Genesis 50 (BOLCB2)

1 Jozefi amibwakaki na nzoto ya tata na ye, alelaki ye mpe apesaki ye beze. 2 Bongo Jozefi apesaki mitindo na minganga oyo bazalaki kosala epai na ye ete bakawusa nzoto ya Isalaele, tata na ye. Boye minganga bakawusaki nzoto ya Isalaele, 3 bakokisaki mikolo tuku minei oyo esengelaki mpo na kokawusa nzoto ya mowei. Bato ya Ejipito basalelaki ye matanga mikolo tuku sambo. 4 Tango mikolo ya matanga esilaki, Jozefi alobaki na bakonzi oyo basalaka na ndako ya Faraon :— Soki nazwi ngolu na miso na bino, bolobela ngai epai ya Faraon. Boyebisa ye 5 ete tata na ngai alapisaki ngai ndayi : « Nakomi pembeni ya kokufa, bokunda ngai kati na kunda oyo natobolaki na libanga, na mokili ya Kanana. » Mpe sik’oyo, tika ete apesa ngai nzela mpo ete nakende kokunda tata na ngai, bongo na sima nde nakozonga. 6 Faraon azongisaki :— Kende mpe kunda tata na yo ndenge alapisaki yo ndayi. 7 Boye Jozefi akendeki kokunda tata na ye ; bakalaka nyonso ya lokumu ya Faraon bakendeki elongo na ye : bakonzi oyo bazalaki kosala na ndako na ye mpe bakonzi nyonso ya Ejipito 8 elongo na bato nyonso ya ndako ya Jozefi, bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya tata na ye. Bana na bango kaka nde batikalaki na Gosheni na bameme, bantaba mpe bangombe na bango. 9 Jozefi atambolaki lisusu elongo na bashareti mpe bato oyo batambolaka likolo ya bampunda. Ezalaki mobembo ya bato ebele penza. 10 Tango bakomaki na etando ya Atadi, pembeni ya Yordani, basalaki matanga ya monene penza. Jozefi asalaki mikolo sambo ya matanga mpo na tata na ye. 11 Bongo tango bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna bamonaki matanga wana na etando ya Atadi, balobaki : « Bato ya Ejipito bazali na milulu minene ya matanga. » Yango wana babengaki esika yango Abele-Mitsirayimi, oyo ezali pembeni ya Yordani. 12 Bana mibali ya Jakobi basalaki ndenge tata na bango atindaki bango. 13 Bamemaki ye na mokili ya Kanana mpe bakundaki ye na lidusu ya mabanga oyo ezali na elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, elanga oyo Abrayami asombaki epai ya Efroni, moto ya Iti, mpo ete akomisa yango lilita na ye. 14 Sima na kokunda tata na ye, Jozefi azongaki na Ejipito elongo na bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo balandaki ye mpo na kokunda tata na ye. 15 Tango bandeko mibali ya Jozefi bamonaki ete tata na bango asili kokufa, balobaki : « Tango mosusu Jozefi akoyina biso mpe akozongisela biso mabe nyonso oyo tosalaki ye ! » 16 Boye batindelaki Jozefi maloba oyo : « Liboso ete tata na yo akufa, atikaki maloba oyo : ‹ Tala makambo oyo bokoyebisa Jozefi : 17 ‘ Nasengi ete olimbisa masumu ya bandeko na yo mpe mabe oyo basalaki yo ! Sik’oyo, nabondeli yo, limbisa masumu ya basali ya Nzambe ya tata na yo ! ’ › »Tango Jozefi ayokaki maloba yango, alelaki. 18 Bandeko na ye bayaki, bamibwakaki liboso na ye mpe balobaki :— Tozali bawumbu na yo. 19 Kasi Jozefi alobaki na bango :— Bobanga te ! Boni, ngai nazali na esika ya Nzambe ? 20 Bino bokanisaki kosala ngai mabe, kasi Nzambe abongolaki yango bolamu mpo na kokokisa, ndenge ezali kosalema sik’oyo, lobiko ya bomoi ya bato ebele. 21 Yango wana, bobanga te ! Nakokokisa posa na bino mpe ya bana na bino.Akitisaki bango mitema mpe alobelaki bango na boboto nyonso. 22 Jozefi avandaki na Ejipito elongo na libota nyonso ya tata na ye. Awumelaki na bomoi mibu nkama moko na zomi. 23 Amonaki bakitani ya Efrayimi kino na molongo ya misato. Amonaki lisusu bana ya Makiri, mwana mobali ya Manase, ba-oyo babotamaki na mabolongo ya Jozefi. 24 Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Nakomi pene ya kokufa. Kasi ya solo, Nzambe akosalisa bino mpe akobimisa bino na mokili oyo, mpo na kokotisa bino na mokili oyo alakaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi tango alapaki ndayi. » 25 Jozefi alapisaki bana mibali ya Isalaele ndayi mpe alobaki na bango : « Tango Nzambe akosunga bino, bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo. » 26 Bongo Jozefi akufaki tango akokisaki mibu ya mbotama nkama moko na zomi. Tango basilisaki kokawusa nzoto na ye, batiaki ye na sanduku na Ejipito.

In Other Versions

Genesis 50 in the ANGEFD

Genesis 50 in the ANTPNG2D

Genesis 50 in the AS21

Genesis 50 in the BAGH

Genesis 50 in the BBPNG

Genesis 50 in the BBT1E

Genesis 50 in the BDS

Genesis 50 in the BEV

Genesis 50 in the BHAD

Genesis 50 in the BIB

Genesis 50 in the BLPT

Genesis 50 in the BNT

Genesis 50 in the BNTABOOT

Genesis 50 in the BNTLV

Genesis 50 in the BOATCB

Genesis 50 in the BOATCB2

Genesis 50 in the BOBCV

Genesis 50 in the BOCNT

Genesis 50 in the BOECS

Genesis 50 in the BOGWICC

Genesis 50 in the BOHCB

Genesis 50 in the BOHCV

Genesis 50 in the BOHLNT

Genesis 50 in the BOHNTLTAL

Genesis 50 in the BOICB

Genesis 50 in the BOILNTAP

Genesis 50 in the BOITCV

Genesis 50 in the BOKCV

Genesis 50 in the BOKCV2

Genesis 50 in the BOKHWOG

Genesis 50 in the BOKSSV

Genesis 50 in the BOLCB

Genesis 50 in the BOMCV

Genesis 50 in the BONAV

Genesis 50 in the BONCB

Genesis 50 in the BONLT

Genesis 50 in the BONUT2

Genesis 50 in the BOPLNT

Genesis 50 in the BOSCB

Genesis 50 in the BOSNC

Genesis 50 in the BOTLNT

Genesis 50 in the BOVCB

Genesis 50 in the BOYCB

Genesis 50 in the BPBB

Genesis 50 in the BPH

Genesis 50 in the BSB

Genesis 50 in the CCB

Genesis 50 in the CUV

Genesis 50 in the CUVS

Genesis 50 in the DBT

Genesis 50 in the DGDNT

Genesis 50 in the DHNT

Genesis 50 in the DNT

Genesis 50 in the ELBE

Genesis 50 in the EMTV

Genesis 50 in the ESV

Genesis 50 in the FBV

Genesis 50 in the FEB

Genesis 50 in the GGMNT

Genesis 50 in the GNT

Genesis 50 in the HARY

Genesis 50 in the HNT

Genesis 50 in the IRVA

Genesis 50 in the IRVB

Genesis 50 in the IRVG

Genesis 50 in the IRVH

Genesis 50 in the IRVK

Genesis 50 in the IRVM

Genesis 50 in the IRVM2

Genesis 50 in the IRVO

Genesis 50 in the IRVP

Genesis 50 in the IRVT

Genesis 50 in the IRVT2

Genesis 50 in the IRVU

Genesis 50 in the ISVN

Genesis 50 in the JSNT

Genesis 50 in the KAPI

Genesis 50 in the KBT1ETNIK

Genesis 50 in the KBV

Genesis 50 in the KJV

Genesis 50 in the KNFD

Genesis 50 in the LBA

Genesis 50 in the LBLA

Genesis 50 in the LNT

Genesis 50 in the LSV

Genesis 50 in the MAAL

Genesis 50 in the MBV

Genesis 50 in the MBV2

Genesis 50 in the MHNT

Genesis 50 in the MKNFD

Genesis 50 in the MNG

Genesis 50 in the MNT

Genesis 50 in the MNT2

Genesis 50 in the MRS1T

Genesis 50 in the NAA

Genesis 50 in the NASB

Genesis 50 in the NBLA

Genesis 50 in the NBS

Genesis 50 in the NBVTP

Genesis 50 in the NET2

Genesis 50 in the NIV11

Genesis 50 in the NNT

Genesis 50 in the NNT2

Genesis 50 in the NNT3

Genesis 50 in the PDDPT

Genesis 50 in the PFNT

Genesis 50 in the RMNT

Genesis 50 in the SBIAS

Genesis 50 in the SBIBS

Genesis 50 in the SBIBS2

Genesis 50 in the SBICS

Genesis 50 in the SBIDS

Genesis 50 in the SBIGS

Genesis 50 in the SBIHS

Genesis 50 in the SBIIS

Genesis 50 in the SBIIS2

Genesis 50 in the SBIIS3

Genesis 50 in the SBIKS

Genesis 50 in the SBIKS2

Genesis 50 in the SBIMS

Genesis 50 in the SBIOS

Genesis 50 in the SBIPS

Genesis 50 in the SBISS

Genesis 50 in the SBITS

Genesis 50 in the SBITS2

Genesis 50 in the SBITS3

Genesis 50 in the SBITS4

Genesis 50 in the SBIUS

Genesis 50 in the SBIVS

Genesis 50 in the SBT

Genesis 50 in the SBT1E

Genesis 50 in the SCHL

Genesis 50 in the SNT

Genesis 50 in the SUSU

Genesis 50 in the SUSU2

Genesis 50 in the SYNO

Genesis 50 in the TBIAOTANT

Genesis 50 in the TBT1E

Genesis 50 in the TBT1E2

Genesis 50 in the TFTIP

Genesis 50 in the TFTU

Genesis 50 in the TGNTATF3T

Genesis 50 in the THAI

Genesis 50 in the TNFD

Genesis 50 in the TNT

Genesis 50 in the TNTIK

Genesis 50 in the TNTIL

Genesis 50 in the TNTIN

Genesis 50 in the TNTIP

Genesis 50 in the TNTIZ

Genesis 50 in the TOMA

Genesis 50 in the TTENT

Genesis 50 in the UBG

Genesis 50 in the UGV

Genesis 50 in the UGV2

Genesis 50 in the UGV3

Genesis 50 in the VBL

Genesis 50 in the VDCC

Genesis 50 in the YALU

Genesis 50 in the YAPE

Genesis 50 in the YBVTP

Genesis 50 in the ZBP