Ezekiel 16 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na ngai : 2 « Mwana na moto, lakisa Yelusalemi misala na ye ya mbindo ! 3 Yebisa ye boye : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya Yelusalemi : Bokoko mpe mbotama na yo etalisaka ete ozali moto ya Kanana ; tata na yo azalaki moto ya Amori, mpe mama na yo azalaki moto ya Iti. 4 Na mokolo ya mbotama na yo, bakataki yo motolu te, basukolaki yo na mayi te mpo ete okoma peto, batikalaki kopakola yo mungwa te mpe bazipaki yo bilamba te. 5 Moto moko te ayokelaki yo mawa mpo na kosalela yo ata moko kati na makambo wana. Nzokande, na mokolo ya mbotama na yo, bayinaki yo mpe babwakaki yo na zamba mpo ete bazalaki na somo makasi ya komona yo. 6 Boye, Ngai nalekelaki wana mpe namonaki ndenge nini ozalaki kobunda-bunda na kufa kati na makila. Bongo nalobaki na yo : ‘ Okozala na bomoi atako ozali kobaluka na makila ! ’ 7 Nakolisaki yo lokola nzete ya elanga. Bongo tango okolaki penza mpe oyaki monene, okomaki kitoko makasi koleka ; tolo na yo ebimisaki mabele, mpe bapwale na yo ekolaki. Kasi ozalaki na yo kaka bolumbu tango nyonso, ozalaki na bilamba te. 8 Sima na mikolo, tango nalekelaki lisusu wana mpe namonaki yo, nasosolaki ete okokisi mibu ya libala. Nakamataki elamba na Ngai mpe nazipaki bolumbu na yo ; nalapaki ndayi ete nakosala boyokani ya libela elongo na yo, elobi Nkolo Yawe. Mpe na bongo, okomaki ya Ngai. 9 Nasukolaki yo na mayi mpo na kolongola makila oyo ekangamaki yo na nzoto, mpe napakolaki yo mafuta ya solo kitoko. 10 Nalatisaki yo elamba ya talo batonga bililingi na basinga mpe basapato ya kitoko oyo basala na baposo ya banyama ; nalatisaki yo bilamba ya lino ya kitoko mpe nazipaki yo bilamba ya talo. 11 Nalatisaki yo babiju, mayaka na maboko mpe na kingo. 12 Nalatisaki yo lopete na zolo, biloko ya matoyi mpe motole ya kitoko na moto. 13 Boye, olataki biloko ya wolo mpe ya palata ; bilamba na yo ezalaki ya lino ya kitoko, bilamba ya talo batonga bililingi na basinga. Bilei na yo ezalaki : farine ya ble basangisa na eloko mosusu te, mafuta ya nzoyi mpe mafuta ya olive. Okomaki lisusu kitoko koleka, ozwaki lokumu makasi mpe okomaki lokola mwasi mokonzi. 14 Mpo ete kitoko na yo ekomaki ya kokoka, sango na yo epanzanaki kati na bikolo, likolo ya lokumu oyo napesaki yo, elobi Nkolo Yawe. 15 Kasi okomaki kotia motema na kitoko na yo mpe kosalela lokumu na yo mpo na kosala kindumba. Olakisaki bolumbu na yo na moleki nzela nyonso mpe omipesaki na ye. 16 Okamataki bilamba na yo mosusu, otongaki yango mpo na kobongisa bisambelo na yo ya likolo ya bangomba, epai wapi osalaki kindumba na yo. Likambo ya bongo etikala nanu kosalema te mpe ekotikala kosalema lisusu te ! 17 Okamataki lisusu babiju ya kitoko oyo basala na wolo mpe na palata oyo napesaki yo, osalelaki yango bikeko ya mibali ; mpe elongo na yango, omipesaki na kindumba. 18 Okamataki bilamba na yo ya talo batonga bililingi na basinga, olatisaki yango bikeko wana mpe obonzelaki yango mafuta mpe ansa na Ngai. 19 Bilei oyo Ngai nabongiselaki yo : farine ya ble, mafuta ya nzoyi mpe mafuta ya olive, oyo napesaki yo mpo ete oliaka, obonzaki yango epai ya bikeko wana lokola mbeka ya solo kitoko. Yango nde makambo oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe. 20 Okamataki lisusu bana basi mpe bana mibali oyo obotelaki Ngai, obonzaki bango lisusu lokola bilei epai ya banzambe wana ya bikeko mpo ete elia bango. Boni, kindumba na yo ekokaki kaka te ? 21 Esengelaki solo ete oboma bana na Ngai mpo na kobonza bango lokola makabo epai ya banzambe wana ya bikeko, na kolekisa bango na moto ! 22 Mpe wana ozalaki kosala makambo na yo nyonso ya nkele mpe kindumba na yo, okanisaki ata moke te bolenge na yo : tango oyo ozalaki bolumbu mpe ozalaki kobunda-bunda kati na makila na yo. 23 Mawa ! Mawa penza mpo na yo, elobi Nkolo Yawe ; sima na yo kosala mabe wana nyonso, 24 omitongelaki mwa ndako mpo na kosala kindumba mpe obongisaki mpo na yo moko, bisika ya bule na bisika nyonso oyo bato bakutanaka ; 25 otongaki yango na bisika nyonso oyo babalabala ekutana, okomisaki kitoko na yo likambo ya nkele mpe omipesaki epai ya moleki nzela nyonso : osalaki penza kindumba makasi. 26 Osalaki kindumba na bato ya Ejipito, baninga na yo, oyo bazali na banzoto ya bingambe ; mpe osalaki kindumba makasi mpo na kopesa Ngai kanda. 27 Natombokelaki yo, nabotolaki yo bilei oyo napesaki yo mpe nakabaki yo na maboko ya banguna na yo, bingumba ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki mpe kosepela ata moke te na bizaleli na yo ya soni mpe ya mabe. 28 Lokola otondaka te, osalaki lisusu kindumba na bato ya Asiri ; mpe, ata sima na yango, otondaki mpe kaka te. 29 Ezala kati na Kanana, pembeni ya Babiloni, okobaki kaka kosala kindumba ; kasi atako bongo, otondaki kaka te. 30 Yango motema ya pete ya ndenge nini penza yo ozali na yango, elobi Nkolo Yawe, mpo ete osala makambo oyo nyonso, lokola mwasi ya ndumba oyo akenda sango na mosala na ye ya kindumba ! 31 Tango ozalaki kotonga mwa bandako ya kindumba na bisika nyonso oyo babalabala ekutana mpe kobongisa bisika ya bule na bisika nyonso oyo bato bakutanaka, ozalaki kosala lokola mwasi ya ndumba nyonso te, pamba te ozalaki kosenga lifuti te. 32 Yo ozali penza mwasi ya ekobo ; osepelaka kosangisa nzoto na bapaya, kasi na mobali na yo te. 33 Basi nyonso oyo basalaka kindumba basengaka lifuti ; kasi epai na yo, ezali yo nde opesaka bakado epai ya bamakangu na yo nyonso : na bongo, osombaka mitema na bango mpo ete bawuta bipai na bipai mpe baya kosala ekobo na yo. 34 Yo, okeseni penza na basi mosusu na kindumba na yo, pamba te mibali balukaka yo te ! Yo penza, okeseni na basi mosusu ya ndumba, pamba te ofutaka mibali na esika ete bango bafuta yo. 35 Yango wana, yo mwasi ya ndumba, yoka Liloba na Yawe ! 36 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola osakanelaki bomengo na yo mpe otandaki bolumbu na yo kati na kindumba na bamakangu na yo mpe na banzambe na yo nyonso ya bikeko, makambo na yo nyonso ya mbindo ; mpe lokola obonzelaki banzambe wana ya bikeko makila ya bana na yo ya mibali, 37 nazali kosangisa bamakangu na yo nyonso oyo ozalaki kosepela elongo na bango, ba-oyo nyonso ozalaki kolinga mpe ba-oyo nyonso ozalaki koyina ; nakosangisa bango wuta na bangambo nyonso mpo ete batombokela yo, mpe nakotanda yo liboso na bango mpo ete bamona bolumbu na yo nyonso. 38 Nakopesa yo etumbu oyo ebongi na basi ya ndumba mpe na ba-oyo basopaka makila. Okofuta yango na motuya ya makila na yo, mpo na kanda mpe zuwa ya bolingo na Ngai oyo osambwisi. 39 Nakokaba yo na maboko ya bamakangu na yo, bakobuka mwa bandako na yo ya kindumba mpe bisika na yo ya bule ; bakolongola yo na makasi bilamba mpe babiju ya kitoko mpe bakotika yo bolumbu. 40 Nakotindela yo bato ebele mpo ete babamba yo mabanga mpe batobola yo na mipanga na bango. 41 Bakotumba bandako na yo mpe bakopesa yo etumbu na miso ya basi ebele. Nakosukisa kindumba na yo, mpe okofuta lisusu bamakangu na yo te. 42 Na bongo nde kanda na Ngai epai na yo mpe zuwa ya bolingo na Ngai oyo osambwisaki ekosila ; nakovanda kimia mpe nakosilika lisusu te. 43 Lokola obosanaki mikolo ya bolenge na yo mpe opelisaki kanda na Ngai na nzela ya makambo nyonso ya boye, Ngai mpe nakofuta yo kolanda ndenge etamboli na yo ezali, elobi Nkolo Yawe ; boye, okobakisa lisusu makambo mabe te na likolo ya makambo na yo ya mbindo. 44 Moto nyonso oyo alobaka na masese akoloba lisese oyo na tina na yo : ‘ Mwana mwasi azalaka kaka ndenge mama na ye azali. ’ 45 Ozali solo mwana mwasi ya mama na yo, oyo asambwisaki mobali na ye mpe bana na ye ya mibali ; ozali solo ndeko mwasi ya bandeko na yo ya basi oyo batiolaki mibali mpe bana na bango. Mama na bino azalaki moto ya mokili ya Iti, mpe tata na yo azalaki moto ya Amori. 46 Kulutu na yo ya mwasi, ezali Samari oyo avandi na ngambo ya nor ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi ; leki na yo ya mwasi ezali Sodome oyo avandi na ngambo ya sude ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi. 47 Otambolaki kaka te na banzela na bango mpe olandaki kaka te bizaleli na bango ya mbindo, kasi okomaki mabe koleka bango, na etamboli na yo nyonso. 48 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, Sodome, ndeko na yo ya mwasi, elongo na bana na ye ya basi batikala nanu kosala te makambo oyo yo elongo na bana na yo ya basi bosali. 49 Tala sik’oyo masumu ya Sodome, ndeko na yo ya mwasi : ye elongo na bana na ye ya basi bazalaki bato ya lolendo, mpo ete batondaki na bomengo mpe eloko moko te ezalaki kotungisa bango ; basungaki ata moke te babola mpe bato bakelela. 50 Bakomaki bato ya lofundu makasi mpe bakomaki kosala makambo ya mbindo na miso na Ngai. Yango wana, nalimwisi bango ndenge ozali komona. 51 Samari asalaki te ata kati-kati ya masumu oyo yo osalaki. Osalaki makambo ya mbindo koleka bango ; mpe na nzela ya makambo na yo nyonso ya mbindo, osalaki ete bandeko na yo ya basi bamonana lokola bato ya sembo koleka. 52 Sik’oyo, yo oyo ozalaki kosambisa bandeko na yo ya basi, lata soni na yo ! Lokola masumu na yo ezalaki kutu mabe koleka oyo ya bango, yango wana bazalaki komonana lokola bato ya sembo koleka. Yoka sik’oyo soni mpo ete osili kosambwa, omonisi bandeko na yo ya basi lokola bato ya sembo koleka ! 53 Yango wana, nakozongisa lisusu bolamu ya Sodome mpe ya Samari, elongo na bingumba na yango ; mpe yo, nakozongisa bolamu na yo kati na yango 54 mpo ete oyoka lisusu soni te mpe osambwa lisusu te likolo ya misala na yo mpe likolo ya makambo oyo ezalaki kobondisa bango. 55 Sodome mpe Samari elongo na bingumba na yango ekozonga ndenge ezalaki liboso ; mpe yo elongo na bingumba na yo, nakozongisa bino ndenge bozalaki liboso. 56 Na mokolo ya lolendo na yo, ozalaki kutu kolobela mabe ya Sodome, ndeko na yo, 57 liboso ete mabe na yo eyebana. Kasi sik’oyo, bingumba ya Siri elongo na bingumba nyonso oyo ezali zingazinga na yango mpe bingumba ya bato ya Filisitia ekomi koseka yo. 58 Okomi sik’oyo komema mikumba ya makambo na yo ya mbindo mpe ya misala na yo ya mabe, elobi Yawe. 59 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosalela yo kolanda misala na yo, pamba te otiolaki ndayi na Ngai na nzela ya kobuka boyokani na Ngai elongo na yo. 60 Kasi Ngai, nakokanisa lisusu boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na yo tango ozalaki nanu elenge, mpe nakosala lisusu mpo na yo, boyokani oyo ekozala na suka te. 61 Boye, okokanisa etamboli na yo mpe okoyoka soni tango okoyamba bandeko na yo ya basi, ezala ba-oyo bazali mikolo na yo to ba-oyo bazali baleki na yo ; nakopesa yo bango lokola bana na yo ya basi, kasi ekozala te kolanda boyokani na Ngai elongo na yo. 62 Ngai nakosala boyokani na Ngai elongo na yo ; mpe na bongo, okososola solo ete Ngai, nazali Yawe, 63 mpo ete okanisa yango lisusu, oyokela yango soni mpe ofungola lisusu monoko na yo te mpo na soni, tango nakolimbisa masumu na yo mpo na mabe nyonso oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe. › »

In Other Versions

Ezekiel 16 in the ANGEFD

Ezekiel 16 in the ANTPNG2D

Ezekiel 16 in the AS21

Ezekiel 16 in the BAGH

Ezekiel 16 in the BBPNG

Ezekiel 16 in the BBT1E

Ezekiel 16 in the BDS

Ezekiel 16 in the BEV

Ezekiel 16 in the BHAD

Ezekiel 16 in the BIB

Ezekiel 16 in the BLPT

Ezekiel 16 in the BNT

Ezekiel 16 in the BNTABOOT

Ezekiel 16 in the BNTLV

Ezekiel 16 in the BOATCB

Ezekiel 16 in the BOATCB2

Ezekiel 16 in the BOBCV

Ezekiel 16 in the BOCNT

Ezekiel 16 in the BOECS

Ezekiel 16 in the BOGWICC

Ezekiel 16 in the BOHCB

Ezekiel 16 in the BOHCV

Ezekiel 16 in the BOHLNT

Ezekiel 16 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 16 in the BOICB

Ezekiel 16 in the BOILNTAP

Ezekiel 16 in the BOITCV

Ezekiel 16 in the BOKCV

Ezekiel 16 in the BOKCV2

Ezekiel 16 in the BOKHWOG

Ezekiel 16 in the BOKSSV

Ezekiel 16 in the BOLCB

Ezekiel 16 in the BOMCV

Ezekiel 16 in the BONAV

Ezekiel 16 in the BONCB

Ezekiel 16 in the BONLT

Ezekiel 16 in the BONUT2

Ezekiel 16 in the BOPLNT

Ezekiel 16 in the BOSCB

Ezekiel 16 in the BOSNC

Ezekiel 16 in the BOTLNT

Ezekiel 16 in the BOVCB

Ezekiel 16 in the BOYCB

Ezekiel 16 in the BPBB

Ezekiel 16 in the BPH

Ezekiel 16 in the BSB

Ezekiel 16 in the CCB

Ezekiel 16 in the CUV

Ezekiel 16 in the CUVS

Ezekiel 16 in the DBT

Ezekiel 16 in the DGDNT

Ezekiel 16 in the DHNT

Ezekiel 16 in the DNT

Ezekiel 16 in the ELBE

Ezekiel 16 in the EMTV

Ezekiel 16 in the ESV

Ezekiel 16 in the FBV

Ezekiel 16 in the FEB

Ezekiel 16 in the GGMNT

Ezekiel 16 in the GNT

Ezekiel 16 in the HARY

Ezekiel 16 in the HNT

Ezekiel 16 in the IRVA

Ezekiel 16 in the IRVB

Ezekiel 16 in the IRVG

Ezekiel 16 in the IRVH

Ezekiel 16 in the IRVK

Ezekiel 16 in the IRVM

Ezekiel 16 in the IRVM2

Ezekiel 16 in the IRVO

Ezekiel 16 in the IRVP

Ezekiel 16 in the IRVT

Ezekiel 16 in the IRVT2

Ezekiel 16 in the IRVU

Ezekiel 16 in the ISVN

Ezekiel 16 in the JSNT

Ezekiel 16 in the KAPI

Ezekiel 16 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 16 in the KBV

Ezekiel 16 in the KJV

Ezekiel 16 in the KNFD

Ezekiel 16 in the LBA

Ezekiel 16 in the LBLA

Ezekiel 16 in the LNT

Ezekiel 16 in the LSV

Ezekiel 16 in the MAAL

Ezekiel 16 in the MBV

Ezekiel 16 in the MBV2

Ezekiel 16 in the MHNT

Ezekiel 16 in the MKNFD

Ezekiel 16 in the MNG

Ezekiel 16 in the MNT

Ezekiel 16 in the MNT2

Ezekiel 16 in the MRS1T

Ezekiel 16 in the NAA

Ezekiel 16 in the NASB

Ezekiel 16 in the NBLA

Ezekiel 16 in the NBS

Ezekiel 16 in the NBVTP

Ezekiel 16 in the NET2

Ezekiel 16 in the NIV11

Ezekiel 16 in the NNT

Ezekiel 16 in the NNT2

Ezekiel 16 in the NNT3

Ezekiel 16 in the PDDPT

Ezekiel 16 in the PFNT

Ezekiel 16 in the RMNT

Ezekiel 16 in the SBIAS

Ezekiel 16 in the SBIBS

Ezekiel 16 in the SBIBS2

Ezekiel 16 in the SBICS

Ezekiel 16 in the SBIDS

Ezekiel 16 in the SBIGS

Ezekiel 16 in the SBIHS

Ezekiel 16 in the SBIIS

Ezekiel 16 in the SBIIS2

Ezekiel 16 in the SBIIS3

Ezekiel 16 in the SBIKS

Ezekiel 16 in the SBIKS2

Ezekiel 16 in the SBIMS

Ezekiel 16 in the SBIOS

Ezekiel 16 in the SBIPS

Ezekiel 16 in the SBISS

Ezekiel 16 in the SBITS

Ezekiel 16 in the SBITS2

Ezekiel 16 in the SBITS3

Ezekiel 16 in the SBITS4

Ezekiel 16 in the SBIUS

Ezekiel 16 in the SBIVS

Ezekiel 16 in the SBT

Ezekiel 16 in the SBT1E

Ezekiel 16 in the SCHL

Ezekiel 16 in the SNT

Ezekiel 16 in the SUSU

Ezekiel 16 in the SUSU2

Ezekiel 16 in the SYNO

Ezekiel 16 in the TBIAOTANT

Ezekiel 16 in the TBT1E

Ezekiel 16 in the TBT1E2

Ezekiel 16 in the TFTIP

Ezekiel 16 in the TFTU

Ezekiel 16 in the TGNTATF3T

Ezekiel 16 in the THAI

Ezekiel 16 in the TNFD

Ezekiel 16 in the TNT

Ezekiel 16 in the TNTIK

Ezekiel 16 in the TNTIL

Ezekiel 16 in the TNTIN

Ezekiel 16 in the TNTIP

Ezekiel 16 in the TNTIZ

Ezekiel 16 in the TOMA

Ezekiel 16 in the TTENT

Ezekiel 16 in the UBG

Ezekiel 16 in the UGV

Ezekiel 16 in the UGV2

Ezekiel 16 in the UGV3

Ezekiel 16 in the VBL

Ezekiel 16 in the VDCC

Ezekiel 16 in the YALU

Ezekiel 16 in the YAPE

Ezekiel 16 in the YBVTP

Ezekiel 16 in the ZBP