Ezekiel 4 (BOLCB2)

1 « Sik’oyo mwana na moto, kamata biliki ya kotumba, tia yango liboso na yo mpe koma na likolo na yango elilingi ya engumba Yelusalemi. 2 Sala yango lokola engumba oyo bazingela, oyo batonga mabulu ya kobombamela zingazinga na yango mpe oyo batelemisa bamir ya zelo mpo na kobombama, engumba oyo batonga milako zingazinga na yango, mpe telemisa bakonzi ya basoda oyo babongami mpo na kobundisa yango na zingazinga. 3 Kamata eteni ya linzanza, tia yango lokola mir ya ebende na kati-kati na yo mpe elilingi ya engumba oyo osili kokoma, mpe tika ete miso na yo etala yango. Bakozingela engumba yango ndenge kaka yo osili kozingela yango. Yango nde ekozala elembo mpo na libota ya Isalaele. 4 Bongo yo, lala na ngambo ya loboko na yo ya mwasi, tia na ngambo wana masumu ya libota ya Isalaele. Okomema masumu na bango mikolo nyonso oyo okolala na ngambo wana. 5 Ngai moko nakokatela yo motango ya mikolo, oyo ekokokana na motango ya mibu oyo libota ya Isalaele asali masumu : mikolo nkama misato na tuku libwa ; mpe okomema solo masumu ya libota ya Isalaele na mikolo oyo. 6 Sima na yo kosilisa mikolo yango, lala lisusu na ngambo ya loboko na yo ya mobali mpe mema lisusu masumu ya libota ya Yuda. Nakateli yo mikolo tuku minei : mokolo moko mpo na mobu moko na moko. 7 Talisa elongi mpe loboko na yo na ngambo ya Yelusalemi oyo bazingela mpe sakola mabe na tina na yango. 8 Nakolinga-linga yo na basinga mpo ete okoka kobaluka na ngambo mosusu te kino tango okokokisa mikolo na yo ya etumbu. 9 Kamata ble mpe orje, madesu mpe misili, soya mpe masango, tia yango nyonso kati na mbeki moko kaka oyo babombelaka biloko. Ezali yango nde ekozala bilei oyo okobanda kolia tango nyonso, na mikolo nkama misato na tuku libwa oyo okowumela ya kolala na ngambo moko. 10 Bilei na yo ya mokolo na mokolo ekozala ya bagrame nkama mibale na tuku mibale, mpe okobanda kolia yango tango nyonso. 11 Okobanda komela tango nyonso litele moko ya mayi. 12 Okolia bilei basala lokola gato ya orje mpe okobanda kotumba yango na miso ya bato nyonso, na moto oyo bapelisa na nyei ya bato. » 13 Yawe alobaki :— Ezali na nzela wana nde bana ya Isalaele bakolia bilei ya mbindo kati na bikolo epai wapi nakobengana bango. 14 Bongo nalobaki :— Te, Nkolo Yawe ! Natikala nanu komikomisa mbindo te ! Wuta bolenge na ngai, natikala nanu kolia te nyama oyo ekufa yango moko to nyama oyo nyama ya zamba esila koboma ! Te, monoko na ngai etikala nanu kolia mosuni ya mbindo te ! 15 Alobaki na ngai :— Malamu mingi ! Na esika ya nyei ya bato, napesi yo nyei ya ngombe mpo ete okoka kotumbela gato na yo. 16 Alobaki na ngai lisusu :— Mwana na moto, nakobebisa bilei nyonso oyo ezali na bibombelo ya Yelusalemi. Bato bakolia biteni mike ya mapa, na pasi na motema, mpe bakomela mayi na bakopo ya mike, na somo ; 17 pamba te bilei mpe mayi ya komela ekokoma pasi mpo na kozwa. Moko na moko akokamwa mpo na moninga na ye mosusu ; mpe bakobebisama likolo ya masumu na bango.

In Other Versions

Ezekiel 4 in the ANGEFD

Ezekiel 4 in the ANTPNG2D

Ezekiel 4 in the AS21

Ezekiel 4 in the BAGH

Ezekiel 4 in the BBPNG

Ezekiel 4 in the BBT1E

Ezekiel 4 in the BDS

Ezekiel 4 in the BEV

Ezekiel 4 in the BHAD

Ezekiel 4 in the BIB

Ezekiel 4 in the BLPT

Ezekiel 4 in the BNT

Ezekiel 4 in the BNTABOOT

Ezekiel 4 in the BNTLV

Ezekiel 4 in the BOATCB

Ezekiel 4 in the BOATCB2

Ezekiel 4 in the BOBCV

Ezekiel 4 in the BOCNT

Ezekiel 4 in the BOECS

Ezekiel 4 in the BOGWICC

Ezekiel 4 in the BOHCB

Ezekiel 4 in the BOHCV

Ezekiel 4 in the BOHLNT

Ezekiel 4 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 4 in the BOICB

Ezekiel 4 in the BOILNTAP

Ezekiel 4 in the BOITCV

Ezekiel 4 in the BOKCV

Ezekiel 4 in the BOKCV2

Ezekiel 4 in the BOKHWOG

Ezekiel 4 in the BOKSSV

Ezekiel 4 in the BOLCB

Ezekiel 4 in the BOMCV

Ezekiel 4 in the BONAV

Ezekiel 4 in the BONCB

Ezekiel 4 in the BONLT

Ezekiel 4 in the BONUT2

Ezekiel 4 in the BOPLNT

Ezekiel 4 in the BOSCB

Ezekiel 4 in the BOSNC

Ezekiel 4 in the BOTLNT

Ezekiel 4 in the BOVCB

Ezekiel 4 in the BOYCB

Ezekiel 4 in the BPBB

Ezekiel 4 in the BPH

Ezekiel 4 in the BSB

Ezekiel 4 in the CCB

Ezekiel 4 in the CUV

Ezekiel 4 in the CUVS

Ezekiel 4 in the DBT

Ezekiel 4 in the DGDNT

Ezekiel 4 in the DHNT

Ezekiel 4 in the DNT

Ezekiel 4 in the ELBE

Ezekiel 4 in the EMTV

Ezekiel 4 in the ESV

Ezekiel 4 in the FBV

Ezekiel 4 in the FEB

Ezekiel 4 in the GGMNT

Ezekiel 4 in the GNT

Ezekiel 4 in the HARY

Ezekiel 4 in the HNT

Ezekiel 4 in the IRVA

Ezekiel 4 in the IRVB

Ezekiel 4 in the IRVG

Ezekiel 4 in the IRVH

Ezekiel 4 in the IRVK

Ezekiel 4 in the IRVM

Ezekiel 4 in the IRVM2

Ezekiel 4 in the IRVO

Ezekiel 4 in the IRVP

Ezekiel 4 in the IRVT

Ezekiel 4 in the IRVT2

Ezekiel 4 in the IRVU

Ezekiel 4 in the ISVN

Ezekiel 4 in the JSNT

Ezekiel 4 in the KAPI

Ezekiel 4 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 4 in the KBV

Ezekiel 4 in the KJV

Ezekiel 4 in the KNFD

Ezekiel 4 in the LBA

Ezekiel 4 in the LBLA

Ezekiel 4 in the LNT

Ezekiel 4 in the LSV

Ezekiel 4 in the MAAL

Ezekiel 4 in the MBV

Ezekiel 4 in the MBV2

Ezekiel 4 in the MHNT

Ezekiel 4 in the MKNFD

Ezekiel 4 in the MNG

Ezekiel 4 in the MNT

Ezekiel 4 in the MNT2

Ezekiel 4 in the MRS1T

Ezekiel 4 in the NAA

Ezekiel 4 in the NASB

Ezekiel 4 in the NBLA

Ezekiel 4 in the NBS

Ezekiel 4 in the NBVTP

Ezekiel 4 in the NET2

Ezekiel 4 in the NIV11

Ezekiel 4 in the NNT

Ezekiel 4 in the NNT2

Ezekiel 4 in the NNT3

Ezekiel 4 in the PDDPT

Ezekiel 4 in the PFNT

Ezekiel 4 in the RMNT

Ezekiel 4 in the SBIAS

Ezekiel 4 in the SBIBS

Ezekiel 4 in the SBIBS2

Ezekiel 4 in the SBICS

Ezekiel 4 in the SBIDS

Ezekiel 4 in the SBIGS

Ezekiel 4 in the SBIHS

Ezekiel 4 in the SBIIS

Ezekiel 4 in the SBIIS2

Ezekiel 4 in the SBIIS3

Ezekiel 4 in the SBIKS

Ezekiel 4 in the SBIKS2

Ezekiel 4 in the SBIMS

Ezekiel 4 in the SBIOS

Ezekiel 4 in the SBIPS

Ezekiel 4 in the SBISS

Ezekiel 4 in the SBITS

Ezekiel 4 in the SBITS2

Ezekiel 4 in the SBITS3

Ezekiel 4 in the SBITS4

Ezekiel 4 in the SBIUS

Ezekiel 4 in the SBIVS

Ezekiel 4 in the SBT

Ezekiel 4 in the SBT1E

Ezekiel 4 in the SCHL

Ezekiel 4 in the SNT

Ezekiel 4 in the SUSU

Ezekiel 4 in the SUSU2

Ezekiel 4 in the SYNO

Ezekiel 4 in the TBIAOTANT

Ezekiel 4 in the TBT1E

Ezekiel 4 in the TBT1E2

Ezekiel 4 in the TFTIP

Ezekiel 4 in the TFTU

Ezekiel 4 in the TGNTATF3T

Ezekiel 4 in the THAI

Ezekiel 4 in the TNFD

Ezekiel 4 in the TNT

Ezekiel 4 in the TNTIK

Ezekiel 4 in the TNTIL

Ezekiel 4 in the TNTIN

Ezekiel 4 in the TNTIP

Ezekiel 4 in the TNTIZ

Ezekiel 4 in the TOMA

Ezekiel 4 in the TTENT

Ezekiel 4 in the UBG

Ezekiel 4 in the UGV

Ezekiel 4 in the UGV2

Ezekiel 4 in the UGV3

Ezekiel 4 in the VBL

Ezekiel 4 in the VDCC

Ezekiel 4 in the YALU

Ezekiel 4 in the YAPE

Ezekiel 4 in the YBVTP

Ezekiel 4 in the ZBP