Exodus 23 (BOLCB2)

1 Okopanza sango ya lokuta te ; okosangana te na moto mabe mpo na koloba litatoli ya lokuta. 2 Okolanda ebele ya bato te mpo na kosala mabe. Tango okoloba litatoli liboso ya basambisi, okotatola te kolanda mokano ya bato ebele mpo na kokweyisa bosembo. 3 Okokotela mobola te na tango azali kosamba liboso ya basambisi. 4 Soki okutani na ngombe to ane ya monguna na yo, oyo ebungi, osengeli kozongisela ye yango. 5 Soki omoni ane ya moto oyo ayinaka yo ekweyi na se ya mokumba oyo yango ememi, okotika yango wana te ; osengeli kosalisa yango. 6 Okokweyisa bosembo ya mobola te tango azali kosamba liboso ya basambisi. 7 Okozala mosika ya makambo ya lokuta. Okoboma te ezala moto oyo ayebi likambo te to moto ya sembo ; pamba te nalongisaka te moto mabe. 8 Okondimaka kanyaka te, pamba te kanyaka ezipaka miso ya bato oyo bamonaka malamu mpe ebebisaka maloba ya moto ya sembo. 9 Okonyokola mopaya te, pamba te oyebi yo moko ndenge ezalaka soki ozali mopaya ; bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito. 10 Mibu motoba, okolona bilanga na yo mpe okobuka mbuma. 11 Kasi na mobu ya sambo, okopemisa mabele. Boye babola kati na bato na yo bakozwa bilei ya kolia kati na yango mpe nyama ya zamba ekolia bilei oyo bato bakotika. Okosala ndenge moko mpo na elanga na yo ya vino mpe mpo na nzete na yo ya olive. 12 Mikolo motoba, okosala mosala na yo ; kasi na mokolo ya sambo, okosala mosala moko te mpo ete ngombe na yo elongo na ane na yo ekoka kopema, mpe mpo ete mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo mpe mopaya bazwa lisusu makasi. 13 Bokosala keba na makambo nyonso oyo nayebisi bino. Bokobelela kombo ya banzambe mosusu te ; bokomeka kutu te kotanga yango na bibebu na bino. 14 Mbala misato na mobu, bokosala bafeti misato mpo na Ngai. 15 Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Na mikolo sambo kolanda ndenge napesaki bino mitindo, bokolia mapa ezanga levire na tango oyo ekatama, na sanza ya Abibi, mpo ete ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito. 16 Okosala feti ya kobuka bambuma, okosala mpe feti ya bambuma ya liboso ya bilanga na yo, oyo olonaki. Na suka ya mobu, okosala feti ya kobuka bambuma tango okobuka mbuma ya elanga. 17 Mbala misato na mobu, bato nyonso bakoya liboso ya Nkolo Yawe. 18 Okobonzela Ngai te mbeka ya makila elongo na mapa batia levire. Mafuta ya nyama ya feti na Ngai ekoki kobombama te kino na tongo. 19 Okomema na Ndako ya Yawe, Nzambe na yo, bambuma ya liboso ya mabele na yo. Okolamba te mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele ya mama na yango. 20 Nakotinda anjelu liboso na bino mpo ete abatela bino na nzela mpe amema bino na esika oyo nabongisaki mpo na bino. 21 Bosala keba na miso na ye mpe boyoka makambo oyo akoloba ; botombokela ye te mpo ete akolimbisa botomboki na bino te, pamba te Kombo na Ngai ezali kati na ye. 22 Kasi soki boyoki na bokebi makambo oyo akoyebisa bino mpe soki bosaleli nyonso oyo nalobi, nakozala monguna ya banguna na bino mpe nakotelemela bato oyo bakotelemela bino. 23 Anjelu na Ngai akotambola liboso na bino mpe akokotisa bino na mokili ya bato ya Amori, ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Kanana, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi ; bongo Ngai nakosilisa bango. 24 Bokogumbamela banzambe na bango te mpe bokosalela yango te to bokolanda te lolenge na bango ya kosalela. Bokokweyisa banzambe yango mpe bokobuka-buka bikeko na bango na biteni. 25 Soki bokosalela Yawe, Nzambe na bino, akopambola mapa mpe mayi na bino, mpe akolongola bokono kati na bino. 26 Na mboka na bino, ekozala na mwasi moko te oyo akosopa zemi to akozanga kobota. Nakobakisela bino mikolo ebele na bomoi na bino. 27 Nakotinda somo na Ngai liboso na bino mpe nakokotisa mobulu kati na bikolo nyonso oyo bokokota. Banguna na bino nyonso bakopesa bino mokongo mpe bakokima. 28 Nakotinda banzoyi ya minene liboso na bino mpo na kobengana bato ya Evi, ya Kanana mpe ya Iti na liboso na bino. 29 Kasi nakobengana bango te na mbala moko mpo ete mboka ekoma te lokola ndako ezanga bato, mpe mpo ete banyama ya zamba ekoma mingi te mpo na kotungisa bino. 30 Nakobengana bango moke-moke liboso na bino kino bokokoma ebele mpo na kozwa mboka. 31 Nakotia bandelo na bino kobanda na ebale monene ya barozo kino na ebale monene ya bato ya Filisitia mpe kobanda na esobe ya Sinai kino na ebale Efrate ; pamba te nakopesa bato ya mboka na maboko na bino, bongo bino bokobengana bango liboso na bino. 32 Bokosala boyokani te elongo na bango mpe elongo na banzambe na bango. 33 Botika bango te ete bawumela na mokili na bino, noki te bakotinda bino kosala masumu liboso na Ngai mpe kosalela banzambe na bango ; pamba te ekozala solo motambo mpo na bino. »

In Other Versions

Exodus 23 in the ANGEFD

Exodus 23 in the ANTPNG2D

Exodus 23 in the AS21

Exodus 23 in the BAGH

Exodus 23 in the BBPNG

Exodus 23 in the BBT1E

Exodus 23 in the BDS

Exodus 23 in the BEV

Exodus 23 in the BHAD

Exodus 23 in the BIB

Exodus 23 in the BLPT

Exodus 23 in the BNT

Exodus 23 in the BNTABOOT

Exodus 23 in the BNTLV

Exodus 23 in the BOATCB

Exodus 23 in the BOATCB2

Exodus 23 in the BOBCV

Exodus 23 in the BOCNT

Exodus 23 in the BOECS

Exodus 23 in the BOGWICC

Exodus 23 in the BOHCB

Exodus 23 in the BOHCV

Exodus 23 in the BOHLNT

Exodus 23 in the BOHNTLTAL

Exodus 23 in the BOICB

Exodus 23 in the BOILNTAP

Exodus 23 in the BOITCV

Exodus 23 in the BOKCV

Exodus 23 in the BOKCV2

Exodus 23 in the BOKHWOG

Exodus 23 in the BOKSSV

Exodus 23 in the BOLCB

Exodus 23 in the BOMCV

Exodus 23 in the BONAV

Exodus 23 in the BONCB

Exodus 23 in the BONLT

Exodus 23 in the BONUT2

Exodus 23 in the BOPLNT

Exodus 23 in the BOSCB

Exodus 23 in the BOSNC

Exodus 23 in the BOTLNT

Exodus 23 in the BOVCB

Exodus 23 in the BOYCB

Exodus 23 in the BPBB

Exodus 23 in the BPH

Exodus 23 in the BSB

Exodus 23 in the CCB

Exodus 23 in the CUV

Exodus 23 in the CUVS

Exodus 23 in the DBT

Exodus 23 in the DGDNT

Exodus 23 in the DHNT

Exodus 23 in the DNT

Exodus 23 in the ELBE

Exodus 23 in the EMTV

Exodus 23 in the ESV

Exodus 23 in the FBV

Exodus 23 in the FEB

Exodus 23 in the GGMNT

Exodus 23 in the GNT

Exodus 23 in the HARY

Exodus 23 in the HNT

Exodus 23 in the IRVA

Exodus 23 in the IRVB

Exodus 23 in the IRVG

Exodus 23 in the IRVH

Exodus 23 in the IRVK

Exodus 23 in the IRVM

Exodus 23 in the IRVM2

Exodus 23 in the IRVO

Exodus 23 in the IRVP

Exodus 23 in the IRVT

Exodus 23 in the IRVT2

Exodus 23 in the IRVU

Exodus 23 in the ISVN

Exodus 23 in the JSNT

Exodus 23 in the KAPI

Exodus 23 in the KBT1ETNIK

Exodus 23 in the KBV

Exodus 23 in the KJV

Exodus 23 in the KNFD

Exodus 23 in the LBA

Exodus 23 in the LBLA

Exodus 23 in the LNT

Exodus 23 in the LSV

Exodus 23 in the MAAL

Exodus 23 in the MBV

Exodus 23 in the MBV2

Exodus 23 in the MHNT

Exodus 23 in the MKNFD

Exodus 23 in the MNG

Exodus 23 in the MNT

Exodus 23 in the MNT2

Exodus 23 in the MRS1T

Exodus 23 in the NAA

Exodus 23 in the NASB

Exodus 23 in the NBLA

Exodus 23 in the NBS

Exodus 23 in the NBVTP

Exodus 23 in the NET2

Exodus 23 in the NIV11

Exodus 23 in the NNT

Exodus 23 in the NNT2

Exodus 23 in the NNT3

Exodus 23 in the PDDPT

Exodus 23 in the PFNT

Exodus 23 in the RMNT

Exodus 23 in the SBIAS

Exodus 23 in the SBIBS

Exodus 23 in the SBIBS2

Exodus 23 in the SBICS

Exodus 23 in the SBIDS

Exodus 23 in the SBIGS

Exodus 23 in the SBIHS

Exodus 23 in the SBIIS

Exodus 23 in the SBIIS2

Exodus 23 in the SBIIS3

Exodus 23 in the SBIKS

Exodus 23 in the SBIKS2

Exodus 23 in the SBIMS

Exodus 23 in the SBIOS

Exodus 23 in the SBIPS

Exodus 23 in the SBISS

Exodus 23 in the SBITS

Exodus 23 in the SBITS2

Exodus 23 in the SBITS3

Exodus 23 in the SBITS4

Exodus 23 in the SBIUS

Exodus 23 in the SBIVS

Exodus 23 in the SBT

Exodus 23 in the SBT1E

Exodus 23 in the SCHL

Exodus 23 in the SNT

Exodus 23 in the SUSU

Exodus 23 in the SUSU2

Exodus 23 in the SYNO

Exodus 23 in the TBIAOTANT

Exodus 23 in the TBT1E

Exodus 23 in the TBT1E2

Exodus 23 in the TFTIP

Exodus 23 in the TFTU

Exodus 23 in the TGNTATF3T

Exodus 23 in the THAI

Exodus 23 in the TNFD

Exodus 23 in the TNT

Exodus 23 in the TNTIK

Exodus 23 in the TNTIL

Exodus 23 in the TNTIN

Exodus 23 in the TNTIP

Exodus 23 in the TNTIZ

Exodus 23 in the TOMA

Exodus 23 in the TTENT

Exodus 23 in the UBG

Exodus 23 in the UGV

Exodus 23 in the UGV2

Exodus 23 in the UGV3

Exodus 23 in the VBL

Exodus 23 in the VDCC

Exodus 23 in the YALU

Exodus 23 in the YAPE

Exodus 23 in the YBVTP

Exodus 23 in the ZBP