2 Kings 13 (BOLCB2)

1 Na mobu ya tuku mibale na misato ya bokonzi ya Joasi, mwana mobali ya Akazia, mokonzi ya Yuda, Yoakazi, mwana mobali ya Jewu, akomaki mokonzi ya Isalaele kati na Samari. Akonzaki mibu zomi na sambo. 2 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, wana alandaki masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati. Jeroboami akweyisaki na yango Isalaele na lisumu, mpe Yoakazi atikaki te lisumu yango. 3 Boye kanda ya Yawe epelaki likolo ya Isalaele, mpe akabaki Isalaele na maboko ya Azaeli, mokonzi ya Siri, mpe ya Beni-Adadi, mwana na ye ya mobali. 4 Kasi Yoakazi abondelaki Yawe mpo ete asalela ye ngolu, mpe Yawe ayokaki ye, pamba te Yawe amonaki ndenge nini mokonzi ya Siri azalaki konyokola Isalaele. 5 Yawe apesaki mokangoli mpo na bato ya Isalaele, mpe balongwaki na se ya nguya ya bato ya Siri. Boye bato ya Isalaele bavandaki na bandako na bango ndenge ezalaki liboso. 6 Kasi batikaki te masumu ya libota ya Jeroboami oyo akweyisaki na yango Isalaele. Bakobaki kaka na yango ; mpe ekeko ya nzambe mwasi Ashera etikalaki kaka ya kotelema kati na Samari. 7 Kati na mampinga nyonso ya Yoakazi, etikalaki kaka na mibali tuku mitano oyo batambolisaka bampunda, bashar zomi, mpe basoda oyo batambolaka na makolo, nkoto zomi, pamba te mokonzi ya Siri abomaki bamosusu oyo batikalaki, mpe akomisaki bango lokola putulu oyo banyataka na makolo. 8 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yoakazi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 9 Yoakazi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Bongo Joasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. 10 Na mobu ya tuku misato na sambo ya bokonzi ya Joasi, mokonzi ya Yuda, Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, akomaki mokonzi ya Isalaele kati na Samari. Akonzaki mibu zomi na motoba. 11 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe atikaki te masumu nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo akweyisaki na yango Isalaele. Joasi akobaki kaka na masumu yango. 12 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi mpe misala na ye nyonso, bakisa bitumba oyo abundisaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 13 Joasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe Jeroboami akitanaki na ye na bokonzi. Bakundaki Joasi kati na Samari esika moko na bakonzi ya Isalaele. 14 Elize abelaki bokono oyo ememaki ye na kufa. Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kotala ye mpe alelaki na miso na ye na maloba oyo :— Tata na ngai ! Tata na ngai ! Ozali bashar mpe bampunda ya Isalaele ! 15 Elize alobaki na ye :— Zwa tolotolo moko mpe ndambo ya makonga ya mike.Joasi asalaki bongo. 16 Bongo Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele :— Simba tolotolo na maboko na yo.Tango Joasi asimbaki tolotolo, Elize atiaki maboko na ye na likolo ya maboko ya mokonzi. 17 Elize alobaki :— Fungola lininisa oyo ezali na ngambo ya este.Joasi afungolaki yango. Elize alobaki :— Beta !Joasi abetaki.Elize alobaki :— Ezali likonga ya elonga ya Yawe, likonga ya elonga liboso ya bato ya Siri. Okosilisa bato ya Siri, na Afeki. 18 Bongo Elize abakisaki :— Zwa makonga.Mokonzi azwaki yango. Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele :— Beta yango na mabele.Joasi abetaki yango mbala misato mpe atikaki. 19 Moto na Nzambe asilikelaki ye mpe alobaki :— Ebongaki na yo kobeta yango na mabele mbala mitano to mbala motoba, boye olingaki kolonga bato ya Siri mpe kosilisa bango nye. Kasi sik’oyo, okolonga bato ya Siri kaka mbala misato. 20 Elize akufaki, mpe bakundaki ye. Nzokande masanga ya bato mabe ya Moabi bazalaki kokota na mokili ya Isalaele na ebandeli ya mibu nyonso. 21 Mokolo moko, tango bazalaki kokunda moto moko, bamonaki na mbalakata lisanga moko ya bato mabe. Bongo, babwakaki na lombangu ebembe ya moto yango kati na kunda ya Elize. Tango ebembe etutaki mikuwa ya Elize, moto yango azongaki na bomoi mpe atelemaki. 22 Azaeli, mokonzi ya Siri, anyokolaki Isalaele, na tango ya bokonzi ya Yoakazi. 23 Kasi Yawe asalelaki bango ngolu, ayokelaki bango mawa, mpe azongelaki bango, mpo na boyokani na Ye elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi. Na tango wana, Yawe alingaki koboma bango te mpe aboyaki kobengana bango mosika ya miso na Ye. 24 Azaeli, mokonzi ya Siri, akufaki, mpe Beni-Adadi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. 25 Bongo Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, abotolaki na maboko ya Beni-Adadi, mwana ya Azaeli, bingumba oyo Azaeli abotolaki na bitumba epai ya Yoakazi, tata ya Joasi. Joasi alongaki Azaeli mbala misato mpe abotolaki bingumba ya Isalaele.

In Other Versions

2 Kings 13 in the ANGEFD

2 Kings 13 in the ANTPNG2D

2 Kings 13 in the AS21

2 Kings 13 in the BAGH

2 Kings 13 in the BBPNG

2 Kings 13 in the BBT1E

2 Kings 13 in the BDS

2 Kings 13 in the BEV

2 Kings 13 in the BHAD

2 Kings 13 in the BIB

2 Kings 13 in the BLPT

2 Kings 13 in the BNT

2 Kings 13 in the BNTABOOT

2 Kings 13 in the BNTLV

2 Kings 13 in the BOATCB

2 Kings 13 in the BOATCB2

2 Kings 13 in the BOBCV

2 Kings 13 in the BOCNT

2 Kings 13 in the BOECS

2 Kings 13 in the BOGWICC

2 Kings 13 in the BOHCB

2 Kings 13 in the BOHCV

2 Kings 13 in the BOHLNT

2 Kings 13 in the BOHNTLTAL

2 Kings 13 in the BOICB

2 Kings 13 in the BOILNTAP

2 Kings 13 in the BOITCV

2 Kings 13 in the BOKCV

2 Kings 13 in the BOKCV2

2 Kings 13 in the BOKHWOG

2 Kings 13 in the BOKSSV

2 Kings 13 in the BOLCB

2 Kings 13 in the BOMCV

2 Kings 13 in the BONAV

2 Kings 13 in the BONCB

2 Kings 13 in the BONLT

2 Kings 13 in the BONUT2

2 Kings 13 in the BOPLNT

2 Kings 13 in the BOSCB

2 Kings 13 in the BOSNC

2 Kings 13 in the BOTLNT

2 Kings 13 in the BOVCB

2 Kings 13 in the BOYCB

2 Kings 13 in the BPBB

2 Kings 13 in the BPH

2 Kings 13 in the BSB

2 Kings 13 in the CCB

2 Kings 13 in the CUV

2 Kings 13 in the CUVS

2 Kings 13 in the DBT

2 Kings 13 in the DGDNT

2 Kings 13 in the DHNT

2 Kings 13 in the DNT

2 Kings 13 in the ELBE

2 Kings 13 in the EMTV

2 Kings 13 in the ESV

2 Kings 13 in the FBV

2 Kings 13 in the FEB

2 Kings 13 in the GGMNT

2 Kings 13 in the GNT

2 Kings 13 in the HARY

2 Kings 13 in the HNT

2 Kings 13 in the IRVA

2 Kings 13 in the IRVB

2 Kings 13 in the IRVG

2 Kings 13 in the IRVH

2 Kings 13 in the IRVK

2 Kings 13 in the IRVM

2 Kings 13 in the IRVM2

2 Kings 13 in the IRVO

2 Kings 13 in the IRVP

2 Kings 13 in the IRVT

2 Kings 13 in the IRVT2

2 Kings 13 in the IRVU

2 Kings 13 in the ISVN

2 Kings 13 in the JSNT

2 Kings 13 in the KAPI

2 Kings 13 in the KBT1ETNIK

2 Kings 13 in the KBV

2 Kings 13 in the KJV

2 Kings 13 in the KNFD

2 Kings 13 in the LBA

2 Kings 13 in the LBLA

2 Kings 13 in the LNT

2 Kings 13 in the LSV

2 Kings 13 in the MAAL

2 Kings 13 in the MBV

2 Kings 13 in the MBV2

2 Kings 13 in the MHNT

2 Kings 13 in the MKNFD

2 Kings 13 in the MNG

2 Kings 13 in the MNT

2 Kings 13 in the MNT2

2 Kings 13 in the MRS1T

2 Kings 13 in the NAA

2 Kings 13 in the NASB

2 Kings 13 in the NBLA

2 Kings 13 in the NBS

2 Kings 13 in the NBVTP

2 Kings 13 in the NET2

2 Kings 13 in the NIV11

2 Kings 13 in the NNT

2 Kings 13 in the NNT2

2 Kings 13 in the NNT3

2 Kings 13 in the PDDPT

2 Kings 13 in the PFNT

2 Kings 13 in the RMNT

2 Kings 13 in the SBIAS

2 Kings 13 in the SBIBS

2 Kings 13 in the SBIBS2

2 Kings 13 in the SBICS

2 Kings 13 in the SBIDS

2 Kings 13 in the SBIGS

2 Kings 13 in the SBIHS

2 Kings 13 in the SBIIS

2 Kings 13 in the SBIIS2

2 Kings 13 in the SBIIS3

2 Kings 13 in the SBIKS

2 Kings 13 in the SBIKS2

2 Kings 13 in the SBIMS

2 Kings 13 in the SBIOS

2 Kings 13 in the SBIPS

2 Kings 13 in the SBISS

2 Kings 13 in the SBITS

2 Kings 13 in the SBITS2

2 Kings 13 in the SBITS3

2 Kings 13 in the SBITS4

2 Kings 13 in the SBIUS

2 Kings 13 in the SBIVS

2 Kings 13 in the SBT

2 Kings 13 in the SBT1E

2 Kings 13 in the SCHL

2 Kings 13 in the SNT

2 Kings 13 in the SUSU

2 Kings 13 in the SUSU2

2 Kings 13 in the SYNO

2 Kings 13 in the TBIAOTANT

2 Kings 13 in the TBT1E

2 Kings 13 in the TBT1E2

2 Kings 13 in the TFTIP

2 Kings 13 in the TFTU

2 Kings 13 in the TGNTATF3T

2 Kings 13 in the THAI

2 Kings 13 in the TNFD

2 Kings 13 in the TNT

2 Kings 13 in the TNTIK

2 Kings 13 in the TNTIL

2 Kings 13 in the TNTIN

2 Kings 13 in the TNTIP

2 Kings 13 in the TNTIZ

2 Kings 13 in the TOMA

2 Kings 13 in the TTENT

2 Kings 13 in the UBG

2 Kings 13 in the UGV

2 Kings 13 in the UGV2

2 Kings 13 in the UGV3

2 Kings 13 in the VBL

2 Kings 13 in the VDCC

2 Kings 13 in the YALU

2 Kings 13 in the YAPE

2 Kings 13 in the YBVTP

2 Kings 13 in the ZBP