Ezekiel 28 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na ngai : 2 « Mwana na moto, loba na mokambi ya Tiri : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na lolendo ya motema na yo, olobaki : ‘ Nazali nzambe, navandaka na kiti ya bokonzi ya nzambe na kati-kati ya bibale minene. ’ Nzokande, ozali na yo kaka moto, ozali na yo nzambe te atako okanisi ete ozali na bwanya lokola nzambe. 3 Boni, okanisi ete ozali na bwanya koleka Daniele ? Okanisi ete oyebi mabombami nyonso ? 4 Na bwanya mpe na mayele na yo, okomi na bozwi mpe otondisi wolo mpe palata kati na bibombelo na yo. 5 Lokola ozalaki mayele makasi na mosala ya mombongo, oyeisi bomengo na yo ebele makasi ; mpe mpo na bomengo na yo, motema na yo etondi na lolendo. 6 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola ozali kokanisa ete ozali na bwanya lokola Nzambe, 7 nakotindela yo bato ya bikolo ya bapaya, bikolo oyo baleki kanza kati na bikolo, mpo ete babundisa yo : bakobimisela yo mipanga na bango mpo na kosambwisa mayele mpe bwanya na yo, bongo bakosambwisa lokumu na yo. 8 Bakokitisa yo kino na libulu, mpe okokufa kufa ya somo kati na bibale minene. 9 Okokoka lisusu koloba liboso ya bato oyo bazali koboma yo : ‘ Ngai nazali nzambe ? ’ Ozali na yo kaka moto ; ozali nzambe te, kati na maboko ya bato oyo bazali koboma yo. 10 Okokufa kufa ya bato oyo bakatama ngenga te, na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. Ngai nde nalobi, elobi Nkolo Yawe. › » 11 Yawe alobaki na ngai : 12 « Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na mokonzi ya Tiri ! Loba na ye : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ozalaki ndakisa mpo na komona nyonso oyo ezali ya kokoka, otondaki na bwanya, mpe ozalaki kitoko koleka. 13 Ozalaki kati na Edeni, elanga ya Nzambe ; mabanga ya talo ya lolenge nyonso ezalaki kokomisa yo kitoko : ribi, topaze, diama, emerode, krizolite, onikisi, jasipe, safiri ; bambunda na yo ya mike mpe baflite na yo ezalaki ya wolo, babongisaki yango mpo na mokolo oyo bakela yo. 14 Napakolaki yo mafuta mpo ete ozala Sheribe oyo abatelaka, oyo mapapu na ye efungwama ; pamba te Ngai nde natiaki yo na ngomba ya bule ya Nzambe ; ozalaki wana, ozalaki kotambola na kati-kati ya mabanga oyo ezalaki kongenga lokola moto. 15 Etamboli na yo ezalaki ata na pamela moko te wuta mokolo oyo okelama kino tango mabe emonanaki kati na yo. 16 Lokola omonaki ete mombongo na yo emati makasi, okomaki konyokola bato mpe kosala masumu ; mpo na yango, nalongolaki yo na ngomba ya Nzambe mpe nabenganaki yo, sheribe oyo abatelaka, na molongo ya mabanga oyo ezalaki kongenga lokola moto. 17 Motema na yo etondaki na lolendo mpo na kitoko na yo ; obebisaki bwanya na yo mpo na lokumu na yo. Yango wana, nabwaki yo na mabele mpe nakomisi yo eloko ya liseki na miso ya bakonzi. 18 Mpo na ebele ya masumu na yo mpe mombongo na yo, oyo osalaka na bosembo te, obebisi bosantu ya bisika na yo ya bule ; mpe Ngai, nabimisi kati na yo moto mpo ete etumba yo ; nakomisi yo putulu ya mabele na miso ya bato nyonso oyo bazali kotala yo. 19 Bato ya bikolo nyonso oyo bayebaki yo bakomi na mawa na tina na yo mpo ete okomi eloko ya koyoka somo : suka na yo ezali mabe, ozali lisusu te, okotikala lisusu kozala te ! › » 20 Yawe alobaki na ngai : 21 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Sidoni mpe sakola na tina na yango ! 22 Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh Sidoni, natombokeli yo ! Nakomonisa nkembo na Ngai kati na yo ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakopesa yango etumbu mpe nakomonisa bosantu na Ngai kati na yango. 23 Nakotindela yango bokono oyo ebomaka, nakotangisa makila na babalabala na yango ; mopanga ekolongwa na bangambo nyonso mpo na koboma bato na yango, mpe bato ebele bakokufa. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. 24 Bato ya bikolo ya mayele mabe, oyo bazali lokola basende mpe banzube, bakozingela lisusu bana ya Isalaele te ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. 25 Nkolo Yawe alobi : Tango nakosangisa bana ya Isalaele wuta na bikolo epai wapi napanzaki bango, nakomonisa bosantu na Ngai kati na bango na miso ya bikolo wana ; boye, bakovanda na mokili na bango moko, mokili oyo napesaki epai ya Jakobi, mosali na Ngai. 26 Bakovanda kuna na kimia, bakotonga bandako mpe bakosala bilanga ya vino ; bakovanda kuna na kimia tango nakopesa etumbu na bikolo nyonso ya bapaya oyo bazingelaki bango mpe bazalaki kotiola bango. Bongo bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bango. › »

In Other Versions

Ezekiel 28 in the ANGEFD

Ezekiel 28 in the ANTPNG2D

Ezekiel 28 in the AS21

Ezekiel 28 in the BAGH

Ezekiel 28 in the BBPNG

Ezekiel 28 in the BBT1E

Ezekiel 28 in the BDS

Ezekiel 28 in the BEV

Ezekiel 28 in the BHAD

Ezekiel 28 in the BIB

Ezekiel 28 in the BLPT

Ezekiel 28 in the BNT

Ezekiel 28 in the BNTABOOT

Ezekiel 28 in the BNTLV

Ezekiel 28 in the BOATCB

Ezekiel 28 in the BOATCB2

Ezekiel 28 in the BOBCV

Ezekiel 28 in the BOCNT

Ezekiel 28 in the BOECS

Ezekiel 28 in the BOGWICC

Ezekiel 28 in the BOHCB

Ezekiel 28 in the BOHCV

Ezekiel 28 in the BOHLNT

Ezekiel 28 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 28 in the BOICB

Ezekiel 28 in the BOILNTAP

Ezekiel 28 in the BOITCV

Ezekiel 28 in the BOKCV

Ezekiel 28 in the BOKCV2

Ezekiel 28 in the BOKHWOG

Ezekiel 28 in the BOKSSV

Ezekiel 28 in the BOLCB

Ezekiel 28 in the BOMCV

Ezekiel 28 in the BONAV

Ezekiel 28 in the BONCB

Ezekiel 28 in the BONLT

Ezekiel 28 in the BONUT2

Ezekiel 28 in the BOPLNT

Ezekiel 28 in the BOSCB

Ezekiel 28 in the BOSNC

Ezekiel 28 in the BOTLNT

Ezekiel 28 in the BOVCB

Ezekiel 28 in the BOYCB

Ezekiel 28 in the BPBB

Ezekiel 28 in the BPH

Ezekiel 28 in the BSB

Ezekiel 28 in the CCB

Ezekiel 28 in the CUV

Ezekiel 28 in the CUVS

Ezekiel 28 in the DBT

Ezekiel 28 in the DGDNT

Ezekiel 28 in the DHNT

Ezekiel 28 in the DNT

Ezekiel 28 in the ELBE

Ezekiel 28 in the EMTV

Ezekiel 28 in the ESV

Ezekiel 28 in the FBV

Ezekiel 28 in the FEB

Ezekiel 28 in the GGMNT

Ezekiel 28 in the GNT

Ezekiel 28 in the HARY

Ezekiel 28 in the HNT

Ezekiel 28 in the IRVA

Ezekiel 28 in the IRVB

Ezekiel 28 in the IRVG

Ezekiel 28 in the IRVH

Ezekiel 28 in the IRVK

Ezekiel 28 in the IRVM

Ezekiel 28 in the IRVM2

Ezekiel 28 in the IRVO

Ezekiel 28 in the IRVP

Ezekiel 28 in the IRVT

Ezekiel 28 in the IRVT2

Ezekiel 28 in the IRVU

Ezekiel 28 in the ISVN

Ezekiel 28 in the JSNT

Ezekiel 28 in the KAPI

Ezekiel 28 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 28 in the KBV

Ezekiel 28 in the KJV

Ezekiel 28 in the KNFD

Ezekiel 28 in the LBA

Ezekiel 28 in the LBLA

Ezekiel 28 in the LNT

Ezekiel 28 in the LSV

Ezekiel 28 in the MAAL

Ezekiel 28 in the MBV

Ezekiel 28 in the MBV2

Ezekiel 28 in the MHNT

Ezekiel 28 in the MKNFD

Ezekiel 28 in the MNG

Ezekiel 28 in the MNT

Ezekiel 28 in the MNT2

Ezekiel 28 in the MRS1T

Ezekiel 28 in the NAA

Ezekiel 28 in the NASB

Ezekiel 28 in the NBLA

Ezekiel 28 in the NBS

Ezekiel 28 in the NBVTP

Ezekiel 28 in the NET2

Ezekiel 28 in the NIV11

Ezekiel 28 in the NNT

Ezekiel 28 in the NNT2

Ezekiel 28 in the NNT3

Ezekiel 28 in the PDDPT

Ezekiel 28 in the PFNT

Ezekiel 28 in the RMNT

Ezekiel 28 in the SBIAS

Ezekiel 28 in the SBIBS

Ezekiel 28 in the SBIBS2

Ezekiel 28 in the SBICS

Ezekiel 28 in the SBIDS

Ezekiel 28 in the SBIGS

Ezekiel 28 in the SBIHS

Ezekiel 28 in the SBIIS

Ezekiel 28 in the SBIIS2

Ezekiel 28 in the SBIIS3

Ezekiel 28 in the SBIKS

Ezekiel 28 in the SBIKS2

Ezekiel 28 in the SBIMS

Ezekiel 28 in the SBIOS

Ezekiel 28 in the SBIPS

Ezekiel 28 in the SBISS

Ezekiel 28 in the SBITS

Ezekiel 28 in the SBITS2

Ezekiel 28 in the SBITS3

Ezekiel 28 in the SBITS4

Ezekiel 28 in the SBIUS

Ezekiel 28 in the SBIVS

Ezekiel 28 in the SBT

Ezekiel 28 in the SBT1E

Ezekiel 28 in the SCHL

Ezekiel 28 in the SNT

Ezekiel 28 in the SUSU

Ezekiel 28 in the SUSU2

Ezekiel 28 in the SYNO

Ezekiel 28 in the TBIAOTANT

Ezekiel 28 in the TBT1E

Ezekiel 28 in the TBT1E2

Ezekiel 28 in the TFTIP

Ezekiel 28 in the TFTU

Ezekiel 28 in the TGNTATF3T

Ezekiel 28 in the THAI

Ezekiel 28 in the TNFD

Ezekiel 28 in the TNT

Ezekiel 28 in the TNTIK

Ezekiel 28 in the TNTIL

Ezekiel 28 in the TNTIN

Ezekiel 28 in the TNTIP

Ezekiel 28 in the TNTIZ

Ezekiel 28 in the TOMA

Ezekiel 28 in the TTENT

Ezekiel 28 in the UBG

Ezekiel 28 in the UGV

Ezekiel 28 in the UGV2

Ezekiel 28 in the UGV3

Ezekiel 28 in the VBL

Ezekiel 28 in the VDCC

Ezekiel 28 in the YALU

Ezekiel 28 in the YAPE

Ezekiel 28 in the YBVTP

Ezekiel 28 in the ZBP