2 Kings 3 (BOLCB2)

1 Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Yorami, mwana mobali ya Akabi, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari. Asalaki mibu zomi na mibale na bokonzi. 2 Asalaki mabe na miso ya Yawe, kasi ndenge moko te na tata mpe mama na ye. Abukaki ekeko ya Bala oyo tata na ye atelemisaki, 3 kasi akangamaki kaka na lisumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo amemaki Isalaele na kosala masumu ; atikalaki kobongwana na yango te. 4 Mesha, mokonzi ya Moabi, azalaki kobokola bameme. Mibu nyonso, azalaki kofuta mpako epai ya mokonzi ya Isalaele, oyo ezalaki na motuya ya bampate nkoto nkama moko mpe ya bameme ya mibali nkoto nkama moko elongo na bapwale na yango. 5 Tango Akabi akufaki, mokonzi ya Moabi atombokelaki mokonzi ya Isalaele. 6 Na tango wana, mokonzi Yorami abimaki na Samari mpe asangisaki Isalaele mobimba. 7 Atindaki lisusu sango oyo epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda :— Mokonzi ya Moabi atombokeli ngai. Okoki solo kokende elongo na ngai mpo na kobundisa bato ya Moabi ?Mokonzi Jozafati azongisaki :— Nakokende na yo elongo. Ngai na yo tozali kaka moto moko ; bato na ngai bazali kaka bato na yo, bongo bampunda na ngai ezali mpe bampunda na yo. 8 Jozafati atunaki :— Tokokende na nzela nini ?Yorami azongisaki :— Na nzela ya esobe ya Edomi. 9 Mokonzi ya Isalaele abimaki elongo na mokonzi ya Yuda mpe mokonzi ya Edomi. Batambolaki mikolo sambo, kasi mayi ya komela ezalaki lisusu te mpo na mampinga mpe banyama oyo ezalaki kotambola elongo na bango. 10 Mokonzi ya Isalaele akamwaki :— Ndenge nini boye ! Yawe asangisi biso awa, biso bakonzi misato, kaka mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi ? 11 Kasi Jozafati atunaki :— Awa, ezali te na mosakoli ya Yawe mpo ete totuna toli ya Yawe na nzela na ye ?Mokonzi moko ya mampinga ya mokonzi ya Isalaele azongisaki :— Elize, mwana mobali ya Shafati, azali awa. Azalaki kosopa mayi na maboko ya Eliya. 12 Jozafati alobaki :— Solo, Liloba na Yawe ezali elongo na ye.Boye mokonzi ya Isalaele elongo na Jozafati mpe mokonzi ya Edomi bakendeki epai ya Elize. 13 Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele :— Ngai na yo likambo nini ? Kende koluka mosakoli ya tata na yo to ya mama na yo.Mokonzi ya Isalaele azongisaki :— Te ! Yawe asangisi biso te, biso bakonzi oyo misato, mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi ! 14 Elize azongisaki :— Na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo ngai nasalelaka ; soki ezalaki te mpo na kotosa Jozafati, mokonzi ya Yuda, nalingaki kutu ata moke te kotala yo to kolanda yo na bokebi. 15 Kasi sik’oyo, memela ngai mobeti moko ya lindanda !Wana mobeti lindanda azalaki kobeta, loboko ya Yawe ekitelaki Elize, 16 mpe Elize alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Botimola mabulu ebele na lubwaku oyo ! 17 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : Bokotikala te komona mopepe to mvula, kasi lubwaku oyo ekotonda na mayi, mpe bino elongo na bibwele na bino bokomela yango. 18 Ezali likambo moke na miso ya Yawe. Akokaba lisusu bato ya Moabi na maboko na bino. 19 Bokobuka bingumba na bango nyonso oyo batonga makasi mpe bingumba nyonso ya minene, bokokata banzete na bango nyonso ya kitoko, bokokanga bitima nyonso ya mayi mpe bokobebisa bilanga nyonso na mabanga. » 20 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, na tango oyo batumbaka mbeka, mayi ebandaki kotiola na nzela ya Edomi, mpe mabele etondaki na mayi. 21 Nzokande, sima na bato nyonso ya Moabi koyoka sango ete bakonzi bayei kobundisa bango, babengaki bato nyonso, bilenge mpe mikolo oyo bakoki komema bibundeli, mpe batelemisaki bango na mondelo ya mboka. 22 Tango balamukaki na tongo-tongo, moyi ezalaki kongala na mayi ; mpe bato ya Moabi bamonaki liboso na bango mayi motane lokola makila. 23 Bagangaki : « Ezali makila ! Bakonzi babundi bango na bango. Sik’oyo, bato na Moabi, tokende kobotola biloko na bango ! » 24 Kasi tango bato ya Moabi bakomaki na molako ya bana ya Isalaele, bana ya Isalaele batelemaki, babundisaki bango kino bato ya Moabi bakimaki. Bato ya Isalaele bakotaki na mboka Moabi mpe babetaki yango. 25 Babebisaki bingumba, mpe moto nyonso abwakaki libanga moko na bilanga nyonso ya kitoko kino etondaki na mabanga, bakangaki bitima nyonso ya mayi, mpe bakataki nzete nyonso ya kitoko. Kaka engumba ya Kiri-Aresheti nde etikalaki na mabanga na yango ; kasi babwaki ya mabanga bazingelaki yango mpe babundisaki yango lokola. 26 Tango mokonzi ya Moabi amonaki ete bitumba ebalukeli ye, akamataki basoda nkama sambo oyo babundaka na mipanga, mpo na kofungola nzela kino epai ya mokonzi ya Edomi, kasi balongaki te. 27 Boye azwaki mwana na ye ya liboso ya mobali oyo alingaki kokitana na ye na bokonzi, abonzaki ye lokola mbeka ya kotumba, na likolo ya mir ya engumba. Tango bamonaki bongo, bana ya Isalaele bayokaki mawa, balongwaki mpe bazongaki na mboka na bango.

In Other Versions

2 Kings 3 in the ANGEFD

2 Kings 3 in the ANTPNG2D

2 Kings 3 in the AS21

2 Kings 3 in the BAGH

2 Kings 3 in the BBPNG

2 Kings 3 in the BBT1E

2 Kings 3 in the BDS

2 Kings 3 in the BEV

2 Kings 3 in the BHAD

2 Kings 3 in the BIB

2 Kings 3 in the BLPT

2 Kings 3 in the BNT

2 Kings 3 in the BNTABOOT

2 Kings 3 in the BNTLV

2 Kings 3 in the BOATCB

2 Kings 3 in the BOATCB2

2 Kings 3 in the BOBCV

2 Kings 3 in the BOCNT

2 Kings 3 in the BOECS

2 Kings 3 in the BOGWICC

2 Kings 3 in the BOHCB

2 Kings 3 in the BOHCV

2 Kings 3 in the BOHLNT

2 Kings 3 in the BOHNTLTAL

2 Kings 3 in the BOICB

2 Kings 3 in the BOILNTAP

2 Kings 3 in the BOITCV

2 Kings 3 in the BOKCV

2 Kings 3 in the BOKCV2

2 Kings 3 in the BOKHWOG

2 Kings 3 in the BOKSSV

2 Kings 3 in the BOLCB

2 Kings 3 in the BOMCV

2 Kings 3 in the BONAV

2 Kings 3 in the BONCB

2 Kings 3 in the BONLT

2 Kings 3 in the BONUT2

2 Kings 3 in the BOPLNT

2 Kings 3 in the BOSCB

2 Kings 3 in the BOSNC

2 Kings 3 in the BOTLNT

2 Kings 3 in the BOVCB

2 Kings 3 in the BOYCB

2 Kings 3 in the BPBB

2 Kings 3 in the BPH

2 Kings 3 in the BSB

2 Kings 3 in the CCB

2 Kings 3 in the CUV

2 Kings 3 in the CUVS

2 Kings 3 in the DBT

2 Kings 3 in the DGDNT

2 Kings 3 in the DHNT

2 Kings 3 in the DNT

2 Kings 3 in the ELBE

2 Kings 3 in the EMTV

2 Kings 3 in the ESV

2 Kings 3 in the FBV

2 Kings 3 in the FEB

2 Kings 3 in the GGMNT

2 Kings 3 in the GNT

2 Kings 3 in the HARY

2 Kings 3 in the HNT

2 Kings 3 in the IRVA

2 Kings 3 in the IRVB

2 Kings 3 in the IRVG

2 Kings 3 in the IRVH

2 Kings 3 in the IRVK

2 Kings 3 in the IRVM

2 Kings 3 in the IRVM2

2 Kings 3 in the IRVO

2 Kings 3 in the IRVP

2 Kings 3 in the IRVT

2 Kings 3 in the IRVT2

2 Kings 3 in the IRVU

2 Kings 3 in the ISVN

2 Kings 3 in the JSNT

2 Kings 3 in the KAPI

2 Kings 3 in the KBT1ETNIK

2 Kings 3 in the KBV

2 Kings 3 in the KJV

2 Kings 3 in the KNFD

2 Kings 3 in the LBA

2 Kings 3 in the LBLA

2 Kings 3 in the LNT

2 Kings 3 in the LSV

2 Kings 3 in the MAAL

2 Kings 3 in the MBV

2 Kings 3 in the MBV2

2 Kings 3 in the MHNT

2 Kings 3 in the MKNFD

2 Kings 3 in the MNG

2 Kings 3 in the MNT

2 Kings 3 in the MNT2

2 Kings 3 in the MRS1T

2 Kings 3 in the NAA

2 Kings 3 in the NASB

2 Kings 3 in the NBLA

2 Kings 3 in the NBS

2 Kings 3 in the NBVTP

2 Kings 3 in the NET2

2 Kings 3 in the NIV11

2 Kings 3 in the NNT

2 Kings 3 in the NNT2

2 Kings 3 in the NNT3

2 Kings 3 in the PDDPT

2 Kings 3 in the PFNT

2 Kings 3 in the RMNT

2 Kings 3 in the SBIAS

2 Kings 3 in the SBIBS

2 Kings 3 in the SBIBS2

2 Kings 3 in the SBICS

2 Kings 3 in the SBIDS

2 Kings 3 in the SBIGS

2 Kings 3 in the SBIHS

2 Kings 3 in the SBIIS

2 Kings 3 in the SBIIS2

2 Kings 3 in the SBIIS3

2 Kings 3 in the SBIKS

2 Kings 3 in the SBIKS2

2 Kings 3 in the SBIMS

2 Kings 3 in the SBIOS

2 Kings 3 in the SBIPS

2 Kings 3 in the SBISS

2 Kings 3 in the SBITS

2 Kings 3 in the SBITS2

2 Kings 3 in the SBITS3

2 Kings 3 in the SBITS4

2 Kings 3 in the SBIUS

2 Kings 3 in the SBIVS

2 Kings 3 in the SBT

2 Kings 3 in the SBT1E

2 Kings 3 in the SCHL

2 Kings 3 in the SNT

2 Kings 3 in the SUSU

2 Kings 3 in the SUSU2

2 Kings 3 in the SYNO

2 Kings 3 in the TBIAOTANT

2 Kings 3 in the TBT1E

2 Kings 3 in the TBT1E2

2 Kings 3 in the TFTIP

2 Kings 3 in the TFTU

2 Kings 3 in the TGNTATF3T

2 Kings 3 in the THAI

2 Kings 3 in the TNFD

2 Kings 3 in the TNT

2 Kings 3 in the TNTIK

2 Kings 3 in the TNTIL

2 Kings 3 in the TNTIN

2 Kings 3 in the TNTIP

2 Kings 3 in the TNTIZ

2 Kings 3 in the TOMA

2 Kings 3 in the TTENT

2 Kings 3 in the UBG

2 Kings 3 in the UGV

2 Kings 3 in the UGV2

2 Kings 3 in the UGV3

2 Kings 3 in the VBL

2 Kings 3 in the VDCC

2 Kings 3 in the YALU

2 Kings 3 in the YAPE

2 Kings 3 in the YBVTP

2 Kings 3 in the ZBP