2 Corinthians 12 (BOLCB2)

1 Boni, nasengeli komikumisa ? Te, ezali na tina te ! Kasi tika nayebisa bino makambo oyo namonaki lokola na ndoto, mpe bimoniseli oyo Nkolo alakisaki ngai. 2 Nayebi moto moko kati na Klisto, oyo, wuta mibu zomi na minei, amemamaki kino na likolo ya misato : nayebi te soki ezalaki kati na nzoto na ye to mpe kati na nzoto na ye te, kasi Nzambe ayebi. 3 Nzokande, ezala soki ezalaki kati na nzoto na ye to mpe kati na nzoto na ye te, Nzambe ayebi yango ; kasi ngai nayebi kaka ete moto yango 4 amemamaki na paradizo mpe ayokaki maloba oyo moto akoki kolimbola te, makambo oyo moto azali na ndingisa te ya koloba. 5 Nakomikumisa solo na tina na moto ya ndenge wana, kasi na tina na ngai moko te, longola kaka na tina na bolembu na ngai. 6 Nzokande, soki nalingaki komikumisa, nalingaki kozala zoba te, pamba te nalingaki koloba kaka bosolo ; kasi naboyi kosala yango, noki te bakopesa ngai lokumu koleka oyo bato bamonaka kati na ngai to koleka sango oyo bayokaka na tina na ngai. 7 Kutu, mpo ete namitondisa na lofundu te na tina na bimoniseli ya kokamwa oyo nazwaki, batiaki ngai nzube moko kati na nzoto, anjelu ya Satana mpo na konyokola ngai. 8 Mpo na yango, nabondelaki Nkolo mbala misato mpo ete nzube yango elongwa na nzoto na ngai. 9 Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai. 10 Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko to mpe na pasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka ; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi. 11 Tala, nazali koloba lokola moto ya liboma, pamba te bino nde botindiki ngai kosala bongo. Pamba te ata soki nazali moto pamba, kasi bantoma oyo bamimonaka minene baleki ngai ata na eloko moko te. 12 Bilembo oyo elakisaka ete nazali ntoma emonisamaki kati na bino : molende, bilembo ya kokamwa mpe bikamwa. 13 Eloko nini penza bino bozwaki te koleka Mangomba mosusu, longola kaka kozanga komemisa bino mokumba na ngai ? Boye, bolimbisa ngai mpo na mabe yango ! 14 Sik’oyo, nasali mabongisi ya koya kotala bino mpo na mbala ya misato ; mpe nakomemisa bino mokumba na ngai te, pamba te nazali koluka biloko na bino te, kasi nazali nde koluka bino moko. Kobomba biloko mpo na baboti ezali likambo ya bana na bango te, kasi ezali baboti nde basengeli kobomba biloko mpo na bana na bango. 15 Mpo na ngai, nakopesa biloko na ngai nyonso na esengo, mpe nakomipesa mobimba mpo na bino. Soki nalingi bino mingi ; boni, bino bokoki kolinga ngai mingi te ? 16 Atako nazalaki mokumba te epai na bino, kasi bato mosusu bazalaki koloba ete nazali moto ya mayele mabe, natielaki bino motambo. 17 Boni, kati na bato oyo natindaki epai na bino, ezali na moko oyo natindaki mpo na kozwa bino biloko na mayele mabe ? 18 Nasengaki na Tito ete aya epai na bino, mpe natindaki elongo na ye ndeko na biso. Boni, Tito azwaki biloko na bino na mayele mabe ? Tozalaki na ye likanisi moko te ? Tazalaki kosala na ye ndenge moko te ? 19 Bokanisi ete, wuta kala, biso tolukaka komilongisa liboso na bino ? Te, balingami na ngai ! Ezali liboso ya Nzambe, kati na Klisto, nde tolobaka mpe tosalaka makambo nyonso mpo na kokolisa kondima na bino. 20 Pamba te nazali kobanga ete nakuta bino te na lolenge oyo ngai nazali kolinga ete bozala, tango nakoya epai na bino, mpe ete bino bomona ngai te na lolenge oyo bozali kolinga ete nazala. Nazali kobanga kokuta kati na bino koswana, zuwa, kanda, kowelana, kofingana, kotongana, lofundu mpe mobulu. 21 Solo, nazali kobanga lisusu ete, tango nakoya lisusu epai na bino, Nzambe ayokisa ngai soni liboso na bino, mpe ete nalela mpo na bato ebele oyo basalaki masumu liboso kasi babongwani te na misala na bango ya mbindo, na kindumba mpe na ekobo oyo basalaka.

In Other Versions

2 Corinthians 12 in the ANGEFD

2 Corinthians 12 in the ANTPNG2D

2 Corinthians 12 in the AS21

2 Corinthians 12 in the BAGH

2 Corinthians 12 in the BBPNG

2 Corinthians 12 in the BBT1E

2 Corinthians 12 in the BDS

2 Corinthians 12 in the BEV

2 Corinthians 12 in the BHAD

2 Corinthians 12 in the BIB

2 Corinthians 12 in the BLPT

2 Corinthians 12 in the BNT

2 Corinthians 12 in the BNTABOOT

2 Corinthians 12 in the BNTLV

2 Corinthians 12 in the BOATCB

2 Corinthians 12 in the BOATCB2

2 Corinthians 12 in the BOBCV

2 Corinthians 12 in the BOCNT

2 Corinthians 12 in the BOECS

2 Corinthians 12 in the BOGWICC

2 Corinthians 12 in the BOHCB

2 Corinthians 12 in the BOHCV

2 Corinthians 12 in the BOHLNT

2 Corinthians 12 in the BOHNTLTAL

2 Corinthians 12 in the BOICB

2 Corinthians 12 in the BOILNTAP

2 Corinthians 12 in the BOITCV

2 Corinthians 12 in the BOKCV

2 Corinthians 12 in the BOKCV2

2 Corinthians 12 in the BOKHWOG

2 Corinthians 12 in the BOKSSV

2 Corinthians 12 in the BOLCB

2 Corinthians 12 in the BOMCV

2 Corinthians 12 in the BONAV

2 Corinthians 12 in the BONCB

2 Corinthians 12 in the BONLT

2 Corinthians 12 in the BONUT2

2 Corinthians 12 in the BOPLNT

2 Corinthians 12 in the BOSCB

2 Corinthians 12 in the BOSNC

2 Corinthians 12 in the BOTLNT

2 Corinthians 12 in the BOVCB

2 Corinthians 12 in the BOYCB

2 Corinthians 12 in the BPBB

2 Corinthians 12 in the BPH

2 Corinthians 12 in the BSB

2 Corinthians 12 in the CCB

2 Corinthians 12 in the CUV

2 Corinthians 12 in the CUVS

2 Corinthians 12 in the DBT

2 Corinthians 12 in the DGDNT

2 Corinthians 12 in the DHNT

2 Corinthians 12 in the DNT

2 Corinthians 12 in the ELBE

2 Corinthians 12 in the EMTV

2 Corinthians 12 in the ESV

2 Corinthians 12 in the FBV

2 Corinthians 12 in the FEB

2 Corinthians 12 in the GGMNT

2 Corinthians 12 in the GNT

2 Corinthians 12 in the HARY

2 Corinthians 12 in the HNT

2 Corinthians 12 in the IRVA

2 Corinthians 12 in the IRVB

2 Corinthians 12 in the IRVG

2 Corinthians 12 in the IRVH

2 Corinthians 12 in the IRVK

2 Corinthians 12 in the IRVM

2 Corinthians 12 in the IRVM2

2 Corinthians 12 in the IRVO

2 Corinthians 12 in the IRVP

2 Corinthians 12 in the IRVT

2 Corinthians 12 in the IRVT2

2 Corinthians 12 in the IRVU

2 Corinthians 12 in the ISVN

2 Corinthians 12 in the JSNT

2 Corinthians 12 in the KAPI

2 Corinthians 12 in the KBT1ETNIK

2 Corinthians 12 in the KBV

2 Corinthians 12 in the KJV

2 Corinthians 12 in the KNFD

2 Corinthians 12 in the LBA

2 Corinthians 12 in the LBLA

2 Corinthians 12 in the LNT

2 Corinthians 12 in the LSV

2 Corinthians 12 in the MAAL

2 Corinthians 12 in the MBV

2 Corinthians 12 in the MBV2

2 Corinthians 12 in the MHNT

2 Corinthians 12 in the MKNFD

2 Corinthians 12 in the MNG

2 Corinthians 12 in the MNT

2 Corinthians 12 in the MNT2

2 Corinthians 12 in the MRS1T

2 Corinthians 12 in the NAA

2 Corinthians 12 in the NASB

2 Corinthians 12 in the NBLA

2 Corinthians 12 in the NBS

2 Corinthians 12 in the NBVTP

2 Corinthians 12 in the NET2

2 Corinthians 12 in the NIV11

2 Corinthians 12 in the NNT

2 Corinthians 12 in the NNT2

2 Corinthians 12 in the NNT3

2 Corinthians 12 in the PDDPT

2 Corinthians 12 in the PFNT

2 Corinthians 12 in the RMNT

2 Corinthians 12 in the SBIAS

2 Corinthians 12 in the SBIBS

2 Corinthians 12 in the SBIBS2

2 Corinthians 12 in the SBICS

2 Corinthians 12 in the SBIDS

2 Corinthians 12 in the SBIGS

2 Corinthians 12 in the SBIHS

2 Corinthians 12 in the SBIIS

2 Corinthians 12 in the SBIIS2

2 Corinthians 12 in the SBIIS3

2 Corinthians 12 in the SBIKS

2 Corinthians 12 in the SBIKS2

2 Corinthians 12 in the SBIMS

2 Corinthians 12 in the SBIOS

2 Corinthians 12 in the SBIPS

2 Corinthians 12 in the SBISS

2 Corinthians 12 in the SBITS

2 Corinthians 12 in the SBITS2

2 Corinthians 12 in the SBITS3

2 Corinthians 12 in the SBITS4

2 Corinthians 12 in the SBIUS

2 Corinthians 12 in the SBIVS

2 Corinthians 12 in the SBT

2 Corinthians 12 in the SBT1E

2 Corinthians 12 in the SCHL

2 Corinthians 12 in the SNT

2 Corinthians 12 in the SUSU

2 Corinthians 12 in the SUSU2

2 Corinthians 12 in the SYNO

2 Corinthians 12 in the TBIAOTANT

2 Corinthians 12 in the TBT1E

2 Corinthians 12 in the TBT1E2

2 Corinthians 12 in the TFTIP

2 Corinthians 12 in the TFTU

2 Corinthians 12 in the TGNTATF3T

2 Corinthians 12 in the THAI

2 Corinthians 12 in the TNFD

2 Corinthians 12 in the TNT

2 Corinthians 12 in the TNTIK

2 Corinthians 12 in the TNTIL

2 Corinthians 12 in the TNTIN

2 Corinthians 12 in the TNTIP

2 Corinthians 12 in the TNTIZ

2 Corinthians 12 in the TOMA

2 Corinthians 12 in the TTENT

2 Corinthians 12 in the UBG

2 Corinthians 12 in the UGV

2 Corinthians 12 in the UGV2

2 Corinthians 12 in the UGV3

2 Corinthians 12 in the VBL

2 Corinthians 12 in the VDCC

2 Corinthians 12 in the YALU

2 Corinthians 12 in the YAPE

2 Corinthians 12 in the YBVTP

2 Corinthians 12 in the ZBP