Exodus 3 (BOLCB2)

1 Moyize azalaki koleisa bibwele ya Jetro, bokilo na ye mpe Nganga-Nzambe ya Madiani. Amemaki bibwele mosika, kati na esobe, mpe akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe. 2 Kuna, Anjelu ya Yawe abimelaki ye kati na ndemo ya moto oyo ezalaki komata longwa kati na mwa nzete. Moyize amonaki nzete moke yango kopela moto, kasi ezalaki kozika te. 3 Moyize amilobelaki : « Tika ete nabaluka mpo ete natala emoniseli oyo ya kokamwa mpe nayeba mpo na nini nzete moke oyo ezali kozika te. » 4 Tango Yawe amonaki ete Moyize azali kobaluka mpo na kotala, Nzambe abengaki ye wuta na nzete moke yango :— Moyize, Moyize !Moyize azongisaki :— Ngai oyo ! 5 Nzambe alobaki na ye :— Kopusana awa te, longola basandale na yo na makolo na yo, pamba te esika oyo otelemi ezali mabele ya bule. 6 Alobaki lisusu :— Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi.Boye Moyize abombaki elongi na ye, pamba te abangaki kotala Nzambe. 7 Yawe alobaki :— Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango. 8 Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi. 9 Sik’oyo, koganga ya bana ya Isalaele ekomi kino epai na Ngai mpe namoni ndenge nini bato ya Ejipito bazali konyokola bango. 10 Yango wana natindi yo sik’oyo mpo ete okende epai ya Faraon mpo na kobimisa bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito. 11 Moyize alobaki na Nzambe :— Ngai nazali nani mpo ete nakende epai ya Faraon mpe mpo ete nabimisa bana ya Isalaele na Ejipito ? 12 Nzambe alobaki :— Nakozala na yo elongo. Mpe tala elembo oyo ekolakisa yo ete Ngai nde natindi yo : tango okobimisa bato na Ngai na Ejipito, bokogumbamela Nzambe na ngomba oyo. 13 Moyize alobaki na Nzambe :— Soki nakeyi epai ya bana ya Isalaele mpe nalobi na bango : « Nzambe ya bakoko na bino atindi ngai epai na bino, » bongo soki bango batuni ngai : « Kombo na Ye nani ? » Nakoyebisa bango nini ? 14 Nzambe alobaki na Moyize :— Ngai nazali oyo akosala. Tala makambo oyo okoloba na bana ya Isalaele : « Nazali atindi ngai epai na bino. » 15 Nzambe alobaki lisusu na Moyize :— Loba na bana ya Isalaele : « Yawe Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, atindi ngai epai na bino. »Yango nde Kombo na Ngai mpo na libela,Kombo oyo bokokanisela Ngailibela na libela. 16 Boye, kende, sangisa bakambi ya Isalaele mpe loba na bango : « Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, abimelaki ngai mpe alobi : ‹ Nazwi mokano ya kobundela bino, pamba te namoni pasi na bino na Ejipito. › » 17 Mpe nalobi : « Nakolongola bino na minyoko ya Ejipito mpo na komema bino na mokili ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. » 18 Bakambi ya Isalaele bakoyokela yo, bongo yo elongo na bakambi, bokokende epai ya mokonzi ya Ejipito mpe bokoloba na ye : « Yawe Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, pesa biso nzela ya kotambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokende kotumbela Yawe, Nzambe na biso, mbeka. » 19 Kasi nayebi ete mokonzi ya Ejipito akopesa bino te nzela ya kokende, ata soki amoni loboko na Ngai ya nguya. 20 Yango wana, nakosembola loboko na Ngai ; nakobeta Ejipito na nzela ya bikamwa na Ngai nyonso oyo nakosala kati na yango. Sima na yango, mokonzi ya Ejipito akotika bino kokende. 21 Nakosala ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito mpo ete, tango bokolongwa, bokende maboko pamba te. 22 Mwasi nyonso akosenga epai ya moninga na ye mpe epai ya mwasi oyo avandi na ndako na ye : biloko ya palata, ya wolo mpe bilamba. Bokopesa yango epai ya bana na bino ya mibali mpe ya basi mpo ete bamema. Na bongo nde bokosilisa biloko ya bato ya Ejipito.

In Other Versions

Exodus 3 in the ANGEFD

Exodus 3 in the ANTPNG2D

Exodus 3 in the AS21

Exodus 3 in the BAGH

Exodus 3 in the BBPNG

Exodus 3 in the BBT1E

Exodus 3 in the BDS

Exodus 3 in the BEV

Exodus 3 in the BHAD

Exodus 3 in the BIB

Exodus 3 in the BLPT

Exodus 3 in the BNT

Exodus 3 in the BNTABOOT

Exodus 3 in the BNTLV

Exodus 3 in the BOATCB

Exodus 3 in the BOATCB2

Exodus 3 in the BOBCV

Exodus 3 in the BOCNT

Exodus 3 in the BOECS

Exodus 3 in the BOGWICC

Exodus 3 in the BOHCB

Exodus 3 in the BOHCV

Exodus 3 in the BOHLNT

Exodus 3 in the BOHNTLTAL

Exodus 3 in the BOICB

Exodus 3 in the BOILNTAP

Exodus 3 in the BOITCV

Exodus 3 in the BOKCV

Exodus 3 in the BOKCV2

Exodus 3 in the BOKHWOG

Exodus 3 in the BOKSSV

Exodus 3 in the BOLCB

Exodus 3 in the BOMCV

Exodus 3 in the BONAV

Exodus 3 in the BONCB

Exodus 3 in the BONLT

Exodus 3 in the BONUT2

Exodus 3 in the BOPLNT

Exodus 3 in the BOSCB

Exodus 3 in the BOSNC

Exodus 3 in the BOTLNT

Exodus 3 in the BOVCB

Exodus 3 in the BOYCB

Exodus 3 in the BPBB

Exodus 3 in the BPH

Exodus 3 in the BSB

Exodus 3 in the CCB

Exodus 3 in the CUV

Exodus 3 in the CUVS

Exodus 3 in the DBT

Exodus 3 in the DGDNT

Exodus 3 in the DHNT

Exodus 3 in the DNT

Exodus 3 in the ELBE

Exodus 3 in the EMTV

Exodus 3 in the ESV

Exodus 3 in the FBV

Exodus 3 in the FEB

Exodus 3 in the GGMNT

Exodus 3 in the GNT

Exodus 3 in the HARY

Exodus 3 in the HNT

Exodus 3 in the IRVA

Exodus 3 in the IRVB

Exodus 3 in the IRVG

Exodus 3 in the IRVH

Exodus 3 in the IRVK

Exodus 3 in the IRVM

Exodus 3 in the IRVM2

Exodus 3 in the IRVO

Exodus 3 in the IRVP

Exodus 3 in the IRVT

Exodus 3 in the IRVT2

Exodus 3 in the IRVU

Exodus 3 in the ISVN

Exodus 3 in the JSNT

Exodus 3 in the KAPI

Exodus 3 in the KBT1ETNIK

Exodus 3 in the KBV

Exodus 3 in the KJV

Exodus 3 in the KNFD

Exodus 3 in the LBA

Exodus 3 in the LBLA

Exodus 3 in the LNT

Exodus 3 in the LSV

Exodus 3 in the MAAL

Exodus 3 in the MBV

Exodus 3 in the MBV2

Exodus 3 in the MHNT

Exodus 3 in the MKNFD

Exodus 3 in the MNG

Exodus 3 in the MNT

Exodus 3 in the MNT2

Exodus 3 in the MRS1T

Exodus 3 in the NAA

Exodus 3 in the NASB

Exodus 3 in the NBLA

Exodus 3 in the NBS

Exodus 3 in the NBVTP

Exodus 3 in the NET2

Exodus 3 in the NIV11

Exodus 3 in the NNT

Exodus 3 in the NNT2

Exodus 3 in the NNT3

Exodus 3 in the PDDPT

Exodus 3 in the PFNT

Exodus 3 in the RMNT

Exodus 3 in the SBIAS

Exodus 3 in the SBIBS

Exodus 3 in the SBIBS2

Exodus 3 in the SBICS

Exodus 3 in the SBIDS

Exodus 3 in the SBIGS

Exodus 3 in the SBIHS

Exodus 3 in the SBIIS

Exodus 3 in the SBIIS2

Exodus 3 in the SBIIS3

Exodus 3 in the SBIKS

Exodus 3 in the SBIKS2

Exodus 3 in the SBIMS

Exodus 3 in the SBIOS

Exodus 3 in the SBIPS

Exodus 3 in the SBISS

Exodus 3 in the SBITS

Exodus 3 in the SBITS2

Exodus 3 in the SBITS3

Exodus 3 in the SBITS4

Exodus 3 in the SBIUS

Exodus 3 in the SBIVS

Exodus 3 in the SBT

Exodus 3 in the SBT1E

Exodus 3 in the SCHL

Exodus 3 in the SNT

Exodus 3 in the SUSU

Exodus 3 in the SUSU2

Exodus 3 in the SYNO

Exodus 3 in the TBIAOTANT

Exodus 3 in the TBT1E

Exodus 3 in the TBT1E2

Exodus 3 in the TFTIP

Exodus 3 in the TFTU

Exodus 3 in the TGNTATF3T

Exodus 3 in the THAI

Exodus 3 in the TNFD

Exodus 3 in the TNT

Exodus 3 in the TNTIK

Exodus 3 in the TNTIL

Exodus 3 in the TNTIN

Exodus 3 in the TNTIP

Exodus 3 in the TNTIZ

Exodus 3 in the TOMA

Exodus 3 in the TTENT

Exodus 3 in the UBG

Exodus 3 in the UGV

Exodus 3 in the UGV2

Exodus 3 in the UGV3

Exodus 3 in the VBL

Exodus 3 in the VDCC

Exodus 3 in the YALU

Exodus 3 in the YAPE

Exodus 3 in the YBVTP

Exodus 3 in the ZBP