Esther 3 (BOLCB2)

1 Sima na makambo oyo, mokonzi Kizerisesi apesaki lokumu epai ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi ; atombolaki ye mpe atiaki ye likolo ya bakalaka nyonso. 2 Bakalaka nyonso oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi bakomaki kofukama mpe kopesa Amani lokumu, pamba te mokonzi atindaki ete basala bongo mpo na ye. Kasi Maridoshe azalaki kofukamela ye te mpe azalaki kopesa ye lokumu te. 3 Bakalaka oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi batunaki Maridoshe :— Mpo na nini otosaka mitindo ya mokonzi te ? 4 Bazalaki koloba na ye bongo mikolo nyonso, kasi Maridoshe azalaki kaka koboya koyoka bango. Boye, bayebisaki Amani makambo yango mpo na koyeba soki ezaleli ya Maridoshe ekondimama mpe soki akokangama kaka na maloba na ye, pamba te ayebisaki bango ete azali Moyuda. 5 Tango Amani asosolaki ete Maridoshe afukamelaka ye te mpe apesaka ye lokumu te, asilikaki makasi. 6 Nzokande Amani asilaki koyoka ete Maridoshe azali Moyuda. Boye amonaki ete likanisi ya koboma kaka Maridoshe ekoki te ; alukaki nzela ya koboma Bayuda nyonso, bato ya Maridoshe, kati na mokili mobimba ya mokonzi Kizerisesi. 7 Na sanza ya liboso, sanza ya Nisani, na mobu ya zomi na mibale ya Mokonzi Kizerisesi, babetaki zeke oyo babengaka « Puri » liboso ya Amani mpo na kopona mokolo mpe sanza ya koboma Bayuda. Bongo zeke ekweyaki na sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari. 8 Amani alobaki na mokonzi Kizerisesi :— Ezali na bato moko oyo bakeseni na bato mosusu, bapanzani kati na bato mpe kati na bituka nyonso ya mokili na yo ya bokonzi ; bizaleli na bango ekeseni na bizaleli ya bato mosusu, bongo batosaka mibeko ya mokonzi te ; ezali malamu te mpo na mokonzi kotika bango na kimia. 9 Soki esepelisi mokonzi, tika ete abimisa mobeko ya koboma bango ; mpe ngai nakopesa na maboko ya bakalaka oyo batalaka makambo ya mokonzi mbongo ya bibende ya palata nkoto zomi mpo ete batia yango kati na libenga ya mokonzi. 10 Mokonzi alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe apesaki yango epai ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi, monguna ya Bayuda. 11 Mokonzi alobaki na Amani :— Bomba palata na yo ! Sala nyonso oyo olingi epai ya bato yango. 12 Boye, na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya liboso, babengisaki bakomi mikanda ya mokonzi ; mpe na mitindo ya Amani, bakomaki mitindo nyonso ya Amani epai ya bakalaka ya lokumu ya mokonzi, epai ya bayangeli ya etuka moko na moko mpe epai ya bakalaka ya ekolo moko na moko, kolanda lolenge ya kokoma ya etuka moko na moko mpe lokota ya ekolo moko na moko. Bakomaki yango na kombo ya mokonzi Kizerisesi mpe babetaki yango kashe ya mokonzi. 13 Bongo mikanda yango etindamaki na bituka nyonso ya mokonzi, na nzela ya bantoma, mpo na kobebisa, koboma mpe kolimwisa Bayuda nyonso, bilenge mpe mikolo, bana mpe basi, kaka na mokolo moko, mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari ; mpe kobotola na makasi biloko na bango. 14 Basengelaki kopanza kati na bituka nyonso sango ya mobeko yango mpe kolakisa yango na bato ya bikolo nyonso mpo ete babongama mpo na mokolo wana. 15 Boye, na mitindo ya mokonzi, bantoma bakendeki na lombangu mpe bapanzaki kati na Size, engumba mokonzi, sango ya mobeko ya mokonzi. Wana mokonzi mpe Amani bavandaki mpo na komela masanga, engumba Size ezalaki kati na matanga.

In Other Versions

Esther 3 in the ANGEFD

Esther 3 in the ANTPNG2D

Esther 3 in the AS21

Esther 3 in the BAGH

Esther 3 in the BBPNG

Esther 3 in the BBT1E

Esther 3 in the BDS

Esther 3 in the BEV

Esther 3 in the BHAD

Esther 3 in the BIB

Esther 3 in the BLPT

Esther 3 in the BNT

Esther 3 in the BNTABOOT

Esther 3 in the BNTLV

Esther 3 in the BOATCB

Esther 3 in the BOATCB2

Esther 3 in the BOBCV

Esther 3 in the BOCNT

Esther 3 in the BOECS

Esther 3 in the BOGWICC

Esther 3 in the BOHCB

Esther 3 in the BOHCV

Esther 3 in the BOHLNT

Esther 3 in the BOHNTLTAL

Esther 3 in the BOICB

Esther 3 in the BOILNTAP

Esther 3 in the BOITCV

Esther 3 in the BOKCV

Esther 3 in the BOKCV2

Esther 3 in the BOKHWOG

Esther 3 in the BOKSSV

Esther 3 in the BOLCB

Esther 3 in the BOMCV

Esther 3 in the BONAV

Esther 3 in the BONCB

Esther 3 in the BONLT

Esther 3 in the BONUT2

Esther 3 in the BOPLNT

Esther 3 in the BOSCB

Esther 3 in the BOSNC

Esther 3 in the BOTLNT

Esther 3 in the BOVCB

Esther 3 in the BOYCB

Esther 3 in the BPBB

Esther 3 in the BPH

Esther 3 in the BSB

Esther 3 in the CCB

Esther 3 in the CUV

Esther 3 in the CUVS

Esther 3 in the DBT

Esther 3 in the DGDNT

Esther 3 in the DHNT

Esther 3 in the DNT

Esther 3 in the ELBE

Esther 3 in the EMTV

Esther 3 in the ESV

Esther 3 in the FBV

Esther 3 in the FEB

Esther 3 in the GGMNT

Esther 3 in the GNT

Esther 3 in the HARY

Esther 3 in the HNT

Esther 3 in the IRVA

Esther 3 in the IRVB

Esther 3 in the IRVG

Esther 3 in the IRVH

Esther 3 in the IRVK

Esther 3 in the IRVM

Esther 3 in the IRVM2

Esther 3 in the IRVO

Esther 3 in the IRVP

Esther 3 in the IRVT

Esther 3 in the IRVT2

Esther 3 in the IRVU

Esther 3 in the ISVN

Esther 3 in the JSNT

Esther 3 in the KAPI

Esther 3 in the KBT1ETNIK

Esther 3 in the KBV

Esther 3 in the KJV

Esther 3 in the KNFD

Esther 3 in the LBA

Esther 3 in the LBLA

Esther 3 in the LNT

Esther 3 in the LSV

Esther 3 in the MAAL

Esther 3 in the MBV

Esther 3 in the MBV2

Esther 3 in the MHNT

Esther 3 in the MKNFD

Esther 3 in the MNG

Esther 3 in the MNT

Esther 3 in the MNT2

Esther 3 in the MRS1T

Esther 3 in the NAA

Esther 3 in the NASB

Esther 3 in the NBLA

Esther 3 in the NBS

Esther 3 in the NBVTP

Esther 3 in the NET2

Esther 3 in the NIV11

Esther 3 in the NNT

Esther 3 in the NNT2

Esther 3 in the NNT3

Esther 3 in the PDDPT

Esther 3 in the PFNT

Esther 3 in the RMNT

Esther 3 in the SBIAS

Esther 3 in the SBIBS

Esther 3 in the SBIBS2

Esther 3 in the SBICS

Esther 3 in the SBIDS

Esther 3 in the SBIGS

Esther 3 in the SBIHS

Esther 3 in the SBIIS

Esther 3 in the SBIIS2

Esther 3 in the SBIIS3

Esther 3 in the SBIKS

Esther 3 in the SBIKS2

Esther 3 in the SBIMS

Esther 3 in the SBIOS

Esther 3 in the SBIPS

Esther 3 in the SBISS

Esther 3 in the SBITS

Esther 3 in the SBITS2

Esther 3 in the SBITS3

Esther 3 in the SBITS4

Esther 3 in the SBIUS

Esther 3 in the SBIVS

Esther 3 in the SBT

Esther 3 in the SBT1E

Esther 3 in the SCHL

Esther 3 in the SNT

Esther 3 in the SUSU

Esther 3 in the SUSU2

Esther 3 in the SYNO

Esther 3 in the TBIAOTANT

Esther 3 in the TBT1E

Esther 3 in the TBT1E2

Esther 3 in the TFTIP

Esther 3 in the TFTU

Esther 3 in the TGNTATF3T

Esther 3 in the THAI

Esther 3 in the TNFD

Esther 3 in the TNT

Esther 3 in the TNTIK

Esther 3 in the TNTIL

Esther 3 in the TNTIN

Esther 3 in the TNTIP

Esther 3 in the TNTIZ

Esther 3 in the TOMA

Esther 3 in the TTENT

Esther 3 in the UBG

Esther 3 in the UGV

Esther 3 in the UGV2

Esther 3 in the UGV3

Esther 3 in the VBL

Esther 3 in the VDCC

Esther 3 in the YALU

Esther 3 in the YAPE

Esther 3 in the YBVTP

Esther 3 in the ZBP