Genesis 43 (BOLCB2)

1 Nzala makasi ekotaki kati na mokili. 2 Tango libota ya Jakobi baliaki biloko nyonso oyo bamemaki wuta na Ejipito, Jakobi alobaki na bana na ye :— Bozonga kuna kosomba ndambo ya biloko. 3 Yuda azongisaki :— Moto wana alobaki na biso ete tozonga kuna te soki ndeko na biso azali elongo na biso te. 4 Soki otiki ndeko na biso kokende elongo na biso, wana tokokende na Ejipito mpe tokosombela yo biloko. 5 Kasi soki otiki ye te, biso mpe tokokende te ; pamba te moto wana ayebisaki biso malamu : « Bokotelema liboso na ngai te soki ndeko na bino azali te. » 6 Isalaele azongisaki :— Mpo na nini bosali ngai mabe boye ? Mpo na nini boyebisaki moto wana ete bozali na ndeko mosusu ? 7 Bazongisaki :— Moto yango atunaki biso malamu makambo oyo etali biso moko mpe libota na biso. Atunaki biso : « Tata na bino azali nanu na bomoi ? Bozali na ndeko mosusu ya mobali ? » Mpe biso topesaki eyano na mituna na ye. Tokokaki te koyeba ete akoloba na biso : « Boya na ndeko na bino ya mobali awa. » 8 Yuda ayebisaki tata na ye Isalaele :— Tata, tika Benjame akende elongo na ngai. Tokotelema mpe tokokende mpo ete biso elongo na yo mpe bana na biso, tozala na bomoi, kasi tokufa te na nzala. 9 Nandimi kobatela ye ; boye okotuna ye na maboko na ngai. Soki nazongiseli yo ye te mpe namemi ye liboso na yo te, tika ete nazala na ngambo epai na yo bomoi na ngai mobimba. 10 Soki towumelaki te, tokokaki kozonga mbala ya mibale. 11 Tata na bango Isalaele alobaki na bango :— Soki esengeli kozala bongo, wana bosala boye : botia na basaki na bino biloko oyo eleki kitoko kati na mokili mpe bopesa yango lokola kado epai ya moto wana : ndambo ya mafuta ya solo kitoko, ndambo ya mafuta ya nzoyi, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, lodanumi, pisitashi mpe bambuma ya amande. 12 Bozwa mbala mibale motuya ya mbongo oyo ezalaki kati na basaki na bino mpe bozongisa mbongo oyo bokutaki na basaki na bino ; tango mosusu ezalaki libunga. 13 Bozwa ndeko na bino ya mobali, botelema mpe bozonga epai ya moto wana. 14 Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso ayokela bino mawa tango bokotelema liboso ya moto wana, mpo ete bokoka kozwa ndeko na bino mosusu, mpe Benjame azonga elongo na bino. Kasi mpo na ngai, soki nakozanga bana, malamu nazanga bango ! 15 Boye bato yango bazwaki bakado ; bazwaki lisusu mbala mibale motuya ya mbongo oyo ezalaki na basaki na bango mpe Benjame. Bakendeki na Ejipito mpe bamilakisaki na miso ya Jozefi. 16 Tango Jozefi amonaki Benjame elongo na bango, alobaki na moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi na ye : « Mema bato oyo na ndako na ngai ; boboma nyama moko mpe bolamba yango mpo ete bato oyo bakolia elongo na ngai na midi. » 17 Moto yango asalaki ndenge kaka Jozefi alobaki na ye mpe amemaki bango na ndako ya Jozefi. 18 Bato yango babangaki makasi tango bamemaki bango na ndako ya Jozefi mpe bazalaki kolobana bango na bango :— Bamemi biso awa likolo ya mbongo oyo batiaki na basaki na biso, na mbala ya liboso. Bakokweya likolo na biso, bakolonga biso, bakokanga biso lokola bawumbu mpe bakozwa ba-ane na biso. 19 Bapusanaki pembeni ya moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako ya Jozefi mpe balobaki na ye na ekuke ya ndako : 20 — Limbisa biso, nkolo na ngai ! Toyaki mbala ya liboso mpo na kosomba biloko ya kolia ; 21 kasi tango totelemaki na esika ya kolekisa butu, tofungolaki basaki na biso ; mpe moko na moko kati na biso amonaki mbongo na ye kati na saki na ye ndenge kaka ezalaki, yango wana tozongi na yango. 22 Tomemi mbongo mosusu mpo na kosomba biloko ya kolia, toyebi te nani azongisaki mbongo na biso na basaki na biso. 23 Alobaki na bango :— Malamu ! Bobanga te. Ezali Nzambe na bino, Nzambe ya tata na bino, nde atiaki bomengo kati na basaki na bino. Kasi mpo na mbongo na bino, ngai nazwaki yango.Sima, amemelaki bango Simeoni. 24 Moto yango akotisaki bango na ndako ya Jozefi, apesaki bango mayi ya kosukola makolo mpe abongisaki bilei mpo na ba-ane na bango. 25 Babongisaki bakado na bango mpo na boyei ya Jozefi na midi, pamba te bayokaki ete bakolia kuna. 26 Tango Jozefi ayaki na ndako, bapesaki ye bakado oyo bamemaki na ndako mpe bagumbamaki liboso na ye mito na se. 27 Atunaki bango :— Boni, bozali malamu ?Abakisaki :— Boni tata na bino ya mobange oyo boyebisaki ngai, azali malamu ? 28 Bazongisaki :— Mosali na yo, tata na biso, azali nanu na bomoi mpe azali malamu.Bakitisaki mito mpe bagumbamaki liboso na ye. 29 Tango Jozefi atombolaki miso, amonaki Benjame, ndeko na ye ya mobali, mwana ya mama na ye. Atunaki :— Ye wana nde ndeko na bino ya suka oyo boyebisaki ngai ?Abakisaki :— Tika ete Nzambe atalisa yo ngolu na Ye. 30 Jozefi ayokaki pasi makasi na motema tango amonaki ndeko na ye, akimaki mbangu na libanda mpe alukaki esika mpo na kolela. Akotaki na shambre na ye mpe alelaki kuna. 31 Tango asilisaki kosukola elongi na ye, abimaki libanda, akangaki motema mpe alobaki :— Botia biloko ya kolia na mesa. 32 Batielaki Jozefi bilei na mesa na ye moko, bandeko na ye mpe na mesa na bango ; bongo bato ya Ejipito oyo bazalaki kolia na ye esika moko, bango mpe na mesa na bango, pamba te bato ya Ejipito bakokaki te kolia esika moko na Ba-Ebre, pamba te ezalaki ekila mpo na bato ya Ejipito. 33 Bavandisaki bango, kobanda na mwana ya liboso kino na oyo ya suka, bazalaki kotalana bango na bango na kokamwa. 34 Jozefi apesaki bango biloko oyo ewutaki na mesa na ye ; mpe Benjame azwaki mbala mitano koleka bango nyonso. Na bongo, bamelaki elongo na ye mpe balangwaki.

In Other Versions

Genesis 43 in the ANGEFD

Genesis 43 in the ANTPNG2D

Genesis 43 in the AS21

Genesis 43 in the BAGH

Genesis 43 in the BBPNG

Genesis 43 in the BBT1E

Genesis 43 in the BDS

Genesis 43 in the BEV

Genesis 43 in the BHAD

Genesis 43 in the BIB

Genesis 43 in the BLPT

Genesis 43 in the BNT

Genesis 43 in the BNTABOOT

Genesis 43 in the BNTLV

Genesis 43 in the BOATCB

Genesis 43 in the BOATCB2

Genesis 43 in the BOBCV

Genesis 43 in the BOCNT

Genesis 43 in the BOECS

Genesis 43 in the BOGWICC

Genesis 43 in the BOHCB

Genesis 43 in the BOHCV

Genesis 43 in the BOHLNT

Genesis 43 in the BOHNTLTAL

Genesis 43 in the BOICB

Genesis 43 in the BOILNTAP

Genesis 43 in the BOITCV

Genesis 43 in the BOKCV

Genesis 43 in the BOKCV2

Genesis 43 in the BOKHWOG

Genesis 43 in the BOKSSV

Genesis 43 in the BOLCB

Genesis 43 in the BOMCV

Genesis 43 in the BONAV

Genesis 43 in the BONCB

Genesis 43 in the BONLT

Genesis 43 in the BONUT2

Genesis 43 in the BOPLNT

Genesis 43 in the BOSCB

Genesis 43 in the BOSNC

Genesis 43 in the BOTLNT

Genesis 43 in the BOVCB

Genesis 43 in the BOYCB

Genesis 43 in the BPBB

Genesis 43 in the BPH

Genesis 43 in the BSB

Genesis 43 in the CCB

Genesis 43 in the CUV

Genesis 43 in the CUVS

Genesis 43 in the DBT

Genesis 43 in the DGDNT

Genesis 43 in the DHNT

Genesis 43 in the DNT

Genesis 43 in the ELBE

Genesis 43 in the EMTV

Genesis 43 in the ESV

Genesis 43 in the FBV

Genesis 43 in the FEB

Genesis 43 in the GGMNT

Genesis 43 in the GNT

Genesis 43 in the HARY

Genesis 43 in the HNT

Genesis 43 in the IRVA

Genesis 43 in the IRVB

Genesis 43 in the IRVG

Genesis 43 in the IRVH

Genesis 43 in the IRVK

Genesis 43 in the IRVM

Genesis 43 in the IRVM2

Genesis 43 in the IRVO

Genesis 43 in the IRVP

Genesis 43 in the IRVT

Genesis 43 in the IRVT2

Genesis 43 in the IRVU

Genesis 43 in the ISVN

Genesis 43 in the JSNT

Genesis 43 in the KAPI

Genesis 43 in the KBT1ETNIK

Genesis 43 in the KBV

Genesis 43 in the KJV

Genesis 43 in the KNFD

Genesis 43 in the LBA

Genesis 43 in the LBLA

Genesis 43 in the LNT

Genesis 43 in the LSV

Genesis 43 in the MAAL

Genesis 43 in the MBV

Genesis 43 in the MBV2

Genesis 43 in the MHNT

Genesis 43 in the MKNFD

Genesis 43 in the MNG

Genesis 43 in the MNT

Genesis 43 in the MNT2

Genesis 43 in the MRS1T

Genesis 43 in the NAA

Genesis 43 in the NASB

Genesis 43 in the NBLA

Genesis 43 in the NBS

Genesis 43 in the NBVTP

Genesis 43 in the NET2

Genesis 43 in the NIV11

Genesis 43 in the NNT

Genesis 43 in the NNT2

Genesis 43 in the NNT3

Genesis 43 in the PDDPT

Genesis 43 in the PFNT

Genesis 43 in the RMNT

Genesis 43 in the SBIAS

Genesis 43 in the SBIBS

Genesis 43 in the SBIBS2

Genesis 43 in the SBICS

Genesis 43 in the SBIDS

Genesis 43 in the SBIGS

Genesis 43 in the SBIHS

Genesis 43 in the SBIIS

Genesis 43 in the SBIIS2

Genesis 43 in the SBIIS3

Genesis 43 in the SBIKS

Genesis 43 in the SBIKS2

Genesis 43 in the SBIMS

Genesis 43 in the SBIOS

Genesis 43 in the SBIPS

Genesis 43 in the SBISS

Genesis 43 in the SBITS

Genesis 43 in the SBITS2

Genesis 43 in the SBITS3

Genesis 43 in the SBITS4

Genesis 43 in the SBIUS

Genesis 43 in the SBIVS

Genesis 43 in the SBT

Genesis 43 in the SBT1E

Genesis 43 in the SCHL

Genesis 43 in the SNT

Genesis 43 in the SUSU

Genesis 43 in the SUSU2

Genesis 43 in the SYNO

Genesis 43 in the TBIAOTANT

Genesis 43 in the TBT1E

Genesis 43 in the TBT1E2

Genesis 43 in the TFTIP

Genesis 43 in the TFTU

Genesis 43 in the TGNTATF3T

Genesis 43 in the THAI

Genesis 43 in the TNFD

Genesis 43 in the TNT

Genesis 43 in the TNTIK

Genesis 43 in the TNTIL

Genesis 43 in the TNTIN

Genesis 43 in the TNTIP

Genesis 43 in the TNTIZ

Genesis 43 in the TOMA

Genesis 43 in the TTENT

Genesis 43 in the UBG

Genesis 43 in the UGV

Genesis 43 in the UGV2

Genesis 43 in the UGV3

Genesis 43 in the VBL

Genesis 43 in the VDCC

Genesis 43 in the YALU

Genesis 43 in the YAPE

Genesis 43 in the YBVTP

Genesis 43 in the ZBP