo mpe na esengo makasi feti ya Mapa ezanga levire wana Balevi mpe Banganga-Nzambe bazalaki kokumisa Yawe mikolo nyonso na kobeta makasi bibetelo mindule na bango mpo na lokumu ya Yawe. 22 Ezekiasi alendisaki Balevi nyonso oyo balakisaki ete bayebi malamu mosala ya Yawe.Na mikolo sambo ya feti, baliaki misuni ya bambeka, babonzaki bambeka ya boyokani mpe basanzolaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango. 23 Lisanga mobimba eyokanaki kobakisa mikolo mosusu sambo mpo na kokoba kosepela feti. Boye, basalaki feti na esengo na mikolo yango sambo. 24 Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, apesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto sambo ; mpe bakalaka bapesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto zomi. Banganga-Nzambe ebele bamibulisaki. 25 Lisanga mobimba ya Yuda, Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso ya Isalaele mpe bapaya oyo bawutaki na Isalaele to bavandi ya Yuda bazalaki na esengo. 26 Esengo ezalaki makasi kati na Yelusalemi, pamba te wuta na tango ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, likambo ya boye etikala nanu kosalema te kati na Yelusalemi. 27 Banganga-Nzambe mpe Balevi batelemaki mpo na kopambola bato, mpe Nzambe ayokaki bango mpo ete losambo na bango ekomaki kino na Likolo, evandelo na Ye ya bule.

In Other Versions

2 Chronicles 30 in the ANGEFD

2 Chronicles 30 in the ANTPNG2D

2 Chronicles 30 in the AS21

2 Chronicles 30 in the BAGH

2 Chronicles 30 in the BBPNG

2 Chronicles 30 in the BBT1E

2 Chronicles 30 in the BDS

2 Chronicles 30 in the BEV

2 Chronicles 30 in the BHAD

2 Chronicles 30 in the BIB

2 Chronicles 30 in the BLPT

2 Chronicles 30 in the BNT

2 Chronicles 30 in the BNTABOOT

2 Chronicles 30 in the BNTLV

2 Chronicles 30 in the BOATCB

2 Chronicles 30 in the BOATCB2

2 Chronicles 30 in the BOBCV

2 Chronicles 30 in the BOCNT

2 Chronicles 30 in the BOECS

2 Chronicles 30 in the BOGWICC

2 Chronicles 30 in the BOHCB

2 Chronicles 30 in the BOHCV

2 Chronicles 30 in the BOHLNT

2 Chronicles 30 in the BOHNTLTAL

2 Chronicles 30 in the BOICB

2 Chronicles 30 in the BOILNTAP

2 Chronicles 30 in the BOITCV

2 Chronicles 30 in the BOKCV

2 Chronicles 30 in the BOKCV2

2 Chronicles 30 in the BOKHWOG

2 Chronicles 30 in the BOKSSV

2 Chronicles 30 in the BOLCB

2 Chronicles 30 in the BOMCV

2 Chronicles 30 in the BONAV

2 Chronicles 30 in the BONCB

2 Chronicles 30 in the BONLT

2 Chronicles 30 in the BONUT2

2 Chronicles 30 in the BOPLNT

2 Chronicles 30 in the BOSCB

2 Chronicles 30 in the BOSNC

2 Chronicles 30 in the BOTLNT

2 Chronicles 30 in the BOVCB

2 Chronicles 30 in the BOYCB

2 Chronicles 30 in the BPBB

2 Chronicles 30 in the BPH

2 Chronicles 30 in the BSB

2 Chronicles 30 in the CCB

2 Chronicles 30 in the CUV

2 Chronicles 30 in the CUVS

2 Chronicles 30 in the DBT

2 Chronicles 30 in the DGDNT

2 Chronicles 30 in the DHNT

2 Chronicles 30 in the DNT

2 Chronicles 30 in the ELBE

2 Chronicles 30 in the EMTV

2 Chronicles 30 in the ESV

2 Chronicles 30 in the FBV

2 Chronicles 30 in the FEB

2 Chronicles 30 in the GGMNT

2 Chronicles 30 in the GNT

2 Chronicles 30 in the HARY

2 Chronicles 30 in the HNT

2 Chronicles 30 in the IRVA

2 Chronicles 30 in the IRVB

2 Chronicles 30 in the IRVG

2 Chronicles 30 in the IRVH

2 Chronicles 30 in the IRVK

2 Chronicles 30 in the IRVM

2 Chronicles 30 in the IRVM2

2 Chronicles 30 in the IRVO

2 Chronicles 30 in the IRVP

2 Chronicles 30 in the IRVT

2 Chronicles 30 in the IRVT2

2 Chronicles 30 in the IRVU

2 Chronicles 30 in the ISVN

2 Chronicles 30 in the JSNT

2 Chronicles 30 in the KAPI

2 Chronicles 30 in the KBT1ETNIK

2 Chronicles 30 in the KBV

2 Chronicles 30 in the KJV

2 Chronicles 30 in the KNFD

2 Chronicles 30 in the LBA

2 Chronicles 30 in the LBLA

2 Chronicles 30 in the LNT

2 Chronicles 30 in the LSV

2 Chronicles 30 in the MAAL

2 Chronicles 30 in the MBV

2 Chronicles 30 in the MBV2

2 Chronicles 30 in the MHNT

2 Chronicles 30 in the MKNFD

2 Chronicles 30 in the MNG

2 Chronicles 30 in the MNT

2 Chronicles 30 in the MNT2

2 Chronicles 30 in the MRS1T

2 Chronicles 30 in the NAA

2 Chronicles 30 in the NASB

2 Chronicles 30 in the NBLA

2 Chronicles 30 in the NBS

2 Chronicles 30 in the NBVTP

2 Chronicles 30 in the NET2

2 Chronicles 30 in the NIV11

2 Chronicles 30 in the NNT

2 Chronicles 30 in the NNT2

2 Chronicles 30 in the NNT3

2 Chronicles 30 in the PDDPT

2 Chronicles 30 in the PFNT

2 Chronicles 30 in the RMNT

2 Chronicles 30 in the SBIAS

2 Chronicles 30 in the SBIBS

2 Chronicles 30 in the SBIBS2

2 Chronicles 30 in the SBICS

2 Chronicles 30 in the SBIDS

2 Chronicles 30 in the SBIGS

2 Chronicles 30 in the SBIHS

2 Chronicles 30 in the SBIIS

2 Chronicles 30 in the SBIIS2

2 Chronicles 30 in the SBIIS3

2 Chronicles 30 in the SBIKS

2 Chronicles 30 in the SBIKS2

2 Chronicles 30 in the SBIMS

2 Chronicles 30 in the SBIOS

2 Chronicles 30 in the SBIPS

2 Chronicles 30 in the SBISS

2 Chronicles 30 in the SBITS

2 Chronicles 30 in the SBITS2

2 Chronicles 30 in the SBITS3

2 Chronicles 30 in the SBITS4

2 Chronicles 30 in the SBIUS

2 Chronicles 30 in the SBIVS

2 Chronicles 30 in the SBT

2 Chronicles 30 in the SBT1E

2 Chronicles 30 in the SCHL

2 Chronicles 30 in the SNT

2 Chronicles 30 in the SUSU

2 Chronicles 30 in the SUSU2

2 Chronicles 30 in the SYNO

2 Chronicles 30 in the TBIAOTANT

2 Chronicles 30 in the TBT1E

2 Chronicles 30 in the TBT1E2

2 Chronicles 30 in the TFTIP

2 Chronicles 30 in the TFTU

2 Chronicles 30 in the TGNTATF3T

2 Chronicles 30 in the THAI

2 Chronicles 30 in the TNFD

2 Chronicles 30 in the TNT

2 Chronicles 30 in the TNTIK

2 Chronicles 30 in the TNTIL

2 Chronicles 30 in the TNTIN

2 Chronicles 30 in the TNTIP

2 Chronicles 30 in the TNTIZ

2 Chronicles 30 in the TOMA

2 Chronicles 30 in the TTENT

2 Chronicles 30 in the UBG

2 Chronicles 30 in the UGV

2 Chronicles 30 in the UGV2

2 Chronicles 30 in the UGV3

2 Chronicles 30 in the VBL

2 Chronicles 30 in the VDCC

2 Chronicles 30 in the YALU

2 Chronicles 30 in the YAPE

2 Chronicles 30 in the YBVTP

2 Chronicles 30 in the ZBP