2 Samuel 23 (BOLCB2)

1 Tala maloba ya suka ya Davidi :Maloba ya Davidi, mwana mobali ya Izayi,moto oyo atombolama na bokonzi,mopakolami ya Nzambe ya Jakobi,moyembi malamu ya banzembo ya Isalaele : 2 « Molimo na Yawe alobi na nzela na ngai,atie maloba na Ye na monoko na ngai. 3 Nzambe oyo azali Libanga ya Isalaele ayebisi ngai :‹ Mokonzi oyo akambaka bato kati na bosembo mpe botosi epai ya Nzambe, 4 azali lokola pole ya tongo, tango moyi ebimakampe engalaka makasi lokola nde mapata ezali te,lokola kongenga ya sima na mvulaoyo ebimisaka matiti na mokili. › 5 Ezali bongo te mpo na libota na ngai liboso ya Nzambe,pamba te asalaki boyokani ya libela elongo na ngai,boyokani oyo esalema malamu na makambo nyonso,mpe oyo Ye moko abatelaka ?Tango nyonso mpe na makambo nyonso, apesaki ngai elongampe akokisaki posa ya motema na ngai. 6 Kasi bato nyonso ya kilikili bazali lokola nzete ya nzubeoyo babwakaka mosika ;basimbaka yango te na maboko pamba. 7 Moto oyo alingi kosimba yangoasengeli kosalela ebende to libaya ya likonga ;batumbaka yango kaka na esika oyo ezali. » 8 Tala bakombo ya basoda ya mpiko ya Davidi : Yoshebi-Bashebeti, moto ya Takimoni : azalaki mokonzi ya limpinga ya basoda misato ya mpiko, abomaki na likonga bato nkama mwambe na etumba moko. 9 Molandi na ye ezalaki Eleazari, mwana mobali ya Dodo, moto ya Aoyi : azalaki moko kati na limpinga ya basoda misato ya mpiko oyo, elongo na Davidi, babundisaki bato ya Filisitia oyo basanganaki mpo na bitumba, wana bana ya Isalaele bazalaki kokima na likolo ya bangomba. 10 Kasi ye ayikaki mpiko kati na bitumba mpe abomaki bato ya Filisitia kino alembaki, mpe loboko na ye etikaki mopanga te. Yawe apesaki bango elonga monene na mokolo wana. Mampinga bazongaki epai ya Eleazari kaka mpo na kokamata biloko ya bato oyo bakufaki. 11 Sima na ye, Shama, mwana mobali ya Age, moto ya Arari. Tango bato ya Filisitia basanganaki na Leyi epai wapi ezalaki na elanga moko etonda na misili, basoda ya Isalaele bakimaki liboso na bango. 12 Kasi Shama atelemaki na kati-kati ya elanga, abundelaki yango mpe abomaki bato ya Filisitia. Yawe apesaki bango elonga monene. 13 Mokolo moko, na ebandeli ya eleko ya kobuka bambuma, wana basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya Refayimi, basoda misato kati na basoda tuku misato ya mpiko bayaki epai ya Davidi, na ebombamelo ya mabanga ya Adulami. 14 Na tango yango, Davidi azalaki kati na ebombamelo moko batonga makasi, mpe basoda ya Filisitia bazalaki na Beteleemi. 15 Mbala moko, Davidi ayokaki posa ya mayi mpe alobaki : « Nani akomemela ngai mayi ya libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpo ete namela ? » 16 Basoda nyonso misato ya mpiko bakotaki na mayele kati na molako ya bato ya Filisitia, batokaki mayi na libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpe bamemaki yango epai ya Davidi. Kasi Davidi aboyaki komela mayi yango ; asopaki yango na mabele lokola likabo ya masanga mpo na Yawe. 17 Alobaki : « Tika ete Yawe apesa ngai etumbu soki nameli mayi oyo, pamba te ezali lokola makila ya bato oyo bandimaki kokende kokufa mpo na ngai. »Boye, Davidi aboyaki komela mayi yango. Yango nde misala ya kokamwa oyo basoda misato ya mpiko basalaki. 18 Abishayi, ndeko mobali ya Joabi mpe mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya basoda misato ya mpiko. Abundisaki bato nkama misato na likonga na ye mpe abomaki bango. Boye, kati na bango misato, ye nde akendeki sango koleka. 19 Kati na basoda misato ya mpiko, ye nde azwaki lokumu koleka mpe akomaki mokonzi na bango, kasi akokanaki te na basoda misato ya limpinga ya liboso. 20 Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa : abomaki bilombe mibale ya Moabi ; mpe na mokolo ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi. 21 Ye mpe moto abomaki mbinga mobali moko ya Ejipito, oyo asimbaki likonga na loboko na ye. Abundisaki moto yango ya Ejipito na lingenda, abotolaki ye likonga oyo azalaki na yango na loboko mpe abomaki ye na likonga na ye moko. 22 Yango nde misala ya kokamwa oyo Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, asalaki. Ye mpe akendeki sango kati na basoda misato ya mpiko ya lisanga ya mibale. 23 Kati na basoda tuku misato ya mpiko, ye nde azalaki na lokumu monene koleka, kasi akokanaki te na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya liboso. Mpe Davidi akomisaki ye mokonzi ya bakengeli na ye. 24 Kati na lisanga ya bato tuku misato, ezalaki mpe na :Asaeli, ndeko mobali ya Joabi~;Elanani, mwana mobali ya Dodo, moto ya Beteleemi~; 25 Shama mpe Elika, bato ya Arodi ; 26 Eletsi, moto ya Peleti ;Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya Tekoa~; 27 Abiezeri, moto ya Anatoti ;Mebunayi, moto ya Usha~; 28 Tsalimoni, moto ya Aoyi ;Maarayi, moto ya Netofa~; 29 Elebi, mwana mobali ya Baana, moto ya Netofa ;Itayi, mwana mobali ya Ribayi, moto ya Gibea ya libota ya Benjame~; 30 Benaya, moto ya Piratoni ;Idayi, moto ya mabwaku ya Gashi~; 31 Abi-Aliboni, moto ya Beti-Ariba ;Azimaveti, moto ya Baarumi~; 32 Eliaba, moto ya Shaaliboni ;Bana mibali ya Yasheni~;Jonatan, 33 Shama, moto ya Arari ;Ayami, mwana mobali ya Sharari, moto ya Arari~; 34 Elifeleti, mwana mobali ya Aasibayi, mwana mobali ya Maakati ;Eliami, mwana mobali ya Ayitofeli, moto ya Gilo~; 35 Etsirayi, moto ya Karimeli ;Paarayi, moto ya Arabi~; 36 Yigali, mwana mobali ya Natan, moto ya Tsoba ;Bani, moto ya Gadi ; 37 Tseleki, moto ya Amoni ;Naarayi, moto ya Beyeroti, oyo azalaki komema bibundeli ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya~; 38 Ira mpe Garebi, bato ya Yeteri ; 39 mpe Iri, moto ya Iti. Na kosangisa, bango nyonso bazalaki tuku misato na sambo.

In Other Versions

2 Samuel 23 in the ANGEFD

2 Samuel 23 in the ANTPNG2D

2 Samuel 23 in the AS21

2 Samuel 23 in the BAGH

2 Samuel 23 in the BBPNG

2 Samuel 23 in the BBT1E

2 Samuel 23 in the BDS

2 Samuel 23 in the BEV

2 Samuel 23 in the BHAD

2 Samuel 23 in the BIB

2 Samuel 23 in the BLPT

2 Samuel 23 in the BNT

2 Samuel 23 in the BNTABOOT

2 Samuel 23 in the BNTLV

2 Samuel 23 in the BOATCB

2 Samuel 23 in the BOATCB2

2 Samuel 23 in the BOBCV

2 Samuel 23 in the BOCNT

2 Samuel 23 in the BOECS

2 Samuel 23 in the BOGWICC

2 Samuel 23 in the BOHCB

2 Samuel 23 in the BOHCV

2 Samuel 23 in the BOHLNT

2 Samuel 23 in the BOHNTLTAL

2 Samuel 23 in the BOICB

2 Samuel 23 in the BOILNTAP

2 Samuel 23 in the BOITCV

2 Samuel 23 in the BOKCV

2 Samuel 23 in the BOKCV2

2 Samuel 23 in the BOKHWOG

2 Samuel 23 in the BOKSSV

2 Samuel 23 in the BOLCB

2 Samuel 23 in the BOMCV

2 Samuel 23 in the BONAV

2 Samuel 23 in the BONCB

2 Samuel 23 in the BONLT

2 Samuel 23 in the BONUT2

2 Samuel 23 in the BOPLNT

2 Samuel 23 in the BOSCB

2 Samuel 23 in the BOSNC

2 Samuel 23 in the BOTLNT

2 Samuel 23 in the BOVCB

2 Samuel 23 in the BOYCB

2 Samuel 23 in the BPBB

2 Samuel 23 in the BPH

2 Samuel 23 in the BSB

2 Samuel 23 in the CCB

2 Samuel 23 in the CUV

2 Samuel 23 in the CUVS

2 Samuel 23 in the DBT

2 Samuel 23 in the DGDNT

2 Samuel 23 in the DHNT

2 Samuel 23 in the DNT

2 Samuel 23 in the ELBE

2 Samuel 23 in the EMTV

2 Samuel 23 in the ESV

2 Samuel 23 in the FBV

2 Samuel 23 in the FEB

2 Samuel 23 in the GGMNT

2 Samuel 23 in the GNT

2 Samuel 23 in the HARY

2 Samuel 23 in the HNT

2 Samuel 23 in the IRVA

2 Samuel 23 in the IRVB

2 Samuel 23 in the IRVG

2 Samuel 23 in the IRVH

2 Samuel 23 in the IRVK

2 Samuel 23 in the IRVM

2 Samuel 23 in the IRVM2

2 Samuel 23 in the IRVO

2 Samuel 23 in the IRVP

2 Samuel 23 in the IRVT

2 Samuel 23 in the IRVT2

2 Samuel 23 in the IRVU

2 Samuel 23 in the ISVN

2 Samuel 23 in the JSNT

2 Samuel 23 in the KAPI

2 Samuel 23 in the KBT1ETNIK

2 Samuel 23 in the KBV

2 Samuel 23 in the KJV

2 Samuel 23 in the KNFD

2 Samuel 23 in the LBA

2 Samuel 23 in the LBLA

2 Samuel 23 in the LNT

2 Samuel 23 in the LSV

2 Samuel 23 in the MAAL

2 Samuel 23 in the MBV

2 Samuel 23 in the MBV2

2 Samuel 23 in the MHNT

2 Samuel 23 in the MKNFD

2 Samuel 23 in the MNG

2 Samuel 23 in the MNT

2 Samuel 23 in the MNT2

2 Samuel 23 in the MRS1T

2 Samuel 23 in the NAA

2 Samuel 23 in the NASB

2 Samuel 23 in the NBLA

2 Samuel 23 in the NBS

2 Samuel 23 in the NBVTP

2 Samuel 23 in the NET2

2 Samuel 23 in the NIV11

2 Samuel 23 in the NNT

2 Samuel 23 in the NNT2

2 Samuel 23 in the NNT3

2 Samuel 23 in the PDDPT

2 Samuel 23 in the PFNT

2 Samuel 23 in the RMNT

2 Samuel 23 in the SBIAS

2 Samuel 23 in the SBIBS

2 Samuel 23 in the SBIBS2

2 Samuel 23 in the SBICS

2 Samuel 23 in the SBIDS

2 Samuel 23 in the SBIGS

2 Samuel 23 in the SBIHS

2 Samuel 23 in the SBIIS

2 Samuel 23 in the SBIIS2

2 Samuel 23 in the SBIIS3

2 Samuel 23 in the SBIKS

2 Samuel 23 in the SBIKS2

2 Samuel 23 in the SBIMS

2 Samuel 23 in the SBIOS

2 Samuel 23 in the SBIPS

2 Samuel 23 in the SBISS

2 Samuel 23 in the SBITS

2 Samuel 23 in the SBITS2

2 Samuel 23 in the SBITS3

2 Samuel 23 in the SBITS4

2 Samuel 23 in the SBIUS

2 Samuel 23 in the SBIVS

2 Samuel 23 in the SBT

2 Samuel 23 in the SBT1E

2 Samuel 23 in the SCHL

2 Samuel 23 in the SNT

2 Samuel 23 in the SUSU

2 Samuel 23 in the SUSU2

2 Samuel 23 in the SYNO

2 Samuel 23 in the TBIAOTANT

2 Samuel 23 in the TBT1E

2 Samuel 23 in the TBT1E2

2 Samuel 23 in the TFTIP

2 Samuel 23 in the TFTU

2 Samuel 23 in the TGNTATF3T

2 Samuel 23 in the THAI

2 Samuel 23 in the TNFD

2 Samuel 23 in the TNT

2 Samuel 23 in the TNTIK

2 Samuel 23 in the TNTIL

2 Samuel 23 in the TNTIN

2 Samuel 23 in the TNTIP

2 Samuel 23 in the TNTIZ

2 Samuel 23 in the TOMA

2 Samuel 23 in the TTENT

2 Samuel 23 in the UBG

2 Samuel 23 in the UGV

2 Samuel 23 in the UGV2

2 Samuel 23 in the UGV3

2 Samuel 23 in the VBL

2 Samuel 23 in the VDCC

2 Samuel 23 in the YALU

2 Samuel 23 in the YAPE

2 Samuel 23 in the YBVTP

2 Samuel 23 in the ZBP