Exodus 27 (BOLCB2)
1 Okosala na mabaya ya nzete ya akasia etumbelo : ekozala ndenge moko na molayi mpe na mokuse, bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; bongo bosanda na yango ekozala ya metele moko na basantimetele tuku mitano. 2 Okosala maseke minei na basonge nyonso minei ya etumbelo, mpo ete maseke mpe etumbelo esala eloko moko ; mpe okobamba bronze na etumbelo. 3 Okosala na bronze banzungu ya mike mpo na kolongola putulu ya moto, bapawu, basani ya minene, bakanya mpe basani mpo na komema makala ya moto. 4 Okosala motalaka ya bronze mpo na etumbelo ; okokangisa bapete minei ya bronze, na basonge nyonso minei ya motalaka. 5 Okotia motalaka na se ya etumbelo, na bandelo na yango, mpo ete ekoma na kati-kati ya etumbelo. 6 Okosala na nzete ya akasia, mabaya mpo na etumbelo mpe okobamba yango bronze. 7 Boye, mpo na komema etumbelo, bakokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na basonge mibale ya etumbelo. 8 Okosala etumbelo na mabaya ; ekozala polele kati na yango. Okosala yango ndenge kaka balakisaki yo na ngomba. 9 Tala ndenge okotonga lopango ya Mongombo : ngambo ya sude oyo ekozala ya bametele pene tuku mitano na molayi, ekozipama na rido ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango. 10 Makonzi na yango tuku mibale elongo na makolo na yango tuku mibale ekosalema na bronze ; bongo bibende ya makonzi elongo na biloko na yango ya kosimbela ekozala ya palata. 11 Ngambo ya nor ekozala na bametele pene tuku mitano na molayi. Ekozala mpe na barido, na makonzi tuku mibale mpe na makolo tuku mibale, oyo esalema na bronze. Makonzi yango ekozala na bibende ya palata egumbama lokola ndobo elongo na biloko na yango ya kosimbela, oyo ekozala ya palata. 12 Ngambo ya weste ya lopango ya Mongombo ekozala na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse. Ekozala mpe na barido, makonzi zomi mpe makolo zomi. 13 Ngambo ya este ya lopango ya Mongombo, epai wapi moyi ebimelaka, ekozala na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse. 14 Ngambo moko ya ekuke ekozala na barido ya bametele sambo na basantimetele tuku mitano elongo na makonzi misato mpe makolo misato. 15 Ngambo mosusu ya ekuke ekozala mpe na barido ya bametele sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato. 16 Mpo na ekuke ya lopango ya Mongombo, bongisa rido ya bametele pene zomi na molayi, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi ; mpe ekosalema na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, elongo na makonzi minei mpe makolo minei ; ekozala mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba. 17 Makonzi nyonso oyo ekozala zingazinga ya lopango esengeli kozala na biloko na yango ya kosimbela, bibende na yango egumbama lokola ndobo, ya palata ; mpe makolo na yango ya bronze. 18 Lopango ya Mongombo ekozala ya bametele tuku mitano na molayi, bametele tuku mibale na mitano na mokuse na ngambo moko na moko, bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. Barido na yango ekozala ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, mpe makolo na yango ekozala ya bronze. 19 Biloko nyonso oyo bakosalela misala ya Mongombo, bapike nyonso ya Mongombo mpe ya lopango ekozala ya bronze. 20 Okopesa mitindo na bana ya Isalaele ete bamemela yo mafuta ya olive ya peto mpo na minda, mpo ete minda ekoka kopela tango nyonso. 21 Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron mpe bana na ye ya mibali bakobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo nyonso ya bana ya Isalaele.
In Other Versions
Exodus 27 in the ANGEFD
Exodus 27 in the ANTPNG2D
Exodus 27 in the AS21
Exodus 27 in the BAGH
Exodus 27 in the BBPNG
Exodus 27 in the BBT1E
Exodus 27 in the BDS
Exodus 27 in the BEV
Exodus 27 in the BHAD
Exodus 27 in the BIB
Exodus 27 in the BLPT
Exodus 27 in the BNT
Exodus 27 in the BNTABOOT
Exodus 27 in the BNTLV
Exodus 27 in the BOATCB
Exodus 27 in the BOATCB2
Exodus 27 in the BOBCV
Exodus 27 in the BOCNT
Exodus 27 in the BOECS
Exodus 27 in the BOGWICC
Exodus 27 in the BOHCB
Exodus 27 in the BOHCV
Exodus 27 in the BOHLNT
Exodus 27 in the BOHNTLTAL
Exodus 27 in the BOICB
Exodus 27 in the BOILNTAP
Exodus 27 in the BOITCV
Exodus 27 in the BOKCV
Exodus 27 in the BOKCV2
Exodus 27 in the BOKHWOG
Exodus 27 in the BOKSSV
Exodus 27 in the BOLCB
Exodus 27 in the BOMCV
Exodus 27 in the BONAV
Exodus 27 in the BONCB
Exodus 27 in the BONLT
Exodus 27 in the BONUT2
Exodus 27 in the BOPLNT
Exodus 27 in the BOSCB
Exodus 27 in the BOSNC
Exodus 27 in the BOTLNT
Exodus 27 in the BOVCB
Exodus 27 in the BOYCB
Exodus 27 in the BPBB
Exodus 27 in the BPH
Exodus 27 in the BSB
Exodus 27 in the CCB
Exodus 27 in the CUV
Exodus 27 in the CUVS
Exodus 27 in the DBT
Exodus 27 in the DGDNT
Exodus 27 in the DHNT
Exodus 27 in the DNT
Exodus 27 in the ELBE
Exodus 27 in the EMTV
Exodus 27 in the ESV
Exodus 27 in the FBV
Exodus 27 in the FEB
Exodus 27 in the GGMNT
Exodus 27 in the GNT
Exodus 27 in the HARY
Exodus 27 in the HNT
Exodus 27 in the IRVA
Exodus 27 in the IRVB
Exodus 27 in the IRVG
Exodus 27 in the IRVH
Exodus 27 in the IRVK
Exodus 27 in the IRVM
Exodus 27 in the IRVM2
Exodus 27 in the IRVO
Exodus 27 in the IRVP
Exodus 27 in the IRVT
Exodus 27 in the IRVT2
Exodus 27 in the IRVU
Exodus 27 in the ISVN
Exodus 27 in the JSNT
Exodus 27 in the KAPI
Exodus 27 in the KBT1ETNIK
Exodus 27 in the KBV
Exodus 27 in the KJV
Exodus 27 in the KNFD
Exodus 27 in the LBA
Exodus 27 in the LBLA
Exodus 27 in the LNT
Exodus 27 in the LSV
Exodus 27 in the MAAL
Exodus 27 in the MBV
Exodus 27 in the MBV2
Exodus 27 in the MHNT
Exodus 27 in the MKNFD
Exodus 27 in the MNG
Exodus 27 in the MNT
Exodus 27 in the MNT2
Exodus 27 in the MRS1T
Exodus 27 in the NAA
Exodus 27 in the NASB
Exodus 27 in the NBLA
Exodus 27 in the NBS
Exodus 27 in the NBVTP
Exodus 27 in the NET2
Exodus 27 in the NIV11
Exodus 27 in the NNT
Exodus 27 in the NNT2
Exodus 27 in the NNT3
Exodus 27 in the PDDPT
Exodus 27 in the PFNT
Exodus 27 in the RMNT
Exodus 27 in the SBIAS
Exodus 27 in the SBIBS
Exodus 27 in the SBIBS2
Exodus 27 in the SBICS
Exodus 27 in the SBIDS
Exodus 27 in the SBIGS
Exodus 27 in the SBIHS
Exodus 27 in the SBIIS
Exodus 27 in the SBIIS2
Exodus 27 in the SBIIS3
Exodus 27 in the SBIKS
Exodus 27 in the SBIKS2
Exodus 27 in the SBIMS
Exodus 27 in the SBIOS
Exodus 27 in the SBIPS
Exodus 27 in the SBISS
Exodus 27 in the SBITS
Exodus 27 in the SBITS2
Exodus 27 in the SBITS3
Exodus 27 in the SBITS4
Exodus 27 in the SBIUS
Exodus 27 in the SBIVS
Exodus 27 in the SBT
Exodus 27 in the SBT1E
Exodus 27 in the SCHL
Exodus 27 in the SNT
Exodus 27 in the SUSU
Exodus 27 in the SUSU2
Exodus 27 in the SYNO
Exodus 27 in the TBIAOTANT
Exodus 27 in the TBT1E
Exodus 27 in the TBT1E2
Exodus 27 in the TFTIP
Exodus 27 in the TFTU
Exodus 27 in the TGNTATF3T
Exodus 27 in the THAI
Exodus 27 in the TNFD
Exodus 27 in the TNT
Exodus 27 in the TNTIK
Exodus 27 in the TNTIL
Exodus 27 in the TNTIN
Exodus 27 in the TNTIP
Exodus 27 in the TNTIZ
Exodus 27 in the TOMA
Exodus 27 in the TTENT
Exodus 27 in the UBG
Exodus 27 in the UGV
Exodus 27 in the UGV2
Exodus 27 in the UGV3
Exodus 27 in the VBL
Exodus 27 in the VDCC
Exodus 27 in the YALU
Exodus 27 in the YAPE
Exodus 27 in the YBVTP
Exodus 27 in the ZBP