2 Samuel 12 (BOLCB2)

1 Yawe atindaki Natan epai ya Davidi. Tango akomaki epai ya Davidi, alobaki na ye : « Ezalaki na bato mibale kati na engumba moko : moko kati na bango azalaki mozwi ; mpe mosusu, mobola. 2 Mozwi azalaki na bameme mpe bangombe ebele, 3 kasi mobola azalaki na eloko te longola kaka mwa mwana meme moko ya mwasi oyo asombaki. Abokolaki yango mpe ekolaki epai na ye elongo na bana na ye. Mpate yango ezalaki kolia bilei na sani moko, komela mayi na kopo moko na nkolo na yango mpe kolala na maboko na ye. Ezalaki lokola mwana na ye ya mwasi. 4 Mokolo moko, mopaya moko ayaki epai ya mozwi, kasi mozwi aboyaki kozwa meme moko kati na bameme na ye to ngombe moko kati na bangombe na ye mpo na kolamba yango mpo na mopaya oyo ayaki epai na ye ; azwaki kaka mwa mwana meme ya mwasi ya mobola mpe alambaki yango mpo na mopaya oyo ayaki epai na ye. » 5 Davidi asilikelaki mozwi makasi mpe alobaki na Natan :— Na Kombo na Yawe, moto oyo asali boye asengeli na kufa ! 6 Asengeli kofuta mwa mwana meme yango mbala minei, pamba te azalaki na mawa te ya kosala likambo ya boye. 7 Natan alobaki na Davidi :— Moto yango ezali nde yo ! Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Napakolaki yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele mpe nakangolaki yo na maboko ya Saulo ; 8 nakabaki na maboko na yo ndako ya nkolo na yo, Saulo, mpe basi na ye ; napesaki yo libota ya Isalaele mpe libota ya Yuda. Bongo soki nyonso wana ezalaki moke koleka, nalingaki kobakisela yo lisusu ebele koleka. 9 Mpo na nini otioli Liloba na Yawe na kosala makambo oyo ezali mabe na miso na Ye ? Obomisi Iri, moto ya Iti, na mopanga mpe ozwi mwasi na ye mpo ete akoma mwasi na yo. Obomisi ye na mopanga ya bato ya Amoni. 10 Mpo na yango, mopanga ekolongwa lisusu te na ndako na yo, pamba te otioli ngai mpe ozwi mwasi ya Iri, moto ya Iti, mpo ete akoma mwasi na yo. 11 Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakoyeisa pasi epai na yo wuta na ndako na yo moko ; na miso na yo, nakokamata basi na yo mpe nakopesa bango na moko kati na baninga na yo, oyo akosangisa na bango nzoto na moyi makasi. 12 Osalaki yango na nkuku, kasi ngai nakosala likambo oyo na moyi mpe na miso ya Isalaele mobimba. › » 13 Davidi alobaki na Natan :— Solo, nasalaki masumu epai na Yawe.Natan azongisaki :— Yawe alongoli masumu na yo ; okokufa te. 14 Kasi lokola na likambo oyo yo osali, opesi na banguna ya Yawe nzela ya kofinga Ye, mwana oyo bakobotela yo akokufa. 15 Sima na yango, Natan azongaki na ndako na ye. Yawe abetaki mwana oyo mwasi ya Iri abotelaki Davidi, mpe mwana yango akomaki kobela. 16 Davidi abondelaki Nzambe mpo na mwana, akilaki bilei, akotaki na ndako na ye mpe akomaki kolala na mabele babutu nyonso. 17 Bakambi ya ndako na ye bayaki kotelema pembeni na ye mpo na kotelemisa ye wuta na mabele, kasi aboyaki mpe andimaki te kolia bilei elongo na bango. 18 Na mokolo ya sambo, mwana akufaki. Basali ya Davidi babangaki koyebisa ye ete mwana akufi, pamba te bazalaki komilobela : « Wana mwana azalaki nanu na bomoi, tango tolobaki na Davidi, ayokaki biso te. Awa sik’oyo mwana akufi, tokoloba na ye ndenge nini ? Soki toyebisi ye sik’oyo ete mwana akufi, akoki kosala likambo moko ya mabe ! » 19 Davidi amonaki basali na ye koloba na se se kati na bango, mpe asosolaki ete mwana akufi. Atunaki :— Boni, mwana akufi ?Bazongisaki :— Iyo, akufi. 20 Bongo Davidi atelemaki wuta na mabele, amisukolaki nzoto, amipakolaki malasi, alataki bilamba mosusu, akotaki na Tempelo ya Yawe mpe agumbamaki mpo na kosambela. Sima, azongaki na ndako na ye, asengaki bilei mpe aliaki. 21 Basali na ye batunaki :— Mpo na nini ozali kosala boye ? Wana mwana azalaki na bomoi, ozalaki komilalisa nzala mpe ozalaki kolela ; awa sik’oyo mwana akufi, otelemi mpe okomi kolia ! 22 Azongisaki :— Solo, wana mwana azalaki nanu na bomoi, nazalaki kokila bilei mpe kolela, pamba te nazalaki komilobela : « Nani ayebi ? Tango mosusu Yawe akosalela ngai ngolu mpe akotika mwana na bomoi ! » 23 Kasi lokola sik’oyo akufi, mpo na nini nakila bilei ? Boni, nakoki kozongisa ye lisusu na bomoi ? Ngai nde nakokende epai na ye, kasi ye akozonga epai na ngai te. 24 Bongo Davidi abondisaki mwasi na ye, Batisheba ; akendeki epai na ye mpe asangisaki na ye nzoto. Batisheba abotelaki ye lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Salomo. » Yawe alingaki ye 25 mpe atindaki maloba na nzela ya mosakoli Natan ete bapesa ye kombo « Yedidia, » pamba te Yawe alingaki ye. 26 Joabi abundisaki engumba Raba ya bato ya Amoni mpe abotolaki mboka mokonzi. 27 Joabi atindaki bantoma koloba na Davidi : « Nabundisi Raba mpe nabotoli eteni ya mabele epai wapi mayi ezali. 28 Sik’oyo, sangisa basoda oyo batikali, bozingela engumba Raba mpe bokamata yango ; soki te nakokamata yango ngai moko, mpe kombo na ngai ekosakolama kuna. » 29 Davidi asangisaki mampinga nyonso mpe akendeki na Raba, abundisaki mpe akamataki yango. 30 Alongolaki motole oyo ezalaki na moto ya mokonzi na yango. Motole yango esalemaki na bakilo ya wolo koleka tuku misato mpe ezalaki na libanga ya talo na likolo na yango. Wuta na tango wana, ekomaki na moto ya Davidi. Akamataki bomengo ebele ya bitumba kati na engumba yango. 31 Amemaki na bowumbu bato oyo bazalaki kuna, atiaki bango na misala oyo basalaka na si, na piki mpe na epasola ; atiaki bango mpe na mosala ya kosala babiliki. Davidi asalaki ndenge wana na bavandi ya bingumba nyonso ya bato ya Amoni. Bongo azongaki na Yelusalemi elongo na mampinga na ye nyonso.

In Other Versions

2 Samuel 12 in the ANGEFD

2 Samuel 12 in the ANTPNG2D

2 Samuel 12 in the AS21

2 Samuel 12 in the BAGH

2 Samuel 12 in the BBPNG

2 Samuel 12 in the BBT1E

2 Samuel 12 in the BDS

2 Samuel 12 in the BEV

2 Samuel 12 in the BHAD

2 Samuel 12 in the BIB

2 Samuel 12 in the BLPT

2 Samuel 12 in the BNT

2 Samuel 12 in the BNTABOOT

2 Samuel 12 in the BNTLV

2 Samuel 12 in the BOATCB

2 Samuel 12 in the BOATCB2

2 Samuel 12 in the BOBCV

2 Samuel 12 in the BOCNT

2 Samuel 12 in the BOECS

2 Samuel 12 in the BOGWICC

2 Samuel 12 in the BOHCB

2 Samuel 12 in the BOHCV

2 Samuel 12 in the BOHLNT

2 Samuel 12 in the BOHNTLTAL

2 Samuel 12 in the BOICB

2 Samuel 12 in the BOILNTAP

2 Samuel 12 in the BOITCV

2 Samuel 12 in the BOKCV

2 Samuel 12 in the BOKCV2

2 Samuel 12 in the BOKHWOG

2 Samuel 12 in the BOKSSV

2 Samuel 12 in the BOLCB

2 Samuel 12 in the BOMCV

2 Samuel 12 in the BONAV

2 Samuel 12 in the BONCB

2 Samuel 12 in the BONLT

2 Samuel 12 in the BONUT2

2 Samuel 12 in the BOPLNT

2 Samuel 12 in the BOSCB

2 Samuel 12 in the BOSNC

2 Samuel 12 in the BOTLNT

2 Samuel 12 in the BOVCB

2 Samuel 12 in the BOYCB

2 Samuel 12 in the BPBB

2 Samuel 12 in the BPH

2 Samuel 12 in the BSB

2 Samuel 12 in the CCB

2 Samuel 12 in the CUV

2 Samuel 12 in the CUVS

2 Samuel 12 in the DBT

2 Samuel 12 in the DGDNT

2 Samuel 12 in the DHNT

2 Samuel 12 in the DNT

2 Samuel 12 in the ELBE

2 Samuel 12 in the EMTV

2 Samuel 12 in the ESV

2 Samuel 12 in the FBV

2 Samuel 12 in the FEB

2 Samuel 12 in the GGMNT

2 Samuel 12 in the GNT

2 Samuel 12 in the HARY

2 Samuel 12 in the HNT

2 Samuel 12 in the IRVA

2 Samuel 12 in the IRVB

2 Samuel 12 in the IRVG

2 Samuel 12 in the IRVH

2 Samuel 12 in the IRVK

2 Samuel 12 in the IRVM

2 Samuel 12 in the IRVM2

2 Samuel 12 in the IRVO

2 Samuel 12 in the IRVP

2 Samuel 12 in the IRVT

2 Samuel 12 in the IRVT2

2 Samuel 12 in the IRVU

2 Samuel 12 in the ISVN

2 Samuel 12 in the JSNT

2 Samuel 12 in the KAPI

2 Samuel 12 in the KBT1ETNIK

2 Samuel 12 in the KBV

2 Samuel 12 in the KJV

2 Samuel 12 in the KNFD

2 Samuel 12 in the LBA

2 Samuel 12 in the LBLA

2 Samuel 12 in the LNT

2 Samuel 12 in the LSV

2 Samuel 12 in the MAAL

2 Samuel 12 in the MBV

2 Samuel 12 in the MBV2

2 Samuel 12 in the MHNT

2 Samuel 12 in the MKNFD

2 Samuel 12 in the MNG

2 Samuel 12 in the MNT

2 Samuel 12 in the MNT2

2 Samuel 12 in the MRS1T

2 Samuel 12 in the NAA

2 Samuel 12 in the NASB

2 Samuel 12 in the NBLA

2 Samuel 12 in the NBS

2 Samuel 12 in the NBVTP

2 Samuel 12 in the NET2

2 Samuel 12 in the NIV11

2 Samuel 12 in the NNT

2 Samuel 12 in the NNT2

2 Samuel 12 in the NNT3

2 Samuel 12 in the PDDPT

2 Samuel 12 in the PFNT

2 Samuel 12 in the RMNT

2 Samuel 12 in the SBIAS

2 Samuel 12 in the SBIBS

2 Samuel 12 in the SBIBS2

2 Samuel 12 in the SBICS

2 Samuel 12 in the SBIDS

2 Samuel 12 in the SBIGS

2 Samuel 12 in the SBIHS

2 Samuel 12 in the SBIIS

2 Samuel 12 in the SBIIS2

2 Samuel 12 in the SBIIS3

2 Samuel 12 in the SBIKS

2 Samuel 12 in the SBIKS2

2 Samuel 12 in the SBIMS

2 Samuel 12 in the SBIOS

2 Samuel 12 in the SBIPS

2 Samuel 12 in the SBISS

2 Samuel 12 in the SBITS

2 Samuel 12 in the SBITS2

2 Samuel 12 in the SBITS3

2 Samuel 12 in the SBITS4

2 Samuel 12 in the SBIUS

2 Samuel 12 in the SBIVS

2 Samuel 12 in the SBT

2 Samuel 12 in the SBT1E

2 Samuel 12 in the SCHL

2 Samuel 12 in the SNT

2 Samuel 12 in the SUSU

2 Samuel 12 in the SUSU2

2 Samuel 12 in the SYNO

2 Samuel 12 in the TBIAOTANT

2 Samuel 12 in the TBT1E

2 Samuel 12 in the TBT1E2

2 Samuel 12 in the TFTIP

2 Samuel 12 in the TFTU

2 Samuel 12 in the TGNTATF3T

2 Samuel 12 in the THAI

2 Samuel 12 in the TNFD

2 Samuel 12 in the TNT

2 Samuel 12 in the TNTIK

2 Samuel 12 in the TNTIL

2 Samuel 12 in the TNTIN

2 Samuel 12 in the TNTIP

2 Samuel 12 in the TNTIZ

2 Samuel 12 in the TOMA

2 Samuel 12 in the TTENT

2 Samuel 12 in the UBG

2 Samuel 12 in the UGV

2 Samuel 12 in the UGV2

2 Samuel 12 in the UGV3

2 Samuel 12 in the VBL

2 Samuel 12 in the VDCC

2 Samuel 12 in the YALU

2 Samuel 12 in the YAPE

2 Samuel 12 in the YBVTP

2 Samuel 12 in the ZBP