Daniel 5 (BOLCB2)

1 Mokolo moko, mokonzi Balitazari asalisaki feti moko ya monene mpo na kopesa lokumu na nkoto ya bato na ye ya lokumu ; mpe amelaki vino elongo na bango. 2 Wana Balitazari azalaki komela vino, apesaki mitindo ete bamema bakopo ya wolo mpe ya palata oyo tata na ye, Nabukodonozori, azwaki wuta na Tempelo ya Yelusalemi, mpo ete mokonzi mpe bato na ye ya lokumu, basi na ye mpe bamakangu na ye bamela na yango masanga. 3 Boye, bamemaki bakopo ya wolo oyo bazwaki na Tempelo ya Nzambe, na Yelusalemi ; bongo mokonzi mpe bato na ye ya lokumu, basi na ye mpe bamakangu na ye bamelaki na yango masanga. 4 Wana bazalaki komela vino, bazalaki kokumisa banzambe ya wolo mpe ya palata, ya bronze, ya ebende, ya nzete mpe ya libanga. 5 Mbala moko, misapi ya loboko ya moto moko ebimaki mpe ebandaki kokoma na etando ya mir ya ndako ya mokonzi, pembeni ya etelemiselo ya minda. Tango mokonzi amonaki ndenge loboko yango ezalaki kokoma, 6 elongi na ye etelaki na somo mpe makanisi na ye ekomaki kotambola, nzoto na ye mobimba ekomaki kolenga mpe mabolongo na ye ekomaki kotutana. 7 Mokonzi agangaki makasi mpe apesaki mitindo ete bamemela ye banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya. Mpe mokonzi alobaki na bato oyo nyonso ya bwanya, ya Babiloni :— Moto nyonso oyo akokoka kotanga makomi oyo mpe akoyebisa ngai ndimbola na yango, nakolatisa ye bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe akozala kalaka ya lokumu kati na bokonzi. 8 Bato nyonso ya bwanya ya mokonzi bakotaki na kati, kasi bakokaki te kotanga makomi wana to koyebisa mokonzi ndimbola na yango. 9 Boye, mokonzi Balitazari akomaki lisusu na somo makasi koleka, mpe elongi na ye etelaki lisusu koleka ; mpe bato na ye ya lokumu bakomaki komitungisa. 10 Tango mama ya mokonzi ayokaki basango ya makambo oyo ekomelaki mokonzi mpe bato na ye ya lokumu, akotaki na ndako epai wapi bazalaki kosalela feti ; alobaki :— Oh mokonzi, tika ete owumela na bomoi seko na seko ! Komitungisa te mpe kotika te ete elongi na yo etela ! 11 Ezali na moto moko kati na mokili na yo, oyo azali na molimo ya banzambe ya bule kati na ye. Tango tata na yo azalaki mokonzi, amonaki kati na ye bososoli, mayele mpe bwanya oyo ekokana na bwanya ya banzambe. Boye, tata na yo, mokonzi Nabukodonozori, akomisaki ye mokonzi ya banganga-kisi, ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya. 12 Pamba te moto yango, Daniele, oyo tata na yo azalaki kobenga Belitsatsari, atondisama na mayele, na boyebi mpe na bososoli ; azali lisusu na makoki ya kolimbola ndoto, masese mpe ya kopesa biyano na makambo ya makasi. Benga kaka Daniele wana, mpe akoyebisa yo ndimbola ya makomi yango. 13 Boye, bamemaki Daniele liboso ya mokonzi. Mokonzi atunaki ye :— Yo nde Daniele, moko kati na bawumbu oyo tata na ngai amemaki wuta na Yuda ? 14 Nayoki na tina na yo ete ozali na molimo ya banzambe kati na yo, mpe ete ozali na bososoli, na mayele mpe na bwanya ya kokamwa ! 15 Bato ya bwanya mpe banganga-kisi bawuti awa liboso na ngai mpo na kotanga makomi oyo mpe koyebisa ngai ndimbola na yango, kasi balongi te kopesa ndimbola yango. 16 Nzokande, nayoki ete yo ozali na makoki ya kolimbola mpe ya kopesa biyano na makambo ya makasi ; sik’oyo, soki olongi kotanga makomi oyo mpe opesi ngai ndimbola na yango, nakolatisa yo bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe okokoma moto ya misato kati na molongo ya bayangeli ya mokili na ngai ya bokonzi. 17 Daniele azongiselaki mokonzi :— Batela bakado na yo mpo na yo moko mpe pesa lifuti na yo epai ya moto mosusu ! Kasi ngai, nazali kotanga makomi yango mpo na mokonzi ; bongo, nakopesa ye ndimbola na yango. 18 Oh mokonzi, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apesaki tata na yo, Nabukodonozori, bokonzi ; akomisaki ye moto monene mpe apesaki ye nkembo mpe lokumu. 19 Mpo na lokumu oyo apesaki ye, bato ya bikolo, ya mikili mpe ya nkota nyonso bakomaki kolenga na somo liboso na ye. Mokonzi azalaki koboma bato oyo azalaki na posa ya koboma, kobikisa bato oyo azalaki na posa ya kobikisa, kotombola bato oyo azalaki na posa ya kotombola mpe kosambwisa bato oyo azalaki na posa ya kosambwisa. 20 Kasi tango kaka motema na ye ekomaki na lofundu mpe na lolendo, akitisamaki wuta na kiti na ye ya bokonzi mpe babotolaki ye nkembo na ye. 21 Babenganaki ye na molongo ya bato mpe bapesaki ye mayele ya banyama ; akomaki kovanda elongo na ba-ane ya zamba, kolia matiti lokola bangombe mpe nzoto na ye ezalaki kopola na mamwe ya tongo, kino tango asosolaki ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya bokonzi nyonso ya bato mpe atombolaka na bokonzi moto nyonso oyo Ye alingi. 22 Mpe yo Balitazari, mwana na ye ya mobali, atako oyebaki makambo wana nyonso, otamboli na komikitisa te. 23 Otomboli mapeka na yo mpo na kotelemela Yawe ya Lola, oyeisi epai na yo bakopo oyo ewutaki na Tempelo na Ye ; bongo yo, bato na yo ya lokumu, basi na yo mpe bamakangu na yo, bomeli na yango masanga ya vino mpe bokumisi banzambe ya palata mpe ya wolo, ya bronze mpe ya ebende, ya nzete mpe ya mabanga, oyo emonaka te, eyokaka te mpe esosolaka te. Kasi opesi lokumu te na Nzambe oyo, kati na loboko na Ye, asimbi bomoi mpe banzela na yo nyonso. 24 Yango wana, atindi loboko oyo ekomi makomi oyo. 25 Tala makomi oyo ekomami :Mene, Mene, Tekel, Parsin. 26 Ndimbola ya maloba yango ezali : Mene : Nzambe atangi mikolo ya bokonzi na yo mpe akomisi yango na suka ; 27 Tekel : bameki kilo na yo na emekelo kilo, mpe emonani ete ozali na yo pepele ; 28 Parsin : bokonzi na yo ekabwani mpe epesami epai ya bato ya Medi mpe ya Persi. 29 Mbala moko, Balitazari apesaki mitindo ete balatisa Daniele bilamba ya motane, sheneti ya wolo na kingo mpe batatola na tina na ye ete akomi moto ya misato kati na molongo ya bayangeli ya bokonzi. 30 Mpe kaka na butu wana, babomaki Balitazari, mokonzi ya bato ya Babiloni.

In Other Versions

Daniel 5 in the ANGEFD

Daniel 5 in the ANTPNG2D

Daniel 5 in the AS21

Daniel 5 in the BAGH

Daniel 5 in the BBPNG

Daniel 5 in the BBT1E

Daniel 5 in the BDS

Daniel 5 in the BEV

Daniel 5 in the BHAD

Daniel 5 in the BIB

Daniel 5 in the BLPT

Daniel 5 in the BNT

Daniel 5 in the BNTABOOT

Daniel 5 in the BNTLV

Daniel 5 in the BOATCB

Daniel 5 in the BOATCB2

Daniel 5 in the BOBCV

Daniel 5 in the BOCNT

Daniel 5 in the BOECS

Daniel 5 in the BOGWICC

Daniel 5 in the BOHCB

Daniel 5 in the BOHCV

Daniel 5 in the BOHLNT

Daniel 5 in the BOHNTLTAL

Daniel 5 in the BOICB

Daniel 5 in the BOILNTAP

Daniel 5 in the BOITCV

Daniel 5 in the BOKCV

Daniel 5 in the BOKCV2

Daniel 5 in the BOKHWOG

Daniel 5 in the BOKSSV

Daniel 5 in the BOLCB

Daniel 5 in the BOMCV

Daniel 5 in the BONAV

Daniel 5 in the BONCB

Daniel 5 in the BONLT

Daniel 5 in the BONUT2

Daniel 5 in the BOPLNT

Daniel 5 in the BOSCB

Daniel 5 in the BOSNC

Daniel 5 in the BOTLNT

Daniel 5 in the BOVCB

Daniel 5 in the BOYCB

Daniel 5 in the BPBB

Daniel 5 in the BPH

Daniel 5 in the BSB

Daniel 5 in the CCB

Daniel 5 in the CUV

Daniel 5 in the CUVS

Daniel 5 in the DBT

Daniel 5 in the DGDNT

Daniel 5 in the DHNT

Daniel 5 in the DNT

Daniel 5 in the ELBE

Daniel 5 in the EMTV

Daniel 5 in the ESV

Daniel 5 in the FBV

Daniel 5 in the FEB

Daniel 5 in the GGMNT

Daniel 5 in the GNT

Daniel 5 in the HARY

Daniel 5 in the HNT

Daniel 5 in the IRVA

Daniel 5 in the IRVB

Daniel 5 in the IRVG

Daniel 5 in the IRVH

Daniel 5 in the IRVK

Daniel 5 in the IRVM

Daniel 5 in the IRVM2

Daniel 5 in the IRVO

Daniel 5 in the IRVP

Daniel 5 in the IRVT

Daniel 5 in the IRVT2

Daniel 5 in the IRVU

Daniel 5 in the ISVN

Daniel 5 in the JSNT

Daniel 5 in the KAPI

Daniel 5 in the KBT1ETNIK

Daniel 5 in the KBV

Daniel 5 in the KJV

Daniel 5 in the KNFD

Daniel 5 in the LBA

Daniel 5 in the LBLA

Daniel 5 in the LNT

Daniel 5 in the LSV

Daniel 5 in the MAAL

Daniel 5 in the MBV

Daniel 5 in the MBV2

Daniel 5 in the MHNT

Daniel 5 in the MKNFD

Daniel 5 in the MNG

Daniel 5 in the MNT

Daniel 5 in the MNT2

Daniel 5 in the MRS1T

Daniel 5 in the NAA

Daniel 5 in the NASB

Daniel 5 in the NBLA

Daniel 5 in the NBS

Daniel 5 in the NBVTP

Daniel 5 in the NET2

Daniel 5 in the NIV11

Daniel 5 in the NNT

Daniel 5 in the NNT2

Daniel 5 in the NNT3

Daniel 5 in the PDDPT

Daniel 5 in the PFNT

Daniel 5 in the RMNT

Daniel 5 in the SBIAS

Daniel 5 in the SBIBS

Daniel 5 in the SBIBS2

Daniel 5 in the SBICS

Daniel 5 in the SBIDS

Daniel 5 in the SBIGS

Daniel 5 in the SBIHS

Daniel 5 in the SBIIS

Daniel 5 in the SBIIS2

Daniel 5 in the SBIIS3

Daniel 5 in the SBIKS

Daniel 5 in the SBIKS2

Daniel 5 in the SBIMS

Daniel 5 in the SBIOS

Daniel 5 in the SBIPS

Daniel 5 in the SBISS

Daniel 5 in the SBITS

Daniel 5 in the SBITS2

Daniel 5 in the SBITS3

Daniel 5 in the SBITS4

Daniel 5 in the SBIUS

Daniel 5 in the SBIVS

Daniel 5 in the SBT

Daniel 5 in the SBT1E

Daniel 5 in the SCHL

Daniel 5 in the SNT

Daniel 5 in the SUSU

Daniel 5 in the SUSU2

Daniel 5 in the SYNO

Daniel 5 in the TBIAOTANT

Daniel 5 in the TBT1E

Daniel 5 in the TBT1E2

Daniel 5 in the TFTIP

Daniel 5 in the TFTU

Daniel 5 in the TGNTATF3T

Daniel 5 in the THAI

Daniel 5 in the TNFD

Daniel 5 in the TNT

Daniel 5 in the TNTIK

Daniel 5 in the TNTIL

Daniel 5 in the TNTIN

Daniel 5 in the TNTIP

Daniel 5 in the TNTIZ

Daniel 5 in the TOMA

Daniel 5 in the TTENT

Daniel 5 in the UBG

Daniel 5 in the UGV

Daniel 5 in the UGV2

Daniel 5 in the UGV3

Daniel 5 in the VBL

Daniel 5 in the VDCC

Daniel 5 in the YALU

Daniel 5 in the YAPE

Daniel 5 in the YBVTP

Daniel 5 in the ZBP