2 Samuel 24 (BOLCB2)

1 Yawe asikelaki lisusu bato ya Isalaele mpe atindikaki Davidi na kosala makambo oyo ekomemisa bango ngambo ; alobaki na Davidi : « Kende kotanga motango ya bato ya Isalaele mpe ya Yuda. » 2 Boye, mokonzi apesaki mitindo na Joabi, mokonzi ya mampinga, oyo azalaki elongo na ye :— Tambola na mabota nyonso ya Isalaele, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, mpe tanga bato mpo ete nayeba motango na bango. 3 Kasi Joabi azongiselaki mokonzi :— Tika ete Yawe, Nzambe na yo, akomisa bato ebele koleka mbala nkama, mpe ete yo mokonzi, nkolo na ngai, omona yango na miso na yo ! Kasi mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, alingi kosala likambo ya boye ? 4 Kasi mokonzi atingamaki kaka na mitindo oyo apesaki na Joabi mpe na bakonzi ya mampinga. Boye, balongwaki liboso ya mokonzi mpe bakendeki kotanga bato ya Isalaele. 5 Bakatisaki Yordani mpe babandaki na kotanga bato ya engumba Aroeri, na sude ya engumba oyo ezali kati na lubwaku. Bakatisaki lisusu etuka ya Gadi na nzela oyo ekenda na Yaezeri. 6 Longwa kuna, balekaki na etuka ya Galadi mpe ya Tayitimi-Odishi kino bakomaki na Dani Yaani mpe zingazinga ya Sidoni. 7 Bakendeki na ndako batonga makasi ya Tiri mpe na bingumba nyonso ya bato ya Evi mpe ya Kanana ; bongo bakomaki na sude ya etuka ya Yuda, na Beri-Sheba. 8 Boye batambolaki mboka mobimba, mpe bazongaki na Yelusalemi sima na basanza libwa mpe mikolo tuku mibale. 9 Joabi ayebisaki mokonzi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba : bato nkoto nkama mwambe kati na Isalaele, mpe nkoto nkama mitano kati na Yuda. 10 Sima na Davidi kotanga bato, asosolaki ete amemi ngambo. Bongo Davidi alobaki na Yawe :— Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, oh Yawe, limbisa mabe ya mosali na Yo ; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma. 11 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, tango Davidi alamukaki, Yawe alobaki na mosakoli Gadi, mopesi toli ya mokonzi : 12 — Kende koyebisa Davidi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nazali kotalisa yo bitumbu misato ; pona moko kati na yango mpo ete Ngai nakokisa yango lokola etumbu mpo na yo. › » 13 Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye :— Oponi etumbu nini mpo ete Ngai Yawe nakokisa yango mpo na yo : mibu sambo ya nzala makasi kati na mokili na yo ; sanza misato oyo okokima liboso ya banguna na yo, oyo bakolanda yo ; to mikolo misato ya bokono oyo ebomaka kati na mokili na yo ? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai. 14 Davidi azongiselaki Gadi :— Nazali na pasi makasi na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene ; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato. 15 Boye, Yawe atindaki kati na Isalaele bokono oyo ebomaka, wuta na tongo kaka wana kino na ngonga oyo akataki ; mpe longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bato nkoto tuku sambo bakufaki. 16 Lokola anjelu atandaki loboko na ye na likolo ya Yelusalemi mpo na kobebisa yango, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa : « Ekoki ! Longola loboko na yo ! »Nzokande, na tango wana, anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orina, moto ya Yebusi, kati na likolo mpe mabele, mpe asimbaki mopanga ezanga ebombelo. 17 Wana Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu na Yawe koboma bato, alobaki na Yawe : « Ngai nde nasalaki masumu, ngai nde nasalaki mbeba ; bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te ; boye, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ! » 18 Kaka na mokolo yango, Gadi akendeki epai ya Davidi mpe alobaki na ye :— Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orina, moto ya Yebusi. 19 Davidi akendeki kuna kolanda liloba oyo Gadi alobaki na Kombo na Yawe. 20 Tango Orina atalaki mpe amonaki mokonzi elongo na bakalaka na ye koya epai na ye, abimaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi, elongi kino na mabele. 21 Orina atunaki mokonzi :— Mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, ayei epai ya mosali na ye ?Davidi azongisaki :— Nayei kosomba etando oyo mpo ete natonga awa etumbelo mpo na Yawe ; na bongo, bokono oyo ezali koboma bato ekosila. 22 Orina azongiselaki Davidi :— Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, akamata na ye lopango yango mpe abonza kuna mbeka oyo amoni ete ezali malamu mpo na Yawe. Tala bangombe ya mibali oyo ekosunga mpo na mbeka ya kotumba, mabaya ya bashario mpe bikangiseli oyo ekosunga mpo na kopelisa moto. 23 Oh mokonzi, napesi yo nyonso ! Orina alobaki lisusu na mokonzi :— Tika ete Yawe, Nzambe na yo, ayamba malamu bambeka na yo ! 24 Kasi mokonzi alobaki na Orina :— Te ! Nasengeli kaka kosomba yango mpe kopesa yo motuya oyo ekoki na yango ; naboyi kobonzela Yawe, Nzambe na ngai, bambeka ya kotumba oyo nazwi na ofele.Boye, Davidi asombaki etando mpe bangombe yango, na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano. 25 Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Yawe ayokelaki mboka mawa, mpe bokono oyo ezalaki koboma elongwaki na Isalaele.

In Other Versions

2 Samuel 24 in the ANGEFD

2 Samuel 24 in the ANTPNG2D

2 Samuel 24 in the AS21

2 Samuel 24 in the BAGH

2 Samuel 24 in the BBPNG

2 Samuel 24 in the BBT1E

2 Samuel 24 in the BDS

2 Samuel 24 in the BEV

2 Samuel 24 in the BHAD

2 Samuel 24 in the BIB

2 Samuel 24 in the BLPT

2 Samuel 24 in the BNT

2 Samuel 24 in the BNTABOOT

2 Samuel 24 in the BNTLV

2 Samuel 24 in the BOATCB

2 Samuel 24 in the BOATCB2

2 Samuel 24 in the BOBCV

2 Samuel 24 in the BOCNT

2 Samuel 24 in the BOECS

2 Samuel 24 in the BOGWICC

2 Samuel 24 in the BOHCB

2 Samuel 24 in the BOHCV

2 Samuel 24 in the BOHLNT

2 Samuel 24 in the BOHNTLTAL

2 Samuel 24 in the BOICB

2 Samuel 24 in the BOILNTAP

2 Samuel 24 in the BOITCV

2 Samuel 24 in the BOKCV

2 Samuel 24 in the BOKCV2

2 Samuel 24 in the BOKHWOG

2 Samuel 24 in the BOKSSV

2 Samuel 24 in the BOLCB

2 Samuel 24 in the BOMCV

2 Samuel 24 in the BONAV

2 Samuel 24 in the BONCB

2 Samuel 24 in the BONLT

2 Samuel 24 in the BONUT2

2 Samuel 24 in the BOPLNT

2 Samuel 24 in the BOSCB

2 Samuel 24 in the BOSNC

2 Samuel 24 in the BOTLNT

2 Samuel 24 in the BOVCB

2 Samuel 24 in the BOYCB

2 Samuel 24 in the BPBB

2 Samuel 24 in the BPH

2 Samuel 24 in the BSB

2 Samuel 24 in the CCB

2 Samuel 24 in the CUV

2 Samuel 24 in the CUVS

2 Samuel 24 in the DBT

2 Samuel 24 in the DGDNT

2 Samuel 24 in the DHNT

2 Samuel 24 in the DNT

2 Samuel 24 in the ELBE

2 Samuel 24 in the EMTV

2 Samuel 24 in the ESV

2 Samuel 24 in the FBV

2 Samuel 24 in the FEB

2 Samuel 24 in the GGMNT

2 Samuel 24 in the GNT

2 Samuel 24 in the HARY

2 Samuel 24 in the HNT

2 Samuel 24 in the IRVA

2 Samuel 24 in the IRVB

2 Samuel 24 in the IRVG

2 Samuel 24 in the IRVH

2 Samuel 24 in the IRVK

2 Samuel 24 in the IRVM

2 Samuel 24 in the IRVM2

2 Samuel 24 in the IRVO

2 Samuel 24 in the IRVP

2 Samuel 24 in the IRVT

2 Samuel 24 in the IRVT2

2 Samuel 24 in the IRVU

2 Samuel 24 in the ISVN

2 Samuel 24 in the JSNT

2 Samuel 24 in the KAPI

2 Samuel 24 in the KBT1ETNIK

2 Samuel 24 in the KBV

2 Samuel 24 in the KJV

2 Samuel 24 in the KNFD

2 Samuel 24 in the LBA

2 Samuel 24 in the LBLA

2 Samuel 24 in the LNT

2 Samuel 24 in the LSV

2 Samuel 24 in the MAAL

2 Samuel 24 in the MBV

2 Samuel 24 in the MBV2

2 Samuel 24 in the MHNT

2 Samuel 24 in the MKNFD

2 Samuel 24 in the MNG

2 Samuel 24 in the MNT

2 Samuel 24 in the MNT2

2 Samuel 24 in the MRS1T

2 Samuel 24 in the NAA

2 Samuel 24 in the NASB

2 Samuel 24 in the NBLA

2 Samuel 24 in the NBS

2 Samuel 24 in the NBVTP

2 Samuel 24 in the NET2

2 Samuel 24 in the NIV11

2 Samuel 24 in the NNT

2 Samuel 24 in the NNT2

2 Samuel 24 in the NNT3

2 Samuel 24 in the PDDPT

2 Samuel 24 in the PFNT

2 Samuel 24 in the RMNT

2 Samuel 24 in the SBIAS

2 Samuel 24 in the SBIBS

2 Samuel 24 in the SBIBS2

2 Samuel 24 in the SBICS

2 Samuel 24 in the SBIDS

2 Samuel 24 in the SBIGS

2 Samuel 24 in the SBIHS

2 Samuel 24 in the SBIIS

2 Samuel 24 in the SBIIS2

2 Samuel 24 in the SBIIS3

2 Samuel 24 in the SBIKS

2 Samuel 24 in the SBIKS2

2 Samuel 24 in the SBIMS

2 Samuel 24 in the SBIOS

2 Samuel 24 in the SBIPS

2 Samuel 24 in the SBISS

2 Samuel 24 in the SBITS

2 Samuel 24 in the SBITS2

2 Samuel 24 in the SBITS3

2 Samuel 24 in the SBITS4

2 Samuel 24 in the SBIUS

2 Samuel 24 in the SBIVS

2 Samuel 24 in the SBT

2 Samuel 24 in the SBT1E

2 Samuel 24 in the SCHL

2 Samuel 24 in the SNT

2 Samuel 24 in the SUSU

2 Samuel 24 in the SUSU2

2 Samuel 24 in the SYNO

2 Samuel 24 in the TBIAOTANT

2 Samuel 24 in the TBT1E

2 Samuel 24 in the TBT1E2

2 Samuel 24 in the TFTIP

2 Samuel 24 in the TFTU

2 Samuel 24 in the TGNTATF3T

2 Samuel 24 in the THAI

2 Samuel 24 in the TNFD

2 Samuel 24 in the TNT

2 Samuel 24 in the TNTIK

2 Samuel 24 in the TNTIL

2 Samuel 24 in the TNTIN

2 Samuel 24 in the TNTIP

2 Samuel 24 in the TNTIZ

2 Samuel 24 in the TOMA

2 Samuel 24 in the TTENT

2 Samuel 24 in the UBG

2 Samuel 24 in the UGV

2 Samuel 24 in the UGV2

2 Samuel 24 in the UGV3

2 Samuel 24 in the VBL

2 Samuel 24 in the VDCC

2 Samuel 24 in the YALU

2 Samuel 24 in the YAPE

2 Samuel 24 in the YBVTP

2 Samuel 24 in the ZBP