2 Samuel 18 (BOLCB2)

1 Davidi atangaki basoda oyo bazalaki elongo na ye ; mpe kati na bango, aponaki bakonzi ya bankoto mpe bakonzi ya bankama. 2 Davidi apesaki mitindo na mampinga ete bakende. Akabolaki bango na masanga misato : lisanga ya liboso ekambamaki na Joabi ; ya mibale, na Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya ; mpe ya misato, na Itayi, moto ya Gati. Mokonzi alobaki na masanga ya mampinga ete ye moko akokende solo elongo na bango. 3 Kasi basoda balobaki :— Okoki kobima te elongo na biso, pamba te soki ekosenga ete tokima, bakotala biso te. Ezala kati-kati ya bato kati na biso bakufi, bakotala yango te, kasi yo ; okokani na bato nkoto zomi kati na biso. Nzokande, ekoleka malamu mpo na yo kosungaka biso tango nyonso wuta na engumba. 4 Mokonzi azongisaki :— Nakosala makambo nyonso oyo bomoni ete ezali malamu.Boye wana bato bazalaki kobima na masanga ya bankama mpe ya bankoto, mokonzi atelemaki pembeni ya ekuke. 5 Apesaki mitindo oyo epai ya Joabi, Abishayi mpe Itayi : « Na kombo na ngai, bosala malembe na elenge mobali Abisalomi. »Basoda nyonso bayokaki mokonzi kopesa mitindo na mokambi moko na moko, na tina na Abisalomi. 6 Mampinga etambolaki kati na zamba mpo na kobundisa Isalaele, mpe bitumba ezalaki kati na zamba ya Efrayimi. 7 Kuna, mampinga ya Davidi elongaki mampinga ya Isalaele, mpe basoda nkoto tuku mibale bakufaki mokolo wana kati na mampinga ya Isalaele. 8 Bitumba epanzanaki mboka mobimba ; mpe mokolo wana, bato oyo bakufaki kati na zamba bazalaki ebele koleka bato oyo bakufaki na mopanga. 9 Abisalomi akutanaki na bato ya Davidi na mbalakata. Azalaki kotambola na likolo ya mile na ye. Bongo tango mile ekimaki, ekotaki na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki na bitape ekangana-kangana, mpe moto ya Abisalomi ekangamaki na nzete. Abisalomi atikalaki ya kodiembela na likolo, kasi mile oyo azalaki kotambolisa ekobaki kokima mbangu. 10 Tango moko kati na basoda amonaki ye, alobaki na Joabi :— Namoni Abisalomi amidiembiki na nzete ya terebente. 11 Joabi alobaki na moto oyo ayebisaki ye likambo yango :— Boni, omoni ye ? Mpo na nini obomaki ye te mbala moko ? Soki obomaki ye, nalingaki kopesa yo bagrame pene nkama moko ya palata mpe mokaba. 12 Kasi moto yango azongiselaki Joabi :— Ezala soki batie mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na maboko na ngai, nakosembola loboko na ngai te mpo na koboma mwana ya mokonzi. Pamba te toyokaki mitindo oyo mokonzi apesaki epai na yo, epai na Abishayi mpe epai na Itayi, tango alobaki : « Na kombo na ngai, bosala mabe te na elenge mobali Abisalomi. » 13 Eloko moko te ebombamaka na miso ya mokonzi. Bongo soki natosaki mokonzi te mpe soki nabomaki Abisalomi, yo olingaki na yo kokotela ngai te. 14 Joabi alobaki :— Nakoki te kolekisa tango na ngai elongo na yo.Boye azwaki makonga misato na maboko na ye mpe atubaki yango na motema ya Abisalomi oyo azalaki nanu ya bomoi kati na nzete ya terebente. 15 Sima, bilenge mibali zomi oyo bamemaki bibundeli ya Joabi, bazingaki Abisalomi, babetaki ye mpe babomaki ye. 16 Joabi abetaki kelelo, mpe masanga ya mampinga etikaki kolanda Isalaele, pamba te apekisaki bango. 17 Bazwaki Abisalomi, babwakaki ye na zamba kati na libulu moko ya monene mpe bazipaki ye na se ya mopiku ya mabanga. Na tango wana, basoda nyonso ya Isalaele bakimaki na bandako na bango. 18 Nzokande, wana Abisalomi azalaki nanu na bomoi, azwaki libanga ya ekaniseli mpe atelemisaki yango na lubwaku ya mokonzi lokola ekaniseli mpo na ye, pamba te amilobelaki : « Nazali te na mwana mobali oyo akoki komema kombo na ngai lokola ekaniseli. »Boye apesaki libanga yango kombo na ye, mpe yango wana babengaka yango kino lelo « Ekaniseli ya Abisalomi. » 19 Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki na Joabi :— Pesa ngai nzela ya kokima mbangu mpo na kokende koyebisa mokonzi ete Yawe akangoli ye na maboko ya banguna na ye. 20 Joabi alobaki na ye :— Ezali yo te moto osengeli komema sango na mokolo ya lelo ; okoki na yo komema sango mokolo mosusu, kasi mpo na lelo, osengeli te kosala yango, pamba te moto oyo akufi azali mwana ya mokonzi. 21 Bongo Joabi alobaki na moto moko ya Kushi :— Kende koloba na mokonzi makambo oyo omoni.Moto ya Kushi agumbamaki liboso ya Joabi mpe akendeki mbangu. 22 Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki lisusu na Joabi :— Oyo ekoya eya ! Pesa ngai nzela mpo ete nakende mbangu liboso ya moto ya Kushi.Kasi Joabi azongisaki :— Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini olingi kaka kokende ? Ezali na yango te sango oyo ekopesa yo lifuti. 23 Ayimaatsi alobaki :— Oyo ekoya eya ! Nandimi kokima mbangu.Joabi alobaki :— Kima mbangu !Boye Ayimaatsi akimaki mbangu na nzela ya etando ya Yordani mpe alekaki moto ya Kushi. 24 Na tango yango, Davidi avandaki kati ya ekuke ya kati mpe ekuke ya libanda, mpe mokengeli amataki na likolo ya ndako ya ekuke, pembeni ya mir. Tango atombolaki miso, amonaki mwana mobali moko kokima mbangu ye moko. 25 Mokengeli agangaki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye. Mokonzi alobaki : « Soki azali ye moko, wana azali na basango malamu. »Moto azalaki kaka kopusana. 26 Bongo mokengeli amonaki moto mosusu kokima mbangu, mpe abelelaki mokengeli ekuke :— Tala, moto mosusu azali kokima mbangu ye moko.Mokonzi alobaki :— Ye mpe amemi basango malamu. 27 Mokengeli alobaki :— Namoni moto ya liboso kokima mbangu lokola Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki.Mokonzi alobaki :— Azali moto malamu, azali koya na basango malamu. 28 Bongo Ayimaatsi abelelaki mokonzi :— Makambo nyonso ezali malamu !Agumbamaki liboso ya mokonzi elongi kino na mabele mpe alobaki :— Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ! Akabi bato oyo batombolaki maboko na bango mpo na kobundisa mokonzi, nkolo na ngai. 29 Mokonzi atunaki :— Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu ?Ayimaatsi azongisaki :— Namonaki mobulu makasi kaka tango Joabi alingaki kotinda mosali ya mokonzi mpe ngai, mosali na yo, kasi nayebaki te soki ezalaki likambo nini. 30 Mokonzi alobaki :— Telema pembeni mpe zela ngai wana.Boye akendeki mpe atelemaki wana. 31 Bongo moto ya Kushi akomaki mpe alobaki :— Mokonzi, nkolo na ngai, yoka basango malamu ! Yawe akangoli yo lelo na maboko ya bato oyo babundisaki yo. 32 Mokonzi atunaki na moto ya Kushi :— Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu ?Moto ya Kushi azongisaki :— Tika ete banguna ya mokonzi, nkolo na ngai, mpe bato nyonso oyo bazali kotelema mpo na kosala yo mabe bazala lokola elenge mobali wana.

In Other Versions

2 Samuel 18 in the ANGEFD

2 Samuel 18 in the ANTPNG2D

2 Samuel 18 in the AS21

2 Samuel 18 in the BAGH

2 Samuel 18 in the BBPNG

2 Samuel 18 in the BBT1E

2 Samuel 18 in the BDS

2 Samuel 18 in the BEV

2 Samuel 18 in the BHAD

2 Samuel 18 in the BIB

2 Samuel 18 in the BLPT

2 Samuel 18 in the BNT

2 Samuel 18 in the BNTABOOT

2 Samuel 18 in the BNTLV

2 Samuel 18 in the BOATCB

2 Samuel 18 in the BOATCB2

2 Samuel 18 in the BOBCV

2 Samuel 18 in the BOCNT

2 Samuel 18 in the BOECS

2 Samuel 18 in the BOGWICC

2 Samuel 18 in the BOHCB

2 Samuel 18 in the BOHCV

2 Samuel 18 in the BOHLNT

2 Samuel 18 in the BOHNTLTAL

2 Samuel 18 in the BOICB

2 Samuel 18 in the BOILNTAP

2 Samuel 18 in the BOITCV

2 Samuel 18 in the BOKCV

2 Samuel 18 in the BOKCV2

2 Samuel 18 in the BOKHWOG

2 Samuel 18 in the BOKSSV

2 Samuel 18 in the BOLCB

2 Samuel 18 in the BOMCV

2 Samuel 18 in the BONAV

2 Samuel 18 in the BONCB

2 Samuel 18 in the BONLT

2 Samuel 18 in the BONUT2

2 Samuel 18 in the BOPLNT

2 Samuel 18 in the BOSCB

2 Samuel 18 in the BOSNC

2 Samuel 18 in the BOTLNT

2 Samuel 18 in the BOVCB

2 Samuel 18 in the BOYCB

2 Samuel 18 in the BPBB

2 Samuel 18 in the BPH

2 Samuel 18 in the BSB

2 Samuel 18 in the CCB

2 Samuel 18 in the CUV

2 Samuel 18 in the CUVS

2 Samuel 18 in the DBT

2 Samuel 18 in the DGDNT

2 Samuel 18 in the DHNT

2 Samuel 18 in the DNT

2 Samuel 18 in the ELBE

2 Samuel 18 in the EMTV

2 Samuel 18 in the ESV

2 Samuel 18 in the FBV

2 Samuel 18 in the FEB

2 Samuel 18 in the GGMNT

2 Samuel 18 in the GNT

2 Samuel 18 in the HARY

2 Samuel 18 in the HNT

2 Samuel 18 in the IRVA

2 Samuel 18 in the IRVB

2 Samuel 18 in the IRVG

2 Samuel 18 in the IRVH

2 Samuel 18 in the IRVK

2 Samuel 18 in the IRVM

2 Samuel 18 in the IRVM2

2 Samuel 18 in the IRVO

2 Samuel 18 in the IRVP

2 Samuel 18 in the IRVT

2 Samuel 18 in the IRVT2

2 Samuel 18 in the IRVU

2 Samuel 18 in the ISVN

2 Samuel 18 in the JSNT

2 Samuel 18 in the KAPI

2 Samuel 18 in the KBT1ETNIK

2 Samuel 18 in the KBV

2 Samuel 18 in the KJV

2 Samuel 18 in the KNFD

2 Samuel 18 in the LBA

2 Samuel 18 in the LBLA

2 Samuel 18 in the LNT

2 Samuel 18 in the LSV

2 Samuel 18 in the MAAL

2 Samuel 18 in the MBV

2 Samuel 18 in the MBV2

2 Samuel 18 in the MHNT

2 Samuel 18 in the MKNFD

2 Samuel 18 in the MNG

2 Samuel 18 in the MNT

2 Samuel 18 in the MNT2

2 Samuel 18 in the MRS1T

2 Samuel 18 in the NAA

2 Samuel 18 in the NASB

2 Samuel 18 in the NBLA

2 Samuel 18 in the NBS

2 Samuel 18 in the NBVTP

2 Samuel 18 in the NET2

2 Samuel 18 in the NIV11

2 Samuel 18 in the NNT

2 Samuel 18 in the NNT2

2 Samuel 18 in the NNT3

2 Samuel 18 in the PDDPT

2 Samuel 18 in the PFNT

2 Samuel 18 in the RMNT

2 Samuel 18 in the SBIAS

2 Samuel 18 in the SBIBS

2 Samuel 18 in the SBIBS2

2 Samuel 18 in the SBICS

2 Samuel 18 in the SBIDS

2 Samuel 18 in the SBIGS

2 Samuel 18 in the SBIHS

2 Samuel 18 in the SBIIS

2 Samuel 18 in the SBIIS2

2 Samuel 18 in the SBIIS3

2 Samuel 18 in the SBIKS

2 Samuel 18 in the SBIKS2

2 Samuel 18 in the SBIMS

2 Samuel 18 in the SBIOS

2 Samuel 18 in the SBIPS

2 Samuel 18 in the SBISS

2 Samuel 18 in the SBITS

2 Samuel 18 in the SBITS2

2 Samuel 18 in the SBITS3

2 Samuel 18 in the SBITS4

2 Samuel 18 in the SBIUS

2 Samuel 18 in the SBIVS

2 Samuel 18 in the SBT

2 Samuel 18 in the SBT1E

2 Samuel 18 in the SCHL

2 Samuel 18 in the SNT

2 Samuel 18 in the SUSU

2 Samuel 18 in the SUSU2

2 Samuel 18 in the SYNO

2 Samuel 18 in the TBIAOTANT

2 Samuel 18 in the TBT1E

2 Samuel 18 in the TBT1E2

2 Samuel 18 in the TFTIP

2 Samuel 18 in the TFTU

2 Samuel 18 in the TGNTATF3T

2 Samuel 18 in the THAI

2 Samuel 18 in the TNFD

2 Samuel 18 in the TNT

2 Samuel 18 in the TNTIK

2 Samuel 18 in the TNTIL

2 Samuel 18 in the TNTIN

2 Samuel 18 in the TNTIP

2 Samuel 18 in the TNTIZ

2 Samuel 18 in the TOMA

2 Samuel 18 in the TTENT

2 Samuel 18 in the UBG

2 Samuel 18 in the UGV

2 Samuel 18 in the UGV2

2 Samuel 18 in the UGV3

2 Samuel 18 in the VBL

2 Samuel 18 in the VDCC

2 Samuel 18 in the YALU

2 Samuel 18 in the YAPE

2 Samuel 18 in the YBVTP

2 Samuel 18 in the ZBP