Esther 2 (BOLCB2)

1 Sima na mikolo, kanda ya mokonzi Kizerisesi ekitaki ; akomaki kokanisa Vasti, makambo oyo asalaki mpe mobeko oyo azwaki na tina na ye. 2 Bato oyo basalaka epai ya mokonzi balobaki na ye :— Tika ete balukela mokonzi bilenge basi ya kitoko oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. 3 Tika ete mokonzi atia bato kati na etuka moko na moko ya bokonzi na ye, mpo ete bamema na ndako ya basi oyo ezalaka na Size, engumba mokonzi, bilenge basi nyonso ya kitoko oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete bapesa bango na maboko ya Ege, kalaka ya lokumu mpo na mokonzi, oyo baboma ye mokongo mpe abatelaka basi ; mpe tika ete bapesa bango mafuta mpe malasi oyo ekomisaka bato kitoko. 4 Tika ete elenge mwasi oyo akosepelisa mokonzi akoma mwasi ya mokonzi na esika ya Vasti.Likanisi oyo esepelisaki mokonzi mpe asalelaki yango. 5 Kati na Size, engumba mokonzi batonga makasi, ezalaki na Moyuda moko ya libota ya Benjame ; kombo na ye ezalaki « Maridoshe. » Maridoshe azalaki mwana mobali ya Yairi, mwana mobali ya Shimei, mwana mobali ya Kishi. 6 Maridoshe azalaki kati na bato oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu, longwa na Yelusalemi, elongo na Yekonia, mokonzi ya Yuda. 7 Maridoshe azalaki kobokola Adasa, mwana mwasi ya noko na ye mpo ete azalaki lisusu na tata mpe na mama te. Nzokande, elenge mwasi oyo kombo na ye mosusu ezalaki « Ester » azalaki na ezaleli malamu mpe elongi kitoko. Tango tata mpe mama na ye bakufaki, Maridoshe azwaki ye mpe akomaki kobokola ye lokola mwana na ye penza ya mwasi. 8 Tango bapanzaki sango ya mitindo mpe ya mobeko ya mokonzi, basangisaki bilenge basi ebele na engumba Size, mpe Ege azalaki kobatela bango. Boye bamemaki mpe Ester kati na ndako ya mokonzi mpe bapesaki ye na maboko ya Ege, mosali oyo azalaki kobatela ndako ya basi ya mokonzi. 9 Ester asepelisaki Ege mpe azwaki ngolu na miso na ye. Mbala moko, apesaki ye biloko ya monzele mpe bilei oyo asengeli kolia ; apesaki ye mpe basali sambo ya basi oyo aponaki kati na ndako ya mokonzi. Bongo atiaki ye elongo na basali na ye ya basi kati na shambre oyo elekaki kitoko kati na ndako ya basi ya mokonzi. 10 Ester atikalaki te koyebisa ekolo mpe libota na ye, pamba te Maridoshe apekisaki ye koloba yango. 11 Mikolo nyonso, Maridoshe azalaki koleka liboso ya lopango ya ndako ya basi ya mokonzi mpo na kozwa basango ya Ester mpe koyeba ndenge nini bazalaki kobatela ye. 12 Kolanda ndenge ekatamaki, liboso ete elenge mwasi nyonso akende kokutana na mokonzi Kizerisesi, basengelaki kosala sanza zomi na mibale mpo na kobongisa ye mpo ete akoma kitoko : sanza motoba na mafuta ya mire, mpe sanza motoba mosusu na biloko ya monzele. 13 Tala ndenge elenge mwasi nyonso oyo azalaki kokende epai ya mokonzi azalaki : Wuta na ndako ya basi ya mokonzi kino na ndako ya mokonzi, bazalaki kopesa ye eloko nyonso oyo azalaki na yango na bosenga. 14 Boye elenge mwasi azalaki kokende epai ya mokonzi na pokwa ; mpe na tongo ya mokolo oyo ezalaki kolanda, azalaki kokende na ndako mosusu ya basi ya mokonzi, oyo Shashigazi azalaki kokamba. Shashigazi azalaki kalaka ya lokumu mpo na mokonzi, baboma ye mokongo mpe azalaki na mokumba ya kobatela bamakangu ya mokonzi. Elenge mwasi azalaki lisusu te kozonga liboso ya mokonzi, longola kaka soki mokonzi ayoki posa na ye mpe abengisi ye na kombo. 15 Tango ekomaki ngala ya Ester ya kokende epai ya mokonzi ; Ester, mwana mwasi ya Abiyaili, noko ya Maridoshe oyo abokolaki Ester, amemaki eloko mosusu te, bobele oyo Ege, kalaka ya lokumu, oyo baboma ye mokongo mpe azalaki na kobatela ndako ya basi ya mokonzi, ayebisaki ye. Mpe Ester azwaki ngolu na miso ya moto nyonso oyo azalaki komona ye. 16 Ezalaki na sanza ya zomi, sanza ya Tebeti, na mobu ya sambo ya bokonzi ya Kizerisesi nde bamemaki Ester liboso ya mokonzi kati na ndako ya mokonzi. 17 Mokonzi alingaki Ester makasi koleka basi nyonso. Ester azwaki ngolu mpe andimamaki na miso ya mokonzi koleka bilenge basi mosusu. Bongo mokonzi atiaki motole ya bokonzi na moto ya Ester mpe akomisaki ye mwasi ya mokonzi na esika ya Vasti. 18 Mokonzi alambisaki biloko ebele mpo na lokumu ya Ester mpe mpo na kosepela elongo na basali na ye nyonso mpe bakalaka na ye. Akataki lisusu ete, na mokolo wana, bituka nyonso efuta mpako te mpe akabolaki bakado na motema ya esengo. 19 Tango basangisaki bilenge basi na mbala ya mibale, Maridoshe avandaki na ekuke ya mokonzi. 20 Kasi Ester atikalaki te koloba libota na ye to mpe ekolo na ye, ndenge kaka Maridoshe ayebisaki ye ete aloba yango te. Ester azalaki kokoba kobatela toli ya Maridoshe, ndenge kaka azalaki kosala na tango Maridoshe azalaki kobokola ye. 21 Tango Maridoshe avandaki na ekuke ya mokonzi, Bigitani mpe Tereshi, basoda mibale oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kobatela ekuke ya mokonzi, batombokaki mpe balukaki koboma mokonzi Kizerisesi. 22 Kasi Maridoshe asosolaki makanisi na bango mpe ayebisaki yango epai ya Ester, mwasi ya mokonzi, oyo mpe ayebisaki yango epai ya mokonzi na kombo ya Maridoshe. 23 Bongo sima na bango koluka koyeba bosolo ya likambo yango, emonanaki ete ezali likambo ya solo. Boye badiembikaki basoda nyonso mibale na nzete mpe bakomaki makambo nyonso wana kati na buku ya masolo, na miso ya mokonzi.

In Other Versions

Esther 2 in the ANGEFD

Esther 2 in the ANTPNG2D

Esther 2 in the AS21

Esther 2 in the BAGH

Esther 2 in the BBPNG

Esther 2 in the BBT1E

Esther 2 in the BDS

Esther 2 in the BEV

Esther 2 in the BHAD

Esther 2 in the BIB

Esther 2 in the BLPT

Esther 2 in the BNT

Esther 2 in the BNTABOOT

Esther 2 in the BNTLV

Esther 2 in the BOATCB

Esther 2 in the BOATCB2

Esther 2 in the BOBCV

Esther 2 in the BOCNT

Esther 2 in the BOECS

Esther 2 in the BOGWICC

Esther 2 in the BOHCB

Esther 2 in the BOHCV

Esther 2 in the BOHLNT

Esther 2 in the BOHNTLTAL

Esther 2 in the BOICB

Esther 2 in the BOILNTAP

Esther 2 in the BOITCV

Esther 2 in the BOKCV

Esther 2 in the BOKCV2

Esther 2 in the BOKHWOG

Esther 2 in the BOKSSV

Esther 2 in the BOLCB

Esther 2 in the BOMCV

Esther 2 in the BONAV

Esther 2 in the BONCB

Esther 2 in the BONLT

Esther 2 in the BONUT2

Esther 2 in the BOPLNT

Esther 2 in the BOSCB

Esther 2 in the BOSNC

Esther 2 in the BOTLNT

Esther 2 in the BOVCB

Esther 2 in the BOYCB

Esther 2 in the BPBB

Esther 2 in the BPH

Esther 2 in the BSB

Esther 2 in the CCB

Esther 2 in the CUV

Esther 2 in the CUVS

Esther 2 in the DBT

Esther 2 in the DGDNT

Esther 2 in the DHNT

Esther 2 in the DNT

Esther 2 in the ELBE

Esther 2 in the EMTV

Esther 2 in the ESV

Esther 2 in the FBV

Esther 2 in the FEB

Esther 2 in the GGMNT

Esther 2 in the GNT

Esther 2 in the HARY

Esther 2 in the HNT

Esther 2 in the IRVA

Esther 2 in the IRVB

Esther 2 in the IRVG

Esther 2 in the IRVH

Esther 2 in the IRVK

Esther 2 in the IRVM

Esther 2 in the IRVM2

Esther 2 in the IRVO

Esther 2 in the IRVP

Esther 2 in the IRVT

Esther 2 in the IRVT2

Esther 2 in the IRVU

Esther 2 in the ISVN

Esther 2 in the JSNT

Esther 2 in the KAPI

Esther 2 in the KBT1ETNIK

Esther 2 in the KBV

Esther 2 in the KJV

Esther 2 in the KNFD

Esther 2 in the LBA

Esther 2 in the LBLA

Esther 2 in the LNT

Esther 2 in the LSV

Esther 2 in the MAAL

Esther 2 in the MBV

Esther 2 in the MBV2

Esther 2 in the MHNT

Esther 2 in the MKNFD

Esther 2 in the MNG

Esther 2 in the MNT

Esther 2 in the MNT2

Esther 2 in the MRS1T

Esther 2 in the NAA

Esther 2 in the NASB

Esther 2 in the NBLA

Esther 2 in the NBS

Esther 2 in the NBVTP

Esther 2 in the NET2

Esther 2 in the NIV11

Esther 2 in the NNT

Esther 2 in the NNT2

Esther 2 in the NNT3

Esther 2 in the PDDPT

Esther 2 in the PFNT

Esther 2 in the RMNT

Esther 2 in the SBIAS

Esther 2 in the SBIBS

Esther 2 in the SBIBS2

Esther 2 in the SBICS

Esther 2 in the SBIDS

Esther 2 in the SBIGS

Esther 2 in the SBIHS

Esther 2 in the SBIIS

Esther 2 in the SBIIS2

Esther 2 in the SBIIS3

Esther 2 in the SBIKS

Esther 2 in the SBIKS2

Esther 2 in the SBIMS

Esther 2 in the SBIOS

Esther 2 in the SBIPS

Esther 2 in the SBISS

Esther 2 in the SBITS

Esther 2 in the SBITS2

Esther 2 in the SBITS3

Esther 2 in the SBITS4

Esther 2 in the SBIUS

Esther 2 in the SBIVS

Esther 2 in the SBT

Esther 2 in the SBT1E

Esther 2 in the SCHL

Esther 2 in the SNT

Esther 2 in the SUSU

Esther 2 in the SUSU2

Esther 2 in the SYNO

Esther 2 in the TBIAOTANT

Esther 2 in the TBT1E

Esther 2 in the TBT1E2

Esther 2 in the TFTIP

Esther 2 in the TFTU

Esther 2 in the TGNTATF3T

Esther 2 in the THAI

Esther 2 in the TNFD

Esther 2 in the TNT

Esther 2 in the TNTIK

Esther 2 in the TNTIL

Esther 2 in the TNTIN

Esther 2 in the TNTIP

Esther 2 in the TNTIZ

Esther 2 in the TOMA

Esther 2 in the TTENT

Esther 2 in the UBG

Esther 2 in the UGV

Esther 2 in the UGV2

Esther 2 in the UGV3

Esther 2 in the VBL

Esther 2 in the VDCC

Esther 2 in the YALU

Esther 2 in the YAPE

Esther 2 in the YBVTP

Esther 2 in the ZBP