Genesis 5 (BOLCB2)

1 Tala lisolo ya libota ya Adamu. Tango Nzambe akelaki bato, asalaki bango na elilingi ya Nzambe. 2 Akelaki bango mobali mpe mwasi, mpe apambolaki bango. Na mokolo oyo akelaki bango, apesaki bango kombo « bato. » 3 Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. » 4 Sima na mbotama ya Seti, Adamu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 5 Mibu nyonso oyo Adamu awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku misato, sima akufaki. 6 Tango Seti akokisaki mibu nkama moko na mitano ya mbotama, abotaki Enoshi. 7 Sima na kobota Enoshi, Seti awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 8 Mibu nyonso oyo Seti awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na zomi na mibale, sima akufaki. 9 Tango Enoshi akokisaki mibu tuku libwa ya mbotama, abotaki Kena. 10 Sima na kobota Kena, Enoshi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na zomi na mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 11 Mibu nyonso oyo Enoshi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na mitano, sima akufaki. 12 Tango Kena akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Maalalele. 13 Sima na kobota Maalalele, Kena awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku minei mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 14 Mibu nyonso oyo Kena awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na zomi, sima akufaki. 15 Tango Maalalele akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Yeredi. 16 Sima na kobota Yeredi, Maalalele awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 17 Mibu nyonso oyo Maalalele awumelaki na bomoi ezalaki nkama mwambe na tuku libwa na mitano, sima akufaki. 18 Tango Yeredi akokisaki mibu nkama moko na tuku motoba na mibale ya mbotama, abotaki Enoki. 19 Sima na kobota Enoki, Yeredi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 20 Mibu nyonso oyo Yeredi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na mibale, sima akufaki. 21 Tango Enoki akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Metusalemi. 22 Sima na kobota Metusalemi, Enoki azalaki kosala mokano ya Nzambe mibu nkama misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 23 Mibu nyonso oyo Enoki awumelaki na bomoi ezalaki nkama misato na tuku motoba na mitano. 24 Enoki atambolaki na boyengebene elongo na Nzambe ; bongo alimwaki, pamba te Nzambe azwaki ye. 25 Tango Metusalemi akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na sambo ya mbotama, abotaki Lemeki. 26 Sima na kobota Lemeki, Metusalemi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama sambo na tuku mwambe na mibale mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 27 Mibu nyonso oyo Metusalemi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na libwa, sima akufaki. 28 Tango Lemeki akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na mibale ya mbotama, abotaki mwana mobali. 29 Abengaki ye Noa mpe alobaki : « Ye oyo akobondisa biso na mosala mpe na pasi ya maboko na biso likolo ya mabele oyo Yawe alakelaki mabe. » 30 Sima na kobotama ya Noa, Lemeki awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mitano na tuku libwa na mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 31 Mibu nyonso oyo Lemeki awumelaki na bomoi ezalaki nkama sambo na tuku sambo na sambo, sima akufaki. 32 Tango Noa akokisaki mibu nkama mitano ya mbotama, abotaki Semi, Cham mpe Jafeti.

In Other Versions

Genesis 5 in the ANGEFD

Genesis 5 in the ANTPNG2D

Genesis 5 in the AS21

Genesis 5 in the BAGH

Genesis 5 in the BBPNG

Genesis 5 in the BBT1E

Genesis 5 in the BDS

Genesis 5 in the BEV

Genesis 5 in the BHAD

Genesis 5 in the BIB

Genesis 5 in the BLPT

Genesis 5 in the BNT

Genesis 5 in the BNTABOOT

Genesis 5 in the BNTLV

Genesis 5 in the BOATCB

Genesis 5 in the BOATCB2

Genesis 5 in the BOBCV

Genesis 5 in the BOCNT

Genesis 5 in the BOECS

Genesis 5 in the BOGWICC

Genesis 5 in the BOHCB

Genesis 5 in the BOHCV

Genesis 5 in the BOHLNT

Genesis 5 in the BOHNTLTAL

Genesis 5 in the BOICB

Genesis 5 in the BOILNTAP

Genesis 5 in the BOITCV

Genesis 5 in the BOKCV

Genesis 5 in the BOKCV2

Genesis 5 in the BOKHWOG

Genesis 5 in the BOKSSV

Genesis 5 in the BOLCB

Genesis 5 in the BOMCV

Genesis 5 in the BONAV

Genesis 5 in the BONCB

Genesis 5 in the BONLT

Genesis 5 in the BONUT2

Genesis 5 in the BOPLNT

Genesis 5 in the BOSCB

Genesis 5 in the BOSNC

Genesis 5 in the BOTLNT

Genesis 5 in the BOVCB

Genesis 5 in the BOYCB

Genesis 5 in the BPBB

Genesis 5 in the BPH

Genesis 5 in the BSB

Genesis 5 in the CCB

Genesis 5 in the CUV

Genesis 5 in the CUVS

Genesis 5 in the DBT

Genesis 5 in the DGDNT

Genesis 5 in the DHNT

Genesis 5 in the DNT

Genesis 5 in the ELBE

Genesis 5 in the EMTV

Genesis 5 in the ESV

Genesis 5 in the FBV

Genesis 5 in the FEB

Genesis 5 in the GGMNT

Genesis 5 in the GNT

Genesis 5 in the HARY

Genesis 5 in the HNT

Genesis 5 in the IRVA

Genesis 5 in the IRVB

Genesis 5 in the IRVG

Genesis 5 in the IRVH

Genesis 5 in the IRVK

Genesis 5 in the IRVM

Genesis 5 in the IRVM2

Genesis 5 in the IRVO

Genesis 5 in the IRVP

Genesis 5 in the IRVT

Genesis 5 in the IRVT2

Genesis 5 in the IRVU

Genesis 5 in the ISVN

Genesis 5 in the JSNT

Genesis 5 in the KAPI

Genesis 5 in the KBT1ETNIK

Genesis 5 in the KBV

Genesis 5 in the KJV

Genesis 5 in the KNFD

Genesis 5 in the LBA

Genesis 5 in the LBLA

Genesis 5 in the LNT

Genesis 5 in the LSV

Genesis 5 in the MAAL

Genesis 5 in the MBV

Genesis 5 in the MBV2

Genesis 5 in the MHNT

Genesis 5 in the MKNFD

Genesis 5 in the MNG

Genesis 5 in the MNT

Genesis 5 in the MNT2

Genesis 5 in the MRS1T

Genesis 5 in the NAA

Genesis 5 in the NASB

Genesis 5 in the NBLA

Genesis 5 in the NBS

Genesis 5 in the NBVTP

Genesis 5 in the NET2

Genesis 5 in the NIV11

Genesis 5 in the NNT

Genesis 5 in the NNT2

Genesis 5 in the NNT3

Genesis 5 in the PDDPT

Genesis 5 in the PFNT

Genesis 5 in the RMNT

Genesis 5 in the SBIAS

Genesis 5 in the SBIBS

Genesis 5 in the SBIBS2

Genesis 5 in the SBICS

Genesis 5 in the SBIDS

Genesis 5 in the SBIGS

Genesis 5 in the SBIHS

Genesis 5 in the SBIIS

Genesis 5 in the SBIIS2

Genesis 5 in the SBIIS3

Genesis 5 in the SBIKS

Genesis 5 in the SBIKS2

Genesis 5 in the SBIMS

Genesis 5 in the SBIOS

Genesis 5 in the SBIPS

Genesis 5 in the SBISS

Genesis 5 in the SBITS

Genesis 5 in the SBITS2

Genesis 5 in the SBITS3

Genesis 5 in the SBITS4

Genesis 5 in the SBIUS

Genesis 5 in the SBIVS

Genesis 5 in the SBT

Genesis 5 in the SBT1E

Genesis 5 in the SCHL

Genesis 5 in the SNT

Genesis 5 in the SUSU

Genesis 5 in the SUSU2

Genesis 5 in the SYNO

Genesis 5 in the TBIAOTANT

Genesis 5 in the TBT1E

Genesis 5 in the TBT1E2

Genesis 5 in the TFTIP

Genesis 5 in the TFTU

Genesis 5 in the TGNTATF3T

Genesis 5 in the THAI

Genesis 5 in the TNFD

Genesis 5 in the TNT

Genesis 5 in the TNTIK

Genesis 5 in the TNTIL

Genesis 5 in the TNTIN

Genesis 5 in the TNTIP

Genesis 5 in the TNTIZ

Genesis 5 in the TOMA

Genesis 5 in the TTENT

Genesis 5 in the UBG

Genesis 5 in the UGV

Genesis 5 in the UGV2

Genesis 5 in the UGV3

Genesis 5 in the VBL

Genesis 5 in the VDCC

Genesis 5 in the YALU

Genesis 5 in the YAPE

Genesis 5 in the YBVTP

Genesis 5 in the ZBP