Ezekiel 46 (BOLCB2)

1 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ekuke ya lopango ya kati oyo etala na ngambo ya este ekozala ya kokangama mikolo motoba ; kasi na mokolo ya Saba mpe na mokolo ya feti ya ebandeli ya sanza, ekozala ya kofungwama. 2 Mokambi akokota na kati, wuta na libanda ; akolekela na ndako moke ya kokotela mpe akotelema na mabaya oyo esimbaka ekuke. Banganga-Nzambe bakobonza mbeka na ye ya kotumba mpe mbeka na ye ya kozongisa boyokani. Akogumbama na ekotelo ya ekuke mpe akobima na libanda, kasi ekuke ekozala ya kofungwama kino na pokwa. 3 Na mikolo ya bafeti ya Saba mpe ya ebandeli ya sanza, bato ya mokili bakobanda kogumbama liboso ya Yawe, na ekotelo yango. 4 Na mokolo ya Saba, mokambi akomema epai na Yawe lokola mbeka ya kotumba bana meme motoba ya mibali mpe meme moko ya mobali : nyonso esengeli ezala ezanga mbeba. 5 Akopesa lokola mbeka ya bambuma bakilo zomi na mitano ya bambuma mpo na meme moko ya mobali ; bongo, akopesa likabo oyo loboko na ye ekokoka mpo na bana meme ; likabo ya mafuta ekozala balitele misato na ndambo mpo na bakilo zomi na mitano ya bambuma. 6 Na mokolo na feti ya ebandeli ya sanza, akobonza mwana ngombe moko ya mobali, bana meme motoba ya mibali mpe meme moko ya mobali : nyonso esengeli ezala ezanga mbeba. 7 Akobakisa lokola makabo ya bambuma bakilo zomi na mitano mpo na ngombe ya mobali mpe mpo na meme ya mobali ; mpe mpo na bana meme, akopesa nyonso oyo loboko na ye ekokoka, bakisa balitele misato na ndambo ya mafuta mpo na bakilo zomi na mitano ya bambuma. 8 Tango mokambi akokota na kati, akolekela na ndako moke ya kokotela mpe akobimela kaka na nzela wana. 9 Mpe tango bato ya mokili bakoya liboso ya Yawe na bafeti oyo ekatama, moto nyonso oyo akokotela na ekuke ya ngambo ya nor mpo na kogumbamela Yawe akobimela na ekuke ya ngambo ya sude, mpe oyo akokotela na ekuke ya ngambo ya sude akobimela na ekuke ya ngambo ya nor. Moto moko te akobimela na ekuke oyo akotelaki, kasi akobimela na ekuke ya ngambo mosusu oyo etalana na yango. 10 Mokambi akozala kati na bato na ye, akokota mpe akobima elongo na bango. 11 Na tango ya bafeti mpe ya bafeti oyo ekatama, makabo ya bambuma ekozala bakilo zomi na mitano mpo na ngombe moko ya mobali, bakilo zomi na mitano mpo na meme moko ya mobali mpe nyonso oyo akolinga kopesa mpo na bana meme ya mibali ; akobakisa balitele misato na ndambo mpo na bakilo nyonso zomi na mitano ya bambuma. 12 Tango mokambi akobonzela Yawe mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kozongisa boyokani lokola likabo oyo akati na motema na ye moko, bakofungolela ye ekuke oyo etala na ngambo ya este ; mpe akobonza mbeka na ye ya kotumba mpe mbeka na ye ya kozongisa boyokani ndenge kaka asalaka na mokolo ya Saba. Sima na yango nde akobima, mpe bakokanga ekuke sima na ye. 13 Mokolo na mokolo, okobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba. Okobanda kobonza yango tongo nyonso. 14 Tongo nyonso, okobanda kobakisa na likolo na yango lokola likabo ya bambuma bakilo mibale na bagrame nkama mitano ya farine oyo bakosangisa na litele moko ya mafuta ya kitoko. Ezali likabo mpo na Yawe ; mpe ezali mibeko ya libela na libela mpo na bambeka ya tango nyonso. 15 Tongo nyonso, okobanda kobonza mwana meme, makabo ya bambuma mpe mafuta lokola mbeka ya kotumba ya tango nyonso. 16 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Soki mokambi apesi eloko lokola kado epai ya moko kati na bana na ye ya mibali, eloko yango ekozala ya mwana yango mpe ekotikala lokola libula ya bokitani mpo na bana na ye. 17 Kasi soki apesi epai ya moko kati na basali na ye kado ya eloko oyo ewuti na libula na ye, kado yango ekozala ya mosali yango kino na mobu ya kokangolama na ye ; sima nde ekozonga na moboko ya mokambi, mpe libula na ye ekotikala ya bana na ye kaka. 18 Mokambi akoki kolongola eloko moko te kati na libula ya bato na ye mpo na kokomisa yango ya ye moko to kobengana bango na mabele na bango ; soki alingi kokabela bana na ye libula, asengeli nde kozwa yango na libula na ye moko mpo ete bato na Ngai bapanzana te mosika ya libula na bango. › » 19 Moto yango akotisaki ngai, na nzela ya ekotelo oyo ezali pembeni ya ekuke ya ngambo ya nor, kati na bashambre ya bule ya Banganga-Nzambe, oyo etala na ngambo ya nor ; alakisaki ngai esika moko oyo ezalaki na suka, na ngambo ya weste. 20 Alobaki na ngai : « Awa nde esika oyo Banganga-Nzambe bakozala kolambela mbeka mpo na kozongisa boyokani, mbeka ya masumu mpe kotumbela makabo ya bambuma mpo ete ebima te na lopango ya libanda, noki te bato bakosimba biloko ya bule. » 21 Abimisaki ngai na lopango ya libanda mpe atambolisaki ngai na basonge nyonso minei ya lopango. Na songe moko na moko ya lopango, namonaki lopango mosusu. 22 Na basonge nyonso minei ya lopango ya libanda, ezalaki na mapango ya mike ; mpe mapango nyonso minei ezalaki ndenge moko : bametele pene tuku mibale na molayi mpe bametele pene zomi na mitano na mokuse. 23 Zingazinga ya moko na moko ya mapango nyonso minei, ezalaki na mir moko ya mokuse ; mpe na se na yango, batandaki mabanga mpo na kopelisa moto na zingazinga ya mir yango ya mokuse. 24 Moto yango alobaki na ngai : « Oyo nde bakikuku epai wapi basali ya Tempelo bakobanda kolambela misuni ya bambeka oyo bato bakobanda kobonza. »

In Other Versions

Ezekiel 46 in the ANGEFD

Ezekiel 46 in the ANTPNG2D

Ezekiel 46 in the AS21

Ezekiel 46 in the BAGH

Ezekiel 46 in the BBPNG

Ezekiel 46 in the BBT1E

Ezekiel 46 in the BDS

Ezekiel 46 in the BEV

Ezekiel 46 in the BHAD

Ezekiel 46 in the BIB

Ezekiel 46 in the BLPT

Ezekiel 46 in the BNT

Ezekiel 46 in the BNTABOOT

Ezekiel 46 in the BNTLV

Ezekiel 46 in the BOATCB

Ezekiel 46 in the BOATCB2

Ezekiel 46 in the BOBCV

Ezekiel 46 in the BOCNT

Ezekiel 46 in the BOECS

Ezekiel 46 in the BOGWICC

Ezekiel 46 in the BOHCB

Ezekiel 46 in the BOHCV

Ezekiel 46 in the BOHLNT

Ezekiel 46 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 46 in the BOICB

Ezekiel 46 in the BOILNTAP

Ezekiel 46 in the BOITCV

Ezekiel 46 in the BOKCV

Ezekiel 46 in the BOKCV2

Ezekiel 46 in the BOKHWOG

Ezekiel 46 in the BOKSSV

Ezekiel 46 in the BOLCB

Ezekiel 46 in the BOMCV

Ezekiel 46 in the BONAV

Ezekiel 46 in the BONCB

Ezekiel 46 in the BONLT

Ezekiel 46 in the BONUT2

Ezekiel 46 in the BOPLNT

Ezekiel 46 in the BOSCB

Ezekiel 46 in the BOSNC

Ezekiel 46 in the BOTLNT

Ezekiel 46 in the BOVCB

Ezekiel 46 in the BOYCB

Ezekiel 46 in the BPBB

Ezekiel 46 in the BPH

Ezekiel 46 in the BSB

Ezekiel 46 in the CCB

Ezekiel 46 in the CUV

Ezekiel 46 in the CUVS

Ezekiel 46 in the DBT

Ezekiel 46 in the DGDNT

Ezekiel 46 in the DHNT

Ezekiel 46 in the DNT

Ezekiel 46 in the ELBE

Ezekiel 46 in the EMTV

Ezekiel 46 in the ESV

Ezekiel 46 in the FBV

Ezekiel 46 in the FEB

Ezekiel 46 in the GGMNT

Ezekiel 46 in the GNT

Ezekiel 46 in the HARY

Ezekiel 46 in the HNT

Ezekiel 46 in the IRVA

Ezekiel 46 in the IRVB

Ezekiel 46 in the IRVG

Ezekiel 46 in the IRVH

Ezekiel 46 in the IRVK

Ezekiel 46 in the IRVM

Ezekiel 46 in the IRVM2

Ezekiel 46 in the IRVO

Ezekiel 46 in the IRVP

Ezekiel 46 in the IRVT

Ezekiel 46 in the IRVT2

Ezekiel 46 in the IRVU

Ezekiel 46 in the ISVN

Ezekiel 46 in the JSNT

Ezekiel 46 in the KAPI

Ezekiel 46 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 46 in the KBV

Ezekiel 46 in the KJV

Ezekiel 46 in the KNFD

Ezekiel 46 in the LBA

Ezekiel 46 in the LBLA

Ezekiel 46 in the LNT

Ezekiel 46 in the LSV

Ezekiel 46 in the MAAL

Ezekiel 46 in the MBV

Ezekiel 46 in the MBV2

Ezekiel 46 in the MHNT

Ezekiel 46 in the MKNFD

Ezekiel 46 in the MNG

Ezekiel 46 in the MNT

Ezekiel 46 in the MNT2

Ezekiel 46 in the MRS1T

Ezekiel 46 in the NAA

Ezekiel 46 in the NASB

Ezekiel 46 in the NBLA

Ezekiel 46 in the NBS

Ezekiel 46 in the NBVTP

Ezekiel 46 in the NET2

Ezekiel 46 in the NIV11

Ezekiel 46 in the NNT

Ezekiel 46 in the NNT2

Ezekiel 46 in the NNT3

Ezekiel 46 in the PDDPT

Ezekiel 46 in the PFNT

Ezekiel 46 in the RMNT

Ezekiel 46 in the SBIAS

Ezekiel 46 in the SBIBS

Ezekiel 46 in the SBIBS2

Ezekiel 46 in the SBICS

Ezekiel 46 in the SBIDS

Ezekiel 46 in the SBIGS

Ezekiel 46 in the SBIHS

Ezekiel 46 in the SBIIS

Ezekiel 46 in the SBIIS2

Ezekiel 46 in the SBIIS3

Ezekiel 46 in the SBIKS

Ezekiel 46 in the SBIKS2

Ezekiel 46 in the SBIMS

Ezekiel 46 in the SBIOS

Ezekiel 46 in the SBIPS

Ezekiel 46 in the SBISS

Ezekiel 46 in the SBITS

Ezekiel 46 in the SBITS2

Ezekiel 46 in the SBITS3

Ezekiel 46 in the SBITS4

Ezekiel 46 in the SBIUS

Ezekiel 46 in the SBIVS

Ezekiel 46 in the SBT

Ezekiel 46 in the SBT1E

Ezekiel 46 in the SCHL

Ezekiel 46 in the SNT

Ezekiel 46 in the SUSU

Ezekiel 46 in the SUSU2

Ezekiel 46 in the SYNO

Ezekiel 46 in the TBIAOTANT

Ezekiel 46 in the TBT1E

Ezekiel 46 in the TBT1E2

Ezekiel 46 in the TFTIP

Ezekiel 46 in the TFTU

Ezekiel 46 in the TGNTATF3T

Ezekiel 46 in the THAI

Ezekiel 46 in the TNFD

Ezekiel 46 in the TNT

Ezekiel 46 in the TNTIK

Ezekiel 46 in the TNTIL

Ezekiel 46 in the TNTIN

Ezekiel 46 in the TNTIP

Ezekiel 46 in the TNTIZ

Ezekiel 46 in the TOMA

Ezekiel 46 in the TTENT

Ezekiel 46 in the UBG

Ezekiel 46 in the UGV

Ezekiel 46 in the UGV2

Ezekiel 46 in the UGV3

Ezekiel 46 in the VBL

Ezekiel 46 in the VDCC

Ezekiel 46 in the YALU

Ezekiel 46 in the YAPE

Ezekiel 46 in the YBVTP

Ezekiel 46 in the ZBP