2 Chronicles 35 (BOLCB2)

1 Joziasi asepelaki feti ya Pasika mpo na lokumu ya Yawe kati na Yelusalemi ; mpe na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bakataki kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika. 2 Atiaki Banganga-Nzambe mpo ete bakoba mosala na bango mpe alendisaki bango na mosala ya Tempelo ya Yawe. 3 Alobaki na Balevi oyo babulisamaki mpo na Yawe mpe bazalaki na mokumba ya koteya Isalaele mobimba :— Botia Sanduku ya bule kati na Tempelo oyo Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, atongaki ; ezali lisusu ya komema na mapeka na bino te. Sik’oyo, bosalela Yawe, Nzambe na bino, mpe Isalaele, bato na Ye. 4 Bomibongisa kolanda mabota mpe masanga na bino ya mosala, kolanda mitindo oyo Davidi, mokonzi ya Isalaele, mpe Salomo, mwana na ye ya mobali, bakomaki. 5 Bowumela na bisika na bino ya mosala kati na Esika ya bule : lisanga moko ya Balevi mpo na libota moko na moko ya bandeko na bino, bato ya ekolo na bino. 6 Bokata kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika, bomibulisa mpe bobongisa mpate yango ya Pasika mpo na bandeko na bino oyo bozali na bango ekolo moko, kolanda mitindo ya Yawe na nzela ya Moyize. 7 Joziasi azwaki kati na bibwele na ye moko mokonzi bana meme mpe bana ntaba nkoto tuku misato mpe bangombe nkoto misato, mpo na bato ya Isalaele, nkoto tuku misato oyo bazalaki wana mpo ete bakoka kobonza yango lokola mbeka ya Pasika. 8 Bakalaka na ye mpe bapesaki wuta na mokano ya mitema na bango, epai ya bato, epai ya Banganga-Nzambe mpe epai ya Balevi. Ilikia, Zakari mpe Yeyeli, oyo bazalaki bakambi ya misala kati na Tempelo ya Nzambe, bapesaki epai ya Banganga-Nzambe lokola mbeka ya Pasika bana meme nkoto mibale na nkama motoba mpe bangombe nkama misato. 9 Konania elongo na bandeko na ye ya mibali : Shemaya, Netaneeli, Ashabia, Yeyeli mpe Yozabadi oyo bakambi ya Balevi, bapesaki bameme nkoto mitano mpe bangombe nkama mitano epai ya Balevi lokola mbeka ya Pasika. 10 Tala ndenge babongisaki losambo : Banganga-Nzambe batelemaki na esika na bango ya mosala, mpe Balevi bazalaki kati na masanga na bango, kolanda mitindo ya mokonzi. 11 Bato babonzaki bana meme mpe bana ntaba lokola mbeka ya Pasika, mpe Balevi bazalaki kopesa makila na yango epai ya Banganga-Nzambe mpo ete basopa yango na likolo ya etumbelo, wana Balevi bazalaki kopapa mbeka 12 mpe kotia pembeni biteni ya kobonza lokola mbeka ya kotumba, mpo na kopesa yango epai ya bato kolanda masanga na bango mpo ete babonza yango epai na Yawe, kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Moyize. Basalaki mpe ndenge wana mpo na bangombe. 13 Kolanda ndenge mobeko ezalaki kotinda, batumbaki na moto meme oyo ebonzamaki lokola mbeka ya Pasika mpe balambaki makabo mosusu ya bule na nzungu, na kikalungu mpe na basani ; mpe bapesaki yango na lombangu epai ya bato nyonso. 14 Sima na yango, Balevi babongisaki mbeka ya Pasika mpo na bango moko mpe mpo na Banganga-Nzambe ; pamba te Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, bazalaki kosala kino na butu mosala ya kobonza bambeka ya kotumba mpe mafuta ya banyama. Yango wana Balevi bazalaki kobongisa mbeka ya Pasika mpo na bango moko mpe mpo na Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron. 15 Babeti mindule, bana mibali ya Azafi, bazalaki na esika na bango ya mosala kolanda mitindo ya Davidi, ya Azafi, ya Emani mpe ya Yedutuni, mosakoli ya mokonzi. Bakengeli bikuke mpe bazalaki na bisika na bango ya mosala ; batikalaki kozala mosika na yango te, pamba te bandeko na bango, Balevi, bazalaki mpe kobongisela bango biloko. 16 Ezalaki ndenge wana nde misala nyonso ebongisamaki mokolo wana mpo na kosepela feti ya Pasika mpe kobonza mbeka ya kotumba na likolo ya etumbelo ya Yawe, kolanda mitindo ya mokonzi Joziasi. 17 Bana ya Isalaele oyo bazalaki wana basepelaki na tango wana feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire, mikolo sambo. 18 Wuta na tango ya mosakoli Samuele, feti ya Pasika ya lolenge wana etikalaki nanu kosalema te kati na Isalaele. Mpe kati na bakonzi ya Isalaele, moko te asepelaki feti ya Pasika lokola Pasika oyo Joziasi asepelaki elongo na Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso ya Yuda mpe ya Isalaele oyo bazalaki kuna elongo na bavandi ya Yelusalemi. 19 Ezalaki na mobu ya zomi na mwambe ya bokonzi ya Joziasi nde basepelaki Pasika yango. 20 Sima na makambo oyo nyonso mpe sima na Joziasi kobongisa Tempelo ya Yawe, Neko, mokonzi ya Ejipito, akendeki kobundisa Karikemishi, na ebale Efrate ; mpe Joziasi akendeki kokutana na ye mpo na kokanga ye nzela. 21 Neko atindelaki ye bamemi sango mpo na koloba na ye :— Mokonzi ya Yuda, likambo nini kati ya yo mpe ngai ? Na mokolo ya lelo, nayei na ngai te mpo na kobundisa yo ; nayei nde kobundisa mokonzi mosusu. Nzambe alobi na ngai ete nasala likambo yango na lombangu. Keba ete otombokela Nzambe oyo azali elongo na ngai, soki te akobebisa yo. 22 Kasi Joziasi aboyaki kotika ye, mpe lokola ayokaki te makambo oyo Neko ayebisaki ye kowuta na monoko ya Nzambe, Joziasi amibongolaki mpo na kobundisa Neko na lubwaku ya Megido. 23 Kati na bitumba, basoda oyo babundaka na batolotolo babetaki mokonzi Joziasi, mpe ye alobaki na basoda na ye :— Bolongola ngai awa, pamba te nazoki makasi. 24 Basoda na ye balongolaki ye na shar oyo azalaki kobunda na yango, batiaki ye na shar na ye mosusu mpe bamemaki ye na Yelusalemi epai wapi akufaki. Bakundaki ye kati na bakunda ya batata na ye. Bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi basalelaki Joziasi matanga. 25 Jeremi asalaki nzembo ya mawa mpo na Joziasi. Bayembi nyonso ya mibali mpe ya basi bayembelaki Joziasi banzembo ya mawa kino na mokolo ya lelo mpe bakomisaki likambo yango mobeko kati na Isalaele. Banzembo yango ekomama kati na buku ya banzembo ya mawa. 26 Makambo mpe misala mosusu ya Joziasi, elongo na misala ya botosi na ye kati na makambo ya Yawe, kolanda oyo ekomama kati na Mobeko ya Yawe, 27 misala na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele mpe ya Yuda.

In Other Versions

2 Chronicles 35 in the ANGEFD

2 Chronicles 35 in the ANTPNG2D

2 Chronicles 35 in the AS21

2 Chronicles 35 in the BAGH

2 Chronicles 35 in the BBPNG

2 Chronicles 35 in the BBT1E

2 Chronicles 35 in the BDS

2 Chronicles 35 in the BEV

2 Chronicles 35 in the BHAD

2 Chronicles 35 in the BIB

2 Chronicles 35 in the BLPT

2 Chronicles 35 in the BNT

2 Chronicles 35 in the BNTABOOT

2 Chronicles 35 in the BNTLV

2 Chronicles 35 in the BOATCB

2 Chronicles 35 in the BOATCB2

2 Chronicles 35 in the BOBCV

2 Chronicles 35 in the BOCNT

2 Chronicles 35 in the BOECS

2 Chronicles 35 in the BOGWICC

2 Chronicles 35 in the BOHCB

2 Chronicles 35 in the BOHCV

2 Chronicles 35 in the BOHLNT

2 Chronicles 35 in the BOHNTLTAL

2 Chronicles 35 in the BOICB

2 Chronicles 35 in the BOILNTAP

2 Chronicles 35 in the BOITCV

2 Chronicles 35 in the BOKCV

2 Chronicles 35 in the BOKCV2

2 Chronicles 35 in the BOKHWOG

2 Chronicles 35 in the BOKSSV

2 Chronicles 35 in the BOLCB

2 Chronicles 35 in the BOMCV

2 Chronicles 35 in the BONAV

2 Chronicles 35 in the BONCB

2 Chronicles 35 in the BONLT

2 Chronicles 35 in the BONUT2

2 Chronicles 35 in the BOPLNT

2 Chronicles 35 in the BOSCB

2 Chronicles 35 in the BOSNC

2 Chronicles 35 in the BOTLNT

2 Chronicles 35 in the BOVCB

2 Chronicles 35 in the BOYCB

2 Chronicles 35 in the BPBB

2 Chronicles 35 in the BPH

2 Chronicles 35 in the BSB

2 Chronicles 35 in the CCB

2 Chronicles 35 in the CUV

2 Chronicles 35 in the CUVS

2 Chronicles 35 in the DBT

2 Chronicles 35 in the DGDNT

2 Chronicles 35 in the DHNT

2 Chronicles 35 in the DNT

2 Chronicles 35 in the ELBE

2 Chronicles 35 in the EMTV

2 Chronicles 35 in the ESV

2 Chronicles 35 in the FBV

2 Chronicles 35 in the FEB

2 Chronicles 35 in the GGMNT

2 Chronicles 35 in the GNT

2 Chronicles 35 in the HARY

2 Chronicles 35 in the HNT

2 Chronicles 35 in the IRVA

2 Chronicles 35 in the IRVB

2 Chronicles 35 in the IRVG

2 Chronicles 35 in the IRVH

2 Chronicles 35 in the IRVK

2 Chronicles 35 in the IRVM

2 Chronicles 35 in the IRVM2

2 Chronicles 35 in the IRVO

2 Chronicles 35 in the IRVP

2 Chronicles 35 in the IRVT

2 Chronicles 35 in the IRVT2

2 Chronicles 35 in the IRVU

2 Chronicles 35 in the ISVN

2 Chronicles 35 in the JSNT

2 Chronicles 35 in the KAPI

2 Chronicles 35 in the KBT1ETNIK

2 Chronicles 35 in the KBV

2 Chronicles 35 in the KJV

2 Chronicles 35 in the KNFD

2 Chronicles 35 in the LBA

2 Chronicles 35 in the LBLA

2 Chronicles 35 in the LNT

2 Chronicles 35 in the LSV

2 Chronicles 35 in the MAAL

2 Chronicles 35 in the MBV

2 Chronicles 35 in the MBV2

2 Chronicles 35 in the MHNT

2 Chronicles 35 in the MKNFD

2 Chronicles 35 in the MNG

2 Chronicles 35 in the MNT

2 Chronicles 35 in the MNT2

2 Chronicles 35 in the MRS1T

2 Chronicles 35 in the NAA

2 Chronicles 35 in the NASB

2 Chronicles 35 in the NBLA

2 Chronicles 35 in the NBS

2 Chronicles 35 in the NBVTP

2 Chronicles 35 in the NET2

2 Chronicles 35 in the NIV11

2 Chronicles 35 in the NNT

2 Chronicles 35 in the NNT2

2 Chronicles 35 in the NNT3

2 Chronicles 35 in the PDDPT

2 Chronicles 35 in the PFNT

2 Chronicles 35 in the RMNT

2 Chronicles 35 in the SBIAS

2 Chronicles 35 in the SBIBS

2 Chronicles 35 in the SBIBS2

2 Chronicles 35 in the SBICS

2 Chronicles 35 in the SBIDS

2 Chronicles 35 in the SBIGS

2 Chronicles 35 in the SBIHS

2 Chronicles 35 in the SBIIS

2 Chronicles 35 in the SBIIS2

2 Chronicles 35 in the SBIIS3

2 Chronicles 35 in the SBIKS

2 Chronicles 35 in the SBIKS2

2 Chronicles 35 in the SBIMS

2 Chronicles 35 in the SBIOS

2 Chronicles 35 in the SBIPS

2 Chronicles 35 in the SBISS

2 Chronicles 35 in the SBITS

2 Chronicles 35 in the SBITS2

2 Chronicles 35 in the SBITS3

2 Chronicles 35 in the SBITS4

2 Chronicles 35 in the SBIUS

2 Chronicles 35 in the SBIVS

2 Chronicles 35 in the SBT

2 Chronicles 35 in the SBT1E

2 Chronicles 35 in the SCHL

2 Chronicles 35 in the SNT

2 Chronicles 35 in the SUSU

2 Chronicles 35 in the SUSU2

2 Chronicles 35 in the SYNO

2 Chronicles 35 in the TBIAOTANT

2 Chronicles 35 in the TBT1E

2 Chronicles 35 in the TBT1E2

2 Chronicles 35 in the TFTIP

2 Chronicles 35 in the TFTU

2 Chronicles 35 in the TGNTATF3T

2 Chronicles 35 in the THAI

2 Chronicles 35 in the TNFD

2 Chronicles 35 in the TNT

2 Chronicles 35 in the TNTIK

2 Chronicles 35 in the TNTIL

2 Chronicles 35 in the TNTIN

2 Chronicles 35 in the TNTIP

2 Chronicles 35 in the TNTIZ

2 Chronicles 35 in the TOMA

2 Chronicles 35 in the TTENT

2 Chronicles 35 in the UBG

2 Chronicles 35 in the UGV

2 Chronicles 35 in the UGV2

2 Chronicles 35 in the UGV3

2 Chronicles 35 in the VBL

2 Chronicles 35 in the VDCC

2 Chronicles 35 in the YALU

2 Chronicles 35 in the YAPE

2 Chronicles 35 in the YBVTP

2 Chronicles 35 in the ZBP