Ezekiel 23 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na ngai : 2 « Mwana na moto, ezalaki na basi mibale, bana ya mama moko. 3 Bakomaki na kindumba mpe bamipesaki na yango wuta bolenge na bango, na Ejipito. Kuna, bato bazalaki kosakana na mabele na bango mpe kosimbasimba tolo na bango ya bolenge. 4 Oyo ya kulutu, kombo na ye ezalaki Ohola ; mpe oyo ya leki, kombo na ye ezalaki Oholiba : bazalaki basi na Ngai mpe babotaki bana mibali mpe bana basi. Ohola azali Samari mpe Oholiba azali Yelusalemi. 5 Ohola amipesaki na kindumba tango azalaki nanu ya Ngai mpe akufelaki kolinga bamakangu na ye, bato ya Asiri, bilombe ya bitumba 6 oyo balataka bilamba ya lokumu ya langi ya ble, bayangeli mpe bakonzi ya basoda ; bango nyonso bazalaki bilenge mibali ya kitoko oyo bayebaki malamu kotambola na bampunda. 7 Ye moko alakisaki polele kindumba na ye epai ya bato ya lokumu ya Asiri mpe amikomisaki mbindo na nzela ya banzambe ya bikeko nyonso, ya moto nyonso oyo ye azalaki kokufela na bolingo. 8 Atikaki te kindumba na ye oyo abandaki na Ejipito, oyo na tango ya bolenge na ye, mibali bazalaki kosangisa na ye nzoto, kosimbasimba tolo na ye ya bolenge mpe kosilisa baposa na bango ya nzoto epai na ye. 9 Yango wana nakabaki ye na maboko ya bamakangu na ye, bato ya Asiri, oyo azalaki kokufela. 10 Batikaki ye bolumbu, bakendeki na bana na ye ya mibali mpe ya basi, mpe babomaki ye na mopanga. Akomaki lokola ndakisa mpo na basi mosusu, pamba te azwaki etumbu. 11 Ndeko na ye ya mwasi, Oholiba, amonaki makambo oyo nyonso ; kasi lokola posa ya kindumba elataki ye makasi, asalaki mobulu koleka kutu ndeko na ye ya mwasi. 12 Ye mpe akufelaki kolinga mibali ya Asiri : bayangeli, bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo balataka kitoko mpe batambolaka malamu likolo ya bampunda ; bango nyonso bazalaki bilenge mibali kitoko. 13 Namonaki ete ye mpe amikomisaki mbindo : bango mibale balandaki kaka nzela moko. 14 Nzokande, ye kutu akendeki mosika koleka na kindumba na ye ; amonaki bililingi ya mibali na mir, bililingi ya bato ya Chalide, oyo basala na langi ya motane ; 15 mibali yango balataki mikaba na baloketo na bango mpe bitendi ya balangi ebele na mito na bango. Bango nyonso bazalaki na lolenge ya bakonzi ya basoda ya Babiloni, oyo babotama na mokili na Chalide. 16 Tango kaka amonaki bango, akufelaki bango na bolingo mpe atindaki bantoma epai na bango, na mokili ya Chalide. 17 Bato ya Babiloni bayaki epai na ye kino na mbeto na ye oyo asalelaka bolingo mpe bakomisaki ye mbindo na nzela ya kindumba na bango. Sima na bango kokomisa ye mbindo, ayinaki bango. 18 Tango alakisaki polele kindumba na ye mpe atalisaki bolumbu na ye, nayinaki ye, ndenge kaka nayinaki ndeko na ye ya mwasi. 19 Nzokande, azalaki se kobakisa kindumba na ye tango azalaki kokanisa mikolo ya bolenge na ye, oyo azalaki kosala kindumba, na Ejipito. 20 Kuna, akufelaki kolinga bamakangu na ye, oyo nzoto na bango ya mibali ezalaka lokola nzoto ya mibali ya ane mpe oyo bazalaka na nguya ya kosangisa nzoto lokola mpunda. 21 Boye, okanisaki lisusu kindumba na yo, oyo ozalaki kosala na bolenge tango mibali ya Ejipito bazalaki kosakana na mabele na yo mpe kosimbasimba tolo na yo ya bolenge. 22 Yango wana, Oholiba, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosala ete bamakangu na yo, ba-oyo yo oboyaki, babalukela yo ; mpe nakosala lisusu ete babimela yo na bangambo nyonso : 23 mibali ya Babiloni mpe mibali nyonso ya Chalide, ya Pekodi, ya Shoa mpe ya Koa elongo na mibali nyonso ya Asiri, bilenge mibali kitoko. Bango nyonso bazalaki bayangeli mpe bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo batambolaka malamu likolo ya bampunda mpe bakonzi ya basoda ya lokumu ; bango nyonso batambolaka likolo ya bampunda. 24 Bakoya kobundisa yo na bibundeli, na bampunda mpe na bashar na yango elongo na bato ebele ; bakomibongisa mpo na kobundisa yo na bangambo nyonso, na banguba minene mpe ya mike, mpe na bikoti ya basoda. Nakokaba yo na maboko na bango mpo ete bapesa yo etumbu mpe bakosambisa yo kolanda mibeko na bango. 25 Nakotelemela yo na kanda na Ngai mpe bakosala yo mabe, na mitema ya kanda penza. Bakokata yo zolo mpe matoyi ; bongo bato na yo, oyo bakotikala bakokufa na mopanga. Bakokende na bana na yo ya mibali mpe ya basi, bongo ba-oyo bakotikala bakokufa na moto. 26 Bakobotola yo lisusu bilamba na yo mpe babiju na yo ya talo. 27 Nakosukisa makambo ya soni mpe kindumba na yo, oyo obandaki na Ejipito. Okotombola lisusu miso na yo te mpo na komona bato wana mpe okotikala lisusu kokanisa Ejipito te. 28 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kokaba yo na maboko ya bato oyo oyinaka, bato oyo osepelaka lisusu na bango te. 29 Bato yango bakoyina yo, bakosala yo mabe penza mpe bakobotola yo mbuma ya mosala na yo ; bakolongola yo bilamba mpe okotikala bolumbu, bongo soni ya kindumba na yo ekobima polele. Kindumba mpe ekobo na yo 30 nde ememelaki yo makambo oyo ekomeli yo, pamba te okufelaki kolinga mibali ya bikolo wana mpe omikomisaki mbindo na nzela ya kosalela banzambe na bango ya bikeko. 31 Lokola olandaki nzela ya ndeko na yo ya mwasi, nakotia kopo oyo ye amelaki na loboko na yo. 32 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :Okomela kopo oyo ndeko na yo ya mwasi amelaki,kopo moko ya monene mpe ya mozindo ;ekomemela yo kosambwa mpe soni,pamba te ezali monene penza. 33 Ekolangwisa yo na pasi :kopo ya kobebisama mpe ya somo,kopo ya ndeko na yo ya mwasi, Samari. 34 Okomela yango kino ekokawuka,okobuka-buka yango na biteni,mpe ekozokisa-zokisa mabele na yo,pamba te Ngai Nkolo Yawe nde nalobi. 35 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola obosanaki Ngai mpe otiaki Ngai na sima ya mokongo na yo, okomema mikumba ya ekobo mpe ya kindumba na yo. » 36 Yawe alobaki na ngai : « Mwana na moto, okosambisa penza Ohola mpe Oholiba ? Lakisa bango misala na bango ya mbindo ; 37 pamba te basalaki kindumba, mpe makila etondi na maboko na bango ; basalaki kindumba na banzambe na bango ya bikeko, mpe babonzaki lokola mbeka bana na bango ya mibali oyo babotelaki Ngai, mpo ete bakoma bilei ya banzambe na bango ya bikeko. 38 Basalaki yango mpe lisusu epai na Ngai : kaka na tango yango, bakomisaki Esika na Ngai ya bule mbindo mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. 39 Kaka na mokolo oyo bazalaki kobonza lokola mbeka bana na bango epai ya banzambe na bango ya bikeko, bazalaki mpe kokota na Esika na Ngai ya bule mpe kobebisa bosantu na yango. Yango nde bazalaki kosala kati na Ndako na Ngai. 40 Batindaki mpe bantoma epai ya bato oyo bazalaka mosika. Mpe tango bayaki, omisukolaki nzoto, opakolaki biloko ya monzele na miso mpe olataki babiju. 41 Ovandaki na mbeto moko ya kitoko ; mpe liboso na yango, ezalaki na mesa moko oyo otiaka malasi ya ansa mpe mafuta na Ngai. 42 Zingazinga na ye, makelele ya bato ebele ezalaki koyokana, bameli masanga ebele oyo bawutaki na esobe elongo na bato ebele bayaki kolatisa bango mayaka na maboko mpe mitole ya bonzenga na mito na bango. 43 Boye, namilobelaki na tina na mwana mwasi oyo anzulukaki nzoto mpo na kindumba : ‹ Boni, ezali kaka ye oyo anzuluki nzoto nde azali kozongela lisusu penza kindumba ! › 44 Mpe basangisaki na ye nzoto : ndenge mibali basangisaka nzoto na mwasi ya ndumba, ndenge wana mpe basalaki bango, Ohola mpe Oholiba. 45 Kasi bato ya sembo bakosambisa bango mpe bakokatela bango etumbu oyo bapesaka na basi oyo basalaka ekobo mpe basopaka makila, pamba te bazali bandumba mpe maboko na bango ezali na makila. 46 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tika ete ebele ya bato batombokela bango, banyokola bango mpe babotola biloko na bango na makasi ! 47 Tika ete babamba bango mabanga mpe baboma bango na mopanga ; baboma bana na bango ya mibali mpe ya basi mpe babebisa bandako na bango na moto. 48 Na nzela wana nde nakosukisa kindumba kati na mokili, mpo ete basi nyonso bazwa mayele mpe balanda ndakisa na bango te. 49 Bokozwa etumbu mpo na kindumba na bino mpe bokomema mikumba ya masumu na bino ya kosambela banzambe ya bikeko ; boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. »

In Other Versions

Ezekiel 23 in the ANGEFD

Ezekiel 23 in the ANTPNG2D

Ezekiel 23 in the AS21

Ezekiel 23 in the BAGH

Ezekiel 23 in the BBPNG

Ezekiel 23 in the BBT1E

Ezekiel 23 in the BDS

Ezekiel 23 in the BEV

Ezekiel 23 in the BHAD

Ezekiel 23 in the BIB

Ezekiel 23 in the BLPT

Ezekiel 23 in the BNT

Ezekiel 23 in the BNTABOOT

Ezekiel 23 in the BNTLV

Ezekiel 23 in the BOATCB

Ezekiel 23 in the BOATCB2

Ezekiel 23 in the BOBCV

Ezekiel 23 in the BOCNT

Ezekiel 23 in the BOECS

Ezekiel 23 in the BOGWICC

Ezekiel 23 in the BOHCB

Ezekiel 23 in the BOHCV

Ezekiel 23 in the BOHLNT

Ezekiel 23 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 23 in the BOICB

Ezekiel 23 in the BOILNTAP

Ezekiel 23 in the BOITCV

Ezekiel 23 in the BOKCV

Ezekiel 23 in the BOKCV2

Ezekiel 23 in the BOKHWOG

Ezekiel 23 in the BOKSSV

Ezekiel 23 in the BOLCB

Ezekiel 23 in the BOMCV

Ezekiel 23 in the BONAV

Ezekiel 23 in the BONCB

Ezekiel 23 in the BONLT

Ezekiel 23 in the BONUT2

Ezekiel 23 in the BOPLNT

Ezekiel 23 in the BOSCB

Ezekiel 23 in the BOSNC

Ezekiel 23 in the BOTLNT

Ezekiel 23 in the BOVCB

Ezekiel 23 in the BOYCB

Ezekiel 23 in the BPBB

Ezekiel 23 in the BPH

Ezekiel 23 in the BSB

Ezekiel 23 in the CCB

Ezekiel 23 in the CUV

Ezekiel 23 in the CUVS

Ezekiel 23 in the DBT

Ezekiel 23 in the DGDNT

Ezekiel 23 in the DHNT

Ezekiel 23 in the DNT

Ezekiel 23 in the ELBE

Ezekiel 23 in the EMTV

Ezekiel 23 in the ESV

Ezekiel 23 in the FBV

Ezekiel 23 in the FEB

Ezekiel 23 in the GGMNT

Ezekiel 23 in the GNT

Ezekiel 23 in the HARY

Ezekiel 23 in the HNT

Ezekiel 23 in the IRVA

Ezekiel 23 in the IRVB

Ezekiel 23 in the IRVG

Ezekiel 23 in the IRVH

Ezekiel 23 in the IRVK

Ezekiel 23 in the IRVM

Ezekiel 23 in the IRVM2

Ezekiel 23 in the IRVO

Ezekiel 23 in the IRVP

Ezekiel 23 in the IRVT

Ezekiel 23 in the IRVT2

Ezekiel 23 in the IRVU

Ezekiel 23 in the ISVN

Ezekiel 23 in the JSNT

Ezekiel 23 in the KAPI

Ezekiel 23 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 23 in the KBV

Ezekiel 23 in the KJV

Ezekiel 23 in the KNFD

Ezekiel 23 in the LBA

Ezekiel 23 in the LBLA

Ezekiel 23 in the LNT

Ezekiel 23 in the LSV

Ezekiel 23 in the MAAL

Ezekiel 23 in the MBV

Ezekiel 23 in the MBV2

Ezekiel 23 in the MHNT

Ezekiel 23 in the MKNFD

Ezekiel 23 in the MNG

Ezekiel 23 in the MNT

Ezekiel 23 in the MNT2

Ezekiel 23 in the MRS1T

Ezekiel 23 in the NAA

Ezekiel 23 in the NASB

Ezekiel 23 in the NBLA

Ezekiel 23 in the NBS

Ezekiel 23 in the NBVTP

Ezekiel 23 in the NET2

Ezekiel 23 in the NIV11

Ezekiel 23 in the NNT

Ezekiel 23 in the NNT2

Ezekiel 23 in the NNT3

Ezekiel 23 in the PDDPT

Ezekiel 23 in the PFNT

Ezekiel 23 in the RMNT

Ezekiel 23 in the SBIAS

Ezekiel 23 in the SBIBS

Ezekiel 23 in the SBIBS2

Ezekiel 23 in the SBICS

Ezekiel 23 in the SBIDS

Ezekiel 23 in the SBIGS

Ezekiel 23 in the SBIHS

Ezekiel 23 in the SBIIS

Ezekiel 23 in the SBIIS2

Ezekiel 23 in the SBIIS3

Ezekiel 23 in the SBIKS

Ezekiel 23 in the SBIKS2

Ezekiel 23 in the SBIMS

Ezekiel 23 in the SBIOS

Ezekiel 23 in the SBIPS

Ezekiel 23 in the SBISS

Ezekiel 23 in the SBITS

Ezekiel 23 in the SBITS2

Ezekiel 23 in the SBITS3

Ezekiel 23 in the SBITS4

Ezekiel 23 in the SBIUS

Ezekiel 23 in the SBIVS

Ezekiel 23 in the SBT

Ezekiel 23 in the SBT1E

Ezekiel 23 in the SCHL

Ezekiel 23 in the SNT

Ezekiel 23 in the SUSU

Ezekiel 23 in the SUSU2

Ezekiel 23 in the SYNO

Ezekiel 23 in the TBIAOTANT

Ezekiel 23 in the TBT1E

Ezekiel 23 in the TBT1E2

Ezekiel 23 in the TFTIP

Ezekiel 23 in the TFTU

Ezekiel 23 in the TGNTATF3T

Ezekiel 23 in the THAI

Ezekiel 23 in the TNFD

Ezekiel 23 in the TNT

Ezekiel 23 in the TNTIK

Ezekiel 23 in the TNTIL

Ezekiel 23 in the TNTIN

Ezekiel 23 in the TNTIP

Ezekiel 23 in the TNTIZ

Ezekiel 23 in the TOMA

Ezekiel 23 in the TTENT

Ezekiel 23 in the UBG

Ezekiel 23 in the UGV

Ezekiel 23 in the UGV2

Ezekiel 23 in the UGV3

Ezekiel 23 in the VBL

Ezekiel 23 in the VDCC

Ezekiel 23 in the YALU

Ezekiel 23 in the YAPE

Ezekiel 23 in the YBVTP

Ezekiel 23 in the ZBP