Genesis 20 (BOLCB2)

1 Abrayami alongwaki na mboka wana mpo na kokende na etuka ya Negevi mpe avandaki na mboka oyo ezalaki kati ya Kadeshi mpe Shuri ; sima na tango moke, akendeki kovanda na Gerari. 2 Abrayami azalaki koloba kuna na tina na Sara, mwasi na ye : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ! » Yango wana Abimeleki, mokonzi ya Gerari, atindaki bato mpo na koluka Sara mpe akamataki ye na makasi. 3 Kasi na butu, Nzambe ayaki epai ya Abimeleki kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Okokufa mpo na mwasi oyo osili kozwa, pamba te azali mwasi ya libala. » 4 Nzokande, Abimeleki apusanaki nanu te pembeni na ye. Agangaki :— Nkolo, okoboma penza ekolo ata soki esali na yango mabe te ? 5 Ezali mobali na ye moko nde alobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ; » mpe ye moko andimaki : « Azali ndeko na ngai ya mobali. » Nasali yango na motema sembo mpe na maboko ezanga mbindo. 6 Nzambe alobaki na ye na ndoto :— Solo, nayebi ete osali yango na motema sembo. Yango wana nabatelaki yo mpo ete osala lisumu te epai na Ngai, mpe natikaki te ete osimba ye. 7 Sik’oyo, zongisa mwasi yango epai ya mobali na ye mpo ete azali mosakoli. Akobondela mpo na yo mpe okokufa te. Soki ozongisi ye te, yeba ete okokufa, yo mpe bato na yo nyonso. 8 Na tongo-tongo, Abimeleki alamukaki mpe abengisaki basali na ye nyonso. Tango ayebisaki bango makambo oyo ekomelaki ye, babangaki makasi. 9 Abimeleki abengaki Abrayami mpe alobaki na ye :— Likambo nini osali biso, lisumu nini nasali yo mpo ete omemisa ngai mpe mokili na ngai ngambo ya monene boye ? Osali ngai makambo oyo ekoki kosalema te. 10 Abimeleki atunaki Abrayami :— Makanisi nini ozalaki na yango mpo ete osala boye ? 11 Abrayami azongisaki :— Namilobelaki : « Solo, bato ya esika oyo batosaka Nzambe ata moke te mpe bakoboma ngai mpo na mwasi na ngai. 12 Lisusu, azali ya solo ndeko na ngai ya mwasi, mwana ya tata na ngai ; kasi azali mwana ya mama na ngai te. Nzokande akoma mwasi na ngai. » 13 Tango Nzambe alongolaki ngai na ndako ya tata na ngai mpo na kokende bipai na bipai, nayebisaki mwasi na ngai : « Tala bolamu oyo okosalela ngai : Bisika nyonso oyo tokokende, okolobaka na tina na ngai : ‹ Azali ndeko na ngai. › » 14 Boye Abimeleki azwaki bameme, bantaba, bangombe, basali ya mibali mpe ya basi, apesaki na Abrayami. Mpe azongiselaki ye mwasi na ye Sara. 15 Abimeleki alobaki : « Mboka na ngai ezali liboso na yo, vanda na esika oyo olingi. » 16 Abalukaki mpe alobaki lisusu epai na Sara : « Tala, napesi mbongo ya bibende, nkoto moko, epai ya ndeko na yo ya mobali. Ezali mpo na kozipa mabe oyo basali yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na yo ; boye okomi sembo na nyonso. » 17 Abrayami abondelaki Nzambe, mpe Nzambe abikisaki Abimeleki, mwasi na ye, mpe basi bawumbu na ye. Na nzela wana, bazwaki lisusu bana ; 18 pamba te Yawe akangaki mabota kati na ndako mobimba ya Abimeleki likolo ya Sara, mwasi ya Abrayami.

In Other Versions

Genesis 20 in the ANGEFD

Genesis 20 in the ANTPNG2D

Genesis 20 in the AS21

Genesis 20 in the BAGH

Genesis 20 in the BBPNG

Genesis 20 in the BBT1E

Genesis 20 in the BDS

Genesis 20 in the BEV

Genesis 20 in the BHAD

Genesis 20 in the BIB

Genesis 20 in the BLPT

Genesis 20 in the BNT

Genesis 20 in the BNTABOOT

Genesis 20 in the BNTLV

Genesis 20 in the BOATCB

Genesis 20 in the BOATCB2

Genesis 20 in the BOBCV

Genesis 20 in the BOCNT

Genesis 20 in the BOECS

Genesis 20 in the BOGWICC

Genesis 20 in the BOHCB

Genesis 20 in the BOHCV

Genesis 20 in the BOHLNT

Genesis 20 in the BOHNTLTAL

Genesis 20 in the BOICB

Genesis 20 in the BOILNTAP

Genesis 20 in the BOITCV

Genesis 20 in the BOKCV

Genesis 20 in the BOKCV2

Genesis 20 in the BOKHWOG

Genesis 20 in the BOKSSV

Genesis 20 in the BOLCB

Genesis 20 in the BOMCV

Genesis 20 in the BONAV

Genesis 20 in the BONCB

Genesis 20 in the BONLT

Genesis 20 in the BONUT2

Genesis 20 in the BOPLNT

Genesis 20 in the BOSCB

Genesis 20 in the BOSNC

Genesis 20 in the BOTLNT

Genesis 20 in the BOVCB

Genesis 20 in the BOYCB

Genesis 20 in the BPBB

Genesis 20 in the BPH

Genesis 20 in the BSB

Genesis 20 in the CCB

Genesis 20 in the CUV

Genesis 20 in the CUVS

Genesis 20 in the DBT

Genesis 20 in the DGDNT

Genesis 20 in the DHNT

Genesis 20 in the DNT

Genesis 20 in the ELBE

Genesis 20 in the EMTV

Genesis 20 in the ESV

Genesis 20 in the FBV

Genesis 20 in the FEB

Genesis 20 in the GGMNT

Genesis 20 in the GNT

Genesis 20 in the HARY

Genesis 20 in the HNT

Genesis 20 in the IRVA

Genesis 20 in the IRVB

Genesis 20 in the IRVG

Genesis 20 in the IRVH

Genesis 20 in the IRVK

Genesis 20 in the IRVM

Genesis 20 in the IRVM2

Genesis 20 in the IRVO

Genesis 20 in the IRVP

Genesis 20 in the IRVT

Genesis 20 in the IRVT2

Genesis 20 in the IRVU

Genesis 20 in the ISVN

Genesis 20 in the JSNT

Genesis 20 in the KAPI

Genesis 20 in the KBT1ETNIK

Genesis 20 in the KBV

Genesis 20 in the KJV

Genesis 20 in the KNFD

Genesis 20 in the LBA

Genesis 20 in the LBLA

Genesis 20 in the LNT

Genesis 20 in the LSV

Genesis 20 in the MAAL

Genesis 20 in the MBV

Genesis 20 in the MBV2

Genesis 20 in the MHNT

Genesis 20 in the MKNFD

Genesis 20 in the MNG

Genesis 20 in the MNT

Genesis 20 in the MNT2

Genesis 20 in the MRS1T

Genesis 20 in the NAA

Genesis 20 in the NASB

Genesis 20 in the NBLA

Genesis 20 in the NBS

Genesis 20 in the NBVTP

Genesis 20 in the NET2

Genesis 20 in the NIV11

Genesis 20 in the NNT

Genesis 20 in the NNT2

Genesis 20 in the NNT3

Genesis 20 in the PDDPT

Genesis 20 in the PFNT

Genesis 20 in the RMNT

Genesis 20 in the SBIAS

Genesis 20 in the SBIBS

Genesis 20 in the SBIBS2

Genesis 20 in the SBICS

Genesis 20 in the SBIDS

Genesis 20 in the SBIGS

Genesis 20 in the SBIHS

Genesis 20 in the SBIIS

Genesis 20 in the SBIIS2

Genesis 20 in the SBIIS3

Genesis 20 in the SBIKS

Genesis 20 in the SBIKS2

Genesis 20 in the SBIMS

Genesis 20 in the SBIOS

Genesis 20 in the SBIPS

Genesis 20 in the SBISS

Genesis 20 in the SBITS

Genesis 20 in the SBITS2

Genesis 20 in the SBITS3

Genesis 20 in the SBITS4

Genesis 20 in the SBIUS

Genesis 20 in the SBIVS

Genesis 20 in the SBT

Genesis 20 in the SBT1E

Genesis 20 in the SCHL

Genesis 20 in the SNT

Genesis 20 in the SUSU

Genesis 20 in the SUSU2

Genesis 20 in the SYNO

Genesis 20 in the TBIAOTANT

Genesis 20 in the TBT1E

Genesis 20 in the TBT1E2

Genesis 20 in the TFTIP

Genesis 20 in the TFTU

Genesis 20 in the TGNTATF3T

Genesis 20 in the THAI

Genesis 20 in the TNFD

Genesis 20 in the TNT

Genesis 20 in the TNTIK

Genesis 20 in the TNTIL

Genesis 20 in the TNTIN

Genesis 20 in the TNTIP

Genesis 20 in the TNTIZ

Genesis 20 in the TOMA

Genesis 20 in the TTENT

Genesis 20 in the UBG

Genesis 20 in the UGV

Genesis 20 in the UGV2

Genesis 20 in the UGV3

Genesis 20 in the VBL

Genesis 20 in the VDCC

Genesis 20 in the YALU

Genesis 20 in the YAPE

Genesis 20 in the YBVTP

Genesis 20 in the ZBP