2 Kings 6 (BOLCB2)

1 Mokolo moko, bayekoli ya basakoli balobaki na Elize :— Tala ! Esika oyo tosanganaka elongo na yo ekomi moke mingi mpo na biso. 2 Pesa biso nzela ya kokende na ebale Yordani epai wapi moko na moko kati na biso akoki kozwa nzete mpo na kotonga kuna esika ya kovanda.Elize alobaki na bango :— Bokende ! 3 Moko kati na bango alobaki :— Okosepela te kokende elongo na basali na yo ?Elize azongisaki :— Nandimi, nakokende. 4 Boye akendeki elongo na bango. Bakendeki na ebale Yordani mpe babandaki kokata banzete. 5 Wana moko kati na bango azalaki kokata nzete, ebende ya epasola na ye ekweyaki na mayi. Agangaki :— Ah, nkolo na ngai ! Nadefaki yango kodefa ! 6 Moto na Nzambe atunaki :— Ekweyaki na esika nini ?Sima na ye kolakisa ye esika yango, Elize akataki eteni ya nzete mpe abwakaki yango na esika oyo ebende ya epasola ekweyaki. Mpe, na mbala moko, eteni ya nzete yango ematisaki ebende na likolo ya mayi, mpe ebende ekomaki kotepa. 7 Elize alobaki :— Kamata yango !Boye, mosali wana asembolaki loboko na ye mpe akamataki yango. 8 Mokonzi ya Siri azalaki kobundisa bana ya Isalaele. Asololaki na basali na ye mpe alobaki : « Nakotia molako na ngai na esika songolo to pakala. » 9 Mbala moko, moto na Nzambe atindaki maloba oyo epai ya mokonzi ya Isalaele : « Keba ! Koleka na esika wana te, pamba te bato ya Siri bazali kokita kuna. » 10 Mokonzi ya Isalaele atindaki bato kokende kononga esika oyo moto na Nzambe alobelaki.Mbala ebele, Elize azalaki kokebisa mokonzi ete azala na bokebi na bisika ya ndenge wana ; mpe mbala ebele, mokonzi ya Isalaele azalaki komibikisa na motambo ya bato ya Siri. 11 Suka na suka, mokonzi ya Siri asilikaki makasi, abengisaki bakalaka na ye mpe atunaki bango :— Bokoki te koyebisa ngai nani kati na biso azali na ngambo ya mokonzi ya Isalaele ? 12 Moko kati na bakalaka na ye alobaki :— Mokonzi, nkolo na ngai, moko te kati na biso. Ezali nde mosakoli Elize oyo azali kati na Isalaele ; ye nde ayebaka mpe ayebisaka mokonzi ya Isalaele ata makambo oyo olobaka kati na shambre na yo ya kolala. 13 Mokonzi apesaki mitindo :— Bokende koluka esika oyo azali mpo ete natinda bato mpo na kokanga ye.Bayaki koyebisa ye :— Azali na Dotani. 14 Bongo mokonzi atindaki kuna bampunda elongo na bashar mpe basoda ebele. Bakendeki kuna na butu mpe bazingelaki engumba. 15 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, tango mosali ya moto na Nzambe alamukaki mpe abimaki, amonaki ete mampinga elongo na bampunda mpe bashar bazingelaki engumba. Mosali yango alobaki na Elize :— Oh nkolo na ngai, eyindi na libanda ! Tokosala nini ! 16 Mosakoli azongisaki :— Kobanga te, pamba te ba-oyo bazali elongo na biso bazali ebele koleka ba-oyo bazali elongo na bango. 17 Elize asambelaki :— Oh Yawe, fungola ye miso mpo ete amona !Yawe afungolaki miso ya mosali, mpe mosali atalaki ; amonaki bangomba mike etonda na bampunda mpe bashar ya moto zingazinga ya Elize. 18 Lokola monguna azalaki kopusana pene na ye, Elize asambelaki Yawe :— Boma ekolo oyo miso !Mpe Yawe abomaki bango miso, ndenge kaka Elize asengaki. 19 Elize alobaki na bango :— Nzela ezali awa te ! Engumba mpe ezali awa te ! Bolanda ngai, mpe nakomema bino epai ya moto oyo bozali koluka.Elize amemaki bango na Samari. 20 Tango bakotaki na engumba, Elize asambelaki lisusu :— Yawe, fungola miso ya bato oyo mpo ete bamona.Yawe afungolaki miso na bango, mpe bamonaki ete bazali kati na engumba Samari. 21 Tango mokonzi ya Isalaele amonaki bango, atunaki Elize :— Tata na ngai, naboma bango ? Naboma bango ? 22 Elize azongisaki :— Koboma bango te ! Boni, okoboma solo bato oyo okangi, na nzela ya mopanga na yo to ya tolotolo na yo ? Pesa bango nde bilei mpe mayi ya komela mpo ete balia, bamela mpe bazonga epai ya mokonzi na bango. 23 Boye abongisaki feti monene mpo na bango. Tango basilisaki kolia mpe komela, azongisaki bango. Mpe bazongaki epai ya mokonzi na bango. Wuta tango yango, mampinga ya Siri batikaki kokota mpo na kobundisa Isalaele. 24 Sima na tango, Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, asangisaki mampinga na ye nyonso mpe akendeki kozingela engumba Samari. 25 Lokola bazingelaki Samari tango molayi, nzala makasi ekotaki kati na engumba kino moto moko ya ane ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mwambe ; mpe bagrame nkama mibale na tuku mitano ya nyei ekawuka ya ebenga ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, mitano. 26 Mokolo moko, wana mokonzi ya Isalaele azalaki koleka na likolo ya mir ya lopango, mwasi moko agangaki epai na ye :— Mokonzi, nkolo na ngai, sunga ngai ! 27 Mokonzi azongisaki :— Soki Yawe asungi yo te, esika nini ngai nakozwa lisungi mpo na kosunga yo ? Nazangi vino to ble ya kopesa yo. 28 Nzokande, mokonzi atunaki ye lisusu :— Likambo nini ekomeli yo ?Mwasi azongisaki :— Mwasi wana alobaki na ngai : « Pesa mwana na yo ya mobali mpo ete tolia ye lelo, bongo lobi, tokolia mwana na ngai. » 29 Boye tolambaki mwana na ngai ya mobali mpe toliaki ye. Mokolo oyo elandaki, nalobaki na ye : « Pesa mwana na yo ya mobali mpo ete tolia ye, » kasi abombaki ye. 30 Tango mokonzi ayokaki maloba ya mwasi oyo, apasolaki bilamba na ye. Lokola atambolaki lisusu na likolo ya mir ya lopango, bato bamonaki ete, na se ya bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki na nzoto na ye. 31 Mokonzi alobaki : « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki kaka moto ya Elize, mwana mobali ya Shafati, etikali na likolo ya mapeka na ye. » 32 Nzokande, Elize avandaki kati na ndako na ye, elongo na bakambi ya engumba. Mokonzi atindaki ntoma moko epai ya Elize. Kasi liboso ete akoma, Elize alobaki na bakambi ya engumba : « Bozali komona te ete mobomi oyo atindi moto mpo na koya kokata ngai moto ? Bosala keba ! Tango kaka bokomona ye, bokanga ekuke liboso na ye mpe botindika ye na yango na sima ! Boyoka ! Wana ezali makelele ya makolo ya nkolo na ye te, oyo ezali koyokana sima na ye ? » 33 Wana Elize azalaki nanu koloba, ntoma ya mokonzi akomaki mpe ayebisaki ye maloba ya mokonzi : « Pasi oyo nyonso ewuti epai ya Yawe ! Nakozela lisusu nini kowuta na Ye ? »

In Other Versions

2 Kings 6 in the ANGEFD

2 Kings 6 in the ANTPNG2D

2 Kings 6 in the AS21

2 Kings 6 in the BAGH

2 Kings 6 in the BBPNG

2 Kings 6 in the BBT1E

2 Kings 6 in the BDS

2 Kings 6 in the BEV

2 Kings 6 in the BHAD

2 Kings 6 in the BIB

2 Kings 6 in the BLPT

2 Kings 6 in the BNT

2 Kings 6 in the BNTABOOT

2 Kings 6 in the BNTLV

2 Kings 6 in the BOATCB

2 Kings 6 in the BOATCB2

2 Kings 6 in the BOBCV

2 Kings 6 in the BOCNT

2 Kings 6 in the BOECS

2 Kings 6 in the BOGWICC

2 Kings 6 in the BOHCB

2 Kings 6 in the BOHCV

2 Kings 6 in the BOHLNT

2 Kings 6 in the BOHNTLTAL

2 Kings 6 in the BOICB

2 Kings 6 in the BOILNTAP

2 Kings 6 in the BOITCV

2 Kings 6 in the BOKCV

2 Kings 6 in the BOKCV2

2 Kings 6 in the BOKHWOG

2 Kings 6 in the BOKSSV

2 Kings 6 in the BOLCB

2 Kings 6 in the BOMCV

2 Kings 6 in the BONAV

2 Kings 6 in the BONCB

2 Kings 6 in the BONLT

2 Kings 6 in the BONUT2

2 Kings 6 in the BOPLNT

2 Kings 6 in the BOSCB

2 Kings 6 in the BOSNC

2 Kings 6 in the BOTLNT

2 Kings 6 in the BOVCB

2 Kings 6 in the BOYCB

2 Kings 6 in the BPBB

2 Kings 6 in the BPH

2 Kings 6 in the BSB

2 Kings 6 in the CCB

2 Kings 6 in the CUV

2 Kings 6 in the CUVS

2 Kings 6 in the DBT

2 Kings 6 in the DGDNT

2 Kings 6 in the DHNT

2 Kings 6 in the DNT

2 Kings 6 in the ELBE

2 Kings 6 in the EMTV

2 Kings 6 in the ESV

2 Kings 6 in the FBV

2 Kings 6 in the FEB

2 Kings 6 in the GGMNT

2 Kings 6 in the GNT

2 Kings 6 in the HARY

2 Kings 6 in the HNT

2 Kings 6 in the IRVA

2 Kings 6 in the IRVB

2 Kings 6 in the IRVG

2 Kings 6 in the IRVH

2 Kings 6 in the IRVK

2 Kings 6 in the IRVM

2 Kings 6 in the IRVM2

2 Kings 6 in the IRVO

2 Kings 6 in the IRVP

2 Kings 6 in the IRVT

2 Kings 6 in the IRVT2

2 Kings 6 in the IRVU

2 Kings 6 in the ISVN

2 Kings 6 in the JSNT

2 Kings 6 in the KAPI

2 Kings 6 in the KBT1ETNIK

2 Kings 6 in the KBV

2 Kings 6 in the KJV

2 Kings 6 in the KNFD

2 Kings 6 in the LBA

2 Kings 6 in the LBLA

2 Kings 6 in the LNT

2 Kings 6 in the LSV

2 Kings 6 in the MAAL

2 Kings 6 in the MBV

2 Kings 6 in the MBV2

2 Kings 6 in the MHNT

2 Kings 6 in the MKNFD

2 Kings 6 in the MNG

2 Kings 6 in the MNT

2 Kings 6 in the MNT2

2 Kings 6 in the MRS1T

2 Kings 6 in the NAA

2 Kings 6 in the NASB

2 Kings 6 in the NBLA

2 Kings 6 in the NBS

2 Kings 6 in the NBVTP

2 Kings 6 in the NET2

2 Kings 6 in the NIV11

2 Kings 6 in the NNT

2 Kings 6 in the NNT2

2 Kings 6 in the NNT3

2 Kings 6 in the PDDPT

2 Kings 6 in the PFNT

2 Kings 6 in the RMNT

2 Kings 6 in the SBIAS

2 Kings 6 in the SBIBS

2 Kings 6 in the SBIBS2

2 Kings 6 in the SBICS

2 Kings 6 in the SBIDS

2 Kings 6 in the SBIGS

2 Kings 6 in the SBIHS

2 Kings 6 in the SBIIS

2 Kings 6 in the SBIIS2

2 Kings 6 in the SBIIS3

2 Kings 6 in the SBIKS

2 Kings 6 in the SBIKS2

2 Kings 6 in the SBIMS

2 Kings 6 in the SBIOS

2 Kings 6 in the SBIPS

2 Kings 6 in the SBISS

2 Kings 6 in the SBITS

2 Kings 6 in the SBITS2

2 Kings 6 in the SBITS3

2 Kings 6 in the SBITS4

2 Kings 6 in the SBIUS

2 Kings 6 in the SBIVS

2 Kings 6 in the SBT

2 Kings 6 in the SBT1E

2 Kings 6 in the SCHL

2 Kings 6 in the SNT

2 Kings 6 in the SUSU

2 Kings 6 in the SUSU2

2 Kings 6 in the SYNO

2 Kings 6 in the TBIAOTANT

2 Kings 6 in the TBT1E

2 Kings 6 in the TBT1E2

2 Kings 6 in the TFTIP

2 Kings 6 in the TFTU

2 Kings 6 in the TGNTATF3T

2 Kings 6 in the THAI

2 Kings 6 in the TNFD

2 Kings 6 in the TNT

2 Kings 6 in the TNTIK

2 Kings 6 in the TNTIL

2 Kings 6 in the TNTIN

2 Kings 6 in the TNTIP

2 Kings 6 in the TNTIZ

2 Kings 6 in the TOMA

2 Kings 6 in the TTENT

2 Kings 6 in the UBG

2 Kings 6 in the UGV

2 Kings 6 in the UGV2

2 Kings 6 in the UGV3

2 Kings 6 in the VBL

2 Kings 6 in the VDCC

2 Kings 6 in the YALU

2 Kings 6 in the YAPE

2 Kings 6 in the YBVTP

2 Kings 6 in the ZBP