Genesis 15 (BOLCB2)
1 Sima na makambo oyo, Yawe alobaki na Abrami na nzela ya emoniseli :— Kobanga te, Abrami !Nazali nguba na yo,lifuti na yo ekozala monene. 2 Kasi Abrami azongisaki :— Oh Nkolo Yawe, okopesa ngai nini ? Nazali na mwana te, mpe ezali Eliezeri ya Damasi nde akokitana na libula na ngai. 3 Abrami alobaki lisusu :— Opesi ngai mwana te ; yango wana mosali moko kati na ndako na ngai akozala mokitani ya libula na ngai ! 4 Yawe alobaki na ye :— Moto wana akozala mokitani ya libula na yo te. Kasi mwana oyo akobima na mokongo na yo nde akozala mokitani ya libula na yo. 5 Yawe amemaki Abrami na libanda mpe alobaki na ye :— Tala na likolo mpe tanga minzoto soki okokoka kotanga yango.Alobaki na ye lisusu :— Ezali boye nde bakitani na yo bakozala. 6 Abrami azalaki na kondima epai ya Yawe, yango wana Yawe atangaki ye lokola moto ya sembo. 7 Alobaki na ye lisusu :— Nazali Yawe oyo nabimisaki yo wuta na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mpo na kopesa yo mokili oyo. 8 Kasi Abrami alobaki :— Ah Nkolo Yawe, nakoyeba ndenge nini ete mokili oyo epesameli ngai ? 9 Yawe alobaki na ye :— Memela Ngai mwana ngombe moko ya mwasi ya mibu misato, ntaba ya mwasi ya mibu misato, meme ya mobali ya mibu misato, ebenga moko ya zamba mpe ebenga moko ya mboka. 10 Abrami amemelaki Ye banyama oyo nyonso, akataki yango na biteni mibale mpe atiaki yango etalana eteni moko na eteni mosusu ; kasi akataki bandeke te. 11 Bandeke oyo eliaka misuni ekitaki mpo na kolia misuni yango, kasi Abrami abenganaki yango. 12 Tango moyi ekitaki, Abrami alalaki pongi makasi. Na kati ya molili makasi, somo ekangaki ye. 13 Boye, Yawe alobaki na Abrami :— Yeba solo ete bakitani na yo bakozala bapaya kati na mokili ya bapaya epai wapi bakozala bawumbu ; mpe bakonyokola bango kuna mibu nkama minei. 14 Kasi nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu ; mpe na sima, bakobima longwa na mokili yango elongo na bozwi ebele. 15 Bongo yo, okokufa na kimia mpe okokundama sima na kimobange ya esengo. 16 Na molongo ya minei, bakitani na yo bakozonga awa, pamba te masumu ya bato ya Amori ekomi nanu ebele te. 17 Tango moyi elalaki mpe molili eyaki makasi, mbabola ya milinga mpe koni ya moto elekaki kati ya biteni ya banyama. 18 Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani elongo na Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo na bakitani na yo wuta na moluka ya Ejipito kino na ebale Efrate : 19 mokili ya bato ya Keni, ya bato ya Kenizi, ya bato ya Kadimoni, 20 ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Refayimi, 21 ya bato ya Amori, ya bato ya Kanana, ya bato ya Girigazi mpe ya bato ya Yebusi. »
In Other Versions
Genesis 15 in the ANGEFD
Genesis 15 in the ANTPNG2D
Genesis 15 in the AS21
Genesis 15 in the BAGH
Genesis 15 in the BBPNG
Genesis 15 in the BBT1E
Genesis 15 in the BDS
Genesis 15 in the BEV
Genesis 15 in the BHAD
Genesis 15 in the BIB
Genesis 15 in the BLPT
Genesis 15 in the BNT
Genesis 15 in the BNTABOOT
Genesis 15 in the BNTLV
Genesis 15 in the BOATCB
Genesis 15 in the BOATCB2
Genesis 15 in the BOBCV
Genesis 15 in the BOCNT
Genesis 15 in the BOECS
Genesis 15 in the BOGWICC
Genesis 15 in the BOHCB
Genesis 15 in the BOHCV
Genesis 15 in the BOHLNT
Genesis 15 in the BOHNTLTAL
Genesis 15 in the BOICB
Genesis 15 in the BOILNTAP
Genesis 15 in the BOITCV
Genesis 15 in the BOKCV
Genesis 15 in the BOKCV2
Genesis 15 in the BOKHWOG
Genesis 15 in the BOKSSV
Genesis 15 in the BOLCB
Genesis 15 in the BOMCV
Genesis 15 in the BONAV
Genesis 15 in the BONCB
Genesis 15 in the BONLT
Genesis 15 in the BONUT2
Genesis 15 in the BOPLNT
Genesis 15 in the BOSCB
Genesis 15 in the BOSNC
Genesis 15 in the BOTLNT
Genesis 15 in the BOVCB
Genesis 15 in the BOYCB
Genesis 15 in the BPBB
Genesis 15 in the BPH
Genesis 15 in the BSB
Genesis 15 in the CCB
Genesis 15 in the CUV
Genesis 15 in the CUVS
Genesis 15 in the DBT
Genesis 15 in the DGDNT
Genesis 15 in the DHNT
Genesis 15 in the DNT
Genesis 15 in the ELBE
Genesis 15 in the EMTV
Genesis 15 in the ESV
Genesis 15 in the FBV
Genesis 15 in the FEB
Genesis 15 in the GGMNT
Genesis 15 in the GNT
Genesis 15 in the HARY
Genesis 15 in the HNT
Genesis 15 in the IRVA
Genesis 15 in the IRVB
Genesis 15 in the IRVG
Genesis 15 in the IRVH
Genesis 15 in the IRVK
Genesis 15 in the IRVM
Genesis 15 in the IRVM2
Genesis 15 in the IRVO
Genesis 15 in the IRVP
Genesis 15 in the IRVT
Genesis 15 in the IRVT2
Genesis 15 in the IRVU
Genesis 15 in the ISVN
Genesis 15 in the JSNT
Genesis 15 in the KAPI
Genesis 15 in the KBT1ETNIK
Genesis 15 in the KBV
Genesis 15 in the KJV
Genesis 15 in the KNFD
Genesis 15 in the LBA
Genesis 15 in the LBLA
Genesis 15 in the LNT
Genesis 15 in the LSV
Genesis 15 in the MAAL
Genesis 15 in the MBV
Genesis 15 in the MBV2
Genesis 15 in the MHNT
Genesis 15 in the MKNFD
Genesis 15 in the MNG
Genesis 15 in the MNT
Genesis 15 in the MNT2
Genesis 15 in the MRS1T
Genesis 15 in the NAA
Genesis 15 in the NASB
Genesis 15 in the NBLA
Genesis 15 in the NBS
Genesis 15 in the NBVTP
Genesis 15 in the NET2
Genesis 15 in the NIV11
Genesis 15 in the NNT
Genesis 15 in the NNT2
Genesis 15 in the NNT3
Genesis 15 in the PDDPT
Genesis 15 in the PFNT
Genesis 15 in the RMNT
Genesis 15 in the SBIAS
Genesis 15 in the SBIBS
Genesis 15 in the SBIBS2
Genesis 15 in the SBICS
Genesis 15 in the SBIDS
Genesis 15 in the SBIGS
Genesis 15 in the SBIHS
Genesis 15 in the SBIIS
Genesis 15 in the SBIIS2
Genesis 15 in the SBIIS3
Genesis 15 in the SBIKS
Genesis 15 in the SBIKS2
Genesis 15 in the SBIMS
Genesis 15 in the SBIOS
Genesis 15 in the SBIPS
Genesis 15 in the SBISS
Genesis 15 in the SBITS
Genesis 15 in the SBITS2
Genesis 15 in the SBITS3
Genesis 15 in the SBITS4
Genesis 15 in the SBIUS
Genesis 15 in the SBIVS
Genesis 15 in the SBT
Genesis 15 in the SBT1E
Genesis 15 in the SCHL
Genesis 15 in the SNT
Genesis 15 in the SUSU
Genesis 15 in the SUSU2
Genesis 15 in the SYNO
Genesis 15 in the TBIAOTANT
Genesis 15 in the TBT1E
Genesis 15 in the TBT1E2
Genesis 15 in the TFTIP
Genesis 15 in the TFTU
Genesis 15 in the TGNTATF3T
Genesis 15 in the THAI
Genesis 15 in the TNFD
Genesis 15 in the TNT
Genesis 15 in the TNTIK
Genesis 15 in the TNTIL
Genesis 15 in the TNTIN
Genesis 15 in the TNTIP
Genesis 15 in the TNTIZ
Genesis 15 in the TOMA
Genesis 15 in the TTENT
Genesis 15 in the UBG
Genesis 15 in the UGV
Genesis 15 in the UGV2
Genesis 15 in the UGV3
Genesis 15 in the VBL
Genesis 15 in the VDCC
Genesis 15 in the YALU
Genesis 15 in the YAPE
Genesis 15 in the YBVTP
Genesis 15 in the ZBP