Genesis 32 (BOLCB2)

1 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Labani apesaki bakoko na ye mpe bana na ye ya basi beze ; apambolaki bango mpe azongaki na ndako na ye. 2 Wana Jakobi azalaki kokoba mobembo na ye, ba-anjelu ya Nzambe bayaki kokutana na ye. 3 Tango Jakobi amonaki bango, alobaki : « Oyo ezali molako ya Nzambe ! » Mpe abengaki esika yango : Maanayimi. 4 Jakobi atindaki bantoma liboso na ye epai ya Ezawu, ndeko na ye, na mokili ya Seiri, kati na zamba ya Edomi. 5 Apesaki bango malako oyo : « Tala makambo oyo bokoloba epai ya nkolo na ngai Ezawu : ‹ Mosali na yo Jakobi alobi : ‘ Navandaki epai ya Labani mpe natikalaki kuna kino sik’oyo. 6 Nazali na bangombe, ba-ane, bameme, bantaba, basali ya mibali mpe ya basi ; natindi sango oyo epai ya nkolo na ngai mpo ete nazwa ngolu na miso na ye. ’ › » 7 Tango bantoma bazongaki epai ya Jakobi, balobaki : « Tokendeki epai ya Ezawu, ndeko na yo, mpe sik’oyo azali koya elongo na bato nkama minei mpo na kokutana na yo. » 8 Na kobanga makasi mpe na komitungisa, Jakobi akabolaki bato oyo bazalaki elongo na ye na masanga mibale ; ndenge moko mpe mpo na bameme, bantaba mpe bashamo. 9 Azalaki komilobela : « Soki Ezawu abundisi lisanga moko, lisanga oyo etikali ekoki kokima. » 10 Sima, Jakobi abondelaki : « Oh Nzambe ya Abrayami, tata na ngai ! Nzambe ya Izaki, tata na ngai ! Oh Yawe, Yo oyo olobaki na ngai : ‹ Zonga na mokili na yo, na libota na yo, mpe Ngai nakosalela yo bolamu. › 11 Nazali nani mpo ete otalisa ngai mosali na Yo bolamu mpe bosembo nyonso oyo ! Nazalaki kaka na lingenda tango nakatisaki Yordani, kasi sik’oyo nazali na masanga mibale. 12 Nabondeli Yo, kangola ngai na maboko ya ndeko na ngai, Ezawu, pamba te nazali kobanga ete aya kobundisa ngai elongo na bamama mpe bana na bango. 13 Nzokande, Yo olobaki na ngai : ‹ Ya solo nakosalela yo bolamu mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola zelo ya ebale monene, oyo moto moko te akoki kotanga. › » 14 Jakobi alekisaki butu na esika wana. Kati na biloko oyo azalaki na yango, aponaki kado mpo na Ezawu, ndeko na ye : 15 bantaba ya basi nkama mibale mpe bantaba ya mibali tuku mibale, bameme ya basi nkama mibale mpe bameme ya mibali tuku mibale, 16 shamo ya basi tuku misato elongo na bana na yango, bangombe ya basi tuku minei mpe bangombe ya mibali zomi, ba-ane ya basi tuku mibale mpe ya mibali zomi. 17 Akabolaki yango na bitonga mpe apesaki yango epai ya basali na ye. Alobaki na bango : « Boleka liboso na ngai mpe botia etonga moko mosika na mosusu. » 18 Jakobi apesaki mitindo oyo epai ya mosali na ye ya liboso : « Tango Ezawu, ndeko na ngai, akokutana na yo mpe akotuna yo : ‹ Yo ozali mosali ya nani, ozali kokende wapi mpe nani nkolo ya banyama nyonso oyo ezali liboso na yo ? › 19 Okozongisa : ‹ Ezali ya Jakobi, mosali na yo, ezali kado oyo atindeli nkolo na ngai Ezawu. Mpe tala ye moko azali koya sima na biso. › » 20 Apesaki lisusu mitindo wana epai ya mosali ya mibale, ya misato mpe epai ya basali nyonso oyo bazalaki kolanda bibwele : « Bokoloba kaka maloba moko tango bokokutana na Ezawu. 21 Bokoyebisa ye lisusu : ‹ Tala ye moko Jakobi, mosali na yo, azali koya na sima na biso ! › » Pamba te azalaki komilobela : « Nakokitisa kanda na ye na kado oyo natindi liboso na ngai ; sima tango nakokutana na ye, mbala mosusu akoyamba ngai malamu. » 22 Boye kado ya Jakobi ekendeki liboso, kasi ye moko alekisaki butu kati na Molako. 23 Na butu wana, Jakobi alamukaki, azwaki basi na ye mibale, basali na ye mibale ya basi, bana na ye zomi na moko mpe akatisaki mayi ya Yaboki. 24 Sima na kokatisa bango mayi, akatisaki mpe biloko na ye nyonso. 25 Jakobi atikalaki kaka ye moko. Bongo moto moko abundaki na ye kino tango tongo elingaki kotana. 26 Wana moto yango amonaki ete akoki kolonga Jakobi te, abetaki Jakobi na loketo mpe mokuwa ya loketo na ye ebukanaki tango bazalaki kobunda. 27 Sima, moto yango alobaki :— Tika ngai nakende, pamba te tongo elingi kotana.Kasi Jakobi azongisaki :— Nakotika yo te kokende soki opamboli ngai te. 28 Moto yango atunaki Jakobi :— Kombo na yo nani ?Jakobi azongisaki :— Kombo na ngai ezali Jakobi. 29 Moto yango alobaki lisusu :— Kobanda lelo, kombo na yo ekozala lisusu Jakobi te, kasi Isalaele, pamba te obundi na Nzambe mpe na bato, bongo olongi. 30 Jakobi alobaki :— Nabondeli yo, yebisa ngai kombo na yo.Azongiselaki ye :— Mpo na nini ozali kotuna kombo na ngai ?Boye apambolaki ye na esika wana. 31 Jakobi abengaki esika yango « Penieli, » pamba te alobaki : « Namoni Nzambe na miso na ngai, mpe bomoi na ngai ebiki. » 32 Tango moyi ebimaki, Jakobi alekaki Penueli. Azalaki kotambola tengu-tengu mpo na loketo na ye. 33 Yango wana kino lelo, bana ya Isalaele baliaka mosuni ya mopende te, pamba te Nzambe abetaki Jakobi na mosuni oyo ekangami na mokuwa ya loketo.

In Other Versions

Genesis 32 in the ANGEFD

Genesis 32 in the ANTPNG2D

Genesis 32 in the AS21

Genesis 32 in the BAGH

Genesis 32 in the BBPNG

Genesis 32 in the BBT1E

Genesis 32 in the BDS

Genesis 32 in the BEV

Genesis 32 in the BHAD

Genesis 32 in the BIB

Genesis 32 in the BLPT

Genesis 32 in the BNT

Genesis 32 in the BNTABOOT

Genesis 32 in the BNTLV

Genesis 32 in the BOATCB

Genesis 32 in the BOATCB2

Genesis 32 in the BOBCV

Genesis 32 in the BOCNT

Genesis 32 in the BOECS

Genesis 32 in the BOGWICC

Genesis 32 in the BOHCB

Genesis 32 in the BOHCV

Genesis 32 in the BOHLNT

Genesis 32 in the BOHNTLTAL

Genesis 32 in the BOICB

Genesis 32 in the BOILNTAP

Genesis 32 in the BOITCV

Genesis 32 in the BOKCV

Genesis 32 in the BOKCV2

Genesis 32 in the BOKHWOG

Genesis 32 in the BOKSSV

Genesis 32 in the BOLCB

Genesis 32 in the BOMCV

Genesis 32 in the BONAV

Genesis 32 in the BONCB

Genesis 32 in the BONLT

Genesis 32 in the BONUT2

Genesis 32 in the BOPLNT

Genesis 32 in the BOSCB

Genesis 32 in the BOSNC

Genesis 32 in the BOTLNT

Genesis 32 in the BOVCB

Genesis 32 in the BOYCB

Genesis 32 in the BPBB

Genesis 32 in the BPH

Genesis 32 in the BSB

Genesis 32 in the CCB

Genesis 32 in the CUV

Genesis 32 in the CUVS

Genesis 32 in the DBT

Genesis 32 in the DGDNT

Genesis 32 in the DHNT

Genesis 32 in the DNT

Genesis 32 in the ELBE

Genesis 32 in the EMTV

Genesis 32 in the ESV

Genesis 32 in the FBV

Genesis 32 in the FEB

Genesis 32 in the GGMNT

Genesis 32 in the GNT

Genesis 32 in the HARY

Genesis 32 in the HNT

Genesis 32 in the IRVA

Genesis 32 in the IRVB

Genesis 32 in the IRVG

Genesis 32 in the IRVH

Genesis 32 in the IRVK

Genesis 32 in the IRVM

Genesis 32 in the IRVM2

Genesis 32 in the IRVO

Genesis 32 in the IRVP

Genesis 32 in the IRVT

Genesis 32 in the IRVT2

Genesis 32 in the IRVU

Genesis 32 in the ISVN

Genesis 32 in the JSNT

Genesis 32 in the KAPI

Genesis 32 in the KBT1ETNIK

Genesis 32 in the KBV

Genesis 32 in the KJV

Genesis 32 in the KNFD

Genesis 32 in the LBA

Genesis 32 in the LBLA

Genesis 32 in the LNT

Genesis 32 in the LSV

Genesis 32 in the MAAL

Genesis 32 in the MBV

Genesis 32 in the MBV2

Genesis 32 in the MHNT

Genesis 32 in the MKNFD

Genesis 32 in the MNG

Genesis 32 in the MNT

Genesis 32 in the MNT2

Genesis 32 in the MRS1T

Genesis 32 in the NAA

Genesis 32 in the NASB

Genesis 32 in the NBLA

Genesis 32 in the NBS

Genesis 32 in the NBVTP

Genesis 32 in the NET2

Genesis 32 in the NIV11

Genesis 32 in the NNT

Genesis 32 in the NNT2

Genesis 32 in the NNT3

Genesis 32 in the PDDPT

Genesis 32 in the PFNT

Genesis 32 in the RMNT

Genesis 32 in the SBIAS

Genesis 32 in the SBIBS

Genesis 32 in the SBIBS2

Genesis 32 in the SBICS

Genesis 32 in the SBIDS

Genesis 32 in the SBIGS

Genesis 32 in the SBIHS

Genesis 32 in the SBIIS

Genesis 32 in the SBIIS2

Genesis 32 in the SBIIS3

Genesis 32 in the SBIKS

Genesis 32 in the SBIKS2

Genesis 32 in the SBIMS

Genesis 32 in the SBIOS

Genesis 32 in the SBIPS

Genesis 32 in the SBISS

Genesis 32 in the SBITS

Genesis 32 in the SBITS2

Genesis 32 in the SBITS3

Genesis 32 in the SBITS4

Genesis 32 in the SBIUS

Genesis 32 in the SBIVS

Genesis 32 in the SBT

Genesis 32 in the SBT1E

Genesis 32 in the SCHL

Genesis 32 in the SNT

Genesis 32 in the SUSU

Genesis 32 in the SUSU2

Genesis 32 in the SYNO

Genesis 32 in the TBIAOTANT

Genesis 32 in the TBT1E

Genesis 32 in the TBT1E2

Genesis 32 in the TFTIP

Genesis 32 in the TFTU

Genesis 32 in the TGNTATF3T

Genesis 32 in the THAI

Genesis 32 in the TNFD

Genesis 32 in the TNT

Genesis 32 in the TNTIK

Genesis 32 in the TNTIL

Genesis 32 in the TNTIN

Genesis 32 in the TNTIP

Genesis 32 in the TNTIZ

Genesis 32 in the TOMA

Genesis 32 in the TTENT

Genesis 32 in the UBG

Genesis 32 in the UGV

Genesis 32 in the UGV2

Genesis 32 in the UGV3

Genesis 32 in the VBL

Genesis 32 in the VDCC

Genesis 32 in the YALU

Genesis 32 in the YAPE

Genesis 32 in the YBVTP

Genesis 32 in the ZBP