Exodus 16 (BOLCB2)

1 Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele balongwaki na Elimi mpe bakomaki na esobe ya Tsini, oyo ezali kati ya Elimi mpe ngomba Sinai, na mokolo ya zomi na mitano, na sanza ya mibale sima na kobima na bango na Ejipito. 2 Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe Aron kati na esobe. 3 Bana ya Isalaele balobaki na bango :— Ah ! Ebongaki kutu loboko na Yawe epamela biso kati na Ejipito, pamba te, kuna, tozalaki kovanda pembeni ya banzungu etonda na misuni ; tozalaki kolia mpe kotonda biloko. Kasi bino bomemi biso kati na esobe oyo mpo na koboma lisanga oyo nyonso na nzala ! 4 Yawe alobaki na Moyize :— Tala, nakokitisela bino mapa wuta na likolo. Mokolo na mokolo, bato bakobanda kobima mpe kolokota mapa oyo ekoki mpo na kolia mokolo wana. Na nzela wana, nakomeka bango mpo na kotala soki bakobatela to te malako na Ngai. 5 Na mokolo ya motoba, bakolokota mbala mibale ndambo oyo bazalaki kolokota mpo na mokolo moko mpe bakolamba yango. 6 Moyize mpe Aron balobaki na bana nyonso ya Isalaele :— Na pokwa ya lelo, bokoyeba solo ete ezali Yawe nde abimisaki bino na Ejipito. 7 Boye lobi na tongo, bokomona nkembo na Yawe ; pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Mpo na yango, biso tozali banani mpo ete boyimayima epai na biso ? 8 Moyize alobaki lisusu :— Bokoyeba ete ezali solo Yawe tango akopesa bino misuni ya kolia na pokwa mpe mapa ebele na tongo. Pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Biso tozali banani ? Boyimaki-yimaki na tina na biso te, kasi na tina na Yawe. 9 Boye Moyize alobaki na Aron :— Yebisa lisanga nyonso ya bana ya Isalaele ete bapusana pene ya Yawe mpo ete ayoki koyimayima na bango. 10 Wana Aron azalaki koloba na lisanga nyonso ya bana ya Isalaele, babalolaki miso na bango na ngambo ya esobe, mpe bamonaki nkembo na Yawe kobima na mapata. 11 Yawe alobaki na Moyize : 12 — Nayoki koyimayima ya bana ya Isalaele. Yebisa bango : « Na pokwa ya lelo, bokolia misuni ; bongo na tongo, bokotonda mana. Boye, bokoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bino. » 13 Kaka na pokwa wana, bakayi eyaki mpe etondisaki molako ; mpe na tongo, mamwe ezalaki zingazinga ya molako. 14 Tango mamwe elimwaki, biloko ya mike-mike penza lokola bambuma ya mike-mike emonanaki na mabele ya esobe, pembe lokola mvula ya pembe. 15 Tango bana ya Isalaele bamonaki yango, batunanaki bango na bango :— Oyo nini ?Pamba te bayebaki te soki ezali nini.Moyize alobaki na bango :— Ezali mapa oyo Yawe apesi bino mpo ete bolia. 16 Tala mibeko oyo Yawe apesi na tina na likambo oyo : « Tika ete moto na moto alokota oyo ekoki mpo na ye kolia, omeri moko mpo na moto moko. Moto na moto akolokota kolanda motango ya bato oyo bazali kati na ndako na ye ya kapo. » 17 Bato ya Isalaele basalaki bongo : bamoko balokotaki moke ; mpe bamosusu, ebele. 18 Mpe bamekaki na omeri : moto oyo alokotaki ebele, alekelaki te ; mpe oyo alokotaki moke, azangelaki te. Balokotaki moto na moto kolanda oyo ekokaki mpo na ye kolia. 19 Moyize ayebisaki bango :— Moko te abomba ata moke kino na tongo. 20 Kasi bamosusu kati na bango bayokelaki Moyize te mpe babombaki ndambo na yango kino na tongo. Boye bankusu etondaki na ndambo oyo babombaki, mpe ekomaki kolumba solo ya kopola. Mpo na yango, Moyize atombokelaki bango. 21 Tongo nyonso, moto na moto abandaki kolokota oyo ekokaki mpo na ye kolia. 22 Na mokolo ya motoba, bana ya Isalaele bazalaki kolokota mbala mibale ndambo oyo bazalaki kolokota mpo na mokolo moko : omeri mibale mpo na moto moko. Bakambi nyonso ya lisanga bayaki koyebisa yango Moyize. 23 Moyize alobaki na bango :— Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Lobi ezali mokolo ya kopema, mokolo ya Saba oyo ebulisami mpo na Yawe. Bokolamba oyo bolingi kolamba mpe bokotokisa oyo bolingi kotokisa ; kasi oyo ekotikala, bobatela yango kino lobi. » 24 Bato ya Isalaele babatelaki yango kino na tongo, ndenge kaka Moyize atindaki ; mana elumbaki te solo ya kopola, mpe bankusu ezalaki te kati na yango. 25 Moyize ayebisaki bango :— Mokolo ya lelo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya Yawe. Bolia mana oyo bobombaki ; pamba te lelo, bokotikala te komona mana na libanda. 26 Bokobanda kolokota yango mikolo motoba ; kasi na mokolo ya sambo, mokolo ya Saba, mana ekobanda kozala te. 27 Atako bongo, na mokolo ya sambo, bato mosusu kati na bango babimaki mpo na kolokota yango, kasi bamonaki eloko te. 28 Boye Yawe alobaki na Moyize :— Kino tango nini bokoboya kobatela mibeko mpe malako na Ngai ? 29 Botia na mito na bino ete Ngai Yawe, napesaki bino mokolo ya Saba. Yango wana, na mokolo ya motoba, napesaka bino mapa mpo na mikolo mibale. Boye tika ete, na mokolo ya sambo, moto na moto avanda epai na ye ; moko te abima na libanda. 30 Boye bato bapemaki na mokolo ya sambo. 31 Bato ya Isalaele babengaki lipa yango mana. Ezalaki pembe lokola bambuma ya koriande mpe elengi lokola mikate balamba na mafuta ya nzoyi. 32 Moyize alobaki :— Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Bozwa omeri moko ya mana mpe bobomba yango mpo na milongo ya bakitani na bino oyo ekoya, mpo ete bamona mapa oyo naleisaki bino na esobe tango nabimisaki bino na Ejipito. » 33 Boye Moyize alobi na Aron :— Kamata ekolo moko mpe tia omeri moko ya mana kati na yango ; bongo tia yango liboso ya Yawe mpo ete ebombama mpo na milongo oyo ekoya. 34 Ndenge kaka Yawe atindaki Moyize, Aron atiaki mana yango liboso ya Sanduku ya Boyokani mpo ete ebombama malamu. 35 Bana ya Isalaele baliaki mana mibu tuku minei kino tango bakomaki na mondelo ya mokili ya Kanana. 36 Omeri moko ekokani na eteni ya zomi ya efa.

In Other Versions

Exodus 16 in the ANGEFD

Exodus 16 in the ANTPNG2D

Exodus 16 in the AS21

Exodus 16 in the BAGH

Exodus 16 in the BBPNG

Exodus 16 in the BBT1E

Exodus 16 in the BDS

Exodus 16 in the BEV

Exodus 16 in the BHAD

Exodus 16 in the BIB

Exodus 16 in the BLPT

Exodus 16 in the BNT

Exodus 16 in the BNTABOOT

Exodus 16 in the BNTLV

Exodus 16 in the BOATCB

Exodus 16 in the BOATCB2

Exodus 16 in the BOBCV

Exodus 16 in the BOCNT

Exodus 16 in the BOECS

Exodus 16 in the BOGWICC

Exodus 16 in the BOHCB

Exodus 16 in the BOHCV

Exodus 16 in the BOHLNT

Exodus 16 in the BOHNTLTAL

Exodus 16 in the BOICB

Exodus 16 in the BOILNTAP

Exodus 16 in the BOITCV

Exodus 16 in the BOKCV

Exodus 16 in the BOKCV2

Exodus 16 in the BOKHWOG

Exodus 16 in the BOKSSV

Exodus 16 in the BOLCB

Exodus 16 in the BOMCV

Exodus 16 in the BONAV

Exodus 16 in the BONCB

Exodus 16 in the BONLT

Exodus 16 in the BONUT2

Exodus 16 in the BOPLNT

Exodus 16 in the BOSCB

Exodus 16 in the BOSNC

Exodus 16 in the BOTLNT

Exodus 16 in the BOVCB

Exodus 16 in the BOYCB

Exodus 16 in the BPBB

Exodus 16 in the BPH

Exodus 16 in the BSB

Exodus 16 in the CCB

Exodus 16 in the CUV

Exodus 16 in the CUVS

Exodus 16 in the DBT

Exodus 16 in the DGDNT

Exodus 16 in the DHNT

Exodus 16 in the DNT

Exodus 16 in the ELBE

Exodus 16 in the EMTV

Exodus 16 in the ESV

Exodus 16 in the FBV

Exodus 16 in the FEB

Exodus 16 in the GGMNT

Exodus 16 in the GNT

Exodus 16 in the HARY

Exodus 16 in the HNT

Exodus 16 in the IRVA

Exodus 16 in the IRVB

Exodus 16 in the IRVG

Exodus 16 in the IRVH

Exodus 16 in the IRVK

Exodus 16 in the IRVM

Exodus 16 in the IRVM2

Exodus 16 in the IRVO

Exodus 16 in the IRVP

Exodus 16 in the IRVT

Exodus 16 in the IRVT2

Exodus 16 in the IRVU

Exodus 16 in the ISVN

Exodus 16 in the JSNT

Exodus 16 in the KAPI

Exodus 16 in the KBT1ETNIK

Exodus 16 in the KBV

Exodus 16 in the KJV

Exodus 16 in the KNFD

Exodus 16 in the LBA

Exodus 16 in the LBLA

Exodus 16 in the LNT

Exodus 16 in the LSV

Exodus 16 in the MAAL

Exodus 16 in the MBV

Exodus 16 in the MBV2

Exodus 16 in the MHNT

Exodus 16 in the MKNFD

Exodus 16 in the MNG

Exodus 16 in the MNT

Exodus 16 in the MNT2

Exodus 16 in the MRS1T

Exodus 16 in the NAA

Exodus 16 in the NASB

Exodus 16 in the NBLA

Exodus 16 in the NBS

Exodus 16 in the NBVTP

Exodus 16 in the NET2

Exodus 16 in the NIV11

Exodus 16 in the NNT

Exodus 16 in the NNT2

Exodus 16 in the NNT3

Exodus 16 in the PDDPT

Exodus 16 in the PFNT

Exodus 16 in the RMNT

Exodus 16 in the SBIAS

Exodus 16 in the SBIBS

Exodus 16 in the SBIBS2

Exodus 16 in the SBICS

Exodus 16 in the SBIDS

Exodus 16 in the SBIGS

Exodus 16 in the SBIHS

Exodus 16 in the SBIIS

Exodus 16 in the SBIIS2

Exodus 16 in the SBIIS3

Exodus 16 in the SBIKS

Exodus 16 in the SBIKS2

Exodus 16 in the SBIMS

Exodus 16 in the SBIOS

Exodus 16 in the SBIPS

Exodus 16 in the SBISS

Exodus 16 in the SBITS

Exodus 16 in the SBITS2

Exodus 16 in the SBITS3

Exodus 16 in the SBITS4

Exodus 16 in the SBIUS

Exodus 16 in the SBIVS

Exodus 16 in the SBT

Exodus 16 in the SBT1E

Exodus 16 in the SCHL

Exodus 16 in the SNT

Exodus 16 in the SUSU

Exodus 16 in the SUSU2

Exodus 16 in the SYNO

Exodus 16 in the TBIAOTANT

Exodus 16 in the TBT1E

Exodus 16 in the TBT1E2

Exodus 16 in the TFTIP

Exodus 16 in the TFTU

Exodus 16 in the TGNTATF3T

Exodus 16 in the THAI

Exodus 16 in the TNFD

Exodus 16 in the TNT

Exodus 16 in the TNTIK

Exodus 16 in the TNTIL

Exodus 16 in the TNTIN

Exodus 16 in the TNTIP

Exodus 16 in the TNTIZ

Exodus 16 in the TOMA

Exodus 16 in the TTENT

Exodus 16 in the UBG

Exodus 16 in the UGV

Exodus 16 in the UGV2

Exodus 16 in the UGV3

Exodus 16 in the VBL

Exodus 16 in the VDCC

Exodus 16 in the YALU

Exodus 16 in the YAPE

Exodus 16 in the YBVTP

Exodus 16 in the ZBP