Ezra 4 (BOLCB2)

1 Tango banguna ya Yuda mpe ya Benjame bayokaki ete bato oyo bawutaki na bowumbu bazali kotonga Tempelo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, 2 bayaki epai ya Zorobabeli mpe bakambi ya mabota ; balobaki na bango :— Botika ete tosunga bino na mosala ya kotonga Tempelo oyo, pamba te biso mpe tolukaka Nzambe na bino mpe tobonzelaka Ye mbeka wuta na tango ya Esari-Adoni, mokonzi ya Asiri, oyo amemaki biso awa. 3 Kasi Zorobabeli, Jozue mpe bakambi mosusu ya mabota ya Isalaele bazongisaki :— Bokotonga te elongo na biso Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso ; tokotonga yango biso moko mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, kolanda mitindo ya Sirisi, mokonzi ya Persi. 4 Bato ya bikolo oyo ezalaki elongo na bango kati na mboka balembisaki bato ya Yuda nzoto mpe babangisaki bango mpo ete bakoba lisusu te kotonga ; 5 bapesaki bapesi toli kanyaka mpo ete batelemela mpe babebisa mabongisi na bango na nzela ya batoli ya mabe, na mikolo nyonso ya Sirisi kino na oyo ya Dariusi, bango mibale bakonzi ya Persi. 6 Kaka na ebandeli ya bokonzi ya Kizerisesi, batindelaki ye mokanda mpo na kofunda bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi. 7 Bongo na mikolo ya Aritakizerisesi lokola mokonzi ya Persi, Bishilami, Mitredati, Tabeyeli mpe baninga na bango ya mosala bakomelaki Aritakizerisesi mokanda. Bakomaki yango na makomi mpe na lokota ya Arami. 8 Moyangeli Rewumi mpe Shimishayi, mokomi mikanda na ye, bakomelaki mokonzi Aritakizerisesi mokanda oyo na tina na Yelusalemi : 9 « Moyangeli Rewumi mpe Shimishayi, mokomi mikanda, elongo na baninga na bango, basambisi mpe bakambi ya bato ya Dini, ya Arifarisataki, ya Taripeli, ya Afarasi, ya Ereki, ya Babiloni, ya Size, ya Deya, ya Elami, 10 mpe bato ya bikolo mosusu oyo Asuribanipali, mokonzi monene mpe mokonzi ya lokumu, amemaki na bowumbu mpo na kotia bango kati na engumba Samari mpe kati na bituka nyonso ya ngambo ya weste ya ebale Efrate. » 11 Tala maloba oyo batindelaki ye na mokanda :« Epai ya mokonzi Aritakizerisesi.Maloba kowuta na biso basali na yo, bato ya ngambo ya weste ya ebale Efrate. 12 Tika ete mokonzi ayeba ete Bayuda oyo bawutaki epai na yo bakomi kati na biso, na Yelusalemi ; bazali kotonga engumba ya batomboki mpe ya bato ya mobulu, bazali kotonga bamir mpe kobongisa lisusu miboko. 13 Tika ete mokonzi ayeba lisusu ete, soki engumba oyo etongami lisusu mpe babongisi bamir na yango, bakofuta lisusu te mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela ; na bongo, bomengo ya mokonzi ekokita. 14 Sik’oyo, lokola tozwi libaku ya kosala epai ya mokonzi mpe lokola ezali malamu te mpo na biso komona lokumu ya mokonzi kobebisama, totindi sango oyo mpo na kotalisa makambo oyo epai ya mokonzi 15 mpo ete baluka kati na babuku ya bakonzi oyo bazalaki liboso na yo mpo na kososola malamu. Okomona solo kati na babuku yango ete engumba oyo ezali engumba ya batomboki, etungisaka bakonzi mpe bituka. Mpe lisusu, wuta kala, ezali esika ya batomboki. Yango wana engumba oyo ebebisamaki. 16 Tozali koyebisa mokonzi ete soki batongi lisusu engumba oyo mpe babongisi bamir na yango, okotikala lisusu na eloko moko te na ngambo ya weste ya ebale Efrate. » 17 Mokonzi azongisaki eyano oyo :« Epai ya moyangeli Rewumi ; Shimishayi, mokomi mikanda na ye, mpe baninga na bango mosusu ya mosala oyo bavandaka na Samari mpe kati na bituka nyonso na ngambo ya weste ya ebale Efrate :Napesi bino mbote. 18 Batangaki mpe babongolaki na miso na ngai mokanda oyo botindelaki biso. 19 Napesaki mitindo mpo ete baluka koyeba mpe kososola bosolo. Boye emonani solo ete, wuta na kala, engumba oyo etombokelaka kaka bakonzi mpe etindaka bato na botomboki mpe na mobulu. 20 Na Yelusalemi, ezalaki na bakonzi ya nguya oyo bazalaki kokonza etuka mobimba ya ngambo ya weste ya ebale Efrate mpe epai ya banani bazalaki kofuta mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela. 21 Boye, bopesa sik’oyo mitindo epai ya bato wana ete bakoba lisusu te kotonga mpo ete engumba wana etongama lisusu te kino tango ngai moko nakopesa mitindo. 22 Bosala keba ete bozwa likambo oyo na pete te. Mpo na nini kotika nzela ete mobulu oyo ekola mpe ekitisa bomengo ya mokonzi ? » 23 Tango kaka batangaki mokanda ya mokonzi Aritakizerisesi liboso ya Rewumi ; Shimishayi, mokomi mikanda na ye, mpe baninga na bango ya mosala bakendeki mbala moko na Yelusalemi epai ya Bayuda mpe bapekisaki bango na makasi ete bakoba lisusu te kotonga. 24 Wuta tango wana, misala ya Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi etelemaki kino na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, mokonzi ya Persi.

In Other Versions

Ezra 4 in the ANGEFD

Ezra 4 in the ANTPNG2D

Ezra 4 in the AS21

Ezra 4 in the BAGH

Ezra 4 in the BBPNG

Ezra 4 in the BBT1E

Ezra 4 in the BDS

Ezra 4 in the BEV

Ezra 4 in the BHAD

Ezra 4 in the BIB

Ezra 4 in the BLPT

Ezra 4 in the BNT

Ezra 4 in the BNTABOOT

Ezra 4 in the BNTLV

Ezra 4 in the BOATCB

Ezra 4 in the BOATCB2

Ezra 4 in the BOBCV

Ezra 4 in the BOCNT

Ezra 4 in the BOECS

Ezra 4 in the BOGWICC

Ezra 4 in the BOHCB

Ezra 4 in the BOHCV

Ezra 4 in the BOHLNT

Ezra 4 in the BOHNTLTAL

Ezra 4 in the BOICB

Ezra 4 in the BOILNTAP

Ezra 4 in the BOITCV

Ezra 4 in the BOKCV

Ezra 4 in the BOKCV2

Ezra 4 in the BOKHWOG

Ezra 4 in the BOKSSV

Ezra 4 in the BOLCB

Ezra 4 in the BOMCV

Ezra 4 in the BONAV

Ezra 4 in the BONCB

Ezra 4 in the BONLT

Ezra 4 in the BONUT2

Ezra 4 in the BOPLNT

Ezra 4 in the BOSCB

Ezra 4 in the BOSNC

Ezra 4 in the BOTLNT

Ezra 4 in the BOVCB

Ezra 4 in the BOYCB

Ezra 4 in the BPBB

Ezra 4 in the BPH

Ezra 4 in the BSB

Ezra 4 in the CCB

Ezra 4 in the CUV

Ezra 4 in the CUVS

Ezra 4 in the DBT

Ezra 4 in the DGDNT

Ezra 4 in the DHNT

Ezra 4 in the DNT

Ezra 4 in the ELBE

Ezra 4 in the EMTV

Ezra 4 in the ESV

Ezra 4 in the FBV

Ezra 4 in the FEB

Ezra 4 in the GGMNT

Ezra 4 in the GNT

Ezra 4 in the HARY

Ezra 4 in the HNT

Ezra 4 in the IRVA

Ezra 4 in the IRVB

Ezra 4 in the IRVG

Ezra 4 in the IRVH

Ezra 4 in the IRVK

Ezra 4 in the IRVM

Ezra 4 in the IRVM2

Ezra 4 in the IRVO

Ezra 4 in the IRVP

Ezra 4 in the IRVT

Ezra 4 in the IRVT2

Ezra 4 in the IRVU

Ezra 4 in the ISVN

Ezra 4 in the JSNT

Ezra 4 in the KAPI

Ezra 4 in the KBT1ETNIK

Ezra 4 in the KBV

Ezra 4 in the KJV

Ezra 4 in the KNFD

Ezra 4 in the LBA

Ezra 4 in the LBLA

Ezra 4 in the LNT

Ezra 4 in the LSV

Ezra 4 in the MAAL

Ezra 4 in the MBV

Ezra 4 in the MBV2

Ezra 4 in the MHNT

Ezra 4 in the MKNFD

Ezra 4 in the MNG

Ezra 4 in the MNT

Ezra 4 in the MNT2

Ezra 4 in the MRS1T

Ezra 4 in the NAA

Ezra 4 in the NASB

Ezra 4 in the NBLA

Ezra 4 in the NBS

Ezra 4 in the NBVTP

Ezra 4 in the NET2

Ezra 4 in the NIV11

Ezra 4 in the NNT

Ezra 4 in the NNT2

Ezra 4 in the NNT3

Ezra 4 in the PDDPT

Ezra 4 in the PFNT

Ezra 4 in the RMNT

Ezra 4 in the SBIAS

Ezra 4 in the SBIBS

Ezra 4 in the SBIBS2

Ezra 4 in the SBICS

Ezra 4 in the SBIDS

Ezra 4 in the SBIGS

Ezra 4 in the SBIHS

Ezra 4 in the SBIIS

Ezra 4 in the SBIIS2

Ezra 4 in the SBIIS3

Ezra 4 in the SBIKS

Ezra 4 in the SBIKS2

Ezra 4 in the SBIMS

Ezra 4 in the SBIOS

Ezra 4 in the SBIPS

Ezra 4 in the SBISS

Ezra 4 in the SBITS

Ezra 4 in the SBITS2

Ezra 4 in the SBITS3

Ezra 4 in the SBITS4

Ezra 4 in the SBIUS

Ezra 4 in the SBIVS

Ezra 4 in the SBT

Ezra 4 in the SBT1E

Ezra 4 in the SCHL

Ezra 4 in the SNT

Ezra 4 in the SUSU

Ezra 4 in the SUSU2

Ezra 4 in the SYNO

Ezra 4 in the TBIAOTANT

Ezra 4 in the TBT1E

Ezra 4 in the TBT1E2

Ezra 4 in the TFTIP

Ezra 4 in the TFTU

Ezra 4 in the TGNTATF3T

Ezra 4 in the THAI

Ezra 4 in the TNFD

Ezra 4 in the TNT

Ezra 4 in the TNTIK

Ezra 4 in the TNTIL

Ezra 4 in the TNTIN

Ezra 4 in the TNTIP

Ezra 4 in the TNTIZ

Ezra 4 in the TOMA

Ezra 4 in the TTENT

Ezra 4 in the UBG

Ezra 4 in the UGV

Ezra 4 in the UGV2

Ezra 4 in the UGV3

Ezra 4 in the VBL

Ezra 4 in the VDCC

Ezra 4 in the YALU

Ezra 4 in the YAPE

Ezra 4 in the YBVTP

Ezra 4 in the ZBP