Exodus 17 (BOLCB2)

1 Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele elongwaki na esobe ya Tsini mpe ezalaki kotambola kolanda ndenge Yawe azalaki kotinda. Batongaki molako na bango na Refidimi, kasi mayi ya komela ezalaki te mpo na bato. 2 Bato ya Isalaele baswanisaki Moyize, balobaki na ye :— Pesa biso mayi ya komela !Moyize azongiselaki bango :— Mpo na nini bozali koswanisa ngai ? Mpo na nini bolingi komeka Yawe ? 3 Lokola posa ya mayi elekaki makasi, bato bayimaki-yimaki epai ya Moyize mpe balobaki :— Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito ? Ezali mpo ete obomisa biso, bana na biso mpe bibwele na biso na posa ya mayi ? 4 Moyize abelelaki Yawe :— Nasala nini mpo na bato oyo ? Etikali kaka moke ete babamba ngai mabanga ! 5 Yawe azongiselaki Moyize :— Leka liboso ya bato, kamata ndambo ya bakambi ya Isalaele. Zwa na loboko na yo, lingenda oyo obetaki na ebale Nili, mpe kende. 6 Ngai nakotelema kuna, liboso na yo, na likolo ya libanga oyo ezali na ngomba Orebi. Okobeta libanga yango, mpe yango ekobimisa mayi, bongo bato bakomela.Moyize asalaki bongo na miso ya bakambi ya Isalaele. 7 Abengaki esika yango Masa mpe Meriba, pamba te bana ya Isalaele baswanisaki ye mpe bamekaki Yawe tango balobaki : « Boni, Yawe yango azali kati na biso to te ? » 8 Bato ya Amaleki bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele na Refidimi. 9 Moyize alobaki na Jozue :— Ponela biso bilombe ya bitumba kati na bato ; mpe lobi ; wana yo okende kobundisa bato ya Amaleki, ngai nakotelema na likolo ya ngomba moke elongo na lingenda ya Nzambe na loboko na ngai. 10 Jozue asalaki ndenge Moyize atindaki ye mpe abundisaki bato ya Amaleki ; wana Moyize, Aron mpe Wuri bamataki likolo ya ngomba. 11 Tango nyonso Moyize abandaki kotombola maboko na ye mpo na kobondela, bana ya Isalaele bazalaki kolonga ; kasi tango nyonso azalaki kokitisa maboko na ye, bato ya Amaleki bazalaki kolonga. 12 Tango maboko ya Moyize elembaki, Aron mpe Wuri bakamataki libanga mpe batielaki ye yango mpo ete avandela yango ; mpe Moyize avandelaki yango. Aron mpe Uri batombolaki maboko na ye, moko na ngambo moko, mpe mosusu na ngambo mosusu. Boye maboko na ye etikalaki ya kosembolama kino na pokwa. 13 Mpe Jozue alongaki basoda ya bato ya Amaleki na mopanga. 14 Yawe alobaki na Moyize :— Koma yango na buku lokola ekaniseli, mpe loba na Jozue ete nakosilisa bato ya Amaleki na mokili ; bakotikala kokanisa bango lisusu te. 15 Moyize atongaki etumbelo mpe abengaki yango « Nkolo azali bendele na ngai ya lokumu. » 16 Moyize alobaki : « Lokola esali ete babundisi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, Yawe akobundisa bato ya Amaleki tango nyonso. »

In Other Versions

Exodus 17 in the ANGEFD

Exodus 17 in the ANTPNG2D

Exodus 17 in the AS21

Exodus 17 in the BAGH

Exodus 17 in the BBPNG

Exodus 17 in the BBT1E

Exodus 17 in the BDS

Exodus 17 in the BEV

Exodus 17 in the BHAD

Exodus 17 in the BIB

Exodus 17 in the BLPT

Exodus 17 in the BNT

Exodus 17 in the BNTABOOT

Exodus 17 in the BNTLV

Exodus 17 in the BOATCB

Exodus 17 in the BOATCB2

Exodus 17 in the BOBCV

Exodus 17 in the BOCNT

Exodus 17 in the BOECS

Exodus 17 in the BOGWICC

Exodus 17 in the BOHCB

Exodus 17 in the BOHCV

Exodus 17 in the BOHLNT

Exodus 17 in the BOHNTLTAL

Exodus 17 in the BOICB

Exodus 17 in the BOILNTAP

Exodus 17 in the BOITCV

Exodus 17 in the BOKCV

Exodus 17 in the BOKCV2

Exodus 17 in the BOKHWOG

Exodus 17 in the BOKSSV

Exodus 17 in the BOLCB

Exodus 17 in the BOMCV

Exodus 17 in the BONAV

Exodus 17 in the BONCB

Exodus 17 in the BONLT

Exodus 17 in the BONUT2

Exodus 17 in the BOPLNT

Exodus 17 in the BOSCB

Exodus 17 in the BOSNC

Exodus 17 in the BOTLNT

Exodus 17 in the BOVCB

Exodus 17 in the BOYCB

Exodus 17 in the BPBB

Exodus 17 in the BPH

Exodus 17 in the BSB

Exodus 17 in the CCB

Exodus 17 in the CUV

Exodus 17 in the CUVS

Exodus 17 in the DBT

Exodus 17 in the DGDNT

Exodus 17 in the DHNT

Exodus 17 in the DNT

Exodus 17 in the ELBE

Exodus 17 in the EMTV

Exodus 17 in the ESV

Exodus 17 in the FBV

Exodus 17 in the FEB

Exodus 17 in the GGMNT

Exodus 17 in the GNT

Exodus 17 in the HARY

Exodus 17 in the HNT

Exodus 17 in the IRVA

Exodus 17 in the IRVB

Exodus 17 in the IRVG

Exodus 17 in the IRVH

Exodus 17 in the IRVK

Exodus 17 in the IRVM

Exodus 17 in the IRVM2

Exodus 17 in the IRVO

Exodus 17 in the IRVP

Exodus 17 in the IRVT

Exodus 17 in the IRVT2

Exodus 17 in the IRVU

Exodus 17 in the ISVN

Exodus 17 in the JSNT

Exodus 17 in the KAPI

Exodus 17 in the KBT1ETNIK

Exodus 17 in the KBV

Exodus 17 in the KJV

Exodus 17 in the KNFD

Exodus 17 in the LBA

Exodus 17 in the LBLA

Exodus 17 in the LNT

Exodus 17 in the LSV

Exodus 17 in the MAAL

Exodus 17 in the MBV

Exodus 17 in the MBV2

Exodus 17 in the MHNT

Exodus 17 in the MKNFD

Exodus 17 in the MNG

Exodus 17 in the MNT

Exodus 17 in the MNT2

Exodus 17 in the MRS1T

Exodus 17 in the NAA

Exodus 17 in the NASB

Exodus 17 in the NBLA

Exodus 17 in the NBS

Exodus 17 in the NBVTP

Exodus 17 in the NET2

Exodus 17 in the NIV11

Exodus 17 in the NNT

Exodus 17 in the NNT2

Exodus 17 in the NNT3

Exodus 17 in the PDDPT

Exodus 17 in the PFNT

Exodus 17 in the RMNT

Exodus 17 in the SBIAS

Exodus 17 in the SBIBS

Exodus 17 in the SBIBS2

Exodus 17 in the SBICS

Exodus 17 in the SBIDS

Exodus 17 in the SBIGS

Exodus 17 in the SBIHS

Exodus 17 in the SBIIS

Exodus 17 in the SBIIS2

Exodus 17 in the SBIIS3

Exodus 17 in the SBIKS

Exodus 17 in the SBIKS2

Exodus 17 in the SBIMS

Exodus 17 in the SBIOS

Exodus 17 in the SBIPS

Exodus 17 in the SBISS

Exodus 17 in the SBITS

Exodus 17 in the SBITS2

Exodus 17 in the SBITS3

Exodus 17 in the SBITS4

Exodus 17 in the SBIUS

Exodus 17 in the SBIVS

Exodus 17 in the SBT

Exodus 17 in the SBT1E

Exodus 17 in the SCHL

Exodus 17 in the SNT

Exodus 17 in the SUSU

Exodus 17 in the SUSU2

Exodus 17 in the SYNO

Exodus 17 in the TBIAOTANT

Exodus 17 in the TBT1E

Exodus 17 in the TBT1E2

Exodus 17 in the TFTIP

Exodus 17 in the TFTU

Exodus 17 in the TGNTATF3T

Exodus 17 in the THAI

Exodus 17 in the TNFD

Exodus 17 in the TNT

Exodus 17 in the TNTIK

Exodus 17 in the TNTIL

Exodus 17 in the TNTIN

Exodus 17 in the TNTIP

Exodus 17 in the TNTIZ

Exodus 17 in the TOMA

Exodus 17 in the TTENT

Exodus 17 in the UBG

Exodus 17 in the UGV

Exodus 17 in the UGV2

Exodus 17 in the UGV3

Exodus 17 in the VBL

Exodus 17 in the VDCC

Exodus 17 in the YALU

Exodus 17 in the YAPE

Exodus 17 in the YBVTP

Exodus 17 in the ZBP