Deuteronomy 31 (BOLCB2)

1 Moyize akobaki koloba maloba oyo epai ya bana nyonso ya Isalaele : 2 « Nakokisi sik’oyo mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama mpe nazali lisusu na makasi te ya kokamba bino. Yawe alobaki na ngai : ‹ Okokatisa Yordani te oyo ozali komona. › 3 Yawe, Nzambe na bino, akotambola Ye moko liboso na bino, akobebisa bikolo oyo ezali liboso na bino mpo ete bokamata mokili na bango ; Jozue nde akotambola liboso na bino ndenge Yawe alobaki. 4 Yawe akobebisa bango ndenge kaka asalaki Sikoni mpe Ogi, bakonzi ya bato ya Amori, oyo abebisaki elongo na bamboka na bango. 5 Yawe akokaba bango na maboko na bino mpe bokosala bango makambo nyonso oyo natindaki bino. 6 Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te. » 7 Bongo Moyize abengisaki Jozue mpe alobaki na ye na miso ya bana nyonso ya Isalaele : « Yika mpiko mpe zala na molende, pamba te okokende elongo na bato oyo kino na mokili oyo Yawe alakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi, mpe okokabola yango mpo na bango lokola libula na bango. 8 Ye moko Yawe akotambola liboso na yo mpe akozala elongo na yo. Kobanga te mpe yika mpiko. » 9 Boye Moyize akomaki mibeko oyo mpe apesaki yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe epai ya bampaka nyonso ya Isalaele. 10 Moyize atindaki bango : « Na suka ya mibu sambo nyonso, na mobu ya kotika baniongo, na tango ya feti ya Bandako ya kapo, 11 tango bana nyonso ya Isalaele bakopusana liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo akopona, bokotanga mibeko oyo liboso na bango mpo ete matoyi na bango ekoka koyoka. 12 Bosangisa bato : mibali, basi, bana mpe bapaya oyo bazali kati na bingumba na bino mpo ete bakoka koyoka mpe koyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino, mpe kosalela malamu maloba nyonso ya mibeko oyo. 13 Bana na bango oyo bayebi mibeko oyo te basengeli koyoka yango malamu mpe koyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso oyo bokovanda kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. » 14 Yawe alobaki na Moyize : « Tala sik’oyo, mokolo ya kufa na yo ekomi pene. Benga Jozue, mpe bokota na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakopesa ye mitindo na Ngai. »Boye Moyize mpe Jozue bakendeki mpe bakotaki na Ndako ya kapo ya Bokutani. 15 Yawe amimonisaki epai na bango lokola likonzi ya lipata kati na Ndako ya kapo ya Bokutani ; mpe likonzi yango ya lipata etelemaki na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 16 Yawe alobaki na Moyize : « Ozali kokende kopema elongo na bakoko na yo ; mpe, kala mingi te, bato oyo bakopengwa mpo na kosalela banzambe ya bapaya kati na mokili oyo bozali kokota, bakobosana Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na bango. 17 Na mokolo wana, nakosilikela bango mpe nakobosana bango. Boye, nakobombela bango elongi na Ngai, mpe bakobebisama. Bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango. Mpe na mokolo wana, bakomituna : ‹ Ezali te mpo ete Nzambe na biso azali lisusu elongo na biso te nde bokono oyo ekomeli biso te ? › 18 Solo, na mokolo wana, nakobombela bango elongi na Ngai mpo na mabe nyonso oyo basalaki, wana bakendeki epai ya banzambe mosusu. 19 Sik’oyo, koma nzembo oyo mpe lakisa yango yo moko epai ya bana ya Isalaele, mpe sala ete bayemba yango mpo ete ezala litatoli mpo na Ngai, liboso na bango. 20 Pamba te nakokotisa bango na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi : bakolia, bakotonda mpe bakoya minene ; bongo bakokende epai ya banzambe mosusu mpe bakosambela yango, bakobwaka Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai. 21 Tango bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango, nzembo oyo ekotatola mpo na kofunda bango, pamba te bakitani na bango bakobosana yango te. Nayebi makambo oyo bazali kokana kosala atako nakotisi bango nanu te kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi. » 22 Boye, Moyize akomaki nzembo yango kaka na mokolo wana mpe alakisaki yango bana ya Isalaele. 23 Yawe apesaki mitindo oyo epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni : « Yika mpiko mpe zala na molende, pamba te okokotisa bana ya Isalaele kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi, mpe Ngai moko nakozala elongo na yo. » 24 Moyize asilisaki kokoma kati na buku maloba nyonso ya mobeko oyo. 25 Bongo Moyize apesaki mitindo oyo epai ya Balevi oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe : 26 « Bokamata buku oyo ya Mobeko mpe botia yango pembeni ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino ; ekozala kuna lokola litatoli mpo na bino. 27 Pamba te nayebi ndenge nini bozali batomboki mpe mito makasi. Soki, wana nazali nanu na bomoi kati na bino, bozali batomboki liboso ya Yawe, ekozala boni sima na kufa na ngai ? 28 Bosangisa liboso na ngai bakambi nyonso ya mabota na bino mpe bakalaka na bino, mpo ete naloba maloba oyo na matoyi na bango mpe nazwa likolo mpe se lokola batatoli mpo na kofunda bango. 29 Pamba te nayebi solo ete sima na kufa na ngai, bokomibebisa mpe bokopengwa mosika na nzela oyo natindaki bino. Na mikolo oyo ezali koya, bokono ekokweyela bino, pamba te bokosala mabe na miso ya Yawe mpe bokotumbola kanda na Ye na nzela ya misala ya maboko na bino. » 30 Moyize alobaki maloba ya nzembo yango, banda na ebandeli kino na suka, wana lisanga mobimba ya bana ya Isalaele ezalaki koyoka :

In Other Versions

Deuteronomy 31 in the ANGEFD

Deuteronomy 31 in the ANTPNG2D

Deuteronomy 31 in the AS21

Deuteronomy 31 in the BAGH

Deuteronomy 31 in the BBPNG

Deuteronomy 31 in the BBT1E

Deuteronomy 31 in the BDS

Deuteronomy 31 in the BEV

Deuteronomy 31 in the BHAD

Deuteronomy 31 in the BIB

Deuteronomy 31 in the BLPT

Deuteronomy 31 in the BNT

Deuteronomy 31 in the BNTABOOT

Deuteronomy 31 in the BNTLV

Deuteronomy 31 in the BOATCB

Deuteronomy 31 in the BOATCB2

Deuteronomy 31 in the BOBCV

Deuteronomy 31 in the BOCNT

Deuteronomy 31 in the BOECS

Deuteronomy 31 in the BOGWICC

Deuteronomy 31 in the BOHCB

Deuteronomy 31 in the BOHCV

Deuteronomy 31 in the BOHLNT

Deuteronomy 31 in the BOHNTLTAL

Deuteronomy 31 in the BOICB

Deuteronomy 31 in the BOILNTAP

Deuteronomy 31 in the BOITCV

Deuteronomy 31 in the BOKCV

Deuteronomy 31 in the BOKCV2

Deuteronomy 31 in the BOKHWOG

Deuteronomy 31 in the BOKSSV

Deuteronomy 31 in the BOLCB

Deuteronomy 31 in the BOMCV

Deuteronomy 31 in the BONAV

Deuteronomy 31 in the BONCB

Deuteronomy 31 in the BONLT

Deuteronomy 31 in the BONUT2

Deuteronomy 31 in the BOPLNT

Deuteronomy 31 in the BOSCB

Deuteronomy 31 in the BOSNC

Deuteronomy 31 in the BOTLNT

Deuteronomy 31 in the BOVCB

Deuteronomy 31 in the BOYCB

Deuteronomy 31 in the BPBB

Deuteronomy 31 in the BPH

Deuteronomy 31 in the BSB

Deuteronomy 31 in the CCB

Deuteronomy 31 in the CUV

Deuteronomy 31 in the CUVS

Deuteronomy 31 in the DBT

Deuteronomy 31 in the DGDNT

Deuteronomy 31 in the DHNT

Deuteronomy 31 in the DNT

Deuteronomy 31 in the ELBE

Deuteronomy 31 in the EMTV

Deuteronomy 31 in the ESV

Deuteronomy 31 in the FBV

Deuteronomy 31 in the FEB

Deuteronomy 31 in the GGMNT

Deuteronomy 31 in the GNT

Deuteronomy 31 in the HARY

Deuteronomy 31 in the HNT

Deuteronomy 31 in the IRVA

Deuteronomy 31 in the IRVB

Deuteronomy 31 in the IRVG

Deuteronomy 31 in the IRVH

Deuteronomy 31 in the IRVK

Deuteronomy 31 in the IRVM

Deuteronomy 31 in the IRVM2

Deuteronomy 31 in the IRVO

Deuteronomy 31 in the IRVP

Deuteronomy 31 in the IRVT

Deuteronomy 31 in the IRVT2

Deuteronomy 31 in the IRVU

Deuteronomy 31 in the ISVN

Deuteronomy 31 in the JSNT

Deuteronomy 31 in the KAPI

Deuteronomy 31 in the KBT1ETNIK

Deuteronomy 31 in the KBV

Deuteronomy 31 in the KJV

Deuteronomy 31 in the KNFD

Deuteronomy 31 in the LBA

Deuteronomy 31 in the LBLA

Deuteronomy 31 in the LNT

Deuteronomy 31 in the LSV

Deuteronomy 31 in the MAAL

Deuteronomy 31 in the MBV

Deuteronomy 31 in the MBV2

Deuteronomy 31 in the MHNT

Deuteronomy 31 in the MKNFD

Deuteronomy 31 in the MNG

Deuteronomy 31 in the MNT

Deuteronomy 31 in the MNT2

Deuteronomy 31 in the MRS1T

Deuteronomy 31 in the NAA

Deuteronomy 31 in the NASB

Deuteronomy 31 in the NBLA

Deuteronomy 31 in the NBS

Deuteronomy 31 in the NBVTP

Deuteronomy 31 in the NET2

Deuteronomy 31 in the NIV11

Deuteronomy 31 in the NNT

Deuteronomy 31 in the NNT2

Deuteronomy 31 in the NNT3

Deuteronomy 31 in the PDDPT

Deuteronomy 31 in the PFNT

Deuteronomy 31 in the RMNT

Deuteronomy 31 in the SBIAS

Deuteronomy 31 in the SBIBS

Deuteronomy 31 in the SBIBS2

Deuteronomy 31 in the SBICS

Deuteronomy 31 in the SBIDS

Deuteronomy 31 in the SBIGS

Deuteronomy 31 in the SBIHS

Deuteronomy 31 in the SBIIS

Deuteronomy 31 in the SBIIS2

Deuteronomy 31 in the SBIIS3

Deuteronomy 31 in the SBIKS

Deuteronomy 31 in the SBIKS2

Deuteronomy 31 in the SBIMS

Deuteronomy 31 in the SBIOS

Deuteronomy 31 in the SBIPS

Deuteronomy 31 in the SBISS

Deuteronomy 31 in the SBITS

Deuteronomy 31 in the SBITS2

Deuteronomy 31 in the SBITS3

Deuteronomy 31 in the SBITS4

Deuteronomy 31 in the SBIUS

Deuteronomy 31 in the SBIVS

Deuteronomy 31 in the SBT

Deuteronomy 31 in the SBT1E

Deuteronomy 31 in the SCHL

Deuteronomy 31 in the SNT

Deuteronomy 31 in the SUSU

Deuteronomy 31 in the SUSU2

Deuteronomy 31 in the SYNO

Deuteronomy 31 in the TBIAOTANT

Deuteronomy 31 in the TBT1E

Deuteronomy 31 in the TBT1E2

Deuteronomy 31 in the TFTIP

Deuteronomy 31 in the TFTU

Deuteronomy 31 in the TGNTATF3T

Deuteronomy 31 in the THAI

Deuteronomy 31 in the TNFD

Deuteronomy 31 in the TNT

Deuteronomy 31 in the TNTIK

Deuteronomy 31 in the TNTIL

Deuteronomy 31 in the TNTIN

Deuteronomy 31 in the TNTIP

Deuteronomy 31 in the TNTIZ

Deuteronomy 31 in the TOMA

Deuteronomy 31 in the TTENT

Deuteronomy 31 in the UBG

Deuteronomy 31 in the UGV

Deuteronomy 31 in the UGV2

Deuteronomy 31 in the UGV3

Deuteronomy 31 in the VBL

Deuteronomy 31 in the VDCC

Deuteronomy 31 in the YALU

Deuteronomy 31 in the YAPE

Deuteronomy 31 in the YBVTP

Deuteronomy 31 in the ZBP