Genesis 44 (BOLCB2)

1 Jozefi apesaki mitindo epai ya moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako na ye : « Tondisa biloko ya kolia na basaki ya bato oyo kolanda kilo oyo bakoki komema mpe tia mbongo ya moko na moko na moto ya saki na ye. 2 Okotia kopo na ngai oyo ya palata na moto ya saki ya leki na bango ya suka elongo na mbongo na ye ya ble. »Moto yango asalaki ndenge kaka Jozefi alobaki na ye. 3 Na tongo-tongo, batikaki bandeko ya Jozefi kozonga elongo na ba-ane na bango. 4 Wana babimaki na engumba, bamikomelaki nanu mosika te, Jozefi alobaki na moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako na ye : « Telema, landa bato wana ! Mpe tango okokanga bango, tuna bango : mpo na nini bozongisi mabe na malamu ? 5 Mpo na nini boyibi kopo oyo nkolo na ngai amelelaka mayi mpe asalelaka mpo na koyeba makambo oyo ekoya ? Likambo oyo bosali ezali penza mabe. » 6 Mokambi ya ndako ya Jozefi akangaki bango mpe alobelaki bango lolenge nkolo na ye atindaki ye. 7 Kasi bazongiselaki ye :— Mpo na nini nkolo na biso alobi makambo ya boye ? Basali na yo bakoki kosala makambo ya boye te. 8 Tomemelaki yo mbongo oyo tomonaki tango tofungolaki basaki na biso wuta na mokili ya Kanana. Ndenge nini tokoki lisusu koyiba wolo to palata kati na ndako ya nkolo na yo ? 9 Soki moko kati na basali na yo amonani ete azali na yango, akokufa ; mpe biso bamosusu oyo totikali, tokokoma bawumbu ya nkolo na biso. 10 Moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako ya Jozefi alobaki :— Malamu mingi ! Tika ete ezala ndenge bolobi ! Moto oyo akomonana ete azali na yango, akokoma mowumbu na ngai. Bino ba-oyo botikali, bokozala na likambo te. 11 Moko na moko akitisaki saki na ye na lombangu na mabele mpe afungolaki yango. 12 Moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Jozefi abandaki koluka kobanda na kulutu kino na leki. Mpe kopo emonanaki na saki ya Benjame. 13 Tango bamonaki bongo, bapasolaki bilamba na bango ; bazongisaki biloko na ba-ane na bango mpe bazongaki bango nyonso na engumba. 14 Jozefi azalaki kaka na ndako. Tango Yuda na bandeko na ye ya mibali bakotaki na ndako, bagumbamaki kino na se liboso na ye. 15 Jozefi alobaki na bango :— Likambo nini oyo bosali ? Boyebi te ete moto lokola ngai nazali na makoki ya komona makambo na bosoloka ? 16 Yuda azongisaki :— Likambo nini tokoki koloba na nkolo na ngai ? Tokoloba lisusu nini ? Ndenge nini tokoki kotalisa ete toyebi likambo te ? Nzambe alakisi polele mbeba ya basali na yo. Tokomi sik’oyo bawumbu ya nkolo na ngai, biso nyonso elongo na ye oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye. 17 Kasi Jozefi alobaki :— Nakoki kosala likambo ya boye te ! Kaka moto oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye nde akozala mowumbu na ngai. Bino ba-oyo botikali, bozonga na kimia epai ya tata na bino. 18 Yuda apusanaki pembeni na ye mpe alobaki :— Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Tika ete mosali na yo aloba liloba moko epai ya nkolo na ngai. Kosilikela mosali na yo te, pamba te ndenge Faraon azali, ndenge wana mpe yo ozali. 19 Nkolo na ngai atunaki basali na ye : « Bozali na tata to na ndeko mosusu ya mobali ? » 20 Tozongiselaki nkolo na ngai : « Tozali na tata oyo akomi mobange mpe ndeko mobali ya leki oyo babotelaki tata na biso na kimobange. Ndeko na ye ya mobali akufa mpe atikala kaka ye moko mwana mobali na libumu ya mama na ye, mpe tata na ye alingaka ye mingi. » 21 Bongo olobaki na basali na yo : « Bomemela ngai ye mpo ete nakoka komona ye na miso na ngai. » 22 Tozongiselaki nkolo na ngai : « Elenge mobali akoki kotika tata na ye te ; soki atiki ye, tata na ye akokufa. » 23 Kasi olobaki na basali na yo : « Soki leki na bino ya mobali ayei elongo na bino te, bokomona lisusu elongi na ngai te. » 24 Tango tozongaki epai ya mosali na yo, tata na ngai, toyebisaki ye makambo nyonso oyo nkolo na ngai alobaki. 25 Bongo tata na biso alobaki : « Bozonga mpe bosomba ndambo ya biloko ya kolia. » 26 Kasi tozongisaki : « Tokoki kokende te. Tokokende kaka soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso. Tokoki komona elongi ya moto wana te soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso te. » 27 Mosali na yo, tata na biso, alobaki na biso : « Boyebi ete mwasi na ngai, Rasheli, abotelaki ngai bana mibale ya mibali. 28 Moko na bango akenda mosika na ngai. Nakanisi ete ezali ya solo, nyama moko ya mabe esila kolia ye. Banda tango wana, natikala komona ye lisusu te. 29 Soki bozwi ngai lisusu mwana oyo mpe soki likama ekweyeli ye, bokoboma ngai na pasi, na kimobange na ngai. » 30 Sik’oyo, soki elenge mobali azali elongo na biso te tango nakozonga epai ya tata na ngai, mosali na yo, mpe soki tata na ngai, oyo motema na ye ekangama makasi na motema ya elenge mobali oyo, 31 amoni ete elenge mobali azali elongo na biso te, wana akokufa. Basali na yo bakoboma tata na biso na pasi na kimobange na ye. 32 Pamba te ngai mosali na yo, nandimaki, na miso ya tata na ngai, kobatela elenge mobali oyo. Nalobaki : « Soki nazongiseli yo ye te, nakozala na ngambo liboso na yo tata na ngai, bomoi na ngai mobimba. » 33 Yango wana sik’oyo, nabondeli yo, tika ete mosali na yo akoma mowumbu ya nkolo na ngai na esika ya elenge mobali oyo mpe tika ete elenge mobali azonga elongo na bandeko na ye ya mibali. 34 Ndenge nini nakoki kozonga epai ya tata na ngai soki elenge mobali azali elongo na ngai te ? Kotika te ete namona pasi oyo ekokomela tata na ngai !

In Other Versions

Genesis 44 in the ANGEFD

Genesis 44 in the ANTPNG2D

Genesis 44 in the AS21

Genesis 44 in the BAGH

Genesis 44 in the BBPNG

Genesis 44 in the BBT1E

Genesis 44 in the BDS

Genesis 44 in the BEV

Genesis 44 in the BHAD

Genesis 44 in the BIB

Genesis 44 in the BLPT

Genesis 44 in the BNT

Genesis 44 in the BNTABOOT

Genesis 44 in the BNTLV

Genesis 44 in the BOATCB

Genesis 44 in the BOATCB2

Genesis 44 in the BOBCV

Genesis 44 in the BOCNT

Genesis 44 in the BOECS

Genesis 44 in the BOGWICC

Genesis 44 in the BOHCB

Genesis 44 in the BOHCV

Genesis 44 in the BOHLNT

Genesis 44 in the BOHNTLTAL

Genesis 44 in the BOICB

Genesis 44 in the BOILNTAP

Genesis 44 in the BOITCV

Genesis 44 in the BOKCV

Genesis 44 in the BOKCV2

Genesis 44 in the BOKHWOG

Genesis 44 in the BOKSSV

Genesis 44 in the BOLCB

Genesis 44 in the BOMCV

Genesis 44 in the BONAV

Genesis 44 in the BONCB

Genesis 44 in the BONLT

Genesis 44 in the BONUT2

Genesis 44 in the BOPLNT

Genesis 44 in the BOSCB

Genesis 44 in the BOSNC

Genesis 44 in the BOTLNT

Genesis 44 in the BOVCB

Genesis 44 in the BOYCB

Genesis 44 in the BPBB

Genesis 44 in the BPH

Genesis 44 in the BSB

Genesis 44 in the CCB

Genesis 44 in the CUV

Genesis 44 in the CUVS

Genesis 44 in the DBT

Genesis 44 in the DGDNT

Genesis 44 in the DHNT

Genesis 44 in the DNT

Genesis 44 in the ELBE

Genesis 44 in the EMTV

Genesis 44 in the ESV

Genesis 44 in the FBV

Genesis 44 in the FEB

Genesis 44 in the GGMNT

Genesis 44 in the GNT

Genesis 44 in the HARY

Genesis 44 in the HNT

Genesis 44 in the IRVA

Genesis 44 in the IRVB

Genesis 44 in the IRVG

Genesis 44 in the IRVH

Genesis 44 in the IRVK

Genesis 44 in the IRVM

Genesis 44 in the IRVM2

Genesis 44 in the IRVO

Genesis 44 in the IRVP

Genesis 44 in the IRVT

Genesis 44 in the IRVT2

Genesis 44 in the IRVU

Genesis 44 in the ISVN

Genesis 44 in the JSNT

Genesis 44 in the KAPI

Genesis 44 in the KBT1ETNIK

Genesis 44 in the KBV

Genesis 44 in the KJV

Genesis 44 in the KNFD

Genesis 44 in the LBA

Genesis 44 in the LBLA

Genesis 44 in the LNT

Genesis 44 in the LSV

Genesis 44 in the MAAL

Genesis 44 in the MBV

Genesis 44 in the MBV2

Genesis 44 in the MHNT

Genesis 44 in the MKNFD

Genesis 44 in the MNG

Genesis 44 in the MNT

Genesis 44 in the MNT2

Genesis 44 in the MRS1T

Genesis 44 in the NAA

Genesis 44 in the NASB

Genesis 44 in the NBLA

Genesis 44 in the NBS

Genesis 44 in the NBVTP

Genesis 44 in the NET2

Genesis 44 in the NIV11

Genesis 44 in the NNT

Genesis 44 in the NNT2

Genesis 44 in the NNT3

Genesis 44 in the PDDPT

Genesis 44 in the PFNT

Genesis 44 in the RMNT

Genesis 44 in the SBIAS

Genesis 44 in the SBIBS

Genesis 44 in the SBIBS2

Genesis 44 in the SBICS

Genesis 44 in the SBIDS

Genesis 44 in the SBIGS

Genesis 44 in the SBIHS

Genesis 44 in the SBIIS

Genesis 44 in the SBIIS2

Genesis 44 in the SBIIS3

Genesis 44 in the SBIKS

Genesis 44 in the SBIKS2

Genesis 44 in the SBIMS

Genesis 44 in the SBIOS

Genesis 44 in the SBIPS

Genesis 44 in the SBISS

Genesis 44 in the SBITS

Genesis 44 in the SBITS2

Genesis 44 in the SBITS3

Genesis 44 in the SBITS4

Genesis 44 in the SBIUS

Genesis 44 in the SBIVS

Genesis 44 in the SBT

Genesis 44 in the SBT1E

Genesis 44 in the SCHL

Genesis 44 in the SNT

Genesis 44 in the SUSU

Genesis 44 in the SUSU2

Genesis 44 in the SYNO

Genesis 44 in the TBIAOTANT

Genesis 44 in the TBT1E

Genesis 44 in the TBT1E2

Genesis 44 in the TFTIP

Genesis 44 in the TFTU

Genesis 44 in the TGNTATF3T

Genesis 44 in the THAI

Genesis 44 in the TNFD

Genesis 44 in the TNT

Genesis 44 in the TNTIK

Genesis 44 in the TNTIL

Genesis 44 in the TNTIN

Genesis 44 in the TNTIP

Genesis 44 in the TNTIZ

Genesis 44 in the TOMA

Genesis 44 in the TTENT

Genesis 44 in the UBG

Genesis 44 in the UGV

Genesis 44 in the UGV2

Genesis 44 in the UGV3

Genesis 44 in the VBL

Genesis 44 in the VDCC

Genesis 44 in the YALU

Genesis 44 in the YAPE

Genesis 44 in the YBVTP

Genesis 44 in the ZBP